Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/3 lok. 26
  • Jéhovah asungaki ngai kati na boloko na mokili mokauki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah asungaki ngai kati na boloko na mokili mokauki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bokangami
  • Kati na Boloko
  • Boloko kati na Mokili mokauki
  • Bomoi kati na Boloko
  • Elimo na Biso ebatelamaki malamu
  • Tokoti na Boyokani elongo na Bandeko na Biso
  • Nsuka nsuka tobimisami na Boloko!
  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mapamboli na ‘eleko ya malamu mpe na eleko ya mpasi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Tokoki ntango nyonso kosala eloko mpo na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Esika nayokaki nkombo Yehova mbala ya liboso
    Lamuká!—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/3 lok. 26

Jéhovah asungaki ngai kati na boloko na mokili mokauki

LISOLÓ YA ISAIAH MNWE

Lisambisi moko lisalemaki te, mpe nasalaki likambo moko ya mabe te. Atako bongo, bakweisaki ngai na etumbu makasi kati na boloko moko mosika katikati na Afrika na moi makasi kuna na mokili mokauki Sahara. Likambo ya mpasi mingi, ata moto moko te kati na baninga na ngai ayebaki esika nazalaki. Likambo yango lisalemaki ekoki sikawa mibu mwambe, na elanga ya mobu 1984. Botika nalimbwela bino ndenge nini nakomaki kati na ezalela wana ya nsomo.

NA 1958, wana nazalaki bobele na mibu 12, yaya na ngai ya mobali akómaki Témoin de Jéhovah. Nzokande, tata mpe mama na ngai balandaki kosambela banzambe ya bikólo Abia, na Nigéria, epai tozalaki kofanda.

Na 1968, nakotaki na limpinga ya Biafra. Ata kati na bitumba, nazalaki kokanisa etelemelo ya bokatikati ya ba Témoins de Jéhovah, mpe nabondelaki Nzambe ete asalisa ngai. Nalakaki ye ete soki apesi nzela ete nabika na etumba, nakokóma moko na Batemwe na ye.

Nsima ya etumba, nasalaki nokinoki mpo na kokokisa elaka na ngai. Na Juillet 1970, nazwaki batisimo mpe kozanga koumela nabandaki mosala ya pionnier. Nsima na mwa ntango, naponamaki nkulutu kati na lisangá ya boklisto. Mosika te, nazwaki libyangi ya filiale ya Nigéria mpo na kokende lokola misionere na mokili moko ya pembeni epai mosala ya ba Témoins de Jéhovah endimamaki te na Leta. Nandimaki, mpe na Janvier 1975, wana ezwaki ngai passeport nasimbaki nzela ya kokende.

Bokangami

Na mobu 1978, nazwaki mokumba ya kotala Batemwe kati na mokili wana mobimba. Lokola bazalaki mingi te, nasengelaki kosala mibembo mingi, kati na bamboka epai masangá mazalaki mpe bisika bato oyo bazalaki kosepela na solo bazalaki. Mbala na mbala bazalaki kotuna ngai mituna na bisika oyo bapolisi bazali kokɛngɛla nzela. Mbala mibale, bakangaki ngai na boumeli ya mikolo minei mpe batunaki ngai na ntina na mosala na biso.

Na nsima, na Juin 1984, wana tozalaki komibongisa mpo na mosala ya kosakola na mokolo ya lomingo, mosali moko ya Leta oyo azalaki na boboto akebisaki biso ete bapolisi bazalaki koluka kokanga ba Témoins de Jéhovah. Nsima na poso moko, ngai mpe Djagli Koffivi, oyo autaki na Togo, tokangamaki. Bamemaki biso na biro ya polisi mpe basengaki ete topesa nkombo ya ba Témoins de Jéhovah nyonso ya engumba. Balobaki na biso ete: “Tokotika bino bobele soki bopesi biso bankombo wana.”

Nazongisaki ete: “Bino nde bozali bapolisi. Ezali mokumba na bino ya kozwa bato oyo bozali koluka. Nazali moto ya mosala na bino te.” Tosololaki na boumeli ya minite 30, mpe bapolisi bayebisaki biso ete bakobeta biso. Atako bongo, topesaki bango nkombo ya bandeko na biso baklisto te. Na yango, bazwaki ekateli ya kokanga bibliotɛkɛ na ngai ya mikanda oyo mikolimbolaka Biblia.

Kati na Boloko

Ntango toyaki na mikanda na biro ya polisi, ngai mpe Djagli tosengelaki kokitisa yango. Wana tozalaki kokitisa yango, lokasa moko ebimaki na Biblia na ngai ya monene. Ezalaki nde programme ya assemblée de district oyo ezalaki na nkombo ya bankulutu nyonso ya mboka. Nalokotaki yango nokinoki mpe nakotisaki yango na libenga na ngai. Kasi moko na bapolisi amonaki ngai mpe asengaki ete napesa ye yango. Nabangaki makasi mpenza.

Lokasa yango etyamaki likoló na mesa, kati na ndako epai ngai mpe Djagli tozalaki komema mikanda. Ntango nakotaki na mikanda mosusu, nakendeki na mesa, nazwaki lokasa yango, mpe nakotisaki yango na libenga. Bongo nalobaki ete nalingaki kokende na w.c. Polisi moko akendeki kotika ngai na w.c. Nsima ya kokota mpe kokanga ekuke, napasolaki lokasa yango mokemoke mpe nabwakaki yango na kabiné.

Wana bapolisi bayebaki likambo oyo lisalemaki, basilikaki mingi. Kasi bazalaki kobanga kozwa meko na likambo yango, mpo ete bakonzi na bango balingaki koloba ete bamonisaki bopotu na kopesáká ngai libaku ya kopasola lokasa yango. Nsima ya kokanga biso mikolo 17, inspecteur moko ya polisi ayebisaki biso ete tokanga bisaka na biso mpo tosengelaki kokende epai mosusu. Totyaki mwa bilamba na biso kati na saki ya plastique, mpe na nse natyaki Biblia moko moke oyo moto moko amemelaki biso na nkuku ntango ayaki kotala biso.

ozwaki libaku ya koyebisa na Batemwe ete tokei epai mosusu, kasi toyebaki te epai tozalaki kokende. Na ntongontongo ya mokolo molandaki, le 4 Juillet 1984, inspecteur ya polisi alamusaki biso. Asalaki bolukiluki epai na biso, asengaki ete tobimisa bilamba na saki mpe tosimba yango na maboko na biso. Kasi ntango nakómaki na simisi ya nsuka, alobaki ete nakoki kozongisa bilamba na saki, na bongo Biblia emonanaki te.

Boloko kati na Mokili mokauki

Bapolisi bamemaki biso na libanda ya mpepo, epai tomataki na mpepo ya basoda. Nsima na bangonga mibale tokómaki na engumba moko oyo ezalaki na bato soko 2 000, oyo pembeni na yango boloko ezali. Ntáka ya bakilomɛ́tɛlɛ 650 ekabolaki yango na engumba oyo ezalaki mpenza pembeni. Bakumbaki biso longwa na mpepo kino na boloko mpe bapesaki biso na maboko ya mokɛngɛli na boloko. Moto moko te, kati na basangani ya libota na biso to kati na baninga na biso baklisto ayebaki epai bamemaki biso.

Engumba epai kuna bamemaki biso ezalaki mwa esika ya maziba ya mai to oasis kati na mokili mokauki ya Sahara. Ezalaki na banzeté mike, mwa ndambo na nzeté mpe bandako oyo esalami na mabelé. Mpo na kozwa mai, esengeli kotimola libulu na mabelé na bozindo ya mɛ́tɛlɛ moko to mɛ́tɛlɛ moko na ndambo. Moto moko ya mibu 31, oyo abotami na esika yango ayebisaki biso ete na bomoi na ye amonaki mbula konoka bobele mbala moko! Etúka yango ezalaka na molunge makasi. Moto moko ya boloko alobaki ete mokolo moko thermomètre ekomaki kino na 60°C! na quartier ya boloko! Mopepe moko makasi ezalaki kopepa ntango nyonso, komemaká zelo oyo ezalaki koswa na nzoto mpe na miso.

Moto oyo akómi na esika wana akoki kososola ete azali na esika ya etumbu oyo eleki mpasi na mokili yango. Boloko ezingamaki na bifelo milai oyo ezalaki kobatela mwa moke na mopepe mpe na moi. Nzokande, bifelo bizalaki na ntina moko te mpo na kopekisa bato na kokima, mpamba te esika mosusu ya kokende ezalaki te. Na libanda ya maziba ya mai, nzeté moko ezalaki te, to eloko moko te oyo ekokaki kobatela moto oyo alingi kokima.

Liboso ete tokota, mokambi ya boloko asalaki bolukiluki epai na biso. Alobaki na biso ete tobimisa biloko nyonso bizalaki na saki na biso. Nabandaki kobimisa basimisi na biso moko na moko. Ntango etikalaki bobele simisi moko oyo ezalaki kozipa Biblia, nalakisaki ye saki mpo na komonisa ye simisi mpe nalobaki ete: “Biloko nyonso oyo bapesaki biso nzela na komema yango oyo.” Wana andimaki, alobaki na biso ete tokota na lopango ya boloko. Biblia ezalaki mokanda bobele moko oyo tozalaki na yango.

Bomoi kati na Boloko

Bato nyonso na boloko bazalaki 34. Bazalaki basali mabe baoyo bayebanaki mingi mpe baoyo balekaki mabe na mokili wana. Mingi bazalaki babomi na bato oyo batalelamaki lokola bakokaki kobongwana te. Biso nyonso tozalaki kolala kati na biteni mibale oyo ekabwani na kikóso moko ya polele. Kikóso yango ezalaki na engwongolo ya polele oyo ezalaki kosalelama lokola kabiné. Atako ntongo nyonso bato na boloko bazalaki kopepa yango, emonanaki lokola ete banzinzi nyonso ya mokili mokauki bazalaki kosepela na malili mpe na bosoto ya engwongolo yango.

Bilei bobele moko oyo tozalaki na yango ezalaki vunda (sorgho). Mokangami moko azalaki konika yango, kotokisa mpe kokabola yango na basani, oyo ezalaki kotyama likoló ya litoko ya mokangami moko na moko. Bilei yango bizalaki kozipama te. Na bozongi na biso na mosala, ebele ya banzinzi batondanaki likoló na sani moko na moko ya vunda. Ntango tozalaki kozwa sani na biso, banzinzi bazalaki kopumbwa na makelele makasi. Na boumeli ya mikolo mibale ya liboso, tolyaki eloko moko te. Na nsima, na mokolo ya misato, nsima na kobengana banzinzi mpe kolongola mposo ya kokauka ya likoló, tobandaki kolya vunda. Tobondelaki Jéhovah ete abatela kolongono ya nzoto na biso.

Tozalaki kosala mosala na nse ya moi makasi, kobukáká bifelo ya lopango ya kala ya boloko mpe kotonga oyo ya sika. Ezalaki mpenza mosala moko makasi. Tozalaki kosala kozanga kopema longwa na ngonga ya motoba na ntongo kino na midi, ntango bazalaki kopesa biso mwa biloko ya kolya, na nsima tozongelaki mosala kino ngonga ya motoba ya mpokwa. Tozalaki ata na mokolo moko ya bopemi te. Tozalaki konyokwama bobele na moi te, kasi lisusu na malili na eleko ya malili makasi. Tonyokwamaki lisusu na bakengeli mabe ya boloko.

Elimo na Biso ebatelamaki malamu

Djagli mpe ngai tozalaki kotanga Biblia na kobombama mpe tozalaki kosolola elongo na ntina na makambo oyo tozalaki koyekola. Tokokaki kotanga Biblia na polele te, mpo ete balingaki kobotola yango mpe tolingaki kozwa etumbu. Mokangami moko oyo nabandaki koyekola Biblia elongo na ye azalaki na mwinda ya pétrole oyo tozalaki kosalela yango biso mibale. Mbala mingi, nazalaki kolamuka na ngonga ya liboso to ya mibale ya ntongo mpe nazalaki kotanga kino ngonga ya mitano ya ntongo. Na motindo yango, nakokaki kotanga Biblia na mobimba na yango.

Tosakolaki na bakangami mosusu, mpe moko na bango asololaki na mokambi na boloko na ntina na biso. Kozanga ete tomizela na yango, mokambi wana ya boloko apesaki ye nimero moko ya Réveillez-vous! oyo azalaki na yango, mpe mokangami yango amemelaki biso yango. Natangaki yango na mobimba mbala na mbala. Botangi na biso mpe mosala na biso ya kosakola esalisaki biso mpo na kobatela elimo na biso makasi.

Tokoti na Boyokani elongo na Bandeko na Biso

Tozalaki na ndingisa ya kokoma to ya kotinda mikanda te. Nzokande, moto moko ya boboto alobaki na biso ete akosalisa biso. Na le 20 Août, soko poso motoba nsima na kokóma na biso, nakomaki mikanda mibale na nkuku, moko mpo na ambassade ya Nigéria mpe mosusu mpo na bandeko na biso Batemwe. Nakundaki yango na zelo mpe natyaki libanga moko monene na esika wana lokola elembo. Na nsima, moto oyo akómaki moninga na biso ayaki mpe akamataki yango.

Baposo mingi elekaki, kozanga ete nayoka nsango. Mokemoke, nabungisaki elikya ete mikanda yango ekómaki. Nzokande, ekómaki mpe baninga na biso Batemwe basilaki kozwa bibongiseli mpo na kobimisama na biso na boloko. Ministère des Affaires extérieures ya Nigéria etyaki likebi na likambo yango mpe etunaki na mokili epai nakangamaki mpo na nini batyaki ngai na boloko wana.

Nsima na mikolo, na ntongo ya 15 Novembre 1984, babimisaki biso mpo na kotya bopeto. Bakɛngɛli batindaki ngai na kabiné ya école secondaire moko, oyo balandaki kosalela yango na boumeli ya baposo mingi atako esilaki kokangama. Etondaki na bosoto mingi. Bakɛngɛli bayebisaki na ngai ete nasengelaki kokómisa yango peto. Nazalaki na esaleli mosusu te bobele maboko na ngai. Ntango nazalaki kokanisa lolenge nini nakobanda mosala wana ya nsomo, mokonzi na bakɛngɛli ayaki koyebisa ngai ete moyangeli ya etúka alingaki komona ngai.

Ntango nakomaki, moyangeli ya etúka alobaki ete autaki kosolola elongo na président ya mboka, oyo ayebisaki likambo na ngai. Président alimbolaki ete soki nakopesa nkombo ya ba Témoins de Jéhovah ya mboka wana, bakotika ngai nokinoki mpe nakoki kokende na mpepo oyo ekolanda. Nalobaki lisusu ete soki balingi kokanga ba Témoins de Jéhovah, ezali mokumba ya polosi mpo na koluka bango. Moyangeli ya etúka ayebisaki ngai ete nasengeli kokanisa malamumalamu na ntina na lisengi na ye. Apesaki ngai mikolo minei to mitano mpo na kokanisa. Bazongisaki ngai mpe bakɛngɛli bamemaki ngai na boloko, kasi na esengo nyonso, nazongaki na bakabiné wana te!

Nsima na mikolo mitano, moyangeli ya etúka abyangaki ngai mpe atunaki ekateli oyo nazwaki. Nayebisaki ye ete ntina oyo nakotaki na boloko na bango ezalaki bobele mpo ete napesaki litatoli na ntina na Nzambe ya solo, kasi nasalaki mabe moko te. Nalimbolaki ete nazali na passeport oyo endimami na Leta mpe na ndingisa ya kofanda kati na mboka. Mikanda na ngai nyonso mizalaki malamu. Mpe bipai nyonso nazalaki kokende kati na engumba moko, nazalaki kokutana na bapolisi mpo na koyeba ete makambo nyonso mazali na molongo. Lokola nasalaki mabe moko te, natunaki ete: “Mpo na nini napesameli etumbu? Soki balingaki te ete nazala kati na mboka wana, mpo na nini bazongisaki ngai te na mboka na biso? Mpo na nini bakotisaki ngai na boloko na esika oyo?”

Nalobaki na boumeli ya minite 15. Ntango nasilisaki koloba, basengaki ete nakoma makambo oyo nauti koloba, mpe bayebisaki ngai ete maloba na ngai makotindama epai na président. Bapesaki ngai papiers, mpe nakomaki nkasa minei.

Nsuka nsuka tobimisami na Boloko!

Nayokaki lisusu likambo moko te kino janvier 1985, penepene na sanza nsambo uta nakangamaki. Na libaku wana, mokonzi na bakɛngɛli ayaki kotuna soki nakomaki mokanda na ambassade ya Nigéria. Nayanolaki ete “Ee.”

Atunaki ngai ete: “Mpo na nini osalaki motindo wana? Mpo na nini oyebisaki ngai yango te?”

Nayebisaki ye ete likambo yango etalaki ye te. Kasi nandimisaki ye ete nakomaki likambo moko te mpo na kofunda ye, mpo ete azalaki na likambo te na kokangama na ngai. Nalobaki ete: “Ata mama na ngai ayebi te epai nazali.” Na yango, alingaki koyeba ndenge nini natindaki mokanda yango, kasi naboyaki koyebisa ye.

Na mokolo molandaki, bakɛngɛli babongisaki Land Rover moko mpe bayebisaki ngai ete Djagli mpe ngai, tokolongwa wana. Bamemaki biso libanda mpe balongolaki biso bilamba mpe basalaki bolukiluki. Nasilaki kopesa Biblia na ngai na mokangami oyo nazalaki koyekola elongo na ye, mpo ete nayebaki ete bakɛngɛli balingaki kokanga yango soki bakutaki yango epai na ngai. Mobali wana ayebisaki biso ete ntango akobima na boloko, akokóma Témoin de Jéhovah. Tozali kobondela mpo ete asala bongo.

Mwa mikolo na nsima, bazongisaki ngai na Nigéria mpe, na Février 1985, nazongelaki mosala na ngai ya mokɛngɛli ya zongazonga na mboka wana. Kobanda 1990, nazali mokɛngɛli ya district na Nigeria. Djagli azali ntango nyonso Temwe ya sembo na mboka Côte d’Ivoire.

Na likambo oyo, nasili kososola ete Jéhovah Nzambe akoki kobatela biso ata kati na mikakatano ya makasi. Mbala na mbala tomonaki ete loboko na ye ezalaki kobatela biso na boloko. Kobimisama na biso na boloko endimisi ngai ete Jéhovah asuki te bobele na koyeba epai basaleli na ye bazali mpe minyoko oyo bazali kokutana na yango, kasi ayebi lisusu kobikisa bango na komekama.​—2 Petelo 2:9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto