“Bósala nyonso oyo ekoki na bino”
1 Ntango tomipesaki epai na Yehova, tolakaki ye ete tokosala nyonso ekoki na biso mpo na ye. Na ntina yango, ntoma Petelo alendisaki baklisto ete básala nyonso ekoki na bango mpo na kolendisa boyokani na bango elongo na Yehova. (2 Pet. 1:10, NW) Ya solo tolingi kosala nyonso ekoki na biso mpo na kosepelisa Yehova na kosaleláká ye uta sikawa. Yango ezali kosɛnga nini? Na meko oyo boyokani na biso elongo na Yehova ezali kokóma makasi mpe ete tozali komanyola likoló na makambo nyonso oyo azali kosala mpo na biso, mitema na biso mizali kopusa biso ete tósala ntango nyonso oyo ekoki na biso kati na mosala na ye. Tolingi kobongisa mosala na biso ya kosakola ete ekóma malamu, mpe soki likoki lizali, tósala mingi.—Nz. 34:8; 2 Tim. 2:15.
2 Elenge ndeko mobali moko oyo alingaki kosala lisusu mingi kati na mosala ya kosakola amonaki ete koyekola Liloba ya Nzambe ntango nyonso ezalaki kokólisa botɔ́ndi na ye epai ya Yehova mpe ezalaki kobakisela ye molende makasi. Yango epusaki ye ete atondisa demande ya mosala ya mobongisi-nzela. Ndeko mwasi moko oyo azalaki kokoka te kosolola na bato oyo ye ayebaki te asalelaki makanisi mosusu ya búku Comment raisonner, yango esalisaki ye na kozwa nokinoki matomba kati na mosala ya kosakola. Ayekolaki Biblia na babalani mibale oyo bandimaki solo.
3 Bósepela na oyo bokoki kosala: Bamoko kati na biso bazali kati na ezalela ya mpasi na ntina na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, botɛmɛli ya basangani ya libota, bobóla to mpo ete bato oyo bazali na teritware na bango bazali kosepela na solo te. Ebele ya mikakatano mosusu oyo mizali komonana mingi na eleko oyo ya mikolo ya nsuka, mikoki kobebisa mosala na biso ya kosakola. (Luka 21:34, NW; maloba na nsé ya lokasa; 2 Tim. 3:1) Yango elingi nde koloba ete tozali sembo te na ndai oyo tolapaki mpo na Yehova? Te, soki tozali kosala oyo ekoki na biso kati na mosala na ye.
4 Ekozala likambo ya mayele te ete tómisambisa biso moko na kokokanisáká mosala na biso na oyo basusu bakoki kosala. Na kokesana, Makomami mazali kolendisa mokomoko na biso ete ‘ameka mosala na ye.’ Soki tozali komipesa mpenza mobimba na kotaleláká makoki na biso moko, tokondimama na Yehova mpe tokozwela yango esengo.—Gal. 6:4; Kols. 3:23, 24.
5 Tiká ete tótya likebi na maloba ya Petelo mpe ‘tósala nyonso ekoki na biso mpo ete tózwama na Yehova na kozanga litɔnɔ mpe na likambo te kati na kimya.’ (2 Pet. 3:14) Ezaleli yango ekopesa biso mayoki ya libateli mpe kimya ya elimo oyo bobele Yehova nde akoki kopesa yango.—Nz. 4:8.