Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/08 nk. 24-27
  • Esika nayokaki nkombo Yehova mbala ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esika nayokaki nkombo Yehova mbala ya liboso
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakómi mokangami
  • Ndenge nayebaki Nzambe ya solo
  • Mokumba monene
  • Kobimisa mikanda na ntango ya epekiseli
  • Basali ya Leta bakómi kolandela ngai
  • Yehova, ndako makasi
  • Jéhovah asungaki ngai kati na boloko na mokili mokauki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nayekolaki kotya elikya epai na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Tokoki ntango nyonso kosala eloko mpo na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Na lisalisi ya Yehova, tobikaki na mabɔkɔ ya bakonzi ya mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 10/08 nk. 24-27

Esika nayokaki nkombo Yehova mbala ya liboso

Lisolo ya Pavol Kovár

Babombi ezalaki kokita lokola mbula mpe tokendaki kobomboma na mwa ndako moko. Wana babombi ezalaki se kokita mpe mwa ndako yango ekómaki koningana, moninga moko ya bolɔkɔ abondelaki na mongongo makasi ete: “Ee Yehova, bikisá biso! Mpo na nkombo na yo mosantu, nabondeli yo, bikisá biso!”

EZALAKI na mokolo ya 8 Yanuali 1945, mpe nazalaki na bolɔkɔ na engumba Linz, na Autriche. Tozalaki bato soki 250 na mwa ndako yango, mpe biso nyonso tobikaki. Ntango tobimaki libándá, tomonaki ete biloko nyonso ebebaki. Libondeli oyo nayokaki etikalaki na makanisi na ngai, atako tii lelo oyo, nayebaka te nani asalaki yango. Liboso nayebisa bino ndenge oyo nsukansuka nayebaki Yehova, tiká nalobela mwa moke bomwana na ngai.

Nabotamá na mokolo ya 28 Sɛtɛmbɛ 1921, na ndako moko pembeni ya mboka Krajné, na wɛsti ya Slovaquie, oyo na ntango wana ezalaki na kati ya Tchécoslovaquie. Baboti na ngai bazalaki bandimi ya molende ya Lingomba ya Protesta. Na ntɔngɔ nyonso ya mokolo ya lomingo, Tata azalaki kotánga Biblia mpe Mama ná biso bana minei tozalaki koyoka na likebi. Kasi, ata mokolo moko te nayokaki Tata atángi nkombo Yehova. Tozalaki na bomoi ya mindɔndɔ te, kasi tozalaki kosepela na mwa moke oyo tozalaki na yango.

Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na 1939, bato bazalaki kobanga. Bato mingi bazalaki naino kokanisa bampasi oyo Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ememaki mbula soki 20 liboso. Na 1942, nabengamaki na mosala ya soda. Atako eyebanaki ete ekólo Slovaquie ezali na ngámbo ya Allemagne, na sanza ya Augusto 1944, guvɛrnema elingaki kozongisa demokrasi. Lokola elongaki te, bakangaki bankóto ya basoda ya Slovaquie mpe batindaki bango na bitúká oyo ezalaki na mabɔkɔ ya basoda ya Allemagne; nazalaki na kati ya basoda yango. Nsukansuka, natindamaki na Gusen, kaa moko moke oyo ezalaki pembeni ya kaa ya bakangami ya Mauthausen, oyo ezalaki mosika te na engumba Linz.

Nakómi mokangami

Tozalaki kosala na izini ya baaviɔ pembeni ya mboka Sankt Georgen an der Gusen. Nazalaki kosala na esika oyo bakataka mabaya. Tozalaki na bilei mingi te, mpe na sanza ya Yanuali 1945, bilei ekómaki lisusu moke koleka, mpamba te basoda ya Nazi bazalaki lisusu kolonga bitumba te. Bilei ya mwa malamu oyo tozalaki kolya ezalaki kaka supu. Ntɔngɔ nyonso, bato bazalaki kouta na kaa ya Mauthausen mpo na koya kosala mosala na esika oyo tozalaki. Mbala mingi, bakɛngɛli bazalaki kobɛta mpe koboma bakangami oyo bazalaki makasi te na mosala. Na nsima, bakangami mosusu bazalaki kolɔkɔta bibembe yango mpe kotya yango na wagon mpe bazalaki komema yango esika oyo ezalaki kotumbama.

Atako bampasi wana nyonso, tozalaki na elikya ete mosika te etumba ekosila. Na mokolo ya 5 Mai 1945, sanza minei nsima ya likambo oyo nalobelaki na ebandeli, ntango nalamukaki, nayokaki makɛlɛlɛ makasi mpe nabimaki mbangu na libándá. Bakɛngɛli bakimaki, mandoki etandamaki na nse, mpe baporte nyonso ezalaki polele. Tozalaki komona kaa oyo ezalaki na ngámbo mosusu ya elanga. Bakangami bazalaki kobima na kaa yango lokola banzoi bazali kokima na ndako na bango oyo ezali kozika. Bato oyo bazalaki kobima bazalaki mpe kosala makambo ya nsɔmɔ. Nabosanaka te ndenge oyo bato babomamaki mokolo yango.

Bakangami bazalaki koboma ba-kapo, elingi koloba bakangami mosusu oyo bazalaki koyokana na bakɛngɛli. Mbala mingi, ba-kapo yango bazalaki motema mabe koleka kutu bakɛngɛli bango moko. Namonaki ntango moto moko azalaki kobɛta kapo moko na nzete, mpe azalaki koloba ete: “Abomaki tata na ngai. Tozalaki na ye awa, mpe abomaki ye eleki kaka mikolo mibale!” Na mpokwa, elanga etondaki na bibembe ya ba-kapo mpe bakangami mosusu. Na nsima, liboso tólongwa na kaa yango, totambolaki na kati mpo na kotala bisika oyo bazalaki koboma bato, mingimingi bisika oyo bazalaki kotumba bato.

Ndenge nayebaki Nzambe ya solo

Nazongaki ndako na nsuka ya sanza ya Mai 1945. Nakutaki ete baboti na ngai bayebaki nkombo ya Nzambe, oyo nayokaki na ndako epai tokimaki babombi; kutu, bakómaki mpe Batatoli ya Yehova. Mwa moke na nsima, nakutanaki na Oľga, elenge mwasi moko oyo alingaki makambo ya Nzambe mingi, mpe mbula moko na nsima, tobalanaki. Molende na ye mpo na koyeba Biblia elendisaki ngai nakoba koyekola makambo ya Yehova. Na liyangani ya nsuka oyo tosalaki liboso Bakoministe bápekisa mosala ya kosakola na 1949, ngai ná Oľga, elongo na bato mosusu soki 50, tozwaki batisimo na Ebale Váh, na engumba Piešťany. Tobotaki bana mibale, Oľga ná Vlasta.

Ján Sebín, Motatoli moko oyo asalisaki mingi mpo na kobongisa mosala ya kosakola nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, azalaki koya mingi na ndako na biso mpe nakómaki kobima na ye mingi na mosala ya kosakola. Atako Bakoministe bazalaki kotɛmɛla biso makasi, totikaki kosakola te. Tozalaki koyebisa bato na mayele mateya ya Biblia, mpe eumelaki te, tokómaki koyekola Biblia na bato mingi. Ntango Ján akendaki na mboka mosusu, ngai ná mwasi na ngai tokobaki koyekola na bato yango. Na mayangani mingi, tozalaki kokutana na bandeko yango, elongo na bana mpe bankɔkɔ na bango. Ezalaki kopesa biso esengo mingi!

Mokumba monene

Na 1953, Batatoli mingi oyo bazalaki kotambwisa mosala ya kosakola bakangamaki. Na yango, basɛngaki ngai napesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na mboka moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 150 longwa na esika oyo nazalaki kofanda. Nsima ya pɔsɔ mibale nyonso, soki nasilisi mosala na ngai na mokolo ya pɔsɔ nsima ya midi, nazalaki kozwa engbunduka na engumba Nové Mesto nad Váhom mpo na kokende na engumba Martin, na nɔrdi ya Slovaquie. Kuna, nazalaki koteya bato Biblia tii na butu; nazalaki mpe kosala yango mokolo mobimba ya lomingo. Na mpokwa ya mokolo ya lomingo, nazalaki kozwa engbunduka mpo na kozonga na Nové Mesto. Mbala mingi, nazalaki kokóma kuna na midi ya butu mpe nazalaki kolala na ndako ya mobali moko ná mwasi na ye oyo bakómaki mibange. Na ntɔngɔ ya mokolo ya yambo, nazalaki koleka mbala moko na mosala mpe nazalaki kozonga na mboka na biso Krajné na mpokwa. Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, soki ngai nazali te na ndako, Oľga azalaki kobatela bana na biso mibale.

