Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/12 nk. 19-24
  • Omilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tóboya elimo ya mafumafu
  • Tóbengana mpɔngi ya elimo
  • Tóboya makambo oyo ekoki kobebisa elimo na biso
  • Salá nyonso mpo na komilɛngɛla
  • Osili komilɛngɛla mpo na Mokolo ya Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Esengo na baoyo balali mpɔngi te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tomisɛnzela na “ntango ya suka”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • “Bókɛngɛlaka”—Ngonga ya kosambisa eyei!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/12 nk. 19-24

Omilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova

“Bómilɛngɛla, mpamba te na ngonga oyo bozali kokanisa te ete ezali yango, Mwana ya moto akoya.”​—MATAI 24:44.

1. Mpo na nini tosengeli kokanisaka mokolo ya Yehova?

EKOZALA mokolo ya etumba mpe ya kobebisa, ya mpasi mpe ya bwale, ya molili mpe ya mawa. “Mokolo monene mpe ya nsɔmɔ” ya Yehova ekoyela mokili oyo mabe, se ndenge Mpela ebomaki mokili mabe na ntango ya Noa. Nsukansuka mokolo yango ekoya. Kasi, “moto na moto oyo akobelela nkombo ya [Yehova] akobika.” (Yoele 2:30-32; Amosa 5:18-20) Nzambe akoboma banguna na ye mpe akobikisa basaleli na ye. Lokola mosakoli Sefania ayebaki ete esengeli kolala mpɔngi te, alobaki boye: “Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbango mpenza.” (Sefania 1:14) Kasi, ntango nini etumbu yango ya Nzambe ekoya?

2, 3. Mpo na nini ezali na ntina tómilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova?

2 Yesu alobaki ete: “Na oyo etali mokolo yango mpe ngonga yango moto moko te ayebi, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata ye moko.” (Matai 24:36) Lokola toyebi mokolo te, ezali na ntina mingi tólanda maloba ya mokapo mpo na mobu 2004 oyo elobi ete: “Bókɛngɛlaka . . . Bómilɛngɛla.”​—Matai 24:42, 44.

3 Mpo na komonisa ete na mwa ntango moke kaka baoyo bamibongisi bakobatelama mpe bamosusu bakotikama, Yesu alobaki boye: “Bato mibale bakozala na kati ya bilanga: moko akokamatama mpe mosusu akosundolama; basi mibale bakozala kotuta na etutelo moko ya mabɔkɔ: moko akokamatama mpe mosusu akosundolama.” (Matai 24:40, 41) Na ntango wana, biso tokozala ndenge nini? Mokolo yango ekokuta biso tomibongisi, to tokosutuka nde kosutuka? Yango ekotalela mingi makambo oyo tozali kosala sikoyo. Mpo tómilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova tosengeli kokima elimo moko oyo bato mingi bazali na yango lelo oyo, mpe koboya bizaleli mosusu oyo bato bazali na yango.

Tóboya elimo ya mafumafu

4. Elimo nini bato bazalaki na yango na mikolo ya Noa?

4 Tótalela mikolo ya Noa. Biblia elobi ete: “Na kondima Noa, nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe na ntina etali biloko oyo emonanaki naino te, amonisaki ezaleli ya kobanga Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa bato ya ndako na ye.” (Baebele 11:7) Ezalaki mbala ya liboso moto atonga masuwa ya ndenge wana mpe bato bazalaki komona yango malamu. Lisusu, Noa azalaki “mosakoli moko ya boyengebene.” (2 Petelo 2:5) Atako bato bamonaki Noa azali kotonga masuwa mpe bayokaki makambo oyo azalaki kosakola, babongwanaki te. Mpo na nini? Mpamba te bazalaki “kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama.” Lokola bato oyo Noa azalaki kosakwela bamipesaki mobimba na makambo na bango mpe na bisengo, “batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.”​—Matai 24:38, 39.

5. Bato ya Sodomo bazalaki na makanisi ya ndenge nini na mikolo ya Lota?

5 Ezalaki mpe bongo na mikolo ya Lota. Biblia elobi na biso ete: “Bazalaki kolya, bazalaki komɛla, bazalaki kosomba, bazalaki kotɛka, bazalaki kolona, bazalaki kotonga bandako. Kasi na mokolo oyo Lota abimaki na Sodoma, mɔtɔ mpe sufulu enɔkaki uta na likoló mpe ebomaki bango nyonso.” (Luka 17:28, 29) Ntango baanzelu bayebisaki Lota ete etikali moke mboka ebomama, Lota abombelaki babokilo na ye te. Kasi, na miso na bango, “azalaki lokola moto azali kosala lisɛki.”​—Genese 19:14, NW.

6. Tosengeli koboya makanisi ya ndenge nini?

6 Yesu alobaki ete ndenge ezalaki na mikolo ya Noa mpe ya Lota, ‘ekozala mpe bongo na mokolo yango ntango Mwana ya moto akomonisama.’ (Matai 24:39; Luka 17:30) Ya solo, lelo oyo bato mingi bazali mafumafu. Tosengeli kokeba mpo tóbendama te na makanisi ya ndenge wana. Kolya malamu mpe komɛla mwa moke ezali mabe te. Ndenge moko mpe, libala ezali ebongiseli ya Nzambe. Kasi, soki totye makambo yango na esika ya liboso na bomoi na biso mpe tozongisi makambo ya elimo nsima, tokoki koloba mpenza ete tomilɛngɛli mpo na mokolo ya nsɔmɔ ya Yehova?

7. Motuna nini ya ntina tosengeli komituna liboso ya kosala likambo moko, mpe mpo na nini?

7 Ntoma Paulo alobaki ete: “Ntango oyo etikali ekómi mokuse. Yango wana tiká baoyo bazali na basi bázala lokola nde bazali na bango te.” (1 Bakolinti 7:29-31) Totikali na ntango moke mpo na kosilisa mosala ya kosakola Bokonzi oyo Nzambe apesi biso. (Matai 24:14) Paulo apesi ata baoyo babalá toli ete bátya likebi na bango mobimba kaka epai ya balongani na bango te, noki te bakozongisa Bokonzi nsima. Tomoni polele ete elimo oyo Paulo azalaki kolendisa ekeseni mpenza na elimo ya mafumafu. Yesu alobaki ete: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe].” (Matai 6:33) Liboso ya kozwa ekateli nyonso to ya kosala ata likambo nini, tosengeli kobosana te komituna motuna oyo: ‘Soki nasali bongo, Bokonzi ekozala kaka na esika ya liboso na bomoi na ngai?’

8. Soki makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo ezwi esika ya liboso na bomoi na biso, tosengeli kosala nini?

8 Tokosala nini soki tomoni ete tosí tomipesi mobimba na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo mpe tobosani makambo ya elimo? Ndenge oyo tozali kotambwisa bomoi na biso ekeseni mpenza te na oyo ya bazalani na biso oyo bayebi Biblia te mpe bazali basakoli ya Bokonzi te? Soki ezali bongo, tosengeli kobondela Nzambe mpo na yango. Yehova akoki kosalisa biso tókóma na elimo oyo ebongi. (Baloma 15:5; Bafilipi 3:15) Yehova akoki kosalisa biso tótya Bokonzi na esika ya liboso, tósala oyo ezali malamu, mpe tókokisa mokumba oyo apesi biso.​—Baloma 12:2; 2 Bakolinti 13:7.

Tóbengana mpɔngi ya elimo

9. Na kotalela Emoniseli 16:14-16, mpo na nini ezali na ntina tóboya kolala mpɔngi na elimo?

9 Esakweli oyo elobeli “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso” oyo ezali koya, na Armagedon, emonisi ete bamosusu bakoki kolala mpɔngi. Nkolo Yesu Klisto alobaki ete: “Talá! Nazali koya lokola moyibi. Esengo na moto oyo azali ekɛngɛ mpe azali kobatela bilamba na ye ya likoló, mpo atambola bolumbu te mpe bátala nsɔni na ye te.” (Emoniseli 16:14-16) Bilamba ya likoló oyo vɛrsɛ yango elobeli elimboli makambo oyo elakisaka bato ete tozali baklisto Batatoli ya Yehova. Kati na yango, tokoki kotánga mosala na biso ya kosakola Bokonzi mpe bizaleli na biso ya boklisto. Soki tokómi kolala mpɔngi, bakoki kolongola biso bilamba oyo ezali komonisa ete tozali baklisto. Yango ezali nsɔni mpe ezali likama. Tosengeli kobengana mpɔngi ya elimo. Ndenge nini tokosala yango?

10. Mpo na nini kotánga Biblia mokolo na mokolo esalisaka mpo tólala mpɔngi te na elimo?

10 Biblia ezali mbala na mbala komonisa ete tosengeli kolala mpɔngi te mpe kobatela makanisi na biso. Na ndakisa, Baevanzile elobi na biso boye: “Bókɛngɛlaka” (Matai 24:42; 25:13; Malako 13:35, 37); “bómilɛngɛla” (Matai 24:44); “bókebaka, bólala mpɔngi te” (Malako 13:33); “bózalaka na ekenge tango nyonso” (Luka 12:40, Bible na Lingala ya lelo oyo). Nsima ya koloba ete mokolo ya Yehova ekoya na mbalakaka, ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bandimi ete: “Tiká ete tólala mpɔngi te lokola bamosusu basalaka, kasi tózala nde ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso.” (1 Batesaloniki 5:6) Na mokanda ya nsuka ya Biblia, Klisto Yesu oyo azwi nkembo amonisi mpenza ete akoya na mbalakaka na maloba oyo: “Nazali koya nokinoki.” (Emoniseli 3:11; 22:7, 12, 20) Lisusu, basakoli mingi Baebele balobelaki mokolo monene ya kosambisa ya Yehova mpe bapesaki makebisi mpo na yango. (Yisaya 2:12, 17; Yilimia 30:7; Yoele 2:11; Sefania 3:8) Kotánga Biblia, Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, mpe komanyola makambo oyo tozali kotánga esalisaka mpenza tólala mpɔngi te na elimo.

11. Mpo na nini koyekola Biblia biso moko ezali na ntina mpo tólala mpɔngi te na elimo?

11 Koyekola malamumalamu Biblia na nzela ya mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” esalisaka biso mpenza mpo tólala mpɔngi te na elimo! (Matai 24:45-47) Kasi, mpo koyekola ememela biso matomba, tosengeli kosalaka yango mbala na mbala mpe kolɛmba te. (Baebele 5:14–6:3) Tosengeli mbala na mbala kolyaka bilei makasi ya elimo. Na mikolo na biso, tokoki kozala na mokakatano ya kozwa ntango mpo na kosala yango. (Baefese 5:15, 16) Kasi, esengeli te tótángaka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia kaka na ntango motema elingi. Ezali na ntina mingi tóyekolaka ntango nyonso mpo tótikala “makasi na kati ya kondima” mpe tólala mpɔngi te.​—Tito 1:13.

12. Ndenge nini makita ya lisangá, mayangani ya minene mpe ya mike esalisaka biso tóbengana mpɔngi ya elimo?

12 Makita ya lisangá, mayangani ya minene mpe ya mike esalisaka biso mpe tóbengana mpɔngi ya elimo. Na ndenge nini? Na nzela ya mateya oyo toyokaka kuna. Na makita mpe mayangani yango, bazongelaka biso mbala na mbala ete mokolo ya Yehova ekómi pene. Makita ya pɔsɔ na pɔsɔ na lisangá epesaka biso mpe mabaku ya ‘kopusama na bolingo mpe na misala ya malamu.’ Kopusama, to kolendisama ndenge yango, esalisaka biso tólala mpɔngi te na elimo. Yango wana, basɛngi biso tóyanganaka mbala na mbala lokola ‘tozali komona mokolo yango ezali kokóma pene.’​—Baebele 10:24, 25.

13. Ndenge nini mosala ya kosakola esalisaka biso mpo tólala mpɔngi te na elimo?

13 Tozwaka mpe lisalisi mosusu mpo tólala mpɔngi te na elimo ntango tozali komipesa na mosala ya kosakola. Lolenge eleki malamu ya kobatela na makanisi bilembo ya ntango mpe ndimbola na yango ezali koyebisa yango bato mosusu! Ntango mpe tozali komona bato oyo tozali koyekola na bango Biblia bazali kokola mpe bazali kosalela makambo oyo bazali koyekola, biso moko tokomona ete oyo ezali ntango ya kolala mpɔngi te. Ntoma Petelo alobaki ete: “Bóbongisa makanisi na bino mpo na mosala, bóbatela makanisi na bino mobimba.” (1 Petelo 1:13) ‘Kozala ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo’ ezali ndenge malamu ya kobengana mpɔngi ya elimo.​—1 Bakolinti 15:58.

Tóboya makambo oyo ekoki kobebisa elimo na biso

14. Ndenge elobami na Luka 21:34-36, Yesu akebisaki mpo na makambo nini?

14 Na esakweli monene oyo alobelaki elembo ya kozala na ye, Yesu apesaki likebisi mosusu. Alobaki boye: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, mpe ete na pwasa mokolo wana ekwela bino na ntango wana kaka lokola motambo. Mpo yango ekoyela baoyo nyonso bafandaka na etando ya mabelé mobimba. Boye, bólala mpɔngi te, kopesáká malɔmbɔ ntango nyonso mpo bólonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.” (Luka 21:34-36) Yesu atángaki makambo mpenza oyo bato mingi bamipesi na yango: kolekisa ndelo na kolya, kolangwa masanga, mpe bomoi oyo ememelaka moto mitungisi.

15. Mpo na nini tosengeli koboya kolekisa ndelo na kolya mpe komɛla?

15 Biblia eboyi kolekisa ndelo na kolya mpe komɛla, mpe tosengeli koboya yango. Na ndakisa elobi ete: “Zalá elongo na bamɛli na masanga te, soki elongo na bato te baoyo bakolyaka mosuni na mposa mabe.” (Masese 23:20) Kasi, mpo kolya mpe komɛla ekóma likama mpo na elimo, esɛngi kaka te moto akóma naino kolekisa ndelo. Kolya mpe komɛla ekoki komemela moto mpɔngi ya elimo mpe kokómisa ye gɔigɔi liboso kutu akóma kolekisa ndelo. Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Molimo ya moto ya gɔigɔi ezali na mposa kasi akozwaka eloko te.” (Masese 13:4) Moto ya ndenge yango akoki kozala na mposa ya kosala mokano ya Nzambe kasi, lokola azali na bopɔtu, mposa na ye ekokokisama te.

16. Ndenge nini tokoki koboya ete komitungisa mpo na bamposa ya libota na biso ekómela biso kilo?

16 Mitungisi ya bomoi oyo Yesu alobelaki na likebisi na ye ezali nini? Tokoki kotánga mabanzo ya moto ye moko, koleisa libota, mpe makambo mosusu ya ndenge yango. Tokomonisa bwanya te soki totiki ete makambo yango ekómela biso kilo na motó. Yesu alobaki boye: “Nani na kati na bino na komitungisáká akoki kobakisa mwa lipeko moko na bolai ya bomoi na ye?” Apesaki toli oyo: “Bómitungisa soki moke te mpe bóloba te ete, ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo mosusu balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na mposa ya biloko nyonso wana.” Soki tozali koluka liboso Bokonzi mpe tozali kotya elikya ete Yehova akokokisa bamposa na biso, tokomitungisa mingi te mpe tokolala mpɔngi te na elimo.​—Matai 6:25-34.

17. Ndenge nini koluka biloko ya mokili ekoki komemela moto mitungisi?

17 Koluka biloko mingi ya mokili ekoki mpe komemela biso mitungisi. Na ndakisa, bato mosusu bamilukelaka mindɔndɔ mpo balingi kaka makambo mineneminene. Bato mosusu bazali koluka ndenge oyo bakoki kokóma mbala moko bazwi to mpe bazali kondima kosala mimbongo oyo ekoki komɛla bango mbongo nyonso. Mpo na bato mosusu, motambo na bango ekómi kotánga bakelasi milaimilai mpo na kokóma na bozwi. Toboyi te, kotánga bakelasi ya malonga ezali na ntina mpo na kozwa mosala. Kasi, bato mosusu bamibebisi na elimo mpo bapesaki ntango mingi na bakelasi milaimilai. Lokola mokolo ya Yehova ekómi pene, bomoi ya ndenge wana ezali mpenza likama! Biblia epesi likebisi oyo: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama.”​—1 Timote 6:9.

18. Tosengeli kolona likoki nini mpo tóbendama te na mposa ya koluka biloko mingi ya mokili?

18 Mpo tóbendama te na mposa ya koluka biloko mingi ya mokili, tosengeli kolona likoki ya kokesenisa mabe ná malamu. Tokolisaka likoki yango ntango tozali kolya ‘bilei ya makasi oyo ezali mpo na bato oyo bakɔmeli’ mpe ntango tozali ‘kosalela makoki na biso ya kososola.’ (Baebele 5:12, 14) Lisusu, soki tozali kotya ‘makambo oyo eleki ntina’ na esika ya liboso, ekosalisa biso tópona banzela ya mabe te.​—Bafilipi 1:10.

19. Soki tomoni ete tozali na ntango moke mpo na makambo ya elimo, tosengeli kosala nini?

19 Koluka biloko mingi ya mokili ekoki kozipa biso miso mpe kotikela biso ntango moke mpo na makambo ya elimo. Ndenge nini tokoki komitalela mpe kokima motambo ya bomoi ya ndenge wana? Tosengeli kokanisa na nzela ya mabondeli ndenge oyo tokoki kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ. Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala alobaki ete: “Mpɔngi ya moto ya mosala ezali kitoko ata alei moke to mingi; kasi biloko mingi na mozwi ekopekisa mpɔngi na ye.” (Mosakoli 5:12) Kozala na biloko mosusu oyo ezali mpenza na ntina te ezali nde kozwa biso ebele ya ntango mpe makasi? Soki tozali na biloko mingi, ekoluka mpe ntango mingi mpo na kobongisa mpe kobatela yango. Ekoki nde kozala na litomba na biso soki tolongoli biloko mosusu mpo bomoi na biso ekóma pɛpɛlɛ?

Salá nyonso mpo na komilɛngɛla

20, 21. (a) Elikya nini ntoma Petelo apesi mpo na mokolo ya Yehova? (b) Esengeli tósalaka misala nini mpo na komilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova?

20 Mokili ya ntango ya Noa esukaki; ndenge moko mpe, mokili oyo ekosuka. Ntoma Petelo alobi na biso boye: “Mokolo ya Yehova ekoya lokola moyibi, oyo na kati na yango likoló ekoleka na lokito makasi, kasi biloko na yango lokola ekokóma mɔtɔ makasi ekosilela, mpe mabelé mpe misala na kati na yango ekomonisama polele.” Ezala likoló ya elilingi, elingi koloba baguvɛrnema ya mokili, to mabelé ya elilingi, elingi koloba bato oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ, moko te ekobika na nkanda ya Nzambe oyo ekopela lokola mɔtɔ. Mpo na komonisa biso ndenge oyo tokoki komilɛngɛla mpo na mokolo yango, Petelo alobaki boye: “Lokola biloko nyonso wana esengeli kosilela bongo, bosengeli kozala bato ya ndenge nini na misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kozeláká mpe kobateláká na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova!”​—2 Petelo 3:10-12.

21 Na kati ya misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe tokoki kotánga koyangana na makita ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ mpe kosakola nsango malamu. Tiká tómipesa mobimba epai ya Nzambe mpo na kosala yango wana tozali kozela na motema molai mokolo monene ya Yehova. Tiká ‘tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo nsukansuka [Nzambe] akuta biso kozanga litɔnɔ mpe kozanga mbeba mpe na kati ya kimya.’​—2 Petelo 3:14.

Ozali koyeba Lisusu?

• Mpo na nini tosengeli komilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova?

• Soki makambo ya bomoi ekómi lobanzo na biso ya liboso, tosengeli kosala nini?

• Nini ekosalisa biso tóbengana mpɔngi ya elimo?

• Tosengeli kokima makambo nini oyo ekoki kobebisa elimo na biso, mpe na ndenge nini?

[Bililingi na lokasa 21]

Bato ya ntango ya Noa batyelaki etumbu oyo ezalaki koya likebi te​—yo otyaka likebi?

[Elilingi na lokasa 23]

Okoki nde kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ mpo ozala na ntango mingi mpo na makambo ya elimo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto