Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/3 nk. 10-15
  • Libala ekoki kolonga na mokili ya lelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libala ekoki kolonga na mokili ya lelo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitambo oyo tosengeli kokima
  • Kowela kobala te
  • Ntina oyo mabala mosusu ekufaka
  • Bólekisa ndelo te na bilikya na bino mpe bósololaka
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Soki libala elingi kopanzana
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Mokristo akoki kosala nini mpo na kozala na libala ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tiká ete libala na bino lizala ekanganeli ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/3 nk. 10-15

Libala ekoki kolonga na mokili ya lelo

“Bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—Bakolose 3:14.

1, 2. (a) Likambo nini ya kolendisa ezali komonana na lisangá ya boklisto? (b) Libala ya malamu esɛngaka makambo nini?

SOKI totali na lisangá ya boklisto, tosepelaka mingi komona ebele ya balongani oyo bafandi bambula 10, 20, 30, to mpe koleka! Bato yango batikalaki sembo epai ya balongani na bango na ntango ya mpasi mpe na ntango ya bisengo.​—Genese 2:24.

2 Mingi kati na bango bakoyebisa yo ete bakutanaki mpe na mikakatano na libala na bango. Mwasi moko akomaki boye: “Mabala ya esengo ezangaka mikakatano te. Ezalaka na ntango ya esengo mpe ntango ya mpasi . . . Kasi . . . bato yango bakabwanaka te atako bomoi ya lelo etondi na [yikiyiki].” Bato oyo balongi na mabala na bango bayekoli ndenge ya kolonga mikakatano oyo mitungisi ya bomoi ebimisaka, mingimingi soki babɔkɔlaki bana. Makambo oyo bakutanaki na yango eteyi bango ete bolingo ya solo “esilaka soki moke te.” —1 Bakolinti 13:8.

3. Balapolo ezali komonisa nini na ntina na mabala mpe koboma mabala, mpe yango ezali kobimisa mituna nini?

3 Nzokande, ebele ya mabala ezali kokufa. Lapolo moko emonisaki ete: “Lelo oyo na États-Unis, soki mabala mibale esalemi, moko ekokufa. Mpe mingi kati na [mabala yango ekokufa] liboso ekokisa mbula 8 . . . Kati na bato 75 likoló ya 100 oyo babali lisusu, bato 60 likoló ya 100 bakoboma lisusu mabala na bango.” Ata na bikólo oyo mabala ezalaki kokufa mingi te, makambo ebongwani makasi. Na ndakisa, na bambula oyo, motángo ya mabala oyo ezali kokufa na Japon ebakisami mbala mibale. Mikakatano nini ememi likambo yango, oyo emonanaka mpe na lisangá? Atako Satana azali kosala nyonso mpo na kobebisa mabala, nini ekoki kosala ete libala elonga?

Mitambo oyo tosengeli kokima

4. Wapi mwa makambo oyo ekoki kobenda mindɔndɔ na libala?

4 Liloba ya Nzambe ezali kosalisa biso tóyeba makambo oyo ekoki kobebisa libala. Na ndakisa, tótalela makambo oyo ntoma Paulo alobaki ete ekomonana na mikolo ya nsuka: “Na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, bato bazangi botosi epai ya baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, bato oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo, bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe, bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango; mpe yo kimá bato yango.”​—2 Timote 3:1-5.

5. Mpo na nini moto oyo ‘amilingaka’ atyaka libala na likama, mpe toli nini Biblia epesi na likambo yango?

5 Soki totaleli maloba ya Paulo, tokomona ete makambo mingi oyo atángi ekoki kobebisa libala. Na ndakisa, baoyo “bamilingaka bango moko” bazalaka na moimi mpe bamonaka basusu mpamba. Mibali to basi oyo bamilingaka kaka bango moko balukaka kaka matomba na bango moko. Soki batingami na likanisi na bango, batikaka te. Ezaleli ya ndenge wana, ekoki kobongisa libala? Ata moke te. Ntoma Paulo apesaki baklisto, ná bato oyo babalá, toli oyo ya mayele: ‘Bósala eloko moko te na kowelana to na ezaleli ya komitya liboso, kasi na elimo ya komikitisa bótalelaka bamosusu ete baleki bino, kotyáká likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na bino moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’​—Bafilipi 2:3, 4.

6. Ndenge nini bolingo ya mbongo ekoki kobebisa libala?

6 Bolingo ya mbongo ekoki kokabola mobali ná mwasi. Paulo alobaki boye: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama. Mpo bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe na kokolisáká bolingo wana bamosusu babungisami nzela uta na kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Timote 6:9, 10) Ezali mawa ete likambo oyo Paulo alobelaki ezali komonana na mabala mingi lelo oyo. Lokola mibali mpe basi mingi babwaki nzoto na koluka bozwi, ebele bazali kobosana bamposa ya balongani na bango, ata bamposa ya ntina lokola kozala na moto oyo bakoki koyebisa makambo oyo ezali kotungisa bango mpe oyo akoki kokitisaka bango motema.

7. Ezaleli nini ememaki bato mosusu oyo babalá na kosala ekobo?

7 Paulo alobaki mpe ete bato mosusu na mikolo ya nsuka bakozala “bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te.” Ntango moto alapi ndai ya libala, asengeli kofanda libela na molongani na ye, asengeli te kokosa molongani na ye. (Malaki 2:14-16) Nzokande, bato mosusu oyo babalá bakómaki kolula moto mosusu oyo azali molongani na bango te. Mwasi moko oyo azali na mbula koleka 30, oyo mobali na ye asundolá ye, alobaki ete ata liboso atika ye, azalaki kosala masɛki mingi na basi mosusu mpe azalaki kosala na bango boninga makasi. Aboyaki kondima ete ezaleli wana ebongi te na mobali oyo abalá. Mwasi yango ayokaki mpasi mingi ntango amonaki likambo yango mpe alukaki na mayele kokebisa mobali na ye ete azali kotya mosapi na mɔtɔ. Atako bongo, nsukansuka asalaki ekobo. Atako mwasi na ye apesaki ye toli na boboto nyonso, mobali yango azalaki matoi mangbongi. Amikɔtisaki ye moko na motambo.​—Masese 6:27-29.

8. Nini ekoki komema moto na kosala ekobo?

8 Biblia ekebisi bato polele na likambo etali ekobo. “Ye oyo akosala ekobo na mwasi azangi mayele; ye oyo akosala bongo azali kobungisa molimo na ye.” (Masese 6:32) Mbala mingi, moto akweaka na ekobo na mbalakaka te. Ndenge Yakobo, mokomi moko ya Biblia, amonisaki yango, mbala mingi, moto akweaka na lisumu ya ekobo soki aloni mpe akolisi mposa mabe na motema na ye. (Yakobo 1:14, 15) Liboso mobali to mwasi asala ekobo, abandaka mokemoke kozanga bosembo epai ya molongani oyo alapaki ndai ete akofanda na ye libela. Yesu alobaki boye: “Boyokaki ete elobamaki, ‘Osengeli kosala ekobo te.’ Kasi ngai nazali koloba na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii na koyoka ye mposa asili kosala ekobo elongo na ye na kati ya motema na ye.”​—Matai 5:27, 28.

9. Toli nini ya bwanya ezwami na Masese 5:18-20?

9 Yango wana, nzela ya malamu mpe ya sembo ezali oyo mokanda ya Masese ezali kolendisa: “Tiká ete mai na yo mapambolama; sepelá na mwasi ya bolenge na yo. Azali lokola mboloko ya bolingo mpe ntaba ya nkeka na kitoko, tiká ete mabɛlɛ na ye masepelisa yo ntango nyonso, yoká esengo na bolingo na ye libela. Ee mwana na ngai, mpo na nini okosepelisama na mwasi mopaya? mpe [okosimba, NW] ntolo ya mopaya?”​—Masese 5:18-20.

Kowela kobala te

10. Mpo na nini ezali likambo ya bwanya kozwa ntango ya koyeba moto oyo olingi kobalana na ye?

10 Mikakatano mosusu ekoki kobima kati na mwasi ná mobali soki bawelaki kobalana. Ekoki kozala ete bakoli naino mpenza te mpe bayebi naino makambo mingi te ya bomoi. Ekoki mpe kozala ete bayebanaki naino malamu te; elingi koloba moto na moto ayebaki naino te makambo oyo moninga alingaka mpe oyo aboyaka, mikano na ye, mpe libota na ye. Bwanya ezali kosɛnga kozala motema molai, kozwa ntango ya koyeba malamu moto oyo okobalana na ye. Tózwa ndakisa ya Yakobo, mwana ya Yisaka. Asengelaki kosalela bokilo na ye mbula nsambo liboso bápesa ye Laele. Andimaki kosala yango mpamba te alingaki mwana mwasi yango mingi, atalaki kaka kitoko ya nzoto te.​—Genese 29:20-30.

11. (a) Libala esangisaka bato ya ndenge nini? (b) Mpo na nini kokanisa liboso ya koloba ezali na ntina mingi na kati ya libala?

11 Libala ezalaka kaka lolango te. Libala esangisaka bato mibale oyo bauti na mabota ekeseni, bakeseni bizaleli, mitema; lisusu, babɔkɔlá bango ndenge moko te. Ntango mosusu kutu libala esangisaka bato oyo bazali na mimeseno, ata mpe minɔkɔ ekeseni. Tokoki mpe kobakisa ete libala esangisaka bato mibale oyo bakanisaka ndenge moko te. Atako bongo, makanisi na bango nyonso mibale ezali na esika na yango na kati ya libala. Elobeli ya mwasi to mobali ekoki ntango nyonso kozala ya komilelalela to ya kolendisa. Ya solo, maloba na biso ekoki kozokisa to kobɔndisa molongani na biso. Kobimisa maloba kozanga kokanisa ekoki kobimisa matata na kati ya libala.​—Masese 12:18; 15:1, 2; 16:24; 21:9; 31:26.

12, 13. Makanisi nini ya malamu moto oyo alingi kobala asengeli kozala yango?

12 Yango wana, ezalaka malamu kozwa ntango ya koyeba malamu moto oyo olingi kobalana na ye. Ndeko mwasi moko oyo aumeli na libala alobaki boye: “Ntango omoni moto oyo okanisi ete okoki kobala ye, kanisá makambo ya ntina soki zomi oyo okolinga komona epai na ye. Soki akokisi kaka makambo nsambo, omituna mituna oyo, ‘Nakondima ye ata soki makambo misato wana ezangi? Nakokoka kofanda na ye ata azangi makambo misato wana?’ Soki ozali kokakatana, kanisá naino lisusu.” Atako bongo, kolekisa ndelo te. Soki ozali na mposa ya kobala, yebá ete okokutana te na moto oyo akoki na makambo nyonso. Epai mosusu, yo mpe okozala moto ya kokoka te mpo na moto okobalana na ye!​—Luka 6:41.

13 Libala esɛngaka komipimela makambo mosusu. Paulo amonisaki yango ntango alobaki boye: “Nalingi ete bino bózanga mitungisi. Mobali oyo abalá te amitungisaka mpo na makambo ya Nkolo, ndenge akoki kondimama na Nkolo. Kasi mobali oyo abalá amitungisaka mpo na makambo ya mokili, ndenge akoki kondimama na mwasi na ye, mpe akabwani. Lisusu, mwasi oyo abalá te, mpe ngɔndɔ, amitungisaka mpo na makambo ya Nkolo, mpo azala mosantu na nzoto na ye mpe na elimo na ye. Nzokande, mwasi oyo abalá amitungisaka mpo na makambo ya mokili, ndenge akoki kondimama na mobali na ye.”​—1 Bakolinti 7:32-34.

Ntina oyo mabala mosusu ekufaka

14, 15. Nini ekoki kolɛmbisa nsinga ya libala?

14 Mwasi moko moklisto ayokaki mpasi ndenge libala na ye ekufaki ntango mobali na ye oyo bafandaki na ye mbula 12 asundolaki ye mpe akendaki kobala mwasi mosusu. Azalaki nde komona mwa makambo oyo ekokaki koyebisa ye ete bakosuka ndenge wana? Alobi boye: “Azalaki lisusu kobondela te. Azalaki kozangisa makita to kobima na mosala ya kosakola te mpo na makambo ezangi ntina. Mpo na koboya kolekisa ntango na ngai, azalaki koloba ete azali na mosala mingi to alɛmbi mingi. Azalaki kolobisa ngai te. Tozalaki lisusu kolobela makambo ya elimo te. Ezalaki mpenza mawa ndenge akómaki. Azalaki lisusu ata moke te mobali oyo nayebaki ntango abalaki ngai.”

15 Basi mosusu mpe balobaki kaka ndenge moko mpo na mibali na bango: kolɛmba na elimo, oyo ezalaki komonana na bopɔtu mpo na koyekola Biblia, kobondela to koyangana na makita. Na maloba mosusu, bato mingi oyo basundolaki balongani na bango babandaki naino kotika ete boyokani na bango na Yehova elɛmba. Nsukansuka, babosanaki mpenza makambo ya elimo. Bazalaki lisusu te kotalela Yehova lokola Nzambe ya bomoi. Mokili ya sika ya boyengebene oyo Nzambe alaki ezalaki lisusu solo te mpo na bango. Mpo na bato mosusu, bolɛmbu ya ndenge wana na elimo ebandaki liboso kutu bákóma kolinga moto mosusu.​—Baebele 10:38, 39; 11:6; 2 Petelo 3:13, 14.

16. Nini esalisaka mpo libala ezala makasi?

16 Nzokande, mobali moko ná mwasi na ye balobaki ete soki bafandi malamu na libala na bango, ezali mpo bazali makasi na elimo. Babondelaka elongo mpe bayekolaka elongo. Mobali alobi boye: “Totángaka Biblia elongo. Tobimaka na mosala ya kosakola elongo. Tosalaka makambo mingi elongo.” Liteya oyo tokoki kozwa ezali polele: Kobatela boyokani malamu na Yehova esalisaka mingi mpo libala ezala makasi.

Bólekisa ndelo te na bilikya na bino mpe bósololaka

17. (a) Wapi makambo mibale oyo esalisaka mpo libala elonga? (b) Ndenge nini Paulo alobeli bolingo ya boklisto?

17 Ezali lisusu na makambo mibale oyo esalisaka mpo libala ezala malamu: Bolingo mpe kosolola. Ntango bato mibale balulani, mbala mingi mokomoko akangaka miso na mabunga ya moninga. Na ndenge yango, bakoki kobalana mpe moto na moto akolikya komona epai ya molongani na ye makambo oyo mbala mosusu atángaki na mikanda to amonaki na bafilme. Nsukansuka, bamonaka ete bamikosaki. Na ntango wana, ata mabunga mikemike to makambo oyo akoki kokangela motema, ekómaka makambo minene. Soki esalemi bongo, baklisto basengeli komonisa mbuma ya elimo, oyo moko na yango ezali bolingo. (Bagalatia 5:22, 23) Bolingo ya boklisto​—oyo ekeseni na lolango mpamba—elongaka makambo mingi. Paulo alobelaki bolingo ya boklisto boye: Ezali “motema molai mpe na boboto. . . . Elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. . . . Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.” (1 Bakolinti 13:4-7) Tomoni ete bolingo ya solosolo elandelaka te mabunga mikemike. Elukaka te ete makambo nyonso ezala ya kokoka.​—Masese 10:12.

18. Ndenge nini kosolola ekoki kobongisa boyokani ya mwasi ná mobali?

18 Kosolola ezalaka mpe na ntina mingi. Ata soki babalani baumeli mingi na libala, basengeli kosololaka mpe moto na moto asengeli koyeba koyoka moninga. Mobali moko alobi boye: “Moto na moto afungolelaka moninga motema na ye mpe tosololaka lokola baninga mpenza.” Soki mwasi ná mobali bameseni mingi, bayekolaka koyoka ata makambo oyo moninga alobi te. Na maloba mosusu, soki bato bafandi bambula mingi na libala, mokomoko ayebaka kososola ata makambo oyo moninga alobi te to makanisi oyo abimisi te. Nzokande, basi mosusu balobi ete mibali na bango bayokaka bango mpenza te. Mibali mosusu mpe balobi ete basi na bango bayebaka kopona ntango ya koyebisa likambo te. Koyeba kosolola esɛngaka kozala na motema mawa mpe koyeba komitya na esika ya mosusu. Mobali ná mwasi oyo basololaka malamu bazwaka matomba mingi.​—Yakobo 1:19.

19. (a) Mpo na nini kosɛnga bolimbisi ekoki kozala mpasi? (b) Nini esengeli kotinda biso tósɛnga bolimbisi?

19 Kosolola esɛngaka mpe kosɛnga bolimbisi. Yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Esɛngaka kozala na komikitisa mpe kondima mabunga. Kasi, ebongisaka makambo mingi na libala! Kosɛnga bolimbisi na bosembo mpenza ekoki kopekisa matata mpe kosalisa moto oyo basali ye mabe alimbisa mpe abosana likambo yango. Paulo alobaki boye: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo. Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—Bakolose 3:13, 14.

20. Ndenge nini moklisto asengeli kofanda na molongani na ye ntango bazali kaka bango mibale to na miso ya bato mosusu?

20 Ezali mpe na ntina mingi mwasi ná mobali básalisanaka. Babalani oyo bazali baklisto basengeli koyeba kotyelana motema. Moko te asengeli kosala makambo oyo ekolɛmbisa moninga to kokitisa ye. Tosengeli kopesaka molongani na biso longonya ya solosolo; kasi te koloba mabe na ye na nkanda. (Masese 31:28b) Tosengeli te kotyolaka moninga to kosala masɛki oyo ebongi te, oyo ekokitisa ye. (Bakolose 4:6) Kolendisana ndenge wana esɛngaka mpe kolakisana bolingo. Kosimba moninga mwa moke na nzoto to koloba na ye maloba ya bolingo ekoki komonisa ye ete olingaka ye mingi. Oyokaka esengo ndenge bofandi ná ye. Wana ezali mwa makambo oyo ekoki kobongisa libala mpe kosalisa yango elonga na mokili ya lelo. Makambo mosusu mpe ezali, mpe lisolo oyo elandi ekolobela batoli mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa libala elonga.a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okoki kolimbola

• Wapi mwa makambo oyo ekoki kobebisa libala?

• Mpo na nini kowela kobala ezali likambo ya bwanya te?

• Ndenge nini lolenge oyo babalani batalelaka makambo ya elimo ekoki kosala ete libala elonga to te?

• Wapi makambo oyo esalisaka mpo libala ezala malamu?

[Elilingi na lokasa 12]

Libala ezali kaka te lolango kati na mwasi ná mobali

[Bililingi na lokasa 14]

Kozala na boyokani malamu na Yehova esalisaka mpo libala ezala malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto