Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/3 nk. 27-31
  • Boyá losambo ya lokuta!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyá losambo ya lokuta!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kimá “Babilone Monene”
  • Ndenge nini koboya losambo ya lokuta?
  • “Bókoba kotambola na bwanya”
  • “Kobá kosimba ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba”
  • Tosikwami na losambo ya lokuta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge oyo mangomba ya lokuta ekoselaka Nzambe makambo
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Nzambe andimaka mangomba nyonso?
    Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/3 nk. 27-31

Boyá losambo ya lokuta!

“‘Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo.’”​—2 BAKOLINTI 6:17.

1. Bato mingi ya mitema sembo bazali ndenge nini na elimo?

BATO mingi ya mitema sembo bayebi Nzambe te mpe ndenge oyo bomoi ya bato ekozala na mikolo ekoya. Lokola bazali kozwa biyano te na mituna oyo bazali komituna, bazali na kati ya mobulungano mpe bazali lokola bato bazali koyeba te epai wapi kokende. Bamilio ya bato bazali baombo ya biyambayamba, ya milulu, mpe bafɛti oyo esepelisaka Mozalisi te. Na ntembe te, bato mosusu pembeni na yo, ata mpe bandeko na yo mosusu, bandimaka lifelo ya mɔtɔ, Bosato, liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te, mpe mateya mosusu ya lokuta.

2. Mosala nini bakonzi ya mangomba basali, mpe yango ememi makambo nini?

2 Nini etye ebele ya bato na molili yango ya elimo? Ezali mingimingi mangomba mpe bakonzi na yango oyo bazali koteya makanisi oyo ekeseni na makanisi ya Nzambe. (Malako 7:7, 8) Nyonso wana esali ete ebele ya bato bakosami mpe bazali kokanisa ete bazali kosambela Nzambe ya solo, nzokande, bazali kofinga ye. Losambo ya lokuta nde ememi makambo nyonso wana.

3. Nani azali mobandisi ya losambo ya lokuta, mpe ndenge nini Biblia ezali komonisa ye?

3 Ekelamu moko oyo amonanaka te nde azali kotambwisa mangomba ya lokuta. Na ntina na ye, ntoma Paulo alobaki boye: “Nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima, mpo ete kongɛnga ya nsango malamu ya nkembo oyo etali Klisto, oyo azali elilingi ya Nzambe, ekoka kokɔta te.” (2 Bakolinti 4:4) Satana Zabolo nde azali “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” Ye nde azali mobandisi ya losambo ya lokuta. Paulo akomaki ete “Satana ye moko azali kokoba komibimisa lokola anzelu moko ya pole. Bongo ezali likambo monene te soki baministre na ye mpe bazali kokoba komibimisa lokola baministre ya boyengebene.” (2 Bakolinti 11:14, 15) Satana asalaka ete makambo ya mabe emonana lokola nde ezali malamu mpe azali kozimbisa bato mpo bándima makambo ya lokuta.

4. Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisalaele ya kala elobaki nini na ntina na basakoli ya lokuta?

4 Tomoni mpenza ntina oyo Biblia ekweisi losambo ya lokuta! Na ndakisa, Mibeko ya Moize eyebisaki libota ya Nzambe polele ete báboya basakoli ya lokuta. Moto nyonso oyo ateyi mateya ya lokuta mpe asambeli banzambe ya lokuta asengelaki ‘kobomama mpo ete ye alakisaki kopɛngwa na [Yehova].’ Mobeko elobaki na Bayisalaele ete ‘bálongola mabe na kati na bango.’ (Deteronome 13:1-5) Tomoni mpenza ete losambo ya lokuta ezali mabe na miso ya Yehova.​—Ezekiele 13:3.

5. Makebisi nini tosengeli kotyela likebi lelo oyo?

5 Yesu Klisto ná bantoma na ye bazalaki kotalela losambo ya lokuta ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bókeba na basakoli ya lokuta oyo bazali koya epai na bino na bilamba ya bampate, kasi na kati bazali bambwa ya zamba ya lokoso.” (Matai 7:15; Malako 13:22, 23) Paulo akomaki ete “nkanda ya Nzambe ezali komonisama uta na likoló mpo na kotɛmɛla ezaleli nyonso ya kotyola Nzambe mpe makambo nyonso ya kozanga boyengebene ya bato oyo bazali kozipa solo.” (Baloma 1:18) Esengeli mpenza ete baklisto ya solo báyoka makebisi yango mpe báboya moto nyonso oyo azali kozipa solo ya Liloba ya Nzambe to azali koteya mateya ya lokuta.​—1 Yoane 4:1.

Kimá “Babilone Monene”

6. Ndenge nini “Babilone Monene” emonisami na Biblia?

6 Tótalela ndenge oyo mokanda ya Emoniseli elobeli losambo ya lokuta. Biblia emonisi yango na elilingi ya mwasi ya ndumba oyo alangwe masanga mpe azali na bokonzi likoló ya makonzi mingi mpe bato na yango. Mwasi yango azali kosala pite na bakonzi mingi mpe alangwe makila ya basambeli ya solo ya Nzambe. (Emoniseli 17:1, 2, 6, 18) Nkombo oyo ekomami na elongi ya mwasi yango ezali mpenza komonisa ete azali na etamboli ya mbindo. Nkombo yango ezali “Babilone Monene, mama ya basi ya ndumba mpe ya biloko ya bosɔtɔ ya mabelé.”​—Emoniseli 17:5.

7, 8. Ndenge nini mangomba ya lokuta ezali kosala ekobo, mpe yango eboti mbuma nini?

7 Makambo oyo Biblia elobi mpo na Babilone Monene eyokani mpenza na makambo ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Atako ebele ya mangomba oyo ezali na mokili ezali lisangá moko te, ezali na mokano moko mpe esalaka makambo ndenge moko. Ndenge kaka mokanda ya Emoniseli elobeli mwasi wana ya ndumba, mangomba ya lokuta ezali na bokonzi mingi likoló ya baguvɛrnema ya mokili. Lokola mwasi oyo azali sembo te na ndai na ye ya libala, mangomba ya lokuta ezali kosala ekobo na ndenge ezali kosala boyokani na bakonzi ndenge na ndenge ya politiki. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Basi ya ekobo, boyebi te ete boninga ná mokili ezali bonguna ná Nzambe? Na yango, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.”​—Yakobo 4:4.

8 Boyokani yango ya mangomba ya lokuta na baguvɛrnema ememeli bato mpasi mingi. profɛsɛrɛ Xolela Mangcu, mokomi ya makambo ya politiki, alobaki ete “lisolo ya mokili etondi na makambo ya koboma ebele ya bato mpamba te bazali kosangisa makambo ya losambo ná makambo ya politiki.” Na zulunalo moko bakomaki boye: “Lelo oyo, bitumba oyo eleki nsɔmɔ mpe oyo ezali koboma bato mingi . . . ezali mpo na makambo ya mangomba.” Bamilio ya bato bakufi na bitumba oyo bakonzi ya mangomba bazali kopesa mabɔkɔ. Babilone Monene anyokoli mpe abomi ata basambeli ya solo ya Nzambe; yango wana, tokoki koloba na ndenge ya elilingi ete alangwe makila na bango.​—Emoniseli 18:24.

9. Ndenge nini mokanda ya Emoniseli emonisi ete Yehova ayini mpenza losambo ya lokuta?

9 Makambo oyo ekokómela Babilone Monene ezali komonisa polele ete Yehova ayini losambo ya lokuta. Emoniseli 17:16 elobi boye: “Maseke zomi oyo omonaki, ná nyama mabe, bango bakoyina mwasi wana ya ndumba mpe bakopanza ye mpe bakotika ye bolumbu, mpe bakolya misuni na ye mpe bakozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ.” Liboso, nyama moko monene ekopanza ye mpe ekolya misuni na ye. Na nsima, biteni na ye nyonso oyo ekotikala ekotumbama na mɔtɔ. Na kokokisama ya likambo yango, mosika te baguvɛrnema ya mokili ekobalukela mangomba ya lokuta. Nzambe nde akopesa baguvɛrnema yango likanisi wana. (Emoniseli 17:17) Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, ekoki te kokima etumbu ya liwa. Mwasi yango ya ndumba “akomonana lisusu ata mokolo moko te.”​—Emoniseli 18:21.

10. Ndenge nini tosengeli kotalela losambo ya lokuta?

10 Ndenge nini basambeli ya solo basengeli kotalela Babilone Monene? Biblia elobi na bango polele ete: “Bóbima na kati na ye, bato ya ekólo na ngai, soki bolingi te kosangana ná ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye.” (Emoniseli 18:4) Baoyo balingi kobika basengeli kozela te, basengeli kobima nokinoki na mangomba ya lokuta. Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabelé, alobaki ete na mikolo ya nsuka, bato mingi bakomibenga bayekoli na ye, kasi ekozala ya nkombo mpamba. (Matai 24:3-5) Yesu akoloba na bato yango boye: “Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato ya misala ya botyoli-mibeko.” (Matai 7:23) Yesu Klisto, oyo afandi sikoyo na kiti ya bokonzi, aboyi mpenza losambo ya lokuta.

Ndenge nini koboya losambo ya lokuta?

11. Tosengeli kosala nini mpo na koboya losambo ya lokuta?

11 Baklisto ya solo bakimaka losambo ya lokuta mpe baboyaka mateya ya lokuta. Yango elingi koloba ete toboyaka kolanda baemisyo ya mangomba ya mokili oyo elekaka na radio mpe na televizyo, totángaka te mikanda oyo ezali koteya lokuta mpo na Nzambe mpe Liloba na ye. (Nzembo 119:37) Longola yango, toboyaka kopesa mabɔkɔ na makambo to masano oyo ebongisami na masangá oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta. Lisusu, toboyaka kosala likambo nyonso oyo ezali kolendisa losambo ya lokuta. (1 Bakolinti 10:21) Kosala bongo ezali kobatela biso mpo moto moko te amema biso “lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba engebene mimeseno ya bato, engebene makambo mikemike ya mokili kasi engebene Klisto te.”​—Bakolose 2:8.

12. Ndenge nini moto akoki kokabwana na mangomba ya lokuta?

12 Moto oyo azali na mposa ya kokóma Motatoli ya Yehova kasi nkombo na ye ezali naino na lingomba ya lokuta, asengeli kosala nini? Mbala mingi, kokomela bakambi ya lingomba yango mokanda oyo elobi ete amilongoli na lingomba yango emonisaka ete alingi lisusu te bátalelaka ye lokola mondimi ya lingomba yango. Ezali na ntina mingi moto yango akata nsinga nyonso mpo azwama ata na likambo moko te ya losambo ya lokuta. Makambo oyo moto oyo alingi kokóma Motatoli akosala esengeli komonisa polele epai ya bakambi ya lingomba mpe bato mosusu nyonso ete azali lisusu mondimi ya lingomba yango te.

13. Biblia epesi toli nini na likambo etali koboya losambo ya lokuta?

13 Ntoma Paulo akomaki boye: “Bósala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te. Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe botyoli-mibeko? To bosangani nini ezali na kati ya pole mpe molili? Lisusu, boyokani nini ezali na kati ya Klisto mpe Beliala? To eloko nini moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te? Mpe boyokani nini ezali na kati ya tempelo ya Nzambe mpe bikeko? . . . ‘Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo.’” (2 Bakolinti 6:14-17) Tokomonisa ete tozali kotosa maloba yango soki tozali kokima losambo ya lokuta. Kasi, toli ya Paulo emonisi nde ete tosengeli kokimaka basambeli ya lokuta?

“Bókoba kotambola na bwanya”

14. Tosengeli nde kokima bato oyo bazali na mangomba ya lokuta? Limbolá.

14 Basambeli ya solo basengeli nde koboya boyokani nyonso na bato oyo bazali na mangomba ya lokuta? Tosengeli nde kokima mpenza bato oyo tozali na bango lingomba moko te? Te. Moko na mibeko mibale oyo eleki monene elobi boye: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Tomonisaka ete tolingaka bazalani na biso ntango toyebisaka bango nsango malamu ya Bokonzi. Tomonisaka mpe ete tolingaka bango ntango toyekolaka na bango Biblia mpe toyebisaka bango ete basengeli koboya losambo ya lokuta.

15. Kozala “bato ya mokili te” elimboli nini?

15 Atako tosakolaka nsango malamu epai ya bazalani na biso, lokola tozali bayekoli ya Yesu, tozali “bato ya mokili te.” (Yoane 15:19) Na vɛrsɛ yango, liloba “mokili” elimboli bato nyonso oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ. (Baefese 4:17-19; 1 Yoane 5:19) Tozali bato ya mokili te na boye ete toboyaka bizaleli, elobeli, mpe etamboli oyo Yehova aboyi. (Yoane 2:15-17) Longola yango, na kolanda etinda oyo elobi ete “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu,” toboyaka boninga na bato oyo batosaka mitinda ya boklisto te. (1 Bakolinti 15:33) Kozala bato ya mokili te elimboli komibatela “kozanga litɔnɔ ya mokili.” (Yakobo 1:27) Na yango, kozala bato ya mokili te elimboli te kokima mpenza bato mosusu mpe kokende kofanda na esika na biso moko.​—Yoane 17:15, 16; 1 Bakolinti 5:9, 10.

16, 17. Ndenge nini baklisto basengeli kotalela bato oyo bayebi mateya ya solo te?

16 Ndenge nini kasi tosengeli kotalela bato oyo bayebi mateya ya Biblia te? Paulo akomelaki bandeko ya lisangá ya Kolose boye: “Bókoba kotambola na bwanya na oyo etali bato ya libándá, komisombeláká ntango oyo ebongi. Tiká liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto moko na moko eyano.” (Bakolose 4:5, 6) Ntoma Petelo akomaki boye: “Bósantisa Klisto lokola Nkolo na kati ya mitema na bino, bómibongisa ntango nyonso mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo ezali na kati na bino, kasi bósalaka bongo na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.” (1 Petelo 3:15) Paulo apesaki baklisto toli ete “báloba mabe mpo na moto te, bázala te bato balingá-bitumba, bázala te bato ya makambo makasimakasi, bámonisa boboto mpenza epai ya bato nyonso.”​—Tito 3:2.

17 Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tosengeli te kolobaka na bato maloba ya mabe to kozala na lolendo. Tosengeli mpe te kosalela bankombo ya kotyola mpo na kolobela bato ya mangomba mosusu. Kasi, tosengeli nde kozala na boboto, ata soki moto oyo tokutani na ye na mosala ya kosakola, to moninga ya kartye to ya mosala azali na boboto te to alobi na biso mabe.​—Bakolose 4:6; 2 Timote 2:24.

“Kobá kosimba ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba”

18. Bato oyo bazongelaka losambo ya lokuta bakómaka ndenge nini na elimo?

18 Ezalaka mawa mingi ntango moto oyo ayebi mateya ya solo azongeli losambo ya lokuta! Biblia elobeli mbuma mabe oyo likambo yango ebotaka na maloba oyo: “Ya solo mpenza soki, nsima ya kokima makambo ya mbindo ya mokili na nzela ya boyebi ya solosolo ya Nkolo mpe Mobikisi Yesu Klisto, bazongeli lisusu makambo yango mpe balongami, motindo na bango ya nsuka ekómi mabe mpo na bango koleka oyo ya liboso. . . . Liloba ya lisese oyo ya solo ekokani epai na bango: ‘Mbwa ezongeli biloko oyo yango moko esanzaki, mpe ngulu oyo basukoli ezongi kobaluka na pɔtɔpɔtɔ.’”​—2 Petelo 2:20-22.

19. Mpo na nini tosengeli mpenza kokeba na likambo nyonso oyo ekoki kobebisa elimo na biso?

19 Tosengeli kokeba na eloko nyonso oyo ekoki kobebisa elimo na biso. Makama ezali mpenza! Ntoma Paulo alobi boye: “Liloba oyo epemami elobi polele ete na bileko oyo ekoya bamosusu bakotika kondima, kotyáká likebi na maloba oyo epemami ya bokosi mpe na mateya ya bademo.” (1 Timote 4:1) Tozali sikoyo na ntango oyo Paulo abengaki “bileko oyo ekoya.” Baoyo bazali te kokata nsinga nyonso na losambo ya lokuta bakoki “komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya na nzela ya bokosi ya bato, na nzela ya mayele mabe ya kobotabota mabunga.”​—Baefese 4:13, 14.

20. Ndenge nini tokoki komibatela na makambo mabe ya losambo ya lokuta?

20 Ndenge nini tokoki komibatela na makambo mabe ya losambo ya lokuta? Tókanisa biloko nyonso oyo Yehova apesi biso. Tozali na Biblia, Liloba ya Nzambe. (2 Timote 3:16, 17) Yehova azali mpe kopesa biso ebele ya bilei ya elimo na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Ntango tozali kokola na boyebi ya solo, tosengeli kolona mposa ya kolya ‘bilei ya makasi oyo ezali ya bato oyo bakɔmeli’ mpe mposa ya koyangana na makita epai toyekolaka mateya ya solo. (Baebele 5:13, 14; Nzembo 26:8) Tiká ete tózala na ekateli ya kosalela bibongiseli nyonso wana ya Yehova mpo ‘tókoba kosimba ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba’ oyo tosili koyoka. (2 Timote 1:13) Na ndenge yango, tokoboya losambo ya lokuta.

Oyekoli makambo nini?

• “Babilone Monene” ezali nini?

• Tosengeli kosala nini mpo na kokima losambo ya lokuta?

• Tosengeli kokima makambo nini oyo ekoki kobebisa elimo na biso?

[Elilingi na lokasa 28]

Oyebi mpo na nini “Babilone Monene” emonisami na elilingi ya mwasi ya ndumba?

[Elilingi na lokasa 29]

“Babilone monene” ekoki te kokima etumbu ya liwa

[Elilingi na lokasa 31]

Tomonisaka ‘elimo ya boboto mpe limemya makasi’ epai ya baoyo bazali na bindimeli ndenge moko na biso te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto