Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/6 nk. 5-8
  • Lolenge oyo kondima ekoki kosalisa mobɛ́li

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge oyo kondima ekoki kosalisa mobɛ́li
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondima ekoki kosalisa biso ntango tozali kozwa maladi?
  • Ezali boni mpo na kobikisama na nzela ya bikamwiseli?
  • Ntango ya kobikisama na solo
  • Kobikisama ya bato na nzela ya ekamwiseli ebɛlɛmi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Nzambe andimaka kobikisama ya bato na nzela na bikamwiseli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Makamwisi ya kobikisa bato
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • ‘Makamwisi ya kobikisa’ bato eutaka epai ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/6 nk. 5-8

Lolenge oyo kondima ekoki kosalisa mobɛ́li

MASOLO ya kobikisama na nzela na bikamwiseli oyo mazwami kati na Biblia mazali kondimisa biso likambo moko: Nzambe azali kosepela na bolamu na biso; lisusu, masolo yango mazali komonisa nguya na ye ya kobikisa. Lokola kobikisama wana na nzela na bikamwiseli ezalaki kokumisa Nzambe mpe ezalaki liziba monene ya esengo, ezali malamu na komituna ete: likabo ya kobikisa na nzela na elimo santu ezali mpe kolanda mosala na yango na mikolo na biso oyo?

Eyano na motuna oyo ezali ete te, mpe ntina na yango ekoki kokamwisa bato basusu. Bikamwiseli ya kobikisa bato oyo bisalemaki na ekeke ya liboso bikokisaki mokano na yango. Dictionnaire illustré de la Bible (angl.) ezali komonisa na elonga nyonso ete: “Ntina ya kobikisa na nzela na bikamwiseli ezalaki mpo na makambo ya Nzambe, kasi ya monganga te.” Nini ezalaki mwa bamoko na bantina yango ya makambo na Nzambe?

Ya liboso, kobikisama na nzela na bikamwiseli oyo Yesu asalaki esalisaki bato na koyeba ye ete azalaki Masiya. Mpe nsima na liwa na ye, yango epesaki nzela na komonisa ete lipamboli na Nzambe lizalaki likoló na lisangá ya boklisto oyo eutaki kosalema sika. (Matai 11:2-6; Baebele 2:3, 4) Lisusu, yango emonisaki ete elaka na Nzambe mpo na kobikisa bato kati na mokili ya sika ekokokana. Ezali mpenza kolendisa kondima na biso ete ntango ekoya oyo “mofandi moko akoloba te ete: ‘Ngai nazali na maladi.’ Bafandi nyonso na mokili wana bakolimbisama masumu na bango.” (Yisaya 33:24) Lokola mikano wana ya ekeke na liboso misilaki kokokisama, bikamwiseli bizalaki lisusu na ntina te.

Tosimba likambo oyo ete bayekoli na Yesu ya ekeke na liboso bango moko mpe bazalaki na bokono oyo bosalisamaki te na nzela na ekamwiseli. Ezali elembeteli mosusu emonisi ete kobikisama na nzela na bikamwiseli oyo Yesu mpe bantóma basalaki, ezalaki mpo na koteya solo minene, kasi ezalaki te mpo na kopesa lisalisi ya minganga. Epai na Timote, ye oyo azalaki na mwa bokono mingi, Paulo asengaki na ye ete asalela vinyo lokola nkisi, kasi ezalaki te kobikisama na nzela na ekamwiseli. Paulo, oyo abikisaki bato na nzela na bikamwiseli, abikisamaki te na “monzube kati na nzoto” oyo ezalaki ‘kotungisa’ ye mbala na mbala.​—2 Bakolinti 12:7; 1 Timote 5:23.

Likabo ya kobikisa esukaki wana bantóma bakufaki. Paulo ye moko alobaki ete ekozala ndenge yango. Kokokanisaka lisangá na boklisto na mwana moke, akomaki ete: “Ezalaki ngai mwana, nalobaki lokola mwana, nakanisaki lokola mwana, nabongisaki makambo lokola mwana. Kasi sikawa lokola nakomi mokolo natiki makambo ya bomwana.” Ntina ya lisese oyo ezalaki mpo na komonisa ete makabo na bikamwiseli ya elimo mazalaki kati na bomwana ya lisangá na boklisto. Ezalaki “makambo oyo mazali komonisa mwana moke.” Yango wana Paulo alobaki ete: “[Makabo na bikamwiseli] ekosuka.”​—1 Bakolinti 13:8-11.

Kondima ekoki kosalisa biso ntango tozali kozwa maladi?

Atako tozali kotya motema na kobikisama na bikamwiseli te, ezali mpenza malamu na kobondela Nzambe mpo na kosenga ye ete asalisa biso ntango tozali na maladi. Mpe ezali mpenza mabe te ete bato basusu babondela mpo na biso. Kasi mabondeli masengeli kozala ya solo mpe na boyokani na mokano na Nzambe. (1 Yoane 5:14, 15) Ezali na esika moko te oyo Biblia ezali kosenga biso ete tobondela mpo na kobikisama na nzela na ekamwiseli.a Tozali kobondela nde mpo na kosenga Jéhovah lisalisi na ye litondi na bolingo na ntango ya mpasi oyo euti na maladi.

Biblia emonisi eloko nini basembwi bakoki kosenga kati na mabondeli na bango ntango bazali na maladi; tozali kotanga ete: “Jéhovah akolendisa ye na mbeto na ye na maladi; kati na maladi na ye okobikisa ye na mpasi.” (Nzembo 41:3) Kokanisa na mozindo likoló na Liloba na Nzambe ekosalisa baoyo bazali konyokwama na maladi oyo esangani na konyokwama na makanisi. Mokomi na nzembo akomaki ete: “E Jéhovah, boboto na yo esimbaki ngai. Wana ebele na makanisi etungisaki ngai, mabondi na yo masepelisaki molimo na ngai.”​—Nzembo 94:18, 19; tala mpe Nzembo 63:6-8.

Lisusu, esengeli na biso komonisa elimo ebongi mpo na oyo etali kolongono na biso ya nzoto, mpe Biblia ezali kopesa biso toli mingi na ntina yango. Ezali malamu mingi kozala na bomoi na boyokani na mitinda na Biblia na esika ya komela drogue, likaya, masanga to kolya na lokoso, bongo na nsima, ntango ozwi maladi, omibalola na mawa nyonso epai na kobikisama na nzela na bikamwiseli. Na esika ya kobondela mpo ete ekamwiseli moko esalema na ntango tozwi bokono, ebongi malamu kozala na etamboli moko ya mayele mpo na kopengola maladi, soki ekoki na yo, kosala yango; na ndakisa, kolya bilei bizali kotonga nzoto ntango soki ekoki kozwama, to koluka lisalisi malamu ya monganga soki ezali.

Liloba na Nzambe ezali mpe kolendisa biso na kolona ezaleli na peto kati na makanisi, oyo ekoki kozala na litomba mpo na kolongono ya nzoto na biso. Tala oyo mokanda na Masese ezali kopesa lokola toli: “Motema na kimya ekoyeisela mosuni bomoi; kasi zuwa ekopolisa mikwa.” “Motema na kosepela ekosalaka malamu lokola nkisi; nde elimo etutami ekokaukisa mikwa.” (Masese 14:30; 17:22) Kobondela mpo na kosenga ete elimo santu ekolisa kati na biso elimo moko ya kimya mpe esengo ekoki kobimisa matomba malamu likoló ya kolongono na biso ya nzoto.​—Bafilipi 4:6, 7.

Ezali boni mpo na kobikisama na nzela ya bikamwiseli?

Ya solo, ata soki ezalela na biso epesi nzela na kozala na bomoi ya peto, tokoki uta bongo kozwa maladi mokolo mosusu. Na bongo tokosala nini? Tokoki komibendela likama soki tokei koluka mobikisi moko na elikya ya kobikisama? Ee. Ezali mpasi mpo ete babikisi ya ntango na biso basalisa bato bobele mpamba, kozanga koluka lifuta. Ekoki mpe kozala ete mosolo oyo tokopesa na mobikisi moko ezali mingi koleka oyo ekoki kosalelama mpo na nkisi ya monganga. Lisusu, mpo na nini kopesa mosolo epai na bato oyo bazali kozwa litomba na kondimandima ya bato?

Bato mosusu bakoki komilongisa ete misala na kobikisa na nzela na bikamwiseli mizali mpenza na ntina na yango mpamba te mwa ndambo ya bato, ata soki ezali ya moke, oyo bazali kokende epai ya “babikisi” bazali kobika. Kasi tokoki komituna soki babikisi bazali mpenza kobikisa solo mpo na libela. Encyclopédie britannique elobi ete: “Mingimingi bolukiluki bobele moke esalemaki likoló na makambo mingi mpe mazangi koyebana oyo makotisami kati na likambo ya kobikisa na nzela na bikamwiseli.”

Ata soki mwa ndambo moke na bato bamonani lokola ete bazali kobikisama, yango ezali elembeteli te ya mosala na elimo santu. Kati na Lisolo na ye likoló na ngomba, Yesu alobaki ete: “Mingi bakoloba na ngai na mokolo yango: ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te? Tobimisaki bilimu mabe na nkombo na yo te? Mpe na nkombo na yo tosalaki misala na nguya te?’ Nakoyambola liboso na bango ete: Nayebi bino soko moke te! Bolongwa na ngai, bino bato bozali kotyola mibeko.” (Matai 7:22, 23, MN) Alobaki mpe lisusu ete bato mosusu, atako bandimami te epai na Nzambe, bakobenda likebi likoló na bango moko na nzela na bilembo: “Mpo ete baklisto na lokuta mpe basakoli na lokuta bakotɛlɛma mpe bakomonisa bilembo mpe bikamwiseli minene mpo na kopengwisa ata baponami, soki likoki ezali.” (Matai 24:24, MN) Tokoki mpe kokokisa maloba wana epai na babikisi ya ntango na biso, elongo na bateyatre na bango oyo bazali kosala, na bosengi na bango ya mosolo ntango nyonso mpe kobikisa na bango na nzela na bikamwiseli ya nkombo mpamba.

Bato motindo wana bazali komekola Yesu te. Na bongo bazali komekola nani? Ntóma Paulo apesi biso elembo moko ntango alobi ete: “Satana akomimonisaka lokola ntoma na moi. Na bongo ezali likambo ya kokamwa te soko basali na ye bakomimonisa lokola basali na boyengebene. Nsuka na bango ekozala pelamoko na misala na bango.” (2 Bakolinti 11:14, 15) Soki babikisi bazali kopesa te libiki oyo bazali komikumisa mpo na yango, na bongo bazali bakosi, kotambolaka na nzela na Satana, ye oyo “azali kozimbisa mokili mobimba na bato.” (Emoniseli 12:9) Kasi, soki nde bazali kobikisa mwa ndambo moke na bato na nzela na bikamwiseli? Tosengeli kosukisa te ete “misala” na bango “ya nguya” misalemi na nguya ya Satana mpe ya bilimu mabe? Ee, ezali yango mpenza nde ezali kosalema!

Ntango ya kobikisama na solo

Ezali na lisalisi ya elimo santu na Nzambe nde Yesu asalaki bikamwiseli ya kobikisa bato. Emonisaki ete Nzambe azali na mokano ya kosilisa mikakatano mitali kolongono ya nzoto ya bato na ntango oyo asili kobongisa. Jéhovah alaki “kobikisama na mabota.” (Emoniseli 22:2) Akobikisa bobele maladi te, kasi akolongola liwa. Yoane alimboli ete Yesu ayaki “mpo ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Oyo nde libiki kitoko! Yesu akosala lisusu bikamwiseli mpo na kobikisa bato mingi lokola oyo eyebisami kati na Biblia. Akosekwisa ata bakufi! (Yoane 5:28, 29) Yango ekosalema ntango nini?

Ntango mokili na sika ya Nzambe ekotyama, mpe emonani ete, esili kobelema. Mokili wana ya sika, oyo ekotyama nsima na kolimwa libela ya mabe oyo ezali kati na ebongiseli ya biloko na ntango oyo, ekozala lipamboli ya solo mpo na bato ya motema sembo. Ekozala mokili moko mozangi mpasi. “[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:4) Oyo nde likeseni monene na oyo tozali komona zingazinga na biso lelo!

Na yango, soki ozali na maladi, bondela Nzambe mpo na kosenga ye ete asunga yo. Mpe, ezala ete ozali na maladi to na nzoto kolongono, yekola ndenge nini okoki kozwa bomoi ya seko kozanga kozala lisusu na maladi. Lendisa kondima na yo kati na elaka oyo ya kotyela motema Nzambe apesi biso, na koyekolaka mikapo mingi ya Biblia miye mizali kolobela yango. Yekola lolenge nini mokano na Nzambe ezali pene na kokokana kati na likambo yango na boyokani na manaka na ye. Kobeta ntembe te, mpamba te Liloba na Nzambe ezali kopesa biso endimiseli oyo: “Akosilisa kufa libela mpe Nkolo Moyangeli Jéhovah akokomba mpisoli na bilongi nyonso.”​—Yisaya 25:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Basusu bazali kokanisa ete maloba oyo mazwami na Yakobo 5:14, 15 matali kobikisama ya bikamwiseli. Kasi maloba mazwami zingazinga mamonisi ete Yakobo azali kolobela awa maladi ya elimo. (Yakobo 5:15b, 16, 19, 20) Azali kopesa toli epai na baoyo kondima elembi ete basenga lisalisi ya bankulutu.

[Elilingi na lokasa 7]

Misala na kobikisa na nzela na bikamwiseli oyo misalamaki na Yesu mikokisaki mokano na yango

[Elilingi na lokasa 8]

Yesu akozongela mpe akobakisa lisusu mingi misala na kobikisa na nzela na bikamwiseli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto