Masolo ya Basakoli na Bokonzi
Babongolaki lolenge ya bomoi na bango
NTEMBE ezali te, ete osila komona bango kosolola na bato na balabala, kokende ndaka na ndako to koyangana na makita ya boklisto kati na ba Salles du Royaume na bango. Tozali kolobela bilenge mibali ya peto oyo bazali ba Témoins de Jéhovah. Mbala mosusu okanisaka ete bazali Batemwe mpo ete baboti na banga balakisaki bango nzela wana, yango mpe ezali solo mpo na mingi kati na bango. Epai mosusu, bamoko kati na bilenge wana bauti na bisika bikeseni, mpe bomoi na bango ya kala ekeseni mosika na oyo bazali na yango lelo. Na yanga, baoya tozali komonana na lokasa lolandi bazalaki kati na bituluku ya basali mabe mpe bameli na drogues mokolo na mokolo. Nini epesi nzela na mbongwana wana monene? Tokende na engumba ya Norvege epai tokokutana na bamoko kati na bilenge yango.
Bantina ya mabongwani
Ntango Batemwe mibale bakutanaki na elenge mwasi Annette, na mosala na bango ya ndako na ndaka, azalaki na mibu 19. Azali komikundola ete: “Mbala mingi bazalaki koyebisa ngai ete nasolola na ba Témoins de Jéhovah te, kasi nalingaki koyeba nini bazalaki na yango mpe nakotisaki bango na ndako.” Azalaki komipesa na komela drogues uta ntango azalaki na mibu 11, mpe asanganaki mbala mingi na mosala ya koyiba biloko kati na bandako mpe koyiba bovuatire.
Nsango malamu ya Bokonzi esepelisaki ye. Alendisamaki mingimingi na elikya ya lisekwa, mpamba te abungisaki mama na ye wana azalaki bobele na mibu mitano. Na yango, andimaki boyekoli ya Biblia kozanga kofuta mbongo mpe abandaki koyangana na makita na Salle du Royaume. Ayebisaki makambo azalaki koyekola na moninga na ye ya mobali mpe na bilenge mosusu. Mayoki na bango mazalaki nini? Balingaki koyoka yango te mpe balobaki ete Annette amitiki kozimbisama na mateya wana. Nzokande, na nsima bamoko kati na baoyo bamonisaki botemeli makasi babandaki koyekola Biblia.
Tokamata ndakisa ya Espen, elenge mobali ya mibu 20. Ayokaki nsango malamu ya Bokonzi na nzela ya moninga ya Annette mpe nokinoki asengaki boyekoli ya Biblia. Atako bongo, asengelaki kozwa etumbu na kokotaka boloko ya sanza minei, mpamba te asanganaki na botekisi ya drogues, mpe lokola Annette mbala mingi azalaki koyiba biloko kati na bandako. Azalaki mpe komipesa na komela makaya, marijuana, mpe ba drogues mosusu. Kasi, lolenge nini moto oyo amipesaki na misala motindo wana, akokoki kozwa mposa ya koyekoia Biblia? Espen abandaki kososola ete lolenge ya bomoi na ye ezalaki na ntina te mpe ezalaki kopesa ye ata elikya moko te mpo na mikolo mizali koya. Ayebisi ete: “Nabendamaki na bilaka ya Biblia oyo bipesaki ngai ntina kati na bomoi. Na bongo nabandaki koyekola mpo na komona soki bayebisaki ngai solo.”
Bilenge mosusu basepeli kayokola Biblia
Penepene na eleko wana, mosangani mosusu ya etuluku wana ya bilenge mibali ayokoki nsango malamu, mpe abandaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita. Na nsima, elenge mosusu kati na bilenge wana asalaki bobele bongo. Mwa ntango moke na nsima, moko lisusu asanganaki na baninga na ye mpo na koyekola Biblia mpe kokóla na elimo. Na nsima elenge mosusu ya etuluku yango, kokamwàkà na komona mabongwani baninga na ye basali, asengaki nokinoki boyekoli ya Biblia.
Gilbert, elenge mobeti miziki ya etuluku wana, abandaki koyekola Biblia. Baboti na ye bango nyonso mibale bakufaki na cancer, na yango alendisamaki mingi na elikya ya lisekwa. (Yoane 5:28, 29) Ye mpe lokola azalaki komela marijuana mpe azalaki na bomoi ya mbindo; mposa na ye ezalaki ete akoma mobeti ya miziki ya rock oyo ayebani mingi. Nzokande, na nsima, akolaki malamu na elimo mpe mosika te azwaki ekateli ya kokóma Témoin de Jéhovah. Na nsuka, leki ya Espen abandaki koyekola Biblia mpe kosangana na Batemwe.
Solo ya Biblia ezali kobongola bomoi ya bato
Bilenge wana oyo bazalaki na molato ya mabe, basuki ekangamakangama, mpe baoyo basanganaki na makambo ya drogues, ya moyibi mpe mabe mosusu, basalaki mbongwana monene. Annette azali kosakola Bokonzi na molende nyonso; mpe azalaki pionnier pene na boumeli ya mbula moko. Espen mpe Gilbert bazali ba pionniers auxiliaires mpe basaleli na misala. Bango nyonso mibale basila kobala kati na lisanga. Bilenge mosusu minei ya etuluku wana ya kala bazali mpe kosakola Bokonzi na molende nyonso.
Nini ekomelaki etumbu ya boloko ya sanza minei oyo bakatelaki Espen? Na lisalisi ya mabongwani oyo asalaki kati na bomoi na ye, etumbu wana ekitisamaki na bangonga 80 ya mosala oyo ezalaki mpo na litomba ya bato. Na ndingisa ya bapolisi mpe bakonzi mosusu, alekisaki yango na Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah ya engumba wana. Bapolisi basepelaki mingi na ebongiseli wana.
Ee, ebele na bilenge mosusu bipai nyonso na mokili bazalaki basali na mabe. Kasi solo ya Liloba na Nzambe epesaki biyano na mituna ya ntina oyo bazalaki komituna mpe epesaki bango elikya ya solo. Na lisalisi na yango, batikaki etamboli na bango ya mobulu, bazali lisusu kosalela drogues te mpe bazali lisusu te kobima na molato ya mabe. Lokola basili kobongola lolenge ya bomoi na bango, bazali mpenza lokola baoyo balobelami awa na likolo: bilenge, peto, mpe ba Témoins de Jéhovah ya molende. Bazali na mposa ya koyebisa na basusu myango ya solo, miyebisami kati na Biblia, mpo na kosilisa mikakatano oyo bilenge mingi bazali kokutana na yango lelo.—Tala 1 Bakolinti 6:9-11.
[Elilingi na lokasa 8]
Espen, Annette mpe Gilbert