Lisolo ya Basakoli na Bokonzi
Esengeli molende mpo na kotosa mobeko ya Nzambe
Ba Témoins de Jéhovah bazali kokanga ntina ya mobeko na Nzambe oyo etindi bango ete basakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe. (1 Bakolinti 9:16; Misala 20:26, 27) Na France, moklisto moko mpe mwasi na ye bayebaki motuya ya kosakola nsango malamu epai na bato nyonso. Kati na teritware na bango, ezalaki na libota moko ya ba réfugiés politiques mpe bilenge basali bapaya. Mobali oyo mpe mwasi na ye balimboli boye: “Tozalaki komituna ndenge nini kokota na lopango yango, soko moto moko te abengisi biso. Tozwaki ekateli ya kosolola na bato oyo tokomona penepene wana, mbala mosusu, bakoki kobengisa biso mpo tosolola. Ezali ndenge yango ete elenge mobali moko oyo azalaki kolanda na lopango yango azwaki bazulunalo mpe asengaki ete tozongela kotala ye.
“Tozongelaki ye mpe tobandaki boyekoli mbala moko. Mbala nyonso oyo tozalaki koyekola, elenge mobali moko azalaki elongo na biso, kasi azalaki kobimisa makanisi na ye te. Na nsuka na boyekoli ya mibale, totunaki ye soko azalaki na mposa ya koyeba Liloba na Nzambe. Andimaki. Tobandaki boyekoli ya mibale. Uta ebandeli, tosengaki bilenge yango mibale ete bayangana na makita, mpe uta ntango yango bazangi naino likita moko te. Bokoli na bango emonanaki polele mpenza, mingimingi mpenza na libota na bango, epai babandaki kosakola basolo oyo babandaki koyeba. Na yango, tobandaki boyekoli ya misato elongo na mwasi moko mpe mobali na ye. Mokolo mosusu, mwasi mosusu afandaka wana amonaki biso ndenge tozalaki koyekola na etuluku na salon. Tomibongisaki mpo na kokenda na likita, mpe alingaki kokende na biso elongo. Lokola asepelaki na maye amonaki, alingaki ete elenge mobali oyo azalaki kofanda na ye ayeba mpe makambo yango. Bango mibale babandaki koyekola.
“Na ndenge yango tokomaki kotambwisa boyekoli mitano ya Biblia.” Boyekoli mokomoko ezalaki likita mpenza, mpamba te bango nyonso bazalaki kolinga kosangana na boyekoli ya bamosusu, mpe mbala mingi bato ya sika bazalaki koya. Bango nyonso bazalaki koloba mpo na solo epai ya baninga na bango. Na ndenge yango tobandaka boyekoli ya motoba elongo na elenge mobali moko oyo azwaki ekateli ya koyangana mpe na makita mpe kobanda kotatola.
“Ya solo, lopango mobimba ezwaki litatoli monene.” Kolata bomoto ya sika ezalaki likambo ya petee te mpo na bilenge yango. Esengelaki na bango kotika komela makaya, masanga, kosala mobulu, kosala pite mpe makambo mosusu ya mabe. Satana atyaki mpe mikakatano mpo ete baninga na bango ya kala babebisa bokoli na bango na komekaka bango mpo ete bamela makaya mpe bazalaki kotiola solo. Moko kati na bayekoli azalaki na fiansé na ye, elenge mwasi moko azalaki kosambela na lingomba ya mokili. Elenge mwasi yango alukaki kopengola ye na solo. Kasi ye mpe abandaki koyekola mpe, uta ntango yango asili kokola makasi mpenza.
Ndeko mobali mpe ndeko mwasi oyo basakoli nsango malamu epai na bilenge yango bayebisi boye ete, moko kati na bilenge yango asili kokota boloko mpo aboyaki kokota na makambo na mokili. Mbula mobimba ekokaki te, bilenge motoba kati na bango bazwaki batisimo, mitano babandaki mosala ya pionnier auxiliaire. Na bango nyonso, motoba bazali sikawa ba pionniers permanents.”
Oyo nde litomba monene mpo na ndeko mobali oyo mpe mwasi na ye na ndenge bayikaki mpiko mpo na koluka bampate na kolandaka etinda ya Nzambe! Jéhovah mpe apambolaki milende na bango ya sembo. Ya solo, biso banso tokutani naino na makambo motindo boye te, kasi tolingi ntango nyonso kotosa etinda ya Nzambe oyo elobi ete tosakola nsango malamu ya Bokonzi.—Matai 24:14.
[Elilingi na lokasa 21]
Ba pionniers permanents motoba batelemi elongo na ndeko mobali mpe ndeko mwasi oyo bayebisaki bango nsango malamu