Eteyelo ya Galaad: Eumeli mibu 50 mpe ezali kosala na nguya mingi!
WANA azalaki koloba epai na kelasi ya liboso ya Eteyelo ya Galaad, le 1er Fevrier 1943, mokolo ya kofungolama ya eteyelo yango, Nathan H. Knorr alobaki ete: “Ezali na bisika mingi epai litatoli na ntina na Bokonzi epesami naino mingi te.” Abakisaki ete: “Ebele na bato mosusu bakokoka koyoka nsango ya Bokonzi soki basali bazali mingi kati na elanga. Mpo na ngolu na Nkolo, bakomonana.”
Ezali na basali mingi, bamilió! Motuya ya basakoli ya Bokonzi ekoli longwa na 129.070 kati na mikili 54 na 1943 kino 4.472.787 kati na mikili 229 na 1992! Eteyelo ya Galaad esungaki mingi na litatoli oyo ebimisi bokoli yango. Nsima na mibu 60, ezali kolanda kokokisa mokumba ya ntina mingi ya kobongisa bamisionere oyo bakotindama epai mposa na bango ezali mingi kati na bilanga ya mokili.
Le 7 Mars 1993, babyangami 4.798 mpe basangani ya libota ya Béthel bayanganaki na Salle dˈassemblées ya engumba Jersey City (New Jersey) mpo na kopesa mapolomi ya kelasi ya mbala ya 94. Likambo wana ya ntina mingi epesaki mpe libaku ya kotalela mibu 50 ya Eteyelo ya Galaad. Olingi koyeba makambo nini malekaki?
Nsima na loyembo ya ebandeli, George Gangas, mosangani moko ya Collège central, asalaki libondeli ya mozindo. Na bolandani, nsima ya maloba ya ebandeli ya prezida, Carey W. Barber, bayekoli, mpe bayangani nyonso bayokaki na likebi mingi molongo ya masolo mikuse.
Robert W. Wallen azalaki moto ya liboso na koloba, na lisoló “Bozali bino moko te.” Alobaki na mongongo ya esengo ete: ˈNa mikolo mizali koya, ekozala na ntango moko kati na bomoi na bino oyo bokomiyoka bino moko mpenza, mosika na mabota mpe baninga na bino!ˈ Bongo, motindo nini, tokoki koloba ete: “bozali bino moko te.” Alimbolaki ete: “Moko moko na bino akozala na libaku ya kosolola mbala moko elongo na Jéhovah Nzambe.” Alendisaki bayekoli na kolinga libaku kitoko ya libondeli mpe ya kosalela yango mokolo na mokolo. Bongo, bakokoka koloba lokola Yesu ete: “Nazali ngai moko te.” (Yoane 16:32) Oyo nde maloba ya kolendisa mpo na bayekoli!
Ntango atalelaki lisoló “Bosimba ngwi elikya na bino” (engebene texte ya le 7 Mars), Lyman A. Swingle, mosangani ya Collège central, alobelaki mpe bizaleli mibale ya ntina: Kolendendela mpe elikya. Alobaki ete ˈnsoni, botemeli, koyina, kokangama mpe ata liwa ezali bantina mpo na yango moklisto asengeli koyika mpiko. Nguya oyo eleki mayele ya bato, oyo ba Témoins de Jéhovah bakoki kotyela yango motema wana bazali na yango mposa ezali na ndelo te. Ezali solo koyikisa mpiko.ˈ Ezali boni mpo na elikya? Alimbolaki ete ˈelikya ezali na ntina mingi. Lokola ekoti ebatelaka motó na ye oyo alati yango, elikya ya lobiko ezali kokengela mpe kobatela makanisi ya moklisto, kosala ete atikala sembo.ˈ—1 Batesaloniki 5:8.
Molobi oyo alandaki, Ralph E. Walls, aponaki lisoló moko ya lisese: “Ndenge nini tokoki kozwa libateli ya ˈesika monene?ˈ” “Esika monene” wana ezali nini? (Nzembo 18:19.) Molobi alimbolaki ete ezali “maoki ya kosikolama oyo ezali kopesa kimya ya elimo mpe libateli ya motema.” Tosengeli kosikolama na nini? ˈNa biso moko, na bolembu na biso moko.ˈ Abakisaki ete: ˈLisusu na makambo ya zongazonga na biso, oyo ebimisami na Satana.ˈ (Nzembo 118:5) Lolenge nini tokoki kozwa libateli ya esika monene? ˈNtango tozali koluka mibeko na Jéhovah na makambo nyonso oyo tozali kosala mpe wana tozali kobondela Jéhovah na kondima nyonso na ntina na makambo nyonso oyo ezali kotungisa biso.ˈ
Don A. Adams aponaki lisoló “Nini ezali kozela bino?” Nini ezali kozela bamisionere wana ya sika? Alimbolaki ete, ezali eleko ya komimesenisa. “Mapamboli mingi mazali mpe liboso na bino.” Apesaki lokola ndakisa, likambo ya bamisionere mibale, baoyo nsima ya kokoma na esika batindamaki, bakomaki ete: “Kanisa mokolo kitoko oyo olekisaki na mosala ya kosakola; awa ezali kozongelama mokolo na mokolo. Tozali na makoki te ya komema mikanda engebene mposa na bato, mpe bato bazali kotika te kosenga ete toyekola elongo na bango.” Molobi apesaki maloba ya elendiseli epai na mabota mpe baninga ya bayekoli ete: ˈBozali na ntina moko te ya kozala na mitungisi na ntina na bayekoli. Bosengeli kosalisa bango bobele na kokomela bango maloba ya elendiseli.ˈ—Masese 25:25.
Na nsima bateyi ya Eteyelo yango bakamataki maloba. Jack D. Redford aponaki lisoló “Bozela eloko moko te epai na moto mosusu.” Alimbolaki ete, moko na ntembe oyo bayekoli basengeli kolonga ezali ya koyokana malamu elongo na bato. Nini ekosalisa bango? “Bobosana mabunga na bango. Bozela epai na bango makambo mingi mpenza te. Kozala ntango nyonso na elikya te ete bakopesa yo nyonso oyo osengeli na yango. Talela kozanga kokoka na basusu, mpe boboto wana ekosalisa bino na kozala na kimya elongo na bango. Makoki na bino ya koyokana elongo na bango ekomonisa bokoli oyo bozali na yango.” (Masese 17:9) Kosalelama ya batoli oyo ya mayele ekosalisa mpenza bayekoli na komesena na bomoi ya misionere na mokili ya bopaya.
Tozali kotanga na 2 Bakolinti 4:7 ete: “Kasi tozali na eloko oyo ya motuya kati na mbeki eyemami na mabele.” Ulysses V. Glass, secrétaire ya Eteyelo ya Galaad, alimbolaki verset oyo ntango asalaki lisoló “Botyela bandeko na bino ya sembo mpe baoyo bamekami motema.” “Mbeki ya mabele” wana ezali nini? Amonisaki ete, “esengeli kozala biso, bato ya kozanga kokoka.” “EIoko ya motuya” yango ezali nini? Alimbolaki ete, “ezali mosala na biso ya baklisto.” (2 Bakolinti 4:1) Mpe esengeli kosala nini na eloko yango ya motuya? “Eloko ya motuya oyo Jéhovah apesi biso esengeli te kobombama. Yango wana, bino, balingami oyo bokozala bamisionere, bokabola eloko ya motuya wana epai bokokende, mpe bomonisa lolenge nini kokabola yango.”
Ntango oyo ekundolaki bandeko makambo mingi ezalaki kokota ya Albert D. Shroeder, mpamba te azalaki secrétaire ya liboso ya Eteyelo ya Galaad. Moto ya lisoló na ye ezalaki “Mibu 50 ya kobongisama ya teokratike.” Alobaki ete “Jéhovah ayebi lolenge ya kobongisama oyo eleki malamu, mpe azali kopesa yango.” Lolenge nini? Ndeko Shroeder alobeli kolakisama ezwami na nzela na biteyelo mibale oyo bibandaki esili koleka mibu 50: Eteyelo ya mosala na Nzambe mpe Eteyelo ya Galaad. Amonisaki ete Biblia Traduction du monde nouveau ezalaki esaleli ya ntina mingi mpo na kopesa boyebi ya sikisiki. Alobaki na bayekoli ete: “Bokoki kokende na bisika botindami na kondimisama solo ete la Société akolanda kopesa bino boyebi ya solo ya mikano ya Jéhovah.”
Milton G. Henschel, président ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, apesaki lisoló “Baleki kolónga.” Ndeko Henschel asalelaki texte ya mobu 1943: “Tokoleka kolonga mpo na ye oyo alingaki biso.” (Baloma 8:37) Alimbolaki ete, texte ya mobu yango ebongaki mpenza, mpamba te, na katikati ya Etumba ya mibale ya mokili mobimba, bandeko na biso ya mikili mingi banyokwamaki. Ndeko Henschel atangaki biteni mosusu ya nimero ya La Tour de Garde oyo ezalaki kolobela texte wane, mpe alimbolaki ete: “lisoló oyo ya La Tour de Garde [15 Janvier 1943, na Lingelesi], bayekolaki yango na sanza ya Février na kelasi ya liboso ya Galaad mpe ebongisaki bayekoli na makambo mazalaki kozela bango.” Alobaki ete, na boumeli ya mibu 50 oyo mileki, bayekoli oyo basili kolonga bazali mingi. Ezali boni mpo na kelasi ya mbala 94? “Bozala pene na Jéhovah, bozala pene ya bolingo na ye, mpe elonga ekozanga te.”
Nsima ya masolo ya ntongo, prezidá ayebisaki bambote euti na mikili mikeseni. Bongo na nsima, ntango oyo mibali ntuku mibale na minei elongo na basi na bango bazalaki kozela ekómaki: kopesama ya mapolomi. Bayekoli ya Galaad bayebanaki sikawa polele lokola bato bazwi mapolomi ya Galaad! Bautaki na mikili mitano, kasi batindamaki na bitúka bikeseni, lokola Hong-Kong, Taiwan, Mozambique, mpe mikili misusu ya Europe de lˈEst.
Nsima na bopemi, programme ya nsima ya nzanga ebandaki na boyekoli mokuse ya Mosenzeli, oyo ndeko Robert L. Butler akambaki. Na nsima, bayekoli balimbolaki na masano makambo ya kosepelisa oyo bakutanaki na yango na boumeli ya mosala na bango ya kosakola zongazonga ya Wallkill (New York). Eteni oyo ya programme emonisaki polele eloko oyo ememaki bango na Galaad: bolingo na bango mozindo mpo na mosala ya kosakola.
Na bolandani na yango, bayangani mingi bazali komituna soki likambo moko ya ntina ezalaki na programme mpo na kokanisa mibu 50 ya Eteyelo ya Galaad. Bazalaki na mawa te!—Tala na encadré: “Botaleli ya mibu 50 ya Eteyelo ya Galaad.”
Esili koleka mibu 50, ndeko Knorr amonisaki ete azalaki moto na kondima mpe moto oyo azali komona makambo mosika. Andimisamaki ete Eteyelo ya Galaad ekolonga mpe amonisaki endimiseli na ye kati na lisoló na ye ya bafungoli liboso ya kelasi ya yambo. Alobaki ete: “Tokanisi ete, lokola nkombo na yango ezali komonisa, ˈlibóndo ya litatoliˈ moko ekobima na esika oyo mpo na kokende bipai nyonso kati biteni nyonso ya mokili mpe litatoli oyo ekozala lokola monimá oyo ekoki kobebisama te etombwami mpo na nkembo na Nzambe. Lokola bozali ba ministres oyo bandimami, bokotya motema na bino mobimba epai na Oyo-aleki-likoló, na koyebaka ete akotambwisa bino mpe akokamba bino ntango nyonso oyo ekozala mposa, mpe boyeba lisusu ete azali Nzambe oyo apesaka mapamboli.”a
Mibu ntuku mitano na nsima, Eteyelo ya Galaad ezali kosala na nguya mingi! Bayekoli ya kelasi ya mbala ya 94 bazali na libaku ya kolanda bayekoli koleka 6.500 baoyo balandanaki na Eteyelo wana. Tika ete batya motema na bango mobimba epai na Oyo-Aleki-likoló wana bazali kosangana na “libóndo ya litatoli” oyo ekopesama lokola monimá mpo na nkembo na Jéhovah Nzambe!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Liebele, liloba “Galaad” elimboli “Libóndo-Litatoli.”—Genese 31:47, 48.
[Etanda na lokasa 25]
Makambo matali bane kelasi
Motuya ya bayekoli: 48
Motuya ya bikolo epai bauti: 5
Motuya ya bikolo epai batindami: 17
Mwayene ya mbula ya kobotama: 32
Mwayene ya mibu balekisi kati na solo: 15,3
Mwayene ya mibu balekisi kati na mosala ya pionnier: 9,6
[Etanda na lokasa 26, 27]
BOTALELI YA MIBU 50 YA ETEYELO YA GALAAD
Oyo nde lolenge loleki malamu ya kotalela lisoló ya Galaad kati na baoyo basanganoki na yango na lolenge moko to mosusu: bayekoli ya liboso, bateyi, mpe bato mosusu oyo bapesaki maboko mpo na kobongisa yango! Bayoki basepelaki koyoka eteni ya “Botaleli ya mibu 50 ya Eteyelo ya Galaad,” oyo ekambamaki na Theodore Jaracz.
Makambo nini matindaki na kofungolama ya Eteyelo ya Galaad? Ndeko Shroeder alimbolaki ete bapesaki ye mpe bateyi mosusu mibale bobele sanza minei mpo na kobongisama ya eteyelo. “Kasi Lundi le 1er Février 1943 tozalaki pene mpo na bofungoli.”
Makambo malekaki lolenge nini mpo na bamisionere ya liboso? Ndeko Henschel azali komikundola ete: “Ebongiseli ya la Société mpo na kotinda biloko na masuwa ezalaki kokangisa kati na sanduku ya mabaya biloko nyonso oyo balingaki komema yango. Ntanga basanduku ekómi, bazalaki kofungola yango na bakengi mpo na kobimisa biloko na bango. Na nsima bazalaki kosalela mabaya wana mpo na kosala biloko ya ndako.” Amonisaki ete, nsima na mwa ntango, la Société azwaki meko ya kotya mwa biloko kati na bandako ya bamisionere.
Na balandani, bandeko oyo bazwaki mapolomi na kelasi ya liboso ya Galaad, baoyo bazali basangani ya libota ya Béthel ya Etats-Unis bamonisaki makanisi mpe maoki na bango. Maloba na bango masimbaki mpenza mitema na bayoki nyonso.
“Nsima ya kozwa libyangi mpo na kokota na kelasi ya liboso, nayokoki ete mama na ngai azali na cancer. Lokola abandaki mosala ya pionnier naino azalaki na mibu 16, alendisaki ngai mingi ete nandima libyangi yango. Yango wana, ntango nasalaki mobembo mpo na kokende na South Lansing, nazalaki na mobulungano kati na maoki mpe na elikya makasi epai na Jéhovah. Nazalaki mpenza na esengo mpe nasepelaki mingi na mateya tozwaki na Galaad. Mama na ngai asilisaki mikolo na ye awa na mabelé ntango moke nsima wana tozwaki mapolami na biso.”—Charlotte Schroeder, oyo azalaki misionere na Mexique mpe na Salvador.
“Lokola Jéhovah abatelaki ngai na esika nazalaki kofanda awa na mabelé, nakanisaki ete ata nakozala epai wapi ezali bobele mabelé na ye akobatela ngai. Yango wana nandimaki na esengo nyonso libyangi mpo na kelasi ya liboso.”—Julia Wildman, misionere na Mexique mpe na Salvador.
“Ezalaki esengo monene! Tokokoki kosolola na bato na ndako nyonso. Na sanza ya liboso, nakabolaki mikanda 107 mpo natambolisaki boyekoli 19. Na sanza ya mibale, nazalaki na bayekoli ya Biblia 28. Ya solo, ezalaki na makambo oyo esengeli komesena na yango: molunge, mai mingi na mopepe, banyama mike. Kasi ezalaki esengo mingi kozala kuna. Ezali eloko oyo nakolinga yango ntango nyonso.”—Mary Adams, kelasi ya mbala mibale, na ntina na téritware