Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/3 nk. 13-17
  • “Tolanda kotambola lokola bana na pole”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tolanda kotambola lokola bana na pole”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Toyekola koyeba Klisto
  • “Tolongola Bomoto na kala”
  • Tobongwani Bato ya sika ‘na Makanisi’
  • “Tolata Bomoto na sika”
  • ‘Tolanda kotambola lokola Bana na Pole’
  • Tólata bomoto ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • “Liloba na Nzambe lizali na bomoi mpe na nguya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Tolata bibundeli na pole”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Kobá kolata “bomoto ya sika” nsima ya kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/3 nk. 13-17

“Tolanda kotambola lokola bana na pole”

“Tolata bomoto na sika bozalisami na boyokani na mokano na Nzambe kati na boyengebene mpe na bulee na solo.”​—BAEFESE 4:24, MN.

1. Basambeli na Jéhovah bazali kozwa mapamboli nini? Mpo na nini?

JÉHOVAH NZAMBE azali “Tata na pole ya likoló,” mpe “molili mozali kati na ye soko moke te.” (Yakobo 1:17, MN; 1 Yoane 1:5) Mwana na Ye, Yesu Klisto, alobaki mpo na ye moko ete: “Nazali pole na mokili. Ye oyo akolanda ngai akotambola kati na molili te, kasi akozala na pole na bomoi.” (Yoane 8:12) Basambeli ya solo na Jéhovah, bayekoli na Mwana na Ye, bapambwami bongo na kongenga​—na makanisi, na bizaleli, mpe na elimo—​yango wana bazali “kongenga lokola miinda kati na mokili.”​—Bafilipi 2:15.

2. Bokeseni nini esakolamaki oyo esengelaki komonana kati na libota na Nzambe mpe bato na mokili?

2 Kala, mosakoli Yisaya apemamaki mpo na kosakola bokeseni oyo esengelaki komonana: “Tala, molili mokozipa mokili, molili tuu ekozipa mpe mabota; nde Jéhovah akobimela yo, mpe nkembo na ye ekomonana likoló na yo.” Ya solo, bato nyonso oyo bamitangoli longwa na Nzambe balobelami ete bazali na nse ya nguya mpe bopusi ya “mikonzi na mokili oyo na molili.”​—Yisaya 60:2; Baefese 6:12.

3. Mpo na nini toli malamu ya ntoma Paulo ezali kotalela biso?

3 Ntoma Paulo alingaki soko moke te ete baninga na ye baklisto bazala na boyokani na molili motindo oyo. Apesaki bango toli ete “batambola lisusu te lokola ekotambolaka bapakano” kasi nde “batambolaka lokola bana na pole.” (Baefese 4:17; 5:8) Lisusu, alimbolaki lolenge nini bakokaki kolónga na kosaláká yango. Lelo oyo, molili tuu oyo mozipi mabota eyei lisusu makasi koleka. Mokili emizindisi mingi kati na potopoto ya libebi na bizaleli mpe na elimo. Na yango, basambeli na Jéhovah bazali na etumba moko makasi oyo basengeli kobunda. Na bongo, maloba oyo ya ntoma Paulo masengeli mpenza kotalela biso.

Toyekola koyeba Klisto

4. Ntoma Paulo alingaki koloba nini wana ayebisaki ete: “Boyekolaki Klisto bongo te”?

4 Nsima na koloba mpo na mikano ya mpamba mpe mpo na mbindo ya mokili, ntoma Paulo abaloli likebi na ye epai na baninga na ye baklisto na Efese. (Tanga Baefese 4:20, 21.) Ntoma Paulo alekisaki pene na mbula misato mpo na kosakola mpe koteya kati na engumba wana, na yango asengelaki koyeba basangani mingi kati na lisangá yango. (Misala 20:31-35) Na bongo, ntango alobaki ete, “boyekolaki koyeba Klisto bongo te,” azalaki kolobela makambo oyo ayebaki na ntina na baklisto ya Efese, ete balakisamaki te na kosala makambo ndenge balingi, na kobongoláká solo mpe na kokangáká miso likoló na etamboli ya mbindo oyo alobelaki na verset 17 kino 19. Ayebaki ete balakisamaki malamu mpe na sikisiki na nzela ya boklisto ya solo, lokola Yesu Klisto amonisaki yango. Mpo na ntina yango, bazalaki lisusu kotambola kati na molili te lokola bapakano bazali kosala yango, kasi bazalaki bana na pole.

5. Bokeseni nini ezali kati na kozala kati na solo likolólikoló mpe kozala na solo na kati na biso mpenza?

5 Na yango, ezalaki likambo ya ntina mingi na “koyekola koyeba Klisto” na lolenge malamu! Ezali nde na mitindo ya mabe mpo na koyekola koyeba Klisto? Ee, ezali mpenza. Mwa liboso kati na Baefese 4:14, ntoma Paulo akebisaki bandeko ete: “Tozala bana mike lisusu te baoyo bakoninganaka mpe bakotengatenga epai na epai na mipepe nyonso na mateya mpe na mayele na bato, na bozimbisi na bango na nzela na mikano mabe.” Emonani ete ezalaki na bato mosusu oyo bayekolaki koyeba Klisto, kasi balandaki kotambola na banzela ya mokili mpe ata komeka kopusa bato basusu na kosala bongo. Tozali komona likama na likambo oyo ya kozala bobele kati na solo lokola basusu balobelaka yango, na esika ete tozala na solo kati na biso? Na mikolo ya ntoma Paulo, baoyo bazalaki bobele na boyebi ya likolólikoló babendamaki nokinoki mpe kozanga mpasi na bato basusu mpo na kotika nzela malamu mpe likambo yango ezali lisusu kosalema na mikolo na biso. Mpo na kopengola ete likambo wana lisalema te, ntoma Paulo akomaki ete Baefese basengelaki ‘koyoka Klisto mpe kolakisama na nzela na Yesu.’​—Baefese 4:21.

6. Lolenge nini tokoki koyekola, koyoka mpe kolakisama na Klisto lelo oyo?

6 Maloba “koyekola,” “koyoka,” mpe “kolakisama” oyo ntoma Paulo asalelaki yango, elimboli nyonso likambo litali boyekoli mpe koteyama, lokola na eteyelo. Ya solo, lelo oyo tokoki te koyoka, koyekola, to kolakisama na Yesu ye moko. Kasi azali kotambwisa mosala ya kolakisama kati na mokili mobimba na nzela ya “moombo [na ye] na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47; 28:19, 20) Tokoki “koyekola koyeba Klisto” na lolenge losengeli soki tozali ntango nyonso kolya biloko oyo kelasi ya moombo ezali kopesa na ntango ekoki, soki tozali koyekola na likebi mingi biso moko to kati na lisangá, soki tozali kokanisa mozindo likoló na makambo tozali koyekola mpe soki tozali kosalela makambo tozali koyekola. Tosenzela ete tosalela malamumalamu bibongiseli oyo nyonso mpo tokoka koloba na bosolo nyonso ete “toyokaki ye mpe tolakisamaki na ye.”

7. Ndimbola nini tokoki kopesa na maloba ya ntoma Paulo oyo ete “solo ezali kati na Yesu”?

7 Ezali likambo ya kosepela na komona ete na Baefese 4:21, nsima na kolobela mingi lolenge oyo koyekola esengeli kosalema, ntoma Paulo abakisaki ete: “Lokola ezali makambo na solo na kati na Yesu.” Balimboli basusu ya Biblia bazali kobenda likebi na likambo oyo ete ntoma Paulo azalaki kosalela mingi te nkombo Yesu yango moko kati na mikanda na ye. Mpo na koloba solo, asaleli yango bobele mbala moko kati na mokanda na ye epai na Baefese. Likambo yango ezali nde na ndimbola moko ya ntina? Mbala mosusu ntoma Paulo azalaki kobenda likebi ya motangi likoló na ndakisa oyo Yesu atikaki lokola moto. Omikundola ete mokolo moko Yesu alobaki mpo na ye moko ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi.” (Yoane 14:6; Bakolose 2:3) Yesu ayebisaki ete: “Ngai nazali . . . solo” ezali te mpo ete alobelaki mpe ateyaki yango, kasi amonisaki yango kati na bomoi na ye. Ee, boklisto ya solo ezali bobele likanisi mpamba te, kasi lolenge ya bomoi. “Koyekola koyeba Klisto” ezali kosenga koyekola komekola ye na komonisáká solo kati na bomoi. Bomoi na yo ezali kolanda ndakisa na Yesu? Ozali kolanda na likebi nyonso matambe na ye mokolo na mokolo? Bobele na kosaláká bongo nde tokolanda kotambola lokola bana na pole.

“Tolongola Bomoto na kala”

8. Elilingi nini ntoma Paulo asaleli na Baefese 4:22, 24, mpe mpo na nini ezali na ntina?

8 Mpo na komonisa lolenge nini tokoki “koyekola koyeba Klisto” mpe kotambola lokola bana na pole, ntoma Paulo abakisi, na Baefese 4:22-24, ete ezali na matambe misato makeseni oyo tosengeli kolanda. Ya liboso ayebisi biso ete: “Bolongola bomoto na bino na kala bomonisami na ezaleli na bino na liboso, oyo mpe esili kopola mpo na mposa mabe.” (Baefese 4:22) Maloba “bolongola” mpe “bolata” (verset 24) ezali komonisa likanisi ya kolongola mpe kolata elamba. Yango ezali elobeli ya elilingi oyo ntoma Paulo asalelaki mbala mingi, mpe yango ezali na ntina mingi. (Baloma 13:12, 14; Baefese 6:11-17; Bakolose 3:8-12; 1 Batesaloniki 5:8) Ntango bilamba na biso bizwi bosoto, na ndakisa na ntango tozali kolya, tokolongola yango noki soki likoki ezali mpe tokolata bilamba mosusu. Tosengeli kozala na mayoki motindo moko soki ezaleli na biso ya elimo ebebi, boye te?

9. Lolenge nini moto akoki kolongola bomoto na kala?

9 Na yango, lolenge nini moto akoki kolongola bomoto na ye ya kala? Liloba “kolongola,” kati na lokóta ya ebandeli ezali verbe esalelami mpo na eleko eleka oyo eyebani na sikisiki te. Ezali komonisa likambo oyo lisalemi mbala moko to mbala moko mpo na libela. Yango ezali koloba na biso ete “bomoto na kala” (“moto wa kala,” Liloba lya Nzambe), mpe “etamboli na biso ya kala,” esengeli kolongolama na mobimba na yango mpo na libela. Ezali likambo oyo mpo na yango tokoki kokanisa mingi te to mpe kokakatana. Mpo na nini?

10. Mpo na nini moto asengeli kozala na ekateli makasi mpo na kolongola bomoto na kala?

10 Liloba “oyo mpe esili kopola” emonisi ete bizaleli na “moto na kala” bizali ntango nyonso se kobeba. Ya solo, mpo ete baboyi pole ya elimo, bato nyonso bazali kokenda kati na libebi. Ntoma Paulo alobaki ete yango ezali litomba mabe libimi na “mposa mabe.” Mposa ya mosuni ezali na bokosi mpamba te ekoki komonana lokola nde ezangi likama, nzokande ezali kosuka na libebi. (Baebele 3:13) Soki moto amipekisi te, nsuka na yango ekozala libebi mpe liwa. (Baloma 6:21; 8:13) Tala mpo na nini bomoto na kala esengeli kolongolama, kobwakama kozanga kokakatana mpe na mobimba na yango, lolenge tokolongolaka elamba ya kala oyo ezwi bosoto.

Tobongwani Bato ya sika ‘na Makanisi’

11. Epai wapi mbongwana ya elimo esengeli kobanda?

11 Moto oyo akweaki na potopoto asengeli te bobele kolongola bilamba na ye ya bosoto, kasi asengeli lisusu komisukola nzoto mobimba liboso ya kolata bilamba mosusu oyo bizali peto. Ezali yango nde ntoma Paulo alobelaki na litambe ya mibale mpo na oyo etali kongenga ya elimo: “Bobongwana bato na sika na nguya oyo ekopusaka elimo na bino.” (Baefese 4:23) Lokola amonisaki yango liboso, kati na verset 17 mpe verset 18, bapakano bazali kotambola “na makanisi na bango na mpamba” mpe “ekaniseli na bango ezali na molili.” Ya solo, ezali kati na elimo, oyo ezali bongo ntei ya boyebi mpe ya bososoli, nde mbongwana wana esengeli kobanda. Lolenge nini yango ekoki kosalema? Ntoma Paulo alimbolaki ete ezali na koyeisáká sika nguya oyo ezali kopusa elimo na biso. Nguya yango ezali nini?

12. Nguya oyo ezali kopusa elimo ezali nini?

12 Nguya oyo ezali kopusa elimo na biso, oyo ntoma Paulo alobelaki, ezali nde elimo santu? Te. Maloba “nguya oyo ezali kopusa elimo na bino” malimboli mpenza ete “elimo ya makanisi na bino.” Ezali na esika moko te kati na Biblia oyo emonisi ete elimo santu na Nzambe ezali ya moto moko to ya eteni moko ya moto. Liloba “elimo” elimboli mpenza “mpema,” kasi lisusu esalelamaka kati na Biblia “mpo na komonisa nguya oyo ezali kopusa moto na kozala na ezaleli moko, na kozala na liyoki boye, na kosala mosala moko to na kolanda nzela boye.” (Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, lokasa 491 to Insight on the Scriptures, Volume 2, lokasa 1026) Na yango, “elimo ya makanisi” ezali nguya oyo ezali kokamba to kopusa makanisi na biso, ezali lolenge ya makanisi na biso.

13. Mpo na nini tosengeli koyeisa makanisi na biso ya sika?

13 Makanisi mpe bamposa ya elimo ezangi kokoka oyo tobotami na yango ezalaka ntango nyonso likoló na biloko bizali komonana, na bamposa ya nzoto, mpe na biloko ya mosuni. (Mosakoli 7:20; 1 Bakolinti 2:14; Bakolose 1:21; 2:18) Ata soki moto alongoli bomoto na kala elongo na misala na yango ya mabe, makanisi na ye ya masumu soki ebongwanaki te, ata ndele ekopusa ye na kozongela makambo oyo atikaki. Ezali yango oyo esalemaka na bato mingi oyo bamekaki, na ndakisa, kotika misala ya mabe lokola komela makaya, kolangwa masanga to kosala misala misusu ya mabe, boye te? Soki basalaki milende te mpo na kobongwana bato na sika kati na nguya oyo ezali kopusa elimo na bango, ezalaki mpasi te na kozongela misala yango. Kobongwana ya solo ezali kosenga kobongwana mobimba na makanisi.​—Baloma 12:2.

14. Lolenge nini nguya oyo ezali kopusa elimo ekoki koyeisama ya sika?

14 Na yango, lolenge nini moto akoki koyeisa sika nguya wana mpo ete yango epusa elimo na ye na nzela malamu? Liloba “koyeisa sika” ebongoli verbe moko ya Greke oyo esalelami mpo na komonisa likambo lizali kosalema sikawa, likambo lizali kolanda kosalema. Na bongo, soki tozali koyekola Liloba na Nzambe, Liloba na solo, mpe kokanisa na mozindo likoló na ndimbola na yango​—ntango nyonso—​nguya oyo ezali kopusa elimo na biso ekozala ya sika. Bato na sianse bazali koyebisa biso ete, kati na bɔɔngo na biso, eloko moko oyo ezali lokola bilembo ya lotiliki mpe ya chimie ezali koleka na mosisa moko na moko ya bɔɔngo, kokatisáká bongo matongá mingi oyo babengi synapses. Mokanda Bɔɔngo (na Lingelesi) elobi ete: “Likoki ya kobomba makambo esalemaka na mosisa ya synapse ntango elembo oyo eyebisaka makambo ekatisi yango, kotikáká nsima na yango elembo.” Wana elembo yango moko eleki lisusu na esika yango, ba cellules ya bɔɔngo ekoyeba yango mpe ekoyanola nokinoki. Na nsima, yango ekosala nzela ya sika na makanisi epai na moto. Soki tozali kolya ntango nyonso biloko malamu ya elimo, nzela ya sika na makanisi ezali kosalema kati na biso, mpe nguya oyo ezali kopusa elimo na biso ezali kokóma ya sika.​—Bafilipi 4:8.

“Tolata Bomoto na sika”

15. Na ndimbola nini bomoto ya sika ezali mpenza ya sika?

15 Na nsuka, ntoma Paulo alobi ete: “Bolata bomoto na sika bozalisami na boyokani na mokano na Nzambe kati na boyengebene mpe bosembo ya solo.” (Baefese 4:24, MN) Ee, moklisto asengeli kolata bomoto na sika. Awa, “sika” elobeli ntango te, kasi nde ezaleli. Elingi koloba te ete, ezali sika na ndimbola ya “eloko ebimi sika.” Ezali bomoto na sika na mobimba mpenza, yango “ezalisami na boyokani na mokano na Nzambe.” Na Bakolose 3:10, ntoma Paulo asalelaki elobeli ekokani na oyo mpe alobaki ete “ezalisami na sika mpo na boyebi, kino ekozwa ye motindo na Mozalisi na ye.” Lolenge nini bomoto wana ekómaka ya sika?

16. Mpo na nini tokoki koloba ete bomoto na sika “ezalisami na boyokani na mokano na Nzambe”?

16 Jéhovah Nzambe asalaki liboso bato mibale, Adam mpe Eva, na elilingi na Ye mpe na lolenge na Ye. Bazalisamaki na bizaleli ya bomoto mpe ya elimo oyo ekesenisaki bango na banyama. (Genese 1:26, 27) Atako botomboki na bango ekweisaki bato nyonso kati na lisumu mpe kozanga kokoka, biso bakitani na Adam, kino sikawa tozali na makoki ya komonisa bizaleli ya bomoto mpe ya elimo. Mokano na Nzambe ezali ete baoyo bakozala na kondima kati na mbeka ya lisiko bakoka kolongola bomoto na kala mpe basepela na “bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe.”​—Baloma 6:6; 8:19-21; Bagalatia 5:1, 24.

17. Mpo na nini tokoki koloba ete boyengebene mpe bosembo ezali bizaleli oyo bimonisaka bomoto na sika?

17 Boyengebene mpe bosembo ya solo ezali bizaleli mibale oyo ntoma Paulo amonisi ete ekangani na bomoto na sika. Ezali yango nde endimisi ete bomoto na sika eyeisami sika engebene elilingi ya Mozalisi na yango. Nzembo 145:17 eyebisi biso ete: “Jéhovah azali boyengebene na nzela na ye nyonso; azali mpe [sembo] na misala na ye nyonso.” Mpe Emoniseli 16:5 elobi na ntina na Jéhovah ete: “Ozali sembo, Oyo azali mpe azalaki, Oyo Mosantu.” Ya solo, boyengebene mpe bosembo ezali bizaleli ya ntina oyo tosengeli komonisa soki tolingi ete tozala bato oyo bazalisamaki na elilingi na Nzambe mpe baoyo bazali komonisa nkembo na ye. Tosengeli kozala lokola, Zakaria, tata na Yoane Mobatisi, oyo apusamaki na elimo santu na kosanzola Nzambe mpo ete apesi libota na Ye “libaku ya kosalela ye na kobanga te mosala na bulee na sembo mpe na boyengebene.”​—Luka 1:74, 75.

‘Tolanda kotambola lokola Bana na Pole’

18. Lolenge nini ntoma Paulo asalisi biso na komona malamumalamu lolenge banzela ya mokili ezali mpenza?

18 Lokola tosilisi kotalela na bozindo maloba na ntoma Paulo mazwami na Baefese 4:17-24, tozali na makambo mingi ya kokanisa na ntina na yango. Kobanda na verset 17 kino verset 19, ntoma Paulo asalisi biso na komona malamumalamu lolenge banzela na mokili ezali mpenza. Lokola baboyi boyebi na Nzambe mpe bayeisi mitema na bango makasi epai na ye, baoyo bazali kati na mokili basili komilongola bango moko longwa na liziba ya solo ya bomoi. Mpo na yango, lokola bazangi mokano kati na bomoi mpe litambwisi ya solo, bamipesi na makambo ya bolema mpe mazangi ntina. Bamizindisi kati na kobeba ya bizaleli mpe ya elimo. Oyo nde ezalela ya mawa! Mpe oyo nde ntina monene tozali na yango ya kozala na ekateli ya kolanda kotambola lokola bana na pole!

19. Elendiseli nini ya nsuka ntoma Paulo apesi biso mpo na kosalisa biso na kotambola lokola bana na pole?

19 Na nsima, na verset 20 mpe verset 21, ntoma Paulo amonisi ntina mpenza ya koyekola koyeba solo mpo ete totelema pembeni ya solo te, kasi na komonisa yango lisusu kati na bomoi na biso, lokola Yesu asalaki yango. Na nsuka, kobanda na verset 22 kino verset 24, ntoma Paulo alendisi biso na kobwaka bomoto na kala mpe​—kozala na ekateli makasi ya kolata bomoto na sika. Bobele na ntango yango, tosengeli kolanda kotambwisa makanisi na biso na makambo oyo mazali malamu mpe ya elimo. Na koleka, tosengeli kotalela Jéhovah mpo ete akosalisa biso na kotambola lokola bana na pole. “Mpo ete Nzambe nde alobaki ete: ‘Tika pole engenga kati na mokili,’ ye wana asili kongengisa mitema na biso ete apesa biso pole na boyebi na nkembo na Nzambe kati na elongi na Klisto.”​—2 Bakolinti 4:6.

Okoki koyanola?

◻ Lolenge nini tokoki lelo oyo “koyekola koyeba Klisto”?

◻ Mpo na nini tosengeli kozala na ekateli makasi mpo na kolongola bomoto na kala?

◻ Nguya oyo ezali kopusa elimo na biso ezali nini, mpe lolenge nini yango ezali kokóma ya sika?

◻ Bizaleli nini bizali komonisa bomoto na sika?

[Elilingi na lokasa 15]

Yesu alobaki: “Ngai nazali nzela mpe solo, mpe bomoi”

[Elilingi na lokasa 16]

‘Tolongola bomoto na kala elongo na misala na yango’: nkele, nkanda, kotonga, kotuka,maloba na nsoni, mpe lokuta.​—Bakolose 3:8, 9

[Elilingi na lokasa 17]

“Tolata bomoto na sika bozalisami na boyokani na mokano na Nzambe kati na boyengebene mpe bosembo ya solo.”​—Baefese 4:24

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto