Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/1 nk. 14-19
  • Mapamboli mingi na Assemblées de District “Bamemi na pole”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mapamboli mingi na Assemblées de District “Bamemi na pole”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Boyei malamu, na bino nyonso Bamemi na Pole!”
  • Bilenge bamemi na Pole
  • Tika ete Pole engenga
  • Koya mpe komonana ya Klisto
  • Mabota ya Baklisto
  • Dimanche nsima na midi
  • Yaka na ba assemblées ya districte “Bamemi na pole”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mayangani kitoko mazali komonisa motuya ya mateya mauti na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Nani azali kolanda pole na mokili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bamemi na pole​—Mpo na mokano nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/1 nk. 14-19

Mapamboli mingi na Assemblées de District “Bamemi na pole”

ESILI koleka bambula 2 700, mosakoli Yisaya akomaki ete: “Tala, molili mokozipa mabele, mpe molili tuu mokozipa mabota.” (Yisaya 60:2) Maloba oyo mamonani mpenza solo! Atako bongo, elikya ezali, mpamba te Jehovah asili kongengisa pole. Na mobu moleki, baoyo balingaka pole ya Nzambe babyangamaki na esengo nyonso koyangana na Assemblée de District “Bamemi na Pole.”

Assemblée ya liboso esalemaki na sanza ya juin; ezalaki na Amerique du Nord. Na boumeli ya basanza oyo elandaki, ba assemblées mosusu esalemaki na Europe de l’Est mpe de l’Ouest, na Amérique Centrale mpe du Sud, na Afrika, na Azia, mpe na bisanga ya mai minene. Baoyo bayanganaki bakomaki na motango ya bamilio. Oyo nde elambo kitoko ya elimo basepelaki na yango!

“Boyei malamu, na bino nyonso Bamemi na Pole!”

Na bisika mingi ba assemblées ebandaki vendredi mpe esukaki dimanche nsima na midi. Wana bayangani basilaki kofanda na ntɔngɔ ya vendredi, bazalaki na esengo mingi ya koyoka na mokuse lolenge pole na Jéhovah esilaki kongenga na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka. Na nsima mokambi ya assemblée amataki na tribune. Alobelaki makasi ete baklisto basengeli kozala bamemi na pole mpe na esengo nyonso alobaki ete: “Boyei malamu, na bino nyonso bamemi na pole!” Masolo masalemaki na assemblée mazalaki na mokano ya kosalisa bayangani na kolanda komonisa pole na Jéhovah.

Discours-clé emonisaki makanisi ya assemblée mobimba. Molobi wana akundolaki na bayangani ete pole esilaki kozimisama mpo na bato longwa na elanga ya Edene. Uta ntango yango, Satana azali kozipa miso ya bato mpo ete bazanga komona pole ya solo. (2 Bakolinti 4:4) Nzokande, Yesu ayaki lokola “pole na mabota.” (Yisaya 42:1-6) Atondolaki lokuta ya mangomba, amonisaki ete misala ya mabe ezali ya molili, alongisaki boyangeli na Jehovah, mpe asakolaki nsango malamu ya Bokonzi. Bayekoli na Yesu basalaki motindo moko​—mpe bazali kosala yango kino lelo! (Matai 28:19, 20) Molobi alobaki na esengo nyonso ete: ‘Biso, na ndakisa na Yesu, tozali bamemi na pole. Ezali na mosala moko te eleki oyo na ntina na mikolo na biso. Mpe ezali na libaku moko te ya monene koleka oyo tozali na yango.’

Mwa moke liboso ya nsuka ya eteni ya liboso ya assemblée, ezalaki na likambo moko ya kosepelisa. Mokambi ya assemblée azongaki na tribune mpe ayebisaki kobima ya trakte moko (misato mosusu esengeli kolanda yango). Babetaki maboko na esengo nyonso mpo na liyebisi wana, mpe trakte moko moko ekokaki mpo na bayangani bazalaki wana.

Vendredi nsima na midi, programme elandaki kopesa batoli ya moboko mpo na baklisto bamemi na pole. Masolo mibale ya liboso mapesaki toli kitoko na lolenge ya koboya kobebisama na molili ya mokili. Lokola Satana akoki komimonisa anzelu ya pole, ezali likambo ya ntina na kobatela makambo ya elimo mpo ete makambo ya mbindo ya mokili malengola biso te. (2 Bakolinti 11:14) Ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Bolandaka makambo ya ntango oyo te, kasi bobongwana mpo na kozwa makanisi ya sika, mpo ete bokoka bino moko kososola nini ezali mokano malamu, mobongi mpe mokoki ya Nzambe.” (Baloma 12:2) Bayangani na assemblée bayokaki ete kobongwana ya moklisto ezali likambo lizali kosalema ntango nyonso. Makanisi na biso mazali ntango nyonso kosukwama mpe kobongisama soki tozali koyekola Liloba na Nzambe mpe kosalela oyo tozali koyekola. Na bongo, tokokoma ntango nyonso lokola Yesu, oyo “atondaki na ngolu mpe na solo.”​—Yoane 1:14.

Bilenge bamemi na Pole

Eteni ya mibale ya vendredi nsima na midi etalelaki bilenge. Lisolo ya liboso (“Bilenge​—Mikano na bino mizali nini?”) likumisaki bilenge oyo bazali ndakisa malamu ya bosembo. Kasi ekundwelaki bango ete bazali bato ya liboso oyo Satana azali koluka. Ata mopoti mbangu oyo ayebi malamu kopota azali na mposa ya moyekolisi. Bobele bongo, bilenge bazali na mposa ya lisalisi ya baboti na bango mpe ya lisanga mpo na kolanda kotambola kati na pole.

Yango elobelamaki mingi na nzela ya drame ya kitoko Tosala oyo ezali sembo na miso na Jehouah, oyo esukisaki programme ya vendredi. Elobelaki mingi ndakisa ya mokonzi Yosia. Atako azalaki bobele elenge mobali, azwaki ekateli ya kosalela Jéhovah. Bopusi mabe ezalaki zingazinga na ye, kasi na litambwisi ya nganga monene Hilikiya mpe na ntina na bolingo na ye moko mpo na mibeko na Jéhovah, Yosia asalaki oyo ezalaki sembo na miso na Jéhovah. Tika ete bilenge baklisto lelo basala bobele bongo.

Tika ete Pole engenga

Nsima na kopema na butu, bayangani bayaki na assemblée samedi na ntongo mpo na kozwa batoli mingi ya kotonga euti na Makomami. Bazangaki eloko te. Nsima ya kosala texte ya mokolo wana, programme elandaki na symposium oyo emonisaki mitindo mikeseni oyo moklisto akoki kongengisa pole na ye. (Matai 5:14-16) Mosala ya kosakola ezali likambo ya ntina, mpe etamboli ya malamu ezali lisusu na ntina. Lokola molobi ayebisaki, “mosala ya kosakola ezali koyebisa basusu makambo oyo tozali kondima, kasi kosalela bolingo ezali komonisa yango.”

Lisalisi ya ntina mpo na mosala ya kosakola ebendaki likebi ya bayangani: batrakte. Lokola liyebisi lipesamaki na mokolo ya liboso lizalaki naino na makanisi na bango, bayangani bayokaki makambo mamonisi lolenge nini bisaleli wana ya mike bizali na nguya. Bayangani balendisamaki na komema batrakte ntango nyonso mpo na kozala pene na kopesa litatoli na mabaku nyonso.

Likebi libendamaki na nsima epai na ba pionniers, basakoli wana ya ntango nyonso baoyo bazali kosala makasi mpo na komema pole. Oyo nde bosepeli tozali na yango mpo na ba pionniers na biso ya molende! Mpe motuya na bango mozali se kokola. Ata na mikili oyo bonsomi ya losambo euti kopesama kala mingi te, milongo ya ba pionniers mizali se kokola. Ba pionniers balendisamaki na kolinga mingi libaku na bango wana ya kitoko. Baoyo bazali naino ba pionniers te balendisamaki na kotalela ezalela na bango. Mbala mosusu bango mpe bakoki kobongisa makambo na bango mpo na kongengisa mingi pole na bango kati na mosala ya pionnier.

Kozala momemi na pole mbala mingi esengaka komipesa, mpe yango emonisamaki na lisolo lilandaki: “Tosalela Jehovah na kozalaka na elimo ya komipesa.” Ntoma Paulo abondelaki ete: “Bokaba nzoto na bino lokola mbeka na bomoi, oyo na bulee, mpe oyo ebongi na Nzambe.” (Baloma 12:1) Baoyo bazali koyikela minyoko mpiko bazali komonisa ete bazali na elimo ya komipesa. Ba pionniers bazali komipesa mokolo na mokolo mpo na kotikala kati na mosala ya pionnier. Ya solo, baklisto nyonso bazali komipesa, mpo ete bazali kosala mingi kati na mosala na Jéhovah na esika ete bamipesa na mikano ya moimi mpe ya mosuni ya mokili oyo. Mapamboli mingi na Jehovah ezali kozela baoyo bazali na ezaleli motindo wana.

Lisolo wana ebongaki mpenza ete eleka liboso ya diskur ya batisimo. Baoyo bazwaki batisimo na Assemblée de District “Bamemi na Pole” na solo bakokoka te kobosana lisolo wana. Batisimo na bango ekozala ntango nyonso likambo monene kati na bomoi na bango. Bakundwelaki bango ete bazalaki kolanda ndakisa na Yesu Klisto, oyo azwaki batisimo ntango azalaki na mibu 30. Lisusu, baoyo bamilengelaki mpo na kozwa batisimo bazalaki na esengo na komikundola ete basili “kobwaka misala nyonso mizali ya molili” mpe basili kozwa ekateli ya kozala “baombo mpo na Jéhovah.” (Baloma 12:11; 13:12) Na esengo nyonso, batelemaki liboso ya ebele ya bayangani na assemblée mpe basalaki eyambweli monene liboso ya kokenda kozwa batisimo. (Baloma 10:10) Tozali kobondela mpo ete mapamboli na Jéhovah mazala likolo na baoyo nyonso bamipesaki epai na ye na kozwaka batisimo na mai na boumeli ya ba Assemblée de District “Bamemi Pole.”

Samedi nsima na midi ezalaki ntango mpo na makebisi ya sikisiki. Yango epesamaki na lolenge ya masolo oyo mazalaki na mito na makambo “Tobwaka mitambo ya lokoso,” “Otikaka moto mosusu abebisa bizaleli malamu na yo?” mpe “Tomibatela na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko.” Masolo wana misato mamonisaki mayele mabe masalelami na Satana mpo na kolembisa moklisto. Yuda Mokeliota azalaki ntoma, kasi atekisaki. Yesu mpo na mbongo. Elenge Samwele akolaki na bosembo esika losambo na Jéhovah ezalaki kosalema, nzokande azalaki liboso ya bopusi ya baninga mosusu ya mabe. (1 Samwele 2:12, 18-20) Losambo ya bikeko ekoki kokotisa makambo lokola pite mpe bilulela (Baefese 6:5; Bakolose 3:5) Ɛe, lokoso, baninga mabe, mpe losambo ya bikeko ezali likama mpe esengeli kobwakama.

Mbongwana ekotaki na lolenge ya kopesa masolo. Lisolo lilandaki libimisaki mituna ya ntina ya Biblia mpe epesaki biyano na yango. Na ndakisa, okoki kolimbola soki bato oyo bandimi solo te mpe bakufi liboso ya bolozi monene soki bakosekwisama? Moklisto akoki kosala nini soko azali kozwa te mobalani oyo abongi na ye? Mpo na kokolisa boyebi na bango ya Biblia, bayangani balendisamaki na kosalela mingi Index des publications de la Société Watch Tower, mingimingi na nse na moto na likambo “Mituna na batangi.”

Koya mpe komonana ya Klisto

Eteni ya nsuka ya programme ya samedi elobelaki esakweli na nzela ya symposium oyo ezalaki na moto na likambo “Bongengisa pole likolo na Koya mpe Komonana ya Klisto.” Makambo mazali na “elembo” oyo ekomonisa koya na Yesu Klisto matalelamaki. (Matai 24:3) Na eteni ya mibale, misala ya “moombo na sembo mpe na mayele” na mikolo na biso milobelamaki. (Matai 24:45-47) Emonisamaki ete kobanda 1919 kelasi ya moombo ekendaki liboso na bosembo nyonso kati na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Na nsima ebele monene bayanganisamaki longwa na mabota nyonso mpo na kongengisa, elongo na baklisto bapakolami, pole ya Jéhovah. Molobi asukisaki ete: “Tika ete na molende nyonso tolanda kosunga moombo na sembo mpe na mayele. Ezali bobele na kosalaka yango nde mosika te bato nyonso oyo bazali lokola bampate bakokoka koyoka maloba oyo ya esengo: ‘Boya, bino baoyo bopambwami na Tata na ngai, bosangola bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli ya mokili.’”​—Matai 25:34.

Molobi ya nsuka alobelaki ndimbola mpe makambo matali komonana na Yesu Klisto. (1 Bakolinti 1:7) Makambo minene makosalema na eleko wana ya komonana! Babilone Monene ekobomama. Etumba monene kati na mokili ya Satana mpe Yesu elongo na baanzelu na ye ekosuka na kobomama ya ebongiseli oyo. Na nsuka, Satana ye moko akobwakama kati na libulu mozindo mpe akokoka kosala lisusu ata eloko moko te. Kasi libala ya Mwana na Mpate kati na likolo mpe kosalema ya mabele ya sika ekomema kobondisama mpo na libota na Nzambe. Bayoki basepelaki mingi na koyoka kobima ya brochure ya sika Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? Oyo nde lisalisi malamu mpo na baoyo bazali na mposa ya koyeba Mozalisi na biso oyo azali komibanzabanza mpo na biso mpe koyeba mikano na ye mpo na biso!

Mabota ya Baklisto

Dimanche, mokolo ya nsuka ya assemblée, ekomi sikawa. Nzokande, ezali naino na makambo mingi masengeli kolobama. Nsima na kotalela texte ya mokolo wana, likebi lipesamaki na mabota ya baklisto na nzela ya lisolo ya biteni misato na moto na likambo “Tosalisana kati na libota ya boklisto.” Eteni ya liboso esalisaki bayangani na koyeba sekɛlɛ ya kolonga kati na libota ya boklisto: kotya makambo ya elimo na esika ya liboso. Eteni ya mibale elendisaki mabota na kosala elongo, ezala mpo na oyo etali koyangana na makita, mosala ya kosakola, boyekoli ya libota, to kominanola. Mpe eteni ya misato ekundwelaki bayangani libaku kitoko mpe mokumba na bango ya kosalisa mibange. Molobi ayebisaki ete: “Bandeko na biso mibali mpe basi oyo bazali mibange bazali na ntina mingi mpo na lisanga.” Tika ete topesa motuya na eksperianse na bango mpe tomekola bosembo na bango.

Ndimbola ya liloba “makanisi mabongi” etalemaki na lisolo lilandaki. (1 Petelo 4:7) Moto oyo azali na makanisi mabongi azalaka na bokatikati, azali na bososoli, ayebi kokanisa, mpe azali na bopolo. Akoki kokesenisa malamu na mabe, solo na lokuta. Lisusu, azali kosala makasi na kozala na kolongono malamu ya elimo.

Lisolo ya nsuka na ntango ya dimanche elobelaki botosi na biso epai na Nzambe mpe Klisto. Molobi ayebisaki ete: “Likambo ya kozala na botosi ya sembo epai na Jéhovah Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Klisto, ezali na ndelo te.” Amonisaki lolenge nini yango ezali na bopusi likoló na makambo nyonso ya bomoi na biso. Nini ekosalisa biso na kozala na botosi? Bizaleli minei: bolingo, kobanga Nzambe, kondima, mpe komikitisa.

Dimanche nsima na midi

Mosika te, tokomaki dimanche nsima na midi mpe ntango mpo na eteni ya nsuka ya assemblée ekokaki. Mpo na bato mingi, emonanaki lokola ete assemblée euti kobanda, nde tala yango wana ekomi sikawa na nsuka.

Lisolo ya bato banso ezalaki na moto ya likambo “Tolanda Pole na Mokili.” Baoyo bazalaki wana bayokaki ndimbola kitoko ya mokomba oyo pole ezali na yango mpo na kobatela bomoi. Na nsima molobi amonisaki ntina monene ya pole ya elimo. Pole oyo ezali kouta na moi ezali kolanda kobatela biso na bomoi mpo na mwa bambula, kasi pole ya elimo ekoki kolanda kobatela biso na bomoi mpo na libela na libela. Likambo mosusu ya ntina na lisolo wana ezalaki botaleli ya verset moko na moko ya Yoane 1:1-16, epai Yesu amonisami lokola pole na mokili. Lelo, na mikolo ya nsuka ya ebongiseli mabe oyo, ezali likambo na ntina mingi na kolanda Yesu, oyo azali pole na mokili.

Nsima na boyekoli mokuse ya Mosenzeli oyo ebongisamaki mpo na poso wana, ekomaki ntango ya lisolo ya nsuka. Na esengo nyonso, molobi amonisaki ete ezali na makambo mingi oyo tokoki kolikya na mikolo mizali koya. Na ndakisa, ayebisaki kobima ya kasete ya sika ya drame Tosala mokano na Nzambe na molende. Kasi esukaki bobele bongo te. Ekozala na molongo ya sika ya bakasete video oyo ekozala na moto na likambo Biblia​—Lisolo ya sikisiki, Bisakweli bibongi kotyela motema; eteni ya liboso ekozala na moto na lisolo Biblia​—Mokanda ya Solo mpe ya Bisakweli.

Na nsuka, molobi ayebisaki ete na 1993 ekozala na assemblée de district ya mikolo minei, kati na yango, mosusu oyo ekosalema na Afrika, na Azia, na Europe, mpe na Amerique du Sud, ekozala lokola ba assemblées internationales. Atako Assemblée de District “Bamemi na Pole” esukaki, bayangani bakoki kobanda komilengela mpo na mbula ezali koya.

Ekómaki sikawa ntango mpo na bayangani na assemblée na kozonga na bandako na bango. Ya solo, bazwaki ekateli ya kolanda komonisa pole kati na mokili oyo etondi na molili. Nsima na mikolo misato mitondaki na biloko malamu ya elimo, maloba ya mikapo ya nsuka milobelamaki na lisolo ya nsuka mazalaki na ndimbola moko monene: “Jéhovah azali Nzambe, mpe azali kopesa biso pole.... Botonda Jéhovah, bino bato, mpo ete azali malamu; mpo ete boboto na ye ezali mpo na seko.”​—Nzembo 118:27, 29.

[Elilingi na lokasa 15]

Programme ya assemblee na lokota ya Russe

[Bililingi na lokasa 16, 17]

Na ba assemblées mingi basangani ya Collège central basalaki masoló

Ba délégués ya Japon bazalaki kati na baoyo bayanganaki na mboka St. Petersburg, na Russie

Drame kitoko ya Biblia elobelaki mingi ntina ya kosala oyo ezali sembo na miso na Jéhovah

Bamemi ya sika ya Pole bamonisaki komipesa na bango epai na Jéhovah na kozwaka batisimo

Bayangani bamipesaki mobimba mpo na kolanda programme na St. Petersburg

[Elilingi na lokasa 18]

Bayangani basepelaki kozwa brochure ya sika “Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto