Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/2 lok. 30
  • Assemblée ya District “Mateya mauti na Nzambe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Assemblée ya District “Mateya mauti na Nzambe”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Bateyami na Yehova kino Lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Tózwa matomba na mateya mauti na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mateya mauti na Nzambe mazali kolónga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mayangani kitoko mazali komonisa motuya ya mateya mauti na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/2 lok. 30

Assemblée ya District “Mateya mauti na Nzambe”

BAOYO nyonso balingi kolakisama na Jéhovah bazali kozela na motema likoló assemblée ya district “Mateya mauti na Nzambe.” Ebongiseli wana ya mikolo minei ekomonisa makambo ya ntina mingi ya mateya ya Makomami oyo mazali kobatela baklisto na ntango oyo mikakatano ya moto na moto mpe mobulu ya mokili mozali se kobakisama. Programme ekosalisa bango na kotelema ngwi liboso na ‘na makambo nyonso oyo mazali kotemela mateya na sembo.’ (1 Timoté 1:10) Ekolendisa mpe baoyo nyonso bakoyangana na kokóma bateyi malamu ya Liloba na Nzambe.

Oyo nde bandakisa malamu tozali na yango mpo na komekola! Moteyi aleki monene azali moto mosusu te bobele Jéhovah Nzambe ye moko! Yango wana, Elihu alobaki na bosembo nyonso epai na Yobo ete Jéhovah “azali ye oyo akolakisa biso koleka banyama na mokili, mpe akokomisaka biso na mayele koleka bandeke na lola.” Atunaki lisusu na ntina na Jéhovah ete: “Nani akolakisa lokola ye?” (Yobo 35:11; 36:22) Nzambe alobelami na Yisaya 30:20 lokola “Molakisi Monene.”

Na esika ya mibale, nsima na Jéhovah ezali bongo mwana na ye, Yesu Klisto. Ayebanaki lokola “Moteyi” mpe lokola “Molakisi,” ebyangeli oyo elobelami mpo na ye koleka mbala 50 kati na ba Evanzile. Atako na mbala mingi abikisaki bato mpe asalaki bikamwiseli, Yesu ayebanaki te lokola Monganga kasi lokola Moteyi, Molakisi.​—Matai 8:19; Luka 5:5; Yoane 13:13.

Na lolenge lobongi mpenza, Yesu ateyaki bayekoli mpe bantoma na ye mpo ete bakóma bateyi mpe balakisi lokola ye moko. Tokoki komona yango na Matai 10:5 kino 11:1 mpe na Luka 10:1-11. Mwa moke liboso na komata na ye na likoló Yesu apesaki na bayekoli na ye mokumba monene ya kolakisa oyo eyebisami na Matai 28:19, 20: “Boye bokende kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata, mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.” Mokanda ya Misala, elongo na mikanda mipemami oyo milandi yango kati na Makomami ya Greke ya boklisto, mizali kolobela motindo nini bayekoli na Yesu ya liboso bakokisaki mokumba wana ya kolakisa na molende, na mayele mpe na kondima nyonso.

Mosala wana ya koteya mosengeli kokokisama lelo nokinoki koleka na bileko nyonso. Lokola tozali kobika na mikolo ya nsuka ya biloko mabe ya ntango oyo, bomoi na biso ezali na likama. Mpo ete bato bakoka kosangana te na masumu ya Babilone Monene mpe bazwa te malozi na ye, basengeli kolakisama mpe kozwa lisalisi mpo na kobima na Babylone Monene mpe kozwa etelemelo na ngambo na Jéhovah mpe na Bokonzi na ye.​—Emoniseli 18:4.

Mpo na kosalisa ba Témoins de Jéhovah nyonso na milende na bango mpo na kokokisa malamu mokumba na bango ya kolakisa, Jéhovah asili kobongisa na nzela na lisangá na ye ba assemblées de district “Mateya mauti na Nzambe”. Ba assemblées wana ya mikolo minei ekobanda epai ya Nord na ebandeli ya eleko ya moi ya 1993. Tika ete basaleli nyonso oyo basili komipesa na Jéhovah basala makasi ete bazanga te koyangana na moko na ba assemblées yango, bazala wana mpe batya likebi kobanda loyembo mpe libondeli ya ebandeli na mokolo ya minei nsima na nzanga kino na libondeli ya nsuka na mokolo ya dimanche na mpokwa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto