Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/9 lok. 4
  • Mabongoli ya Biblia na nkotá ya Afrika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabongoli ya Biblia na nkotá ya Afrika
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Mosala monene ya kobimisa Biblia na minɔkɔ ya Afrika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Buku mpo na bato nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Na mokili mobimba, bato ebele bazali kosepela na Libongoli ya Mokili ya Sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/9 lok. 4

Mabongoli ya Biblia na nkotá ya Afrika

Mabongoli ya liboso ya Biblia na mobimba na yango na lokotá moko ya Afrika, esalemaki na Ezipito. Mabongoli yango, oyo ekanisami ete esalemaki na ekeke ya misato to na ekeke ya minei, ebéngamaki versions coptes. Soko bikeke misato na nsima, Biblia ebongolamaki na lokotá ya Etiopia.

Ebele na minoko misusu mizalaki kolobama na sud ya Etiopia mpe na Sahara, oyo ekomamaki na mikanda te, eyaki kokomama bobele ntango bamisionere bayaki na ekeke ya zomi na libwa. Litambe monene lisalemaki na mobu 1857, ntango Robert Moffat asilisaki kobongola Biblia na lokotá Tswana, oyo elobami na ngele ya Afrika. Na nsima, anyataki yango eteni na eteni na enyateli moke oyo esalelami na mabɔkɔ. Biblia ya liboso oyo enyatamaki na Afrika na mobimba na yango, ebimaki mpe ezalaki libongoli mobimba ya liboso na lokotá moko ya Afrika oyo ezalaki liboso kokomama na mikanda te. Likambo oyo libendaki likebi ezali oyo ete, Moffat asalelaki nkombo ya Nzambe Yehova na libongoli na ye. Na libongoli oyo libimisamaki na 1872 na Société biblique britannique et étrangère, nkombo Yehova ezwami kati na maloba ya ntina oyo Yesu alobaki, lokola oyo ekomami na Matai 4:10 mpe na Malako 12:29, 30.

Kino na mobu 1990, Biblia esilaki kobongolama na mobimba na yango na nkotá 119 ya Afrika, mpe na ndambo na yango ebongolami na minoko misusu 434.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto