Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/4 nk. 28-30
  • Osalaka nyonso oyo esengeli na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osalaka nyonso oyo esengeli na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tokoki kobakisa “nyonso oyo esengeli”
  • Tosala nyonso oyo esengeli mpo na kosalisa basusu
  • Tosala nyonso oyo esengeli na biso mpo na kosepela na bato nyonso
  • Tosala nyonso oyo esengeli na biso
  • “Bósala nyonso oyo ekoki na bino”
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tómitambwisa “mokolo na mokolo” engebene komipesa na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Okoki kozala na esengo soki opesi Yehova oyo eleki malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/4 nk. 28-30

Osalaka nyonso oyo esengeli na yo?

“NAKOSALA nyonso oyo ekoki na ngai.” Mbala mingi maloba oyo malandanaka na “kasi,” mpe molongo molai ya maloba ya komilongisa mpo ete tomipesa mpasi te! Ezali boni mpo na komipesa epai na Jéhovah? Tokokisaka elaka na biso ya kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na ye?

Komipesa ˈelimboli kopesa bomoto na yo mobimba mpo na kosalela to mpo na losambo ya nzambe moko to mpo na misala ya bulee.ˈ Yesu asalaki mingi mpo na komonisa oyo elimobli komipesa epai na Jéhovah ntango alobaki ete: “Soko nani alingi koya nsima na ngai, tika amiboya ye moko mpe atombola nzete na mpasi na ye mpe abila ngai.” (Matai 16:24) Ye oyo amiboyi ye moko mpe amipesi na Nzambe asali ete kokokisama na mokano na Nzambe ezala eloko ya ntina monene kati na bomoi na ye.

Biso baoyo tosili komipesa epai na Nzambe, tosengeli komitalela mpo na komona soki bomoi na biso eyokani na ndai na biso. Ntango alendisaki baklisto bapakolami, ntóma Petelo amonisaki mpo na nini tosengeli komitalela: “Bozala na etingya mpo na kolendisa ebyangeli mpe eponeli na bino. Soko bakosalaka bongo, bokotuta mabaku soko moke te.” (2 Petelo 1:10) Ya solo, soki tokosala nyonso oyo esengeli, tokokwea na elimo te.

Tokoki kobakisa “nyonso oyo esengeli”

Ezali mpenza likambo ya kolongobana ete basaleli ya Jéhovah basala nyonso oyo esengeli mpo na kosepelisa ye. Nzokande, tokoki kopusa “nyonso” na biso mpo na oyo etali mokano na Nzambe. Mpo na mwana ya mibu misato, nyonso oyo akoki kosala mpo na kosunga mama na ye ezali kokende kosomba mwa biloko, kasi wana azali kokola akoki kosala mingi lisusu. Ezali mpe ndenge moko mpo na bakoli na biso ya elimo​—oyo ezalaki kala nyonso oyo tokokaki kosala, ezali mbala mosusu yango te lelo. Tozali kooka ete topusami na kosala mingi koleka mpo na Jéhovah.

Botondi na biso mpo na Jéhovah oyo ntango nyonso ezali kokola ezali kobakisa mposa na biso ya kosala mingi koleka. Boyekoli na biso ya Liloba na ye, Biblia, ezali kokolisa botondi na biso mpo na oyo asalaki mpo na biso. Na ndakisa, ntango tozali kotalela na likebi nyonso lolenge oyo Jéhovah atindaki Mwana na ye mpo apesa bomoi na ye mpo na kosikola bato na lisumu, topusami na kosalela Ye oyo azali Liziba ya lisiko. (Yoane 3:16, 17; 1 Yoane 4: 9-11) Wana “tozali komeka mpe komona ete Jéhovah azali malamu,” motema na biso ekopusama na kosalela ye.​—Nzembo 34:8.

Mwasi moko moklisto, mosali ya ntango nyonso, na nkombo Jetter, asosolaki yango. Mpo na kotimola mozindo kati na makambo azalaki koyekola, abongisaki eteni moko kati na ndako na ye mpo na ntina wana. Abongisaki yango mpo ete akoka kokanisa mozindo ntango na bolukiluki na ye. Ba Index ya mikanda ya La Société Watch Tower, mpe ba volumes reliés ya La Tour de Garde mpe Réveillez-Vous! ezalaki penepene likolo na biblioteke. Alobaki ete: “Ntango nazali kokundola makambo ya ntina, nakoumelaka te koyebisa yango na bato mosusu.”

Nzokande, lokola likambo ya kolya mingi mbala moko moko elongoli mposa te ya kolya mokolo na mokolo, bobele bongo kotalela Biblia na mozindo, kasi na mwa mikolo, ekolongola te mposa ya komileisa mokolo na mokolo na elimo. Ruth akangi ntina na yango, mpo ete wana akoki komikundola, ntongo nyonso mpe mpokwa nyonso, nsima ya bolei, libota na ye ezalaki koyangana mpo na kotanga Biblia. Lelo oyo, na mibu 81, nsima na kolekisa mibu 60 na mosala ya ntango nyonso, atangaka ntango nyonso Biblia na ngonga ya motoba na ntongo, nsima na kolamuka. Nokinoki nsima ya kozwa bazulunalo Mosenzeli mpe Lamuka! Ruth azali komibombela ntango ya kotanga yango. Akotalela masolo mbala misato to minei liboso na koyekola yango kati na lisanga. Alobi ete: “Mpo na kotikala makasi na elimo, tosengeli koyekola Liloba na Nzambe.” Ezali mpe yango nde esalisaki ye na koumela na mosala ya misionere na boumeli ya mibu mingi.

Tosala nyonso oyo esengeli mpo na kosalisa basusu

Boyekoli ya mozindo mpe ya mbala na mbala ya Liloba na Nzambe ezali kokolisa molende na biso ya kosalela ye, mpe ezali kobimisa epai na biso eloko moko oyo ekopusa biso na kosala mingi. (Tala Yilimia 20:9.) Molende lolenge yango epusaki Hirohisa na kokokisa malamu mokumba na ye. (2 Timote 4:5) Azalaki kobika na libota oyo ezalaki bobele na moboti moko, elongo na baleki na ye ya basi mpe ya mibali minei. Wana azali naino elenge, Hirohisa azalaki kosunga libota na ye na mwa mosolo na kolamuka na ngonga ya misato na ntongo mpo na kokabola bazulunalo. Alingaki kosangana mingi na mosala ya kolobela Jéhovah na bazalani na ye, yango wana asengaki mosala ya pionnier (nkombo oyo babengaka basaleli ya Jéhovah oyo bapesaki ntango na bango nyonso mpo na kosakola). Atako azalaki elenge, azalaki na esengo ya kosalisa bato mosusu na kosala lokola ye, nyonso oyo ekoki na bango mpo na kosanzola Jéhovah.

Soki tolingi kosalisa basusu na makoki na biso nyonso, tosengeli kosala mingi na mosala ya kosakola. Mokolo moko, Yesu apesaki elendiseli oyo epai na bayekoli na ye: “Soko boyebi makambo oyo, bokozala na esengo soko bokosala yango!” (Yoane 13:17) Naomi azali ndakisa malamu na moto oyo azali kosalela batoli ya lisanga na Jéhovah mpo na kokolisa mosala na ye. Azalaki na mikakatano mpo na koloba kati na mosala na ndako na ndako, epai na bato oyo ayebi bango te: mbala mingi azalaki kozanga maloba. Bankulutu ya lisanga na bango balendisaki ye na kolanda batoli ya mokanda Comment raisonner à partir des Ecritures na mokapo “Bokoteli na masolo mpo na mosala ya kosakola.”a Ayekolaki bokoteli ya masolo na moto ya likambo ya moke Famille/Enfants to “Libota/Bana” mpe asalelaki yango mbala na mbala. Na nzela yango, akomaki na makoki ya kosala lisolo elongo na mwasi moko ya mibu soko ntuku misato. Liboso ete Naomi azongela ye, mwasi yango ayaki na Salle du Royaume. Bibongiseli bizwamaki mpo na kobanda boyekoli ya Biblia elongo na ye. Ye mpe mobali na ye bazali sikawa baklisto oyo basili kozwa batisimo, mpe bazali na bomoi ya esengo elongo na bana na bango.

Tosala nyonso oyo esengeli na biso mpo na kosepela na bato nyonso

Tokoki lisusu komekola ndakisa ya ntóma Paulo, oyo alobaki ete: “Nazali kosala nyonso mpo na nsango malamu ete nakoma mokabani na yango.”​—1 Bakolinti 9:22, 23.

Hatshumi amonisaki elimo wana. Kati na mosala ya ndako na ndako, mwasi moko alobaki na ye na bonkonde na telefone ete azalaki na ntango te mpo na kosolola elongo na ye. Lokola mongongo na ye ezalaki ya boboto, Hatshumi alandaki kozongela ye. Mwasi yango alandaki ntango nyonso koloba na ye na telefone, azalaki kobima te mpo na kosolola elongo na Hatshumi. Eumelaki bongo mibu mibale na ndambo.

Mokolo mosusu, Hatshumi abongolaki ngonga ya boyei na ye, akendeki kotala mwasi yango na mpokwa, kasi moto moko te ayanolaki. Nzokande, wana azalaki kokende, nsima na ye mongongo ya moto moko oyo ayebaki etunaki ete: “Yo nani?” Mwasi yango autaki kozonga. Ntango ayokaki nkombo ya Hatshumi, ayanolaki kozanga kokatana ete: “Oh! Ezali yo oyo oyaka kotala ngai. Natondi yo mpo na komibanzabanza oyo ozali komonisa mpo na ngai kobanda kala.” Azalaki kofungola ekuke te mpo na Hatshumi, mpamba te, na esika mosusu akataki boyekoli ya Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Babandaki lisusu boyekoli ya Biblia mpe mwasi yango azali kosala bokoli malamu. Tomibanzabanzaka mpenza na bato oyo tokutanaka na bango kati na mosala ya kosakola?

Tosala nyonso oyo esengeli na biso

Milende oyo tozali kosala mpo na kosalela Jéhovah ezali kosepelisa ye. Azali lokola tata oyo mwana na ye ya mobali ayei na makabo epai na ye. Nsima na mibu mingi, makabo makoki mbala mosusu kobongwana engebene mibu mpe makoki ya mwana yango. Lokola tata azalaka na esengo ya kozwa makabo mapesami na motema mobimba na mwana na ye, bobele bongo Jéhovah andimaka na bolingo nyonso mosala tosali na motema mobima, engebene bokoli na biso ya elimo.

Ya solo, ntina ya kokokanisa oyo tozali kosala mpe makoki na basusu ezali te. Lokola Paulo alobaki yango, tokoki komikumisa mpo na mosala na biso moko, “kasi mpo na moto mosusu te.” (Galates Gal. 6:4) Tika ete tolanda ntango nyonso likebisi oyo ya ntóma Petelo ete: “Botya etingya ete bozwama na ye na kozanga litono mpe na likambo te kati na kimya.”​—2 Petelo 3:14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 29]

Tosalaka nyonso oyo ekoki na biso mpo na kosalela batoli etali mosala ya kosakola?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto