Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/10 lok. 31
  • “Esengo na moto oyo azwi mayele”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Esengo na moto oyo azwi mayele”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Général ya kala ayambi solo
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Nzambe azali na koponapona te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bampate na Yesu bakoyokaka mongongo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/10 lok. 31

Masoló ya Basakoli na Bokonzi

“Esengo na moto oyo azwi mayele”

BOSOLO ya lisese oyo emonanaki na mokili ya Corée, epai motango na ba Témoins de Jéhovah ya esengo moleki sikawa 71 000. (Masese 3:13) Mpe kanisa ete, 42% ya basakoli yango bazali kati na mosala ya pionnier! Masoló malandi mazali komonisa ete esengo ezali mbano na baoyo bazali koluka mayele ya solo.

Mwasi moko ya engumba Pusan aumelaki mibu 16 kati na moko ya mangomba ya boklisto ya lokuta. Amonaki kuna mimeseno mingi oyo mindimami te kati na Makomami na boye ete abandaki kokanisa ete Nzambe azali te. Epai mosusu, akokaki te koboya kondima ete Nzambe azali; yango wana abondelaki Nzambe na motema mobimba ete akoka komona lingomba ya solo soki yango ezali. Na ntango yango akaniselaki ba Témoins de Jéhovah, mpe amikundolaki ete lingomba na ye ezalaki kotyola bango mpe ekebisaki basangani na yango na ntina na Batemwe mpo ete bandimaka te mateya ya Bosato, lifelo ya mɔ́tɔ mpe mateya mosusu ya boklisto ya lokuta. Ekoki kozala ete bango nde bazali na lingomba ya solo? Na lisalisi ya moninga moko ya pembeni, amonaki esika ya Salle du Royaume. Bobele na mokolo molandi, akendeki koyangana na makita.

Akamwaki na komona ete makita mazali kosalema na mobulu te. Kuna konganga mpambampamba to koyemba na mayoki makasi ezalaki te lokola na lingomba na ye. Balakisaki ye epai na ndeko mwasi moko oyo asepelaki koyekola Biblia elongo na ye, mpe boyekoli ya liboso eumelaki bangonga mingi mpo na ebele na mituna oyo azalaki na yango. Na boyekoli ya mibale ayebisaki ete alingaki kolongwa na lingomba na ye mpo na kokóma Temwe. Ayebisaki ndeko mwasi oyo azalaki koyekola elongo na ye ete azalaki lisusu na mposa te ya koyekola elongo na ye, lokola azali kosangana na makita. Nzokande, bamonisaki ye ntina ya boyekoli na ye moko, longola likambo ya koyangana na makita. Andimaki likanisi yango, amipesaki na boyekoli na ye, mpe nsima na mwa ntango azwaki batisimo.

Sikawa azali na esengo ete asili kozwa mayele na Nzambe ya solo, Jéhovah, mpe azali na elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na mokili ya sika ya Nzambe.

Général ya kala ayambi solo

Mwasi ya général moko ya basodá azwaki batisimo na 1962. Na ebandeli mobali na ye atemelaki ye, kasi na nsima atikaki kotemela ye, mpe mbala na mbala bandeko mingi bamekaki koyekola elongo na ye na boumeli ya mibu 28, bamekaki kokolisa mposa na ye mpo na solo. Azalaki mbala mosusu kokende na makita mpe na ba assemblées, kasi lokola bato mosusu azalaki kopesa motuya mingi te mpo na solo. Na 1990 ye mpe mwasi na ye bakendeki na Japon, epai bayanganaki na assemblée moko ya district. Na libaku yango alandaki masoló na likebi monene​—likambo oyo asalaki mpenza liboso te. Atungisamaki na masoló ya mpiko oyo mazalaki komonisa bokosi ya mangomba ya lokuta, kasi yango efungolaki miso na ye likoló na bokosi ya boklisto ya lokuta. Akamwaki na kimya mpe na esengo ya libota na Nzambe na Japon, makambo asilaki komona na Corée. Ntango azongaki na Corée, abandaki koyekola Biblia na molende nyonso mpe azwaki batisimo.

Bongo alingaki kosala nini nsima ya batisimo na ye? Atikaki etelemelo na ye ya lokumu ya directeur ya hôtel ya bapaya mpe alandaki mwasi na ye kati na mosala ya pionnier. Amoni ete kozala pionnier permanent ezali mwango eleki malamu mpo na kosomba mibu 28 oyo abungisaki wana azalaki kotatabana.

Sikawa azali kososola ete lisese oyo elobi ete: “Esengo na moto oyo asili kozwa mayele” ekokani epai na ye!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto