Masoló ya basakoli na bokonzi
Bampate na Yesu bakoyokaka mongongo na ye
AWA mosala ya kosakola mozali kokola kino biteni nyonso ya mabelé, Jéhovah azali kosalela baanzelu mpo na kokamba basaleli na ye epai na bato oyo bakokani na bampate. Bato yango bazali koyoka mongongo na Yesu mpe bazali kosalela ye na elikya ya kozwa bomoi ya seko. Na Yoane 10:27, 28, Yesu alobaki ete: “Bampate na ngai bakoyokaka mongongo na ngai mpe ngai nayebi bango, mpe bakobilaka ngai. Nazali kopesa bango bomoi ya seko.” Tala motindo nini bato na motema sembo bayokaki mongongo na Yesu na esanga ya Madagascar.
Témoin de Jéhovah moko apesaki mikanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis mpe Votre jeunesse—Comment en tirer le meilleur parti, epai na monganga oyo ayaki kosalisa tata na ye.
Monganga yango azalaki protestá, mpe azalaki motemeli monene ya Batemwe, kasi atangaki mokanda yango mpe alukaki mikapo kati na Biblia na ye moko. Mwasi na ye, oyo azalaki mokatolike mpe lisusu monganga, atangaki mbala na mbala mokanda Votre jeunesse mpo, engebene maloba na ye, mokanda yango emonanaki lokola nde ekomamaki mpenza mpo na ye. Ndimbola ya Biblia oyo la Société azali kopesa na ntina na mobu 1914 esimbaki mitema na bango nyonso mibale. Mobali akutanaki lisusu na Temwe oyo apesaki ye mikanda. Temwe yango apesaki ye lisusu mokanda La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou création? mpe azwaki bibongiseli ya kotala ye mpe mwasi na ye mpo na koyanola na mituna na bango. Mbala ya liboso oyo ayaki kotala bango misato bayekoli ya Biblia ebandaki elongo na babalani wana mpe bana na bango. Boyebi na bango ya Biblia ekolaki nokinoki mpenza.
Nsima na boyekoli ya liboso, libota mobimba ebandaki koyangana na makita na Salle du Royaume mpe bakomisaki nkombo na bango na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. Etamboli ya bana na bango ezalaki malamu mpenza. Na nzela na boyekoli na bango ya Biblia, bakangaki ntina ete kokumisa mikolo ya kobotama mpe bilambo mosusu ya mangomba eyokani na losambo ya boklisto ya solo te, mpe batikaki kosalela yango. Atako batalelaki naino likambo ya makila te na boyekoli na bango ya Biblia, mobali aboyaki kopesa makila na ye mpo ete bazongisa ndeko na ye. Nokinoki alongolaki elamba na ye ya karaté na etyelo ya bilamba mpe atindaki yango epai na motongi bilamba ete atongela bana na ye bilamba. Atumbaki bazulunalo mpe mikanda na ye nyonso ya kosakola makambo. Bobele nsima na sanza misato, ye mpe mwasi na ye batikaki mangomba na bango ya kala mpe bamonisaki mposa ya kosangana na mosala ya kosakola. Sikawa basili kozwa batisimo.
◻ Mwasi moko azalaki koluka solo na mokili ya Thaïlande. Atako azalaki moto ya lingomba ya Buda, amipesaki mpenza na lingomba yango te na ntina na bokosi monene mpe lokoso oyo azalaki komona kuna. Lisusu, makambo na bonkoko ndenge na ndenge ezalaki kotungisa ye. Mpe makambo yango nyonso malembisaki ye.
Moninga moko alendisaki ye ete ameka kokutana na baklisto, mpe amemaki ye na lingomba ya Pantɛkote. Kasi na boumeli ya losambo, azalaki na mposa makasi ya kobima mpo na kozonga na ndako, mpo ete bato nyonso bazalaki kobondela mpe kosala makelele makasi. Wana ezalaki mbala ya nsuka oyo akotaki na losambo ya lingomba yango.
Na nsima, akendeki kokɔta na lingomba ya katolike. Nsima na koyangana kuna mwa ntango moke, amonaki lisusu bokosi mpe lokoso, mpe motindo na bomoi ya bozwi mingi ya basángo. Elembisaki ye mpe atikaki kokende kuna. Sángo alukaki koyeba mpo na nini atikali lingomba. Nsima na koyoka bantina yango, alobaki na kotyola nyonso ete: “Soki olingi kozala elongo na bato oyo bazali mpenza kolanda bosembo, kende epai na ba Témoins de Jéhovah.” Atunaki ete: “Bazali epai wapi?” Sángo ayanolaki ete: “Bafandi penepene na kompanyi ekokabolaka mai?” Mokolo oyo molandaki, akendeki koluka bango, kasi amonaki bango te. Azalaki ntango nyonso kokanisa na ntina na ba Témoins de Jéhovah, atako azalaki kokutana na bango te.
Mokolo mosusu ayokaki wana moko na baninga na ye ya pembeni azalaki koloba na mosusu na kotyola ete: “Sikawa, akokóma moko na ba Témoins de Jéhovah!” Eyoki ye bongo, mwasi yango akendaki mbango epai na moninga na ye, mpe atuni ye ete: “Ba Témoins de Jéhovah bazalaka awa?” Ayanolaki ye ete: “Ee. Basusu bauti koleka awa mpo na kosakola ndako na ndako. Okoyeba bango na molato na bango ya peto mpe ebongisami malamu.” Nsima ya koyoka bango abimaki mbango mpo na kolukaluka. Na ntango wana amonaki bango te, kasi na bozongi na ye amonaki basi mibale oyo balataki malamu mpe bazalaki kosolola elongo na moto moko. Abelemaki na bango mpe atunaki soki bazalaki ba Témoins de Jéhovah. Ntango bayanolaki ete ezali bongo, abondelaki bango ete: “Soki bolingi, boya epai na ngai na ndako. Nalingi kosolola na bino.”
Boyekoli ye Biblia ebandaki, mpe mwasi yango asili kobanda koyangana na makita mpe azali kopesa litatoli epai na bandeko na ye ya mosuni atako azali kokutana na botemeli mpe na botyoli ya basangani ya libota na ye.
Yesu ayebi solo bampate na ye mpe azali koyanganisa bango mpo na kobika kati na mokili ya sika ya boyengebene.