“Tika ete libala likumisama kati na bato nyonso”
“Tika ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana na mobali na mwasi ezala na mbindo te.”—BAEBELE 13:4.
1. Likambo nini bato mosusu basili koyekola na ntina na libala oyo ezali kolonga?
ATA na eleko na biso oyo etondi na koboma mabala, bamilió na bato bazali kozwa bolamu ya koumela kati na mabala. Atako bakeseni na bomoto na bango mpe na bisika bakolaki, basili kozwa mwango ya kolónga. Mabala lolenge oyo mazali komonana kati na ba Témoins de Jéhovah. Mbala mingi babalani yango bakondima ete bakutanaka na bileko ya esengo mpe ya mikakatano, to na makambo ya komilela moko na ntina ya mabunga na mosusu. Nzokande, mibali mpe basi bayekolaki koyikela mikakatano wana ya mike mpiko mpe kobatela libala na bango lokola masuwa ete elanda mobembo na yango. Wapi mwa makambo oyo masalisaki bango na kolónga?—Bakolose 3:13.
2. (a) Tanga mwa makambo oyo mazali kobatela libala. (b) Makambo nini makoki kobebisa libala? (Tala encadré na lokasa 14.)
2 Makambo mayebisami na baklisto oyo bazwaki bolamu ya koumela na mabala mazali na ntina mingi. Mobali moko oyo asili kolekisa mibu 16 na libala alobaki ete: “Ntango nyonso oyo mokakatano moko mozalaki kobima, tozalaki mpenza kosala makasi mpo na koyoka moto na moto likanisi na moninga.” Maloba oyo mamonisi polele moko na makambo oyo mazali koyeisa makasi nsinga na mabala mingi: kosolola ya polele euti na motema. Mwasi moko oyo asili koumela mibu 31 na libala ayebisaki ete: “Kosimbana na maboko mpe kosala makambo ya kosepelisa mpo na kobatela bolingo ya mwasi na mobali kati na biso ezalaki ntango nyonso likambo ya ntina.” Yango mpe ezali lolenge mosusu ya kosolola. Baklisto mosusu, mobali mpe mwasi, oyo basilaki koumela na libala pene na mibu 40, bamonisaki ntina ya koyeba kosala maseki, koyeba komiseka yo moko mpe koseka makambo na mobalani na yo. Balobi lisusu ete ezali likambo ya ntina koyeba bizaleli kitoko mpe bolembu ya mosusu mpe bongo komonisa ye bolingo ya solo. Mobali alobelaki ntina ya kondima mabunga mpe ya kosenga bolimbisi. Soki elimo ya koyokana ezali, libala ekolanda komiyokanisa na makambo oyo babalani bakutani na yango, na esika ete epanzana.—Bafilipi 2:1-4; 4:5.
Mbongwana ya Makambo
3, 4. Mbongwana nini ya makanisi esili kosalema na ntina ya bosembo kati na libala? Okoki kopesa bandakisa?
3 Na boumeli ya mibu mingi oyo miuti koleka, kati na mokili mobimba makambo masili kobongwana na ntina ya bosembo kati na libala. Bato mosusu oyo babala bakanisaka ete ezali mabe te kozala na “biro”—liloba mpo na kobomba ekobo—mingi mpenza soki mobalani mosusu ayebi mpe andimi likambo yango.
4 Moklisto moko oyo azali nkulutu alobelaki likambo yango na maloba oyo: “Mokili esili mpenza kotika mokano nyonso ya komitambwisa engebene mitinda ya bizaleli malamu. Etamboli ya peto ekomi komonana lokola likambo lisila ngala.” Bato minene ya politike, ya masano, to na miango ya kominanola bazali kobuka na polele mitinda ya bizaleli malamu oyo ezali kati na Biblia, mpe bato bazali kolanda kokumisa bango. Misala nyonso ya mbindo to ya bosoto mizali lisusu likambo ya nsoni te. Kati na baoyo batalelami ete bato na lokumu ya mokili, etamboli ya bopeto mpe bosembo ezali na motuya mingi te. Na yango, engebene likanisi oyo ete likambo oyo ekokani na moko ekokani mpe na mosusu, ebele na bato bazali komekola ndakisa wana mpe bazali kosala makambo oyo Nzambe azali kokweisa. Maloba malandi ya Paulo makokani mpenza: “Bazali koyoka mawa te, bamipesi na makambo na nsoni ete basala makambo na bosoto na bilulela.”—Baefese 4:19; Masese 17:15; Baloma 1:24-28; 1 Bakolinti 5:11.
5. (a) Likanisi na Nzambe ezali nini na ntina ya ekobo? (b) Liloba oyo Biblia esaleli mpo na “pite” esangisi makambo nini?
5 Mitinda ya Nzambe mibongwani te. Etelemelo na ye ezali ete kosangisa nzoto mobali na mwasi kozanga kobalana ezali pite. Kozanga kotikala sembo kati na libala ezali ekobo.a Ntoma Paulo alimbolaki polele ete: “Boyebi te ete bato na masumu bakosangola libula na Bokonzi na Nzambe te? Bomizimbisa te, moto na pite, mpe basambeli na bikeko, mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsoni to mibali bamibebisi na mibali . . . bakosangola Bokonzi na Nzambe te. Basusu na bino bozalaki bongo. Kasi bosili kosukwa, bosili kobulisama, bosili kozwa boyengebene na nkombo na Nkolo Yesu Klisto mpe na elimo na Nzambe na biso.”—1 Bakolinti 6:9-11.
6. Elendiseli nini tozali kokuta kati na maloba na Paulo na 1 Bakolinti 6:9-11?
6 Likambo ya kolendisa kati na mokapo wana ezali maloba oyo ya Paulo ete, “Basusu na bino bozalaki bongo. Kasi bosili kosukwa.” Ee, bato mingi baoyo kala bazalaki kotambola na “nzela ya mobulu” ya mokili basosolaki misala na bango, bandimaki Klisto mpe mbeka na ye, mpe basukwamaki. Baponaki kosepelisa Nzambe na kozaláká na bomoi oyo eyokani na bizaleli malamu mpe bazwaki esengo.—1 Petelo 4:3, 4.
7. Mobulu nini ezali komonana likoló na ndimbola ya liloba “bosoni,” mpe likanisi ya Biblia lizali nini na ntina na yango?
7 Epai mosusu, ndimbola oyo mokili ya lelo ezali kopesa na liloba bosoni elembisami mpenza mingi na boye ete ezali koyokana te na likanisi ya Nzambe. Diksionere moko elimboli “oyo ezali ya bosoni” lokola “oyo eyokani te na etamboli oyo endimami na bato nyonso.” Nzokande, lelo oyo, “etamboli oyo endimami na bato nyonso,” ezali kokanga miso likoló na kosangisa nzoto libanda ya libala, bakisa mpe kosangisa nzoto mwasi na mwasi to mobali na mobali, makambo oyo Biblia ezali mpenza kokweisa yango ete ezali bosoni. Ya solo, engebene Biblia bosoni ezali ekweli monene na mibeko ya Nzambe mitali bizaleli malamu.—Exode 20:14, 17; 1 Bakolinti 6:18.
Bopusi likoló na Lisangá ya Boklisto
8. Bopusi nini bosoni ekoki kozala na yango kati na lisangá ya boklisto?
8 Pite ezali mpenza kosalema mingi lelo na boye ete ekoki ata kozala na bopusi likoló na baoyo bazali kati na lisangá ya boklisto. Ekoki kozala na bopusi likoló na bango na nzela ya programme ya nsoni epesamaka na televizyó, na video, mpe na bazulunalo oyo ezali kolakisa bolumbu ya bato. Atako bobele ndambo moke ya baklisto nde bazali kokwea na bopusi yango, tosengeli koyeba ete ebele ya bato oyo babimisamaka na lisangá ya ba Témoins de Jéhovah mpo ete babongolaki motema te na etamboli mabe, mbala mingi babimisamaka mpo na likambo moko litali bosoni. Epai mosusu, mingi na baoyo babimisamaki bandimaki mabunga na bango na nsima, bapetolaki bomoi na bango mpe na nsuka bazongisamaki lisusu kati na lisangá.—Tala Luka 15:11-32.
9. Ndenge nini Satana azali kokweisa baoyo bazangi bokengi?
9 Ntembe ezali te ete Satana azali kotambola lokola nkosi azali konguluma, kolukáká kolya baoyo bazali komibanzabanza na likambo moko te. Myango to “mayele mabe” na ye mazali kokanga mbula na mbula kati na motambo baklisto oyo bazali kokengela te. Elimo ya mokili na ye, oyo ezali bipai nyonso, ezali bongo moimi, mposa ya bisengo, mpe mposa ya kosala makambo mabe. Ezali kolendisa mposa ya nzoto. Ezali kobwaka komipekisa.—Baefese 2:1, 2; 6:11, 12, Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelesi, maloba na nse ya lokasa; 1 Petelo 5:8.
10. Banani oyo bakoki komekama, mpe mpo na nini?
10 Nani kati na lisangá akoki komekama na pite? Ndambo monene ya baklisto, ezala bankulutu na lisangá, bakengeli ya zongazonga, basali na Béthel, ba pionniers oyo bakosakolaka bangonga mingi na sanza, baboti oyo bazali na mosala makasi ya kobokola libota to bilenge oyo bazali kopusama na baninga na bango. Masenginya ya mposa na nzoto ekómelaka bato nyonso. Mposa ya kosangisa nzoto ekoki koya na ntango oyo omizelaki mpenza na yango te. Yango wana, Paulo akomaki ete: “Boye, tika ete ye oyo akanisi ete azali kotelema ngwi akeba ete akwea te. Emekeli moko ekomeli bino te oyo ezangi epai na bato nyonso.” Ezali mawa, na komona ete baklisto mosusu oyo bazalaki na mikumba minene bamitikaki kobendama na motambo ya pite.—1 Bakolinti 10:12, 13.
Babendami mpe balengolami
11-13. Tanga mwa makambo oyo mamemaki bato mosusu na pite.
11 Nini ezali masenginya mpe makambo oyo ememaki basusu na nzela mabe ya ekobo mpe ya pite? Makambo yango mazali mingi mpe masangisi makambo ndenge na ndenge, mpe makeseni engebene mikili mpe mimeseno ya bato. Nzokande, ezali na makambo ya moboko oyo mazali komonana na mikili mingi. Na ndakisa, eyebisami ete bamoko babongisaka bilambo oyo kati na yango masanga makasi mazalaka mingi. Basusu balingaka miziki mpe mabina ya mokili oyo ezali kolamusa mposa ya nzoto. Na bisika mosusu ya Afrika, ezali na mibali ya bozwi mingi—baoyo bazali bandimi te—bazalaka na bamakango; atako bayebi ete ezali pite, basi mosusu bamekamaki mpo na koluka libateli ya mosuni epai na mibali yango. Na bituka mosusu, mibali baklisto batikaka mabota na bango mpo na kokende koluka mosolo na bisika ya mabanga ya ntalo to epai mosusu. Na bongo bosembo na bango etyami na komekama makasi, oyo mbele ekómeli bango te soki bazalaki esika moko na mabota na bango.
12 Na mikili ya bozwi mingi bamoko bakweaki na motambo ya Satana na kozaláká mbala na mbala elongo na mwasi to na mobali kozanga ete moto mosusu azala wana—na ndakisa kozala mbala na mbala kati na motuka moko mpo na koyekola kokumba motuka.b Bankulutu oyo bazali kosala visite pastorale basengeli mpe kokeba ete bazala bango moko te ntango bazali kopesa ndeko mwasi moko toli. Masoló na ntango wana makoki kokoma na maoki makasi mpe makoki kobimisa mikakatano mpo na bango nyonso mibale.—Tala Malako 6:7; Misala 15:40.
13 Makambo oyo touti kolobela mamemaki baklisto mosusu na kolembisa bokengi na bango mpe bakweaki na pite. Lokola ezalaki na ekeke ya liboso, bamitikaki ‘kobendama mpe kolengolama na mposa mabe na bango moko,’ oyo ememaki bango na lisumu.—Yakobo 1:14, 15; 1 Bakolinti 5:1; Bagalatia 5:19-21.
14. Mpo na nini tokoki koloba ete moimi nde ezali kokweisa bato mingi na ekobo?
14 Botaleli ya penepene ya baoyo babimisami na lisangá emonisi ete ezali na mwa makambo makokani oyo makozalaka epai na baoyo nyonso bazali kokwea kati na pite. Kati na makambo yango, tozali kokuta ezaleli ya moimi. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo ete na likambo ya ekobo, ezalaka ntango nyonso na moto moko to na bato mosusu oyo basali likambo te kasi batungisami. Ekoki kozala mwasi na ye. Ekoki mpe kozala bana soki bazali, mpo ete soki ekobo esuki na koboma libala, bana oyo bazali na mposa ya libateli kati na libota oyo ezali na bomoko, bakonyokwama mingi mpenza. Moto na ekobo azali liboso nyonso koluka bisengo mpe matomba na ye moko. Ezali yango ezaleli ya moimi.—Bafilipi 2:1-4.
15. Nini ekoki komema moto na ekobo?
15 Mbala mingi ekobo ezalaka likambo ya bolembu ya pwasa te. Esengeli kozala ete libala esilaki kobanda kobeba mokemoke, mbala mosusu kozanga ete basosola yango. Mbala mosusu kosolola ekómaki bobele likambo ya bongo na bongo to mpe ezalaki lisusu te. Ekoki kozala ete kolendisana moko na mosusu ezalaki mpenza mingi te. Moko na moko kati na babalani azalaki komonisa botondi mingi te epai na mosusu. Mbala mosusu, mpo na mwa ntango babalani bazalaki lisusu kokokisana bamposa na bango ya kosangisa nzoto te. Na ntembe te ntango ekobo esalemi, ntina mosusu ezali ete boyokani elongo na Nzambe esilaki kolemba. Jéhovah azali lisusu kotalelama te lokola Nzambe na bomoi oyo ayebi makanisi mpe misala na biso nyonso. Ekoki ata kokóma ete kati na makanisi ya moto na ekobo, “Nzambe” azali bobele liloba ya mpamba, likanisi ya mpamba oyo ezali na bopusi te na bomoi ya mokolo na mokolo. Na bongo kosala lisumu epai na Nzambe ezali lisusu mpasi te.—Nzembo 51:3, 4; 1 Bakolinti 7:3-5; Baebele 4:13; 11:27.
Mwango mpo na kolonga
16. Ndenge nini moklisto akoki kolónga masenginya oyo makoki kobebisa bosembo na ye?
16 Soki moklisto moko amekami na kolanda nzela ya kozanga sembo, makambo nini asengeli kotalela? Ya liboso, asengeli kokanisa likoló na bolingo ya boklisto, oyo etongami makasi na mitinda ya Biblia. Esengeli soki moke te kotika bolingo ya nzoto to mposa ya kosepelisa nzoto kolonga maoki na biso mpe kokweisa biso na moimi oyo ekomema basusu na mpasi. Na bokeseni, asengeli kotalela likambo yango engebene makanisi ya Jéhovah. Asengeli mpe kotala mosika na ntina na lokumu ya lisangá mpe nsoni oyo etamboli na ye ya mabe ekoki komema likoló na yango mpe likoló na nkombo ya Jéhovah. (Nzembo 101:3) Akoki kopengola likama soki aloni likanisi ya Klisto na ntina ya likambo yango mpe soki akosala na boyokani na yango. Omikundola ete, bolingo ezangi moimi oyo ekokani na bolingo ya Klisto ekosuka te.—Masese 6:32, 33; Matai 22:37-40; 1 Bakolinti 13:5, 8.
17. Bandakisa nini ya kolendisa etali bosembo tozali na yango?
17 Mwango moko malamu mpo na kolonga masenginya ezali ya kolendisa kondima na biso mpe emonaneli ya elikya oyo etyami liboso na biso. Elimboli ete tosengeli kobatela na nse na motema na biso bandakisa kitoko ya mibali mpe basi ya bosembo na ntango ya kala, mpe oyo Yesu ye moko atikaki. Paulo akomaki ete: “Na bongo mpo na biso, awa ezingelami biso na lipata monene boye ya batatoli, tolongola bipekiseli nyonso mpe masumu mazali kokanga biso, topota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima. Mpo na esengo etyami liboso na ye ayikeli [nzete na mpasi] mpiko, atyoli nsoni na yango mpe azali kofanda na loboko na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe. Bokanisa ye oyo ayikeli mpiko liboso na zuwa na motindo yango na bato na masumu baoyo batemelaki ye ete bozala petepete te to na bolembu te kati na mitema na bino.” (Baebele 12:1-3) Na esika ya kopanza masuwa ya libala, moto na mayele akokanisa nde na myango ya kobongisa mbeba nyonso mpo elanda kokende liboso, mpe bongo kokima mitambo ya bokosi mpe ya kozala na lolenge ya bomoi mibale.—Yobo 24:15.
18. (a) Mpo na nini “bosuli” (traîtrise) ezali liloba lileki makasi te mpo na kolobela ekobo? (b) Lolenge nini Nzambe azali kotalela likambo ya kokokisa ndai ya libala?
18 “Bokosi,” to “bosuli,” ezali maloba makasi mingi mpo na kolobela pite? Bosuli elimboli kokosa moto oyo atye motema epai na yo. Ya solo, ndai ya libala esengi kotyanela motema mpe elaka ya bolingo mpe kosepelisana, kati na bisengo mpe kati na mpasi. Esengi mpe likambo oyo bato mingi bazali komona ete esila ngala mpo na ntango oyo tozali kobika na yango—kobatela ndai ya libala. Kozanga kotosa ndai yango ekokani na kosala bosuli epai na mobalani na yo. Likanisi na Nzambe na ntina ya ndai ya libala eyebisami polele kati na Biblia ete: “Soko okati ndai epai na Nzambe, zila te naino ofuti yango te; mpo ete asepeli na bazoba te. Futa yango ezali na yo nyongo.”—Mosakoli 5:4.
19. Na kokesena na banani Satana azali kosepela wana Temwe moko akwei?
19 Tika ete ntembe ezala te na likambo yango. Lokola esengo monene ekozalaka na likoló mpo na kobikisama ya mosumuki moko, bobele bongo esengo monene ekozalaka na mabelé kati na bibele ya basaleli ya Satana, oyo bazali komonana mpe oyo bazangi komonana, ntango Témoin de Jéhovah moko akwei.—Luka 15:7; Emoniseli 12:12.
Komekama oyo ezali kokomela Bato nyonso
20. Lolenge nini tokoki kolónga masenginya? (2 Petelo 2:9, 10)
20 Ezali na bantango mosusu oyo pite ekoki kopengolama te? Nzoto ya mosuni mpe Satana bazali mpenza makasi mingi na motindo boye ete baklisto bakoki soko moke te kolonga masenginya mpe kobatela bosembo na bango? Ntoma Paulo apesaki elendiseli na maloba oyo: “Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bomekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na emekeli, akobongisa ekimelo ete bokoka koyika mpiko.” Kati na mokili ya lelo, tokoki te kopengola masenginya nyonso, kasi na komibaloláká epai na Nzambe kati na libondeli, na ntembe te tokoki koyika mpiko mpe kolonga masenginya ata ezali ya lolenge nini.—1 Bakolinti 10:13.
21. Mituna nini mikozwa biyano na yango na lisoló lilandi?
21 Lisalisi nini Nzambe azali kopesa biso mpo na kosalisa biso na koyikela komekama mpiko mpe kolonga yango? Lolenge nini moko na moko kati na biso akoki kobatela libala na ye, libota na ye, mpe lokumu ya nkombo ya Jéhovah mpe ya lisangá? Lisoló lilandi likotalela mituna oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Liloba ‘Pite,’ na ndimbola na yango ya molai, mpe na kotalela Matai 5:32 mpe 19:9, ezali mpenza kotalela misala ndenge na ndenge ya mbindo ya kosangisa nzoto libanda na libala. Porneia [liloba ya Greke lisalelami na mikapo wana] epesi likanisi ya kosalela na lolenge ya mbindo enama ya kosangisa nzoto ya moto moko (na lolenge esalemaka to na motindo mosusu ya mbindo); lisusu, esengeli kozala na mosangani mosusu kati na mbindo yango, mwasi, mobali, to nyama.” (La Tour de Garde, ya 15 Mars 1983, lokasa 30) Ekobo: “Likambo litali, mpo na moto oyo abali, kosangisa nzoto elongo na moto mosusu oyo azali mobalani na ye te.”—Dictionnaire Hachette.
b Ya solo, ezali na bantango oyo ndeko mobali moko akoki komema ndeko mwasi moko na motuka na ye, mpe likambo yango lisengeli kotalelama na lolenge ya mabe te.
Ozali komikundola?
◻ Makambo nini makoki koyeisa libala makasi?
◻ Mpo na nini tosengeli kobwaka makanisi ya mokili na ntina na bizaleli oyo bindimami?
◻ Tanga mwa masenginya mpe makambo oyo makoki komema moto na pite.
◻ Wapi mwango eleki malamu mpo na kolonga lisenginya?
◻ Ndenge nini Nzambe azali kosalisa biso ntango tomekami?
[Etanda na lokasa 14]
MAKAMBO MAMONANI KATI NA MABALA OYO MAZALI KOUMELA
◻ Kokangama makasi na mitinda ya Biblia
◻ Babalani nyonso mibale bazali na boyokani makasi elongo na Jéhovah
◻ Mobali azali komemya mwasi na ye, mayoki na ye mpe makanisi na ye.
◻ Kosolola malamu mokolo na mokolo
◻ Koluka kosepelisana moko na mosusu
◻ Koyeba kosala maseki, koyeba komiseka yo moko
◻ Kondima na motema moko mabunga na yo; kolimbisa na motema moko
◻ Kobatela bolingo ya mwasi na mobali
◻ Kozala na bomoko mpo na oyo etali kobokola mpe kosembola bana
◻ Kozala ntango nyonso na bomoko kati na libondeli epai na Jéhovah
MAKAMBO MABE OYO MAZALI KOBEBISA LIBALA
◻ Moimi mpe motó makasi
◻ Kozanga kosala makambo esika moko
◻ Kozanga kosolola malamu
◻ Kozanga kotunana makanisi kati na babalani
◻ Kosalela malamu te mosolo to biloko ya libota
◻ Bokeseni kati na makanisi na motindo ya kobokola bana, oyo na yo to oyo na mobalani na yo
◻ Mobali azali kosala mosala kino na butu to azali kotalela makambo ya libota te mpo amipesi na misala misusu
◻ Kozanga kokokisa bamposa ya elimo ya libota
[Elilingi na lokasa 15]
Kokumisa libala ezali nzela ya kozwa bolamu bokoumela