Na 1956, basɛngaki ngai nakóma mokɛngɛli ya zongazonga, elingi koloba nakendaka kotala masangá oyo ezali na mboka na biso mpo na kolendisa bandeko. Lokola bandeko mingi oyo bazalaki na mokumba yango bakɔtaki bolɔkɔ, namonaki ete nasengeli kondima yango. Ngai ná mwasi na ngai tozalaki na elikya ete Yehova akosunga libota na biso.

Mibeko ya Bakoministe elobaki ete mwana-mboka nyonso asengeli kozala na mosala. Guvɛrnema ezalaki kotalela bato oyo bazangi mosala lokola bato bazangá ntina, mpe ezalaki kotinda bango na bolɔkɔ. Yango wana, nakobaki na mosala na ngai. Nazalaki kolekisa mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo mibale elongo na libota na ngai, mpe tozalaki kosala elongo makambo ya Nzambe mpe makambo mosusu; kasi na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo mosusu mibale, nazalaki kokende lisangá mosusu ya pembeni; masangá nyonso oyo nazalaki kotala ezalaki motoba.

Kobimisa mikanda na ntango ya epekiseli

Bakɛngɛli ya zongazonga bazalaki na mokumba ya kozwa bibongiseli mpo lisangá mokomoko ezwaka mikanda. Na ebandeli, bazulunalo ezalaki kokomama mingimingi na mabɔkɔ to na daktilo. Na nsima, tokómaki kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekomami na carbone mpe tozalaki kotinda yango na masangá. Mpe na nsima, bazalaki kobimisa yango na bapapye. Lokola kosomba bapapye mingi ekokaki kobenda likebi, ezalaki kosɛnga ete baoyo bakei kosomba yango bázala na mpiko mpe ekɛngɛ.

Štefan Hučko akómaki kolinga mingi mosala ya kosomba bapapye, mpe ayebaki yango malamu. Na ndakisa: Mokolo moko, Štefan azongaki na engumba moko mosika mpo na kosomba bapapye na magazini moko; lokola bayebisaki ye ete bapapye yango esili, alingaki kobima. Kasi, amonaki mwasi moko oyo azalaki kotɛkisa na magazini yango, oyo alakaki ye ete akobombela ye bapapye yango. Ntango Štefan azalaki kopusana penepene na mwasi yango, polisi moko akɔtaki na magazini yango. Na mbala moko, mwasi yango amonaki Štefan mpe alobaki na ye na esengo ete: “Tata, ozali makila malamu! Tozwaki bapapye oyo ozali koluka.”

Štefan ayebisaki ye mbala moko ete: “Mama, nakanisi obosani, ezali ngai te. Ngai nazali kaka na mposa ya papye moko.”

Ntango Štefan amataki na motuka na ye, akokaki te kozonga ndako kozanga ete azwa bapapye yango oyo ayaki koluka. Yango wana, alongolaki kazaka mpe ekɔti na ye mpo bábosana ye; akɔtaki lisusu na maganizi yango mpe akendaki mbala moko epai ya mwasi yango. Alobaki na ye ete: “Nazalaki awa na pɔsɔ eleki, mpe olakaki ngai ete okobombela ngai bapapye. Osili kozwa yango?”

Mwasi yango alobaki ete: “Ɛɛ, nasili kozwa yango. Kasi, oyebi, eleki kaka miniti moke mobali moko akɔtaki awa mpe akokani na yo makasi. Bozali lokola mapasa!” Štefan azwaki bapapye yango mbangumbangu mpe abimaki; apesaki Yehova matɔndi mpo na yango.

Na bambula ya 1980, tokómaki kosalela bamasini mpo na kobimisa bakopi ebele mpe mwa masini ya konyata mikanda oyo elimbolaka Biblia; tozalaki kosala na bandako ya nse ya mabelé mpe bisika mosusu ebombaná. Na nsima, bazulunalo, ata mpe babuku mpe mwa babuku oyo tozalaki kobimisa ekómaki kokoka mpo na mosakoli mokomoko, ata mpe koleka.

Basali ya Leta bakómi kolandela ngai

Mokolo moko, na bambula ya 1960, babengisaki ngai na biro ya basoda ya kompanyi epai nazalaki kosala. Mibali misato oyo balataki bilamba ya basoda te bakómaki kotuna ngai mituna lokola oyo: “Banda ntango boni okóma kosangana na Batatoli ya Yehova? Okutanaka na banani?” Lokola napesaki bango biyano ya polele te, bayebisaki ngai ete bakoluka ngai lisusu nsima. Yango ezalaki mbala ya liboso oyo nakutanaki na bapolisi.

Mwa moke na nsima, bayaki kozwa ngai na esika ya mosala mpe bamemaki ngai na biro ya bapolisi. Mobali moko atyaki papye liboso na ngai mpe asɛngaki ngai nakoma bankombo ya Batatoli mosusu. Nsima ya ngonga soki moko azongaki; kasi, nakomaki eloko te na papye mpe nayebisaki ye ete nakoki kokoma nkombo ya moto te. Na pɔsɔ oyo elandaki, basɛngaki ngai lisusu likambo yango. Kasi, na mbala yango, babɛtaki ngai, mpe ntango nazalaki kobima, bazalaki kobɛtabɛta ngai na kulware tii nabimaki libándá.

Na nsima, bapolisi batungisaki ngai lisusu te na boumeli ya mbula mobimba. Na nsima, bapolisi batindaki moto moko na ndako na ngai. Tozalaki na ye na bolɔkɔ na kaa ya bakangami ya Banazi. Mobali yango alobaki na ngai boye: “Tosengeli kobongola ndenge ya kolandela makambo na bino. Soki totye Motatoli moko na bolɔkɔ, mitano bakobima.” Bakonzi ya Leta balingaki ete báyebaka ata mwa moke ndenge oyo tozalaki kosala mosala na biso. Kasi, nazalaki na ekateli makasi ya koyebisa bango ata likambo moko te oyo ekosalisa bango.

Na boumeli ya bambula, nazalaki moko na bandeko oyo bapolisi bazalaki kobenga mpo na kotuna bango mituna. Na bantango mosusu bazalaki kosolola na biso lokola baninga; kasi, na bantango mosusu bazalaki kotya bandeko mosusu na bolɔkɔ. Ngai nakɔtaki bolɔkɔ ata mbala moko te, kasi bapolisi bazalaki mbala na mbala kobengisa ngai tii na 1989, mbula oyo boyangeli ya Bakoministe ekweaki na Tchécoslovaquie.

Mwa bapɔsɔ na nsima, mokonzi moko monene ya bapolisi oyo autaki na Bratislava ayaki kotala ngai. Alobaki na ngai boye: “Soki ezalaki kaka mpo na ngai, tolingaki kotungisa bino te.” Na nsima, afungolaki saki mibale na motuka na ye oyo ezalaki na bambuma bátya na kati ya manzanza mpe apesaki ngai yango.

Yehova, ndako makasi

Atako banda nakómaki Motatoli ya Yehova, nalekisaki mbula 40 na kati ya epekiseli, nazalaki na bomoi ya esengo. Makambo oyo tokutanaki na yango na boumeli ya bambula yango esalaki ete tózala na boyokani makasi na bandeko na biso ya sembo. Tozalaki kopesa motuya mingi na bondeko na biso mpe tozalaki kotyelana motema.

Na sanza ya Marsi 2003, mwasi na ngai Oľga akufaki mpe likambo yango epesaki ngai mpasi mingi. Azalaki molongani ya sembo. Tomipesaki mobimba na mosala ya kosakola na boumeli ya bambula yango. Lelo oyo, nazali kokoba kosala lokola nkulutu na lisangá na biso mpe koluka bato oyo babongi, oyo nakoki koteya Biblia. Nkombo Yehova, oyo nayokaki mbala ya liboso na esika oyo tobombamaki mpo na kokima babɔmbi, na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ezalaki ntango nyonso ndako makasi mpo na ngai.a​—Masese 18:10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndeko Pavol Kovár akufaki mokolo ya 14 Yuli 2007, wana tozalaki naino kokoma lisolo oyo. Azalaki na mbula 85.

[Elilingi na lokasa 24]

Na 1942, ntango nazalaki soda ya Slovaquie

[Elilingi na lokasa 24]

Na nsima, nakɔtaki bolɔkɔ na Gusen (ezali komonana na nsima)

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© ČTK

[Elilingi na lokasa 24]

Tata azalaki kotángela biso Biblia mokolo nyonso ya lomingo na ntɔngɔ

[Elilingi na lokasa 25]

Mokolo ya libala na biso na 1946

[Elilingi na lokasa 27]

Ná Oľga, mwa moke liboso akufa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto