Tomisɛnzela na “ntango ya suka”
“Bokɛba, bosɛnzela, mpo ete boyebi te soko ntango nini elaká yango ekokoka.”—MALAKO 13:33.
1. Tosengeli kosala nini awa makambo minene mazali kosalema na “ntango [oyo] ya nsuka”?
LOLENGE nini baklisto basengeli kosala awa makambo minene mazali kosalema na “ntango [oyo] ya nsuka?” (Danyele 12:4) Bazali na ntembe te. Yesu Klisto apesaki esakweli oyo ezali na elembo esangisi makambo mingi oyo mazali kokokisama na ekeke oyo ya ntuku mibale. Alobelaki makambo mingi makesenisi eleko oyo ebandaki na 1914 mpe bileko mosusu. Yesu, oyo ayebaki esakweli ya Danyele na ntina na “ntango ya nsuka,” asukisaki esakweli na ye monene na kopesáká toli epai na bayekoli na ye ete ‘bamisɛnzela.’— Luka 21:36.
2. Mpo na nini ezali likambo ya ntina mpenza ete tomisɛnzela kati na elimo?
2 Mpo na nini tosengeli komisɛnzela? Mpo ete eleko na biso ezali eleko eleki mpasi mingi na lisoló na bato. Baklisto oyo bakooka mpongi na elimo na ntango oyo, bazali na likámá. Soki tomipesi na bisengo to mpe totiki ete mitema na biso mizala makasi mpo na mitungisi ya bomoi, tokozala na likámá. Na Luka 21:34, 35 (MN), Yesu Klisto akebisaki biso ete: “Kasi bokɛba bino mpenza ete mitema na bino mikóma makasi te mpo na kolya mingi mpe, na komela mingi mpe, na mitungisi ya bomoi, ete mokolo yango moyela bino pwasa te lokola motambo. Mpo ete ekoya likoló na bafandi nyonso na etando ya mabelé mobimba.”
3, 4. (a) Yesu alingaki koloba nini na ntango alobaki ete, mokolo na nkanda ya Nzambe mokoya nokinoki likoló na bato “lokola motambo”? (b) Lokola Nzambe akotyaka motambo te, mpo na nini mokolo yango mokoya pwasa epai na bato nyonso?
3 Yesu alobaki na sembo nyonso ete mokolo ya Jéhovah ‘mokoyela biso pwasa lokola motambo.’ Mbala mingi, motambo mokozalaka na nsinga moko, mpe yango esalelami mpo na kokanga bandeke mpe banyama. Motambo mosalemi na motindo boye ete efungwama soki eloko moko etamboli likoló na yango. Na ntango wana, motambo mokobendana mpe mokokanga eloko yango. Nyonso ekosalemaka na pwasa. Yesu alobaki ete baoyo basili kolɛmba na elimo, bakozwama bobele bongo “na mokolo na nkanda” na Nzambe.—Masese 11:4.
4 Ezali Jéhovah Nzambe nde azali kotyela bato motambo wana? Te, azali kozela te ete batika kosɛnzɛla mpo ete aboma bango nsima. Kasi mokolo yango mokokamwisa bato nyonso mpo ete Bokonzi na Nzambe ezali lobanzo na bango ya liboso te. Bazali komitambwisa lokola elingi bango, kozanga kotalela ndimbola ya makambo oyo mazali kosalema zingazinga na bango. Atako bongo, yango ezali kobongola manaka na Nzambe te. Asili kolaka ngonga oyo akokata likambo. Mpe, na mawa na ye, azali koyebisa bato na ntina na kosambisa na ye oyo ekoya.—Malako 13:10.
5, 6. (a) Na ntina na kosambisama oyo ekoya, ebongiseli nini etondi na bolingo oyo Mozalisi asili kokamata yango mpo na bato, kasi yango ebimisi matomba nini? (b) Makambo nini tokotalela mpo un kosalisa biso ete tomisɛnzela?
5 Likebisi wana ezali ebongiseli etondi na bolingo ya Nzambe na biso monene, oyo asepeli na bolamu ya bato oyo ye akelaki awa na mabelé, etyelo ya makolo na ye na elilingi. (Yisaya 66:1) Makomami mayebisi ete alingi bafandi na esika oyo makolo na ye matyami. Yango wana, na nzela na bantóma na ye mpe na batindami na ye na mabelé, azali kokebisa bango mpo na makambo minene oyo mazali kozela bango. (2 Bakolinti 5:20) Kasi, atako makebisi nyonso oyo masili kopesama, makambo yango makoyela bato na motindo na pwasa lokola na motambo. Mpo na nini? Mpo ete bato mingi balali mpongi na elimo. (1 Batesaloniki 5:6) Bobele bato moke kati na bango nde bazali kotalela likebisi wana mpe bakokɛɔta kozanga kokufa kati na mokili ya sika ya Nzambe.—Matai 7:13, 14.
6 Na yango, lolenge nini tosengeli komisɛnzela na ntango oyo ya nsuka mpo ete totangama kati na baoyo bakobika? Jéhovah azali kopesa lisalisi libongi. Tosimba makambo nsambo oyo tokoki kosala.
Kosala makasi ete topɛngwisa makanisi na biso te
7. Na maloba nini Yesu akebisaki biso ete topɛngwisa makanisi na biso te?
7 Libosoliboso, tosengeli kosala makasi ete topɛngwisa makanisi na biso te. Yesu alobaki na Matai 24:42, 44 (MN), ete: “Boye bokɛngɛlaka, mpo ete boyebi te soko mokolo nini Nkolo na bino akoya. Yango wana, bino mpe bomilɛngela, mpo ete Mwana na moto akoya na ngonga oyo ekanisi bino te.” Maloba na Yesu mamonisi ete na eleko oyo ya mpasi, ekozala na makambo mingi makopɛngwisa makanisi na bato; nzokande kopɛngwa na makanisi ekoki komema na libebi. Na mikolo ya Noa, bato bamipesaki na makambo mingi. Na yango, bato bapɛngwisaki makanisi na bango “bayebaki likambo te,” basosolaki makambo oyo mazali koleka te, mpe mpela ebomaki bango nyonso. Tala ntina oyo Yesu akebisaki ete: “Koya ya Mwana na moto ekozala bobele bongo.”—Matai 24:37-39, MN
8, 9. (a) Lolenge nini bokoki kozala na likámá ya kopɛngwisa makanisi na biso na makambo ya bomoi? (b) Makebisi nini Paulo mpe Yesu basili kopesa biso?
8 Tobosana te ete kati na likebisi na ye lizwami na Luka 21:34, 35, Yesu alobelaki makambo makosalemaka na bomoi, lokola kolya, komela mpe mitungisi na ntina kozwa biloko ya komibikisa. Wana ezali makambo matali bato nyonso, mpe bayekoli na Nkolo Yesu lokola. (Tala Malako 6:31.) Makambo wana makoki mpenza kozala mabe te, kasi soki tomisɛnzeli te, ekoki kopɛngwisa biso longwa na nzela oyo tozali kolanda, ekokóma mpenza lobanzo na biso mpe na yango, tokooka mpongi makasi na elimo.
9 Na bongo, tozala na bopotu te mpo na likambo oyo lileki ntina: kondimama na Nzambe. Na esika na komikɔtisa mobimba kati na makambo mazali kosalema na bomoi, tosalela nde yango na ndelo, engebene bamposa na biso. (Bafilipi 3:8) Makambo motindo wana masengeli te koleka liboso na matomba ya Bokonzi. Lokola yango elobami na Baloma 14:17, ete: “Bokonzi na Nzambe elimboli kolya te mpe komela te, kasi elimboli boyengebene, kimya mpe esengo elongo na elimo santu.” Tomikundola maloba oyo na Yesu, ete: “Bolukaka nde liboso bokonzi mpe boyengebene na Ye, mpe biloko oyo mosusu bikobakisama na bino.” (Matai 6:33, MN) Lisusu, na Luka 9:62 Yesu alobaki ete: “Moto na moto atii lobɔkɔ na etimweli mpe akotala makambo mazali na nsima, ye abongi na bokonzi na Nzambe te.”
10. Likámá nini tozali na yango soki tokotala alima te na esika ezali biso kokenda?
10 Soki tobandi kotimola mabelé na elilingi, tosengeli kolanda molóngó alima. Motimoli na mabelé oyo akotalaka nsima, akopima milóngó alima te. Makanisi na ye mazali epai mosusu mpe akoki mpenza kopɛngwa to kotutana na likámá. Tozala lokola mwasi na Lota te, oyo atalaki nsima mpe abikaki te. Tosengeli kobatela miso na biso ete matala sé liboso, na esika tozali kokenda. Mpo na yango, tosengeli kosala makasi ete kopɛngwisa makanisi na biso te.—Genese 19:17, 26; Luka 17:32.
Kobondela na etingya
11. Likambo nini mosusu oyo Yesu alobelaki nsima na kokebisa biso na likámá na kopɛngwisa makanisi?
11 Nzokande, esengeli makambo mingi mpo na komisɛnzɛla. Mwango ya mibale ya ntina mingi ezali bongo kobondela na etingya. Nsima na kokebisa biso na kotika te ete makanisi na biso mapɛngwa na makambo ya bomoi, Yesu apesaki toli oyo ete: “Na bongo, bosɛnzela mpe bobondelaka ntango nyonso, mpo ete bobika na makambo oyo masengeli kobima, mpe ete botɛlɛma liboso na Mwana na moto.”—Luka 21:36, MN.
12. Motindo na mabondeli nini masengeli kosalema, mpe matomba nini makobima?
12 Na bongo, tosengeli kobondela ntango nyonso mpo na likámá liuti na ezalela ya makambo na biso mpe mpo na bokɛngi oyo tozali na yango mposa. Tolobaka epai na Nzambe kati na mabondeli na kolɔmbáká ye na etingya. Paulo alobi na Baloma 12:12 (MN), ete: “Bolendendela kati na mabondeli.” Totangi na Baefese 6:18, ete: “Na motindo na mabondeli nyonso mpe na malɛmbɛ . . . bobondelaka na mabaku nyonso, kati na elimo. Mpe mpo na yango, bomisɛnzela na etingya mpenza.” Esengeli te bobele kobondela lokola nde yango ezalaki eloko mpamba oyo ekozanga kokokisa likambo monene. Bomoi na biso moko ezali na likámá. Tozali na mposa ya kosɛnga lisalisi ya Nzambe na etingya. (Tata Baebele 5:7.) Na motindo wana, tokotikala na ngambo ya Jéhovah. Mpo ete asalisa biso, eloko mosusu eleki malamu te bobele ‘kobondela ntango nyonso.’ Jéhovah akosala ete tozala ntango nyonso na bokɛngi. Kolendendela kati na mabondeli ezali bongo likambo ya ntina mingi.
Kokangama ntango nyonso na lisangá na Nzambe mpe na mosala oyo mokokisami na yango
13. Tosengeli kokangama na eloko nini mpo na komisɛnzela?
13 Tolingi kobika na makambo nyonso oyo makoyela mokili. Tolingi kotɛlɛma liboso na Mwana na moto mpo na kondimama na ye. Mpo na yango, ezali na likambo ya misato oyo tokoki kosala yango: Kokangama makasi na lisangá ya teokratike ya Jéhovah. Tosengeli kokangama ntango nyonso na lisangá yango mpe kosangana na misala na yango. Na motindo wana, tokomimonisa polele lokola baklisto oyo bazali komisɛnzɛla.
14, 15. (a) Mosala nini mokosalisa biso na komisɛnzela? (b) Nani akokata mpo na ntango oyo mosala ya kosakola mosengeli kosuka mpe lolenge nini tosengeli kotalela mosala yango? (c) Nsima na bolózi monene, tokososola nini na ntango tokokanisa na ntina na mosala ya kosakola Bokonzi oyo makosila kokokisama?
14 Likambo ya minei liyokani mpenza na oyo ya liboso, likoki kosalisa biso na komisɛnzɛla. Tosengeli kozala kati na baoyo bazali kokebisa bato na ntina na nsuka oyo ezali koya likoló na ebongiseli na biloko ya ntango oyo. Nsuka ya libela mpo na ebongiseli na biloko ya ntango oyo ekoya te bobele soki “nsango malamu oyo ya bokonzi” ekosakolama na etando oyo Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso asilaki kokana. (Matai 24:14) Ba Témoins de Jéhovah basengeli te kokata soki na ntango nini mosala ya kosakola mosengeli kosuka. Ezali likambo litali Jéhovah ye moko. (Malako 13:32, 33) Kasi, tosili kozwa ekateli ya komipesa na ndenge ekoki na boumeli na ntango oyo tozali na yango, kati na mosala ya kosakola boyangeli kitoko oyo bato bakozala na yango, Bokonzi na Nzambe. Wana “bolozi monene” ekoya, tokozala ntango nyonso na mosala yango. (Matai 24:21) Na mikoló mizali koya, baoyo bakobika bakokanisa ntango eleká mpe bakoloba na motema moko ete Yesu Klisto azalaki mosakoli ya lokutá te. (Emoniseli 19:11) Mosala ya kosakola makosila kokokisama na etando monene koleka oyo ekanisamaki na baoyo bakokisaki yango.
15 Na yango, wana mosala yango mokosila kokokisama mpo na esengo monene na Nzambe na ntango oyo ya nsuka, ekanisami ete bato mingi bakosangana na yango koleka na bileko nyonso mosusu. Tokozala na esengo mpo ete tosanganaki na mosala yango monene. Ntóma Petelo andimisi biso ete Jéhovah “alingi te ete moto moko akufa, nde alingi ete bato nyonso babongola mitema.” (2 Petelo 3:9, MN) Lisusu, bokasi bokosalaka mosala ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, ezali kokokisa mosala yango na nguya mingi mpenza, mpe ba Témoins de Jéhovah balingi kokóba mosala yango mopusami na elimo santu. Tokangama ntango nyonso na lisangá ya Jéhovah, mpe tomipesa mingi na mosala ya kosakola oyo mokokisami na lisangá wana. Yango ekosalisa biso na komisɛnzela.
Komitalela
16. Mpo na nini tosengeli komitalela mpo na etɛlɛmɛlo oyo tozali na yango sikawa kati na elimo?
16 Ezali na likambo ya mitano oyo tokoki kosala mpo na komisɛnzela. Moto na moto asengeli komitalela mpo na etɛlɛmɛlo oyo tozali na yango sikawa. Yango ezali mpenza na ntina monene. Tosengeli komonisa na ngambo nini biso tozali mpenza. Na Bagalatia 6:4 (MN), Paulo alobaki ete: “Tika ete moto na moto ameka mosala na ye moko.” Tomitalela na boyokani na maloba na Paulo mazwami na 1 Batesaloniki 5:6-8 (MN), ete: “Tolalaka mpongi te lokola basusu, kasi tomisɛnzela mpe totɛngatɛnga te. Mpo ete baoyo bazali kolala, bakolalaka na butu, mpe balangwi bakolangwaka na butu. Kasi, totɛngatɛnga te, awa esili biso kolata libateli na ntólo na kondima mpe na bolingo, mpe na elikya ya lobiko lokola ekɔti.”
17. Mituna nini tosengeli komituna wana ezali biso komitalela?
17 Ezali boni mpo na biso? Na ntango tokomitalelaka na kolanda Makomami, tokomonaka ete tozali komisɛnzela, ete tozali na ekɔti na elikya ya lobiko? Tozali bato oyo basili mpenza kokabwana na ebongiseli na biloko ya ntango oyo mpe baoyo bazali kolanda lisusu makanisi na yango te? Tozali mpenza na elimo ya mokili ya sika ya Nzambe? Tozali mpenza kokanga ntina mpo na likambo lizali kozela ebongiseli oyo? Soki ezali bongo, mokolo ya Jéhovah mokoyela biso pwasa te lokola nde tozalaki miyibi.—1 Batesaloniki 5:4.
18. Mituna nini misusu oyo tosengeli mbala mosusu komituna, mpe ndenge nini tosengeli kosala?
18 Bongo soki nsima na komitalela tomoni ete tozali koluka bomoi kitoko, ya bisengo, ya bozwi, ya kimya? Mpe soki tomoni ete miso na biso ya elimo makómi kilo mpe matondi na mpongi? Tozali nde na makanisi mpamba ya kolanda mposa moko ya mokili oyo? Soki ezali bongo, boye tolamuka!—1 Bakolinti 15:34.
Kokanisa likoló na bisakweli oyo bisili kokokisama
19. Wapi mwa bisakweli oyo bisili kokokana na ntango na biso?
19 Tokómi sikawa na likambo ya motoba oyo likosalisa biso na komisɛnzela: Kokanisa likoló na bisakweli mingi oyo bisili kokokisama na ntango oya ya nsuka. Mbula ntuku nsambo na nsambo esili koleka uta elaká ya mabota esukaki, na 1914. Soki totaleli mbula koleka ntuku nsambo na mitano oyo, moko nsima na mosusu, tokomona ete bisakweli bisili kokokana: kozongisama ya losambo ya solo; kosikolama ya batikali bapakolami, mpe baninga na bango mpe kokɔta na bango kati na paradis ya elimo; mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe na mokili mobimba; komonana ya ebele monene. (Yisaya 2:2, 3; mokapo 35; Zakaria 8:23; Matai 24:14; Emoniseli 7:9) Nkombo monene mpe boyangeli ya Jéhovah na molóngó mobimba esili kokumisama; bobele bongo, oyo moke esili kokóla kino bankɔto mpe oyo eleki moke esili kokóma libota makasi. Jéhovah ayeisi bokóli wana mbango na ntango na yango. (Yisaya 60:22; Ezekiele 38:23) Mpe sikawa, bimonaneli ya ntóma Yoane bizwami na Emoniseli bikómi pene na nsuka na yango.
20. Endimiseli nini oyo ba Témoins de Jéhovah bazali na yango, mpe bazali komimonisa lokola biloko nini?
20 Na yango, sikawa ba Témoins de Jéhovah bandimisami makasi koleka na bileko nyonso mosusu ete basili kososola malamumalamu ndimbola ya makambo oyo mazali kosalema na mokili uta 1914. Wana balendisami na endimiseli yango, bazali komimonisa lokola bisaleli na lobɔkɔ ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Ezali bango nde bazwaki mokumba ya koyebisa nsango na Nzambe na eleko oyo ya mpasi. (Baloma 10:15, 18) Ya solo, maloba ya Jéhovah mpo na ntango ya nsuka masili kokokana. (Yisaya 55:11) Yango esengeli kopusa biso moko na kolendendela kino tokomona kokokana ya nsuka ya bilaká ya Nzambe na nzela na Yesu Klisto.
Lobiko lobɛlɛmi mpenza koleka na ntango oyo tokómaki bandimi
21. Lisalisi ya nsambo nini tozali na yango mpo na komisɛnzela kati na elimo?
21 Na nsuka, tala lisalisi ya nsambo oyo tozali na yango mpo na komisɛnzela: Tosengeli kobosana te ete lobiko na biso lobɛlɛmi mpenza koleka na ntango oyo tokómaki bandimi. Oyo eleki ntina lisusu, kokumisama na boyangeli ya Jéhovah na molóngó mobimba mpe kokumisama na nkombo na ye ebɛlɛmi mpenza. Na bongo, tosengeli kosala noki mpo na komisɛnzela. Ntóma Paulo akomaki ete: “Boyebi eleko; ngonga ekoki ete bolamuka na mpongi, mpo ete sikawa, lobiko na biso lobɛlɛmi koleka na ntango oyo tokómaki bandimi. Butu eumeli, ntɔngɔ elingi kotana.”—Baloma 13:11, 12, MN.
22. Kobɛlɛma ya lobiko na biso esengeli kozala na bopusi nini likoló na biso?
22 Lokola lobiko na biso lobɛlɛmi, tosengeli komisɛnzela. Tosengeli te kopesa nzela ete makambo na biso moko to ya mosuni, malɛmbisa botɔndi na biso mpo na oyo Jéhovah azali kosala mpo na libota na ye na ntango oyo ya nsuka. (Danyele 12:3) Tosengeli mpenza kolendendela mpo ete topɛngwa te na nzela oyo elakisameli biso na Liloba na Nzambe. (Matai 13:22) Emonani ete, mokili mozali kobika na mikolo na yango ya nsuka. Mosika te, ekolimwa mpo na kotika esika na mokili ya sika ya boyengebene.—2 Petelo 3:13.
23. Motindo nini Jéhovah akosalisa biso, mpe mapamboli nini makozwama na yango?
23 Na bongo, tosengeli mpenza kosala nyonso mpo na komisɛnzela! Tosengeli mpenza kososola eleko oyo tozali kobika kati na yango. Tobosana te ete Jéhovah akokanga miso te na likambo oyo. Kasi, akosalisa biso ntango nyonso ete tomisɛnzela na ntango oyo ya nsuka. Butu eumeli. Ntɔngɔ elingi kotana. Na yango, tomisɛnzela! Tozali pene na komona mokolo oyo moleki mikolo nyonso mosusu na kitoko, mokolo oyo Bokonzi na Masiya ekokokisa mokano na Jéhovah mpo na mabelé!—Emoniseli 21:4, 5.
Bozongeli
◻ Yesu alingaki koloba nini na ntango alobaki ete, mokolo na nkanda ya Nzambe mokoya likoló na bato “lokola motambo”?
◻ Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo ete topɛngwisa makanisi na biso te, mpe lolenge nini tokoki kosala yango?
◻ Motindo na mabondeli nini masengeli mpo na komisɛnzela?
◻ “Lolenge nini ya bosangani ezali na ntina mingi”?
◻ Mpo na nini esengeli kotalela etɛlɛmɛlo na biso kati na elimo?
◻ Na likambo nini bisakweli bizali kosalisa biso na komisɛnzela?