‘Makamwisi ya kobikisa’ bato eutaka epai ya Nzambe?
NA MIKILI mingi, bato bakendeke na bisika oyo babengaka mosantu, epai bato mingi balobaka ete babikisamá na “maladi oyo ezangá nkisi.” Nzokande, na bisika mosusu banganga-nkisi balobaka ete babikisaka bato na nzela ya nguya ya bilimo. Na bisika mosusu, bakampanye esalemaka, epai okomona bibɔsɔnɔ oyo batambolaka na velo batiki bavelo na bango mpe baoyo batambolaka na nzete babwaki yango mpe bazali koganga ete babiki.
Baoyo basalaka makamwisi yango bazali na mangomba ndenge na ndenge, mpe mbala mingi babenganaka bapɛngwi, bato ya lokuta to bapakano. Na yango, motuna oyo tokoki komituna yango oyo: “Nzambe akoki kosala makamwisi na nzela ya mangomba ebele oyo ezali na boyokani te?” Kutu, Biblia elobi ete: “Nzambe azali Nzambe, ya mobulu te, kasi ya kimya.” (1 Bakolinti 14:33) Na yango, ‘makamwisi’ oyo ezali kosalema lelo eutaka mpenza epai ya Nzambe? Bato mosusu oyo basalaka makamwisi yango balobaka ete bazali kobikisa bato na nguya ya Yesu. Tótala naino ndenge Yesu azalaki kobikisa bato.
Ndenge oyo Yesu azalaki kobikisa bato
Lolenge oyo Yesu azalaki kobikisa bato ekeseni mpenza na oyo bato bazali kosala lelo. Na ndakisa, Yesu azalaki kobikisa moto nyonso oyo ayei koluka lobiko epai na ye. Azalaki te kopona bato ya kobikisa mpe kozongisa basusu kozanga kobikisa bango. Kobikisa oyo Yesu azalaki kobikisa bato ezalaki ya ndambo te mpe mbala mingi azalaki kosala milulu ebeleebele te. Biblia elobi ete: “Ebele nyonso wana ya bato bazalaki koluka kosimba ye, mpamba te nguya ezalaki kobima epai na ye mpe kobikisa bango nyonso.”—Luka 6:19.
Na bokeseni na bato oyo bazali kobikisa bato lelo, oyo mbala mingi bayebisaka bato ya maladi ete babiki te mpo bazangi kondima, Yesu azalaki kobikisa moto nyonso, ezala ata oyo andimelaki ye naino te. Na ndakisa, mokolo moko Yesu akutanaki na moto moko oyo akufá miso mpe, atako moto yango asɛngaki te, Yesu abikisaki ye. Na nsima, Yesu atunaki ye boye: “Ozali kondimela Mwana ya moto?” Moto yango ayanolaki ete: “Tata, ye azali nani mpo ngai nandimela ye?” Yesu alobaki na ye ete: “Moto oyo azali koloba na yo ezali ye.”—Yoane 9:1-7, 35-38.
Mbala mosusu okoki komituna boye: ‘Soki Yesu azalaki kosɛnga te ete bato bázala na kondima mpo abikisa bango, mpo na nini azalaki koloba na baoyo abikisaki ete: “Kondima na yo esali ete oyoka malamu”?’ (Luka 8:48; 17:19; 18:42) Ntango Yesu azalaki koloba bongo, azalaki komonisa ete baoyo bazalaki na kondima, bazalaki koluka ye mpo babikisama, nzokande baoyo baboyaki koluka ye babikisamaki te. Baoyo bazalaki kobikisama, bazalaki kobikisama te mpo na kondima na bango; bazalaki nde kobikisama na nguya ya Nzambe. Mpo na Yesu, Biblia elobi ete: “Nzambe apakolaki ye na elimo santu mpe na nguya, mpe akatisaki mokili yango mobimba kosaláká malamu mpe kobikisáká baoyo nyonso banyokolami na Zabolo; mpamba te Nzambe azalaki elongo na ye.”—Misala 10:38.
Mbala mingi lelo, esɛngaka kozala na mbongo mpo bábikisa yo. Bato oyo babikisaka bato bayebani ete bazalaka makasi mpo na kobenda bato mbongo. Zulunalo moko elobaki ete moko ya babikisi yango, azwaki mbongo dolare milio 89 na makamwisi oyo asalaki na boumeli ya mbula moko mpamba. Mangomba ezwaka mpe mbongo mingi epai ya bato oyo bakendeke na bisika oyo babengaka mosantu mpo na kobikisama. Nzokande, Yesu azalaki kosɛnga bato oyo azalaki kobikisa mbongo te. Mbala mosusu kutu ye nde azalaki kopesa bango biloko ya kolya. (Matai 15:30-38) Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye bákende kosakola, alobaki na bango ete: “Bóbikisa bato ya maladi, bósekwisa bakufi, bópɛtola bato ya maba, bóbimisa bademo. Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Matai 10:8) Mpo na nini lolenge oyo bato bazali kosala makamwisi lelo ekeseni na oyo ya Yesu?
Nguya ya “kobikisa” bato eutaka wapi?
Na boumeli ya bambula, minganga mingi balukaki koyeba ndenge bato ya mangomba basalaka makamwisi mpo na kobikisa bato. Bamonaki nini? Zulunalo moko ya Londres (Daily Telegraph) elobi ete monganga moko ya Angleterre, oyo alekisaki mbula 20 na koyekola likambo yango, alobaki boye: “Makambo oyo balobaka ete babikisaka bato na ndenge ya kokamwa eyokani ata moke te na mayele ya minganga.” Atako bongo, bato mingi bandimaka na motema moko ete babikisamá na biloko mosantu to na bakonzi ya mangomba. Ekoki kozala ete bakosaki bango?
Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu alobaki ete bato ya lokuta ya mangomba bakoloba na ye ete: “Nkolo, Nkolo, tosalaki . . . misala ya nguya na nkombo na yo te?” Kasi, akoyanola bango ete: “Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato ya misala ya botyoli-mibeko.” (Matai 7:22, 23) Nguya oyo bato wana batutelaka ntolo eutaka wapi? Ntoma Paulo alobaki ete: “Kozala ya motyoli-mibeko ezali engebene mosala ya Satana elongo na misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya mpe na bokosi nyonso ezangi boyengebene.”—2 Batesaloniki 2:9, 10.
Longola yango, nguya ya “kobikisa” oyo bato bazali kosalela na nzela ya biloko mosantu ekoki kouta ata moke te epai ya Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te Liloba ya Nzambe elobi polele ete: “Bókima losambo ya bikeko” mpe “bókeba na bikeko.” (1 Bakolinti 10:14; 1 Yoane 5:21) Nguya wana ya “kobikisa” ezali moko ya mayele mabe oyo Satana azali kosalela mpo na kopɛngwisa bato na losambo ya solo. Biblia elobi ete: “Satana ye moko azali kokoba komibimisa lokola anzelu moko ya pole.”—2 Bakolinti 11:14.
Ntina oyo Yesu ná bantoma na ye bazalaki kobikisa bato
Makamwisi ya kobikisa bato oyo Makomami ya Grɛki ya boklisto elobeli emonisaki polele ete Yesu ná bantoma na ye bazali bato ya Nzambe. (Yoane 3:2; Baebele 2:3, 4) Makamwisi oyo Yesu azalaki kosala ezalaki komonisa ete nsango oyo azalaki kosakola ezali solo: “Akendaki epai na epai na Galilai mobimba, koteyáká na kati ya basinagoga na bango mpe kosakoláká nsango malamu ya bokonzi mpe kobikisáká ndenge nyonso ya maladi.” (Matai 4:23) Misala ya nguya oyo Yesu asalaki esukaki kaka te na kobikisa bato, kasi aleisaki mpe bango, akitisaki mipɛpɛ mpe asekwisaki bakufi; mpe yango emonisaki oyo akosala mpo na bato ya botosi na boyangeli na ye. Oyo nde nsango kitoko!
Nzokande, nsima ya liwa ya Yesu, ya bantoma mpe ya moto nyonso oyo bapesaki nguya yango, misala wana ya nguya to makabo ya elimo esukaki. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ezala makabo ya bisakweli, ekolongolama; ezala [koloba minɔkɔ na ndenge ya kokamwa], ekosuka; ezala boyebi [oyo euti na Nzambe], ekolongolama.” (1 Bakolinti 13:8) Mpo na nini? Lokola makabo yango nyonso ekokisaki mokano na yango, elingi koloba emonisaki ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki mpe ete Nzambe andimaki lisangá ya baklisto, misala ya nguya, ezala mpe kobikisa bato, ezalaki lisusu na ntina te; ‘elongolamaki.’
Lisusu, makamwisi oyo Yesu azalaki kosala ya kobikisa bato ezali na nsango moko ya ntina mpenza mpo na biso lelo. Soki totyeli nsango yango likebi mpe tondimi makambo oyo Yesu ateyaki na ntina ya Bokonzi ya Nzambe, tokozala na elikya ete esakweli oyo elandi ekokokisama na elimo mpe na nzoto: “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.”—Yisaya 33:24; 35:5, 6; Emoniseli 21:4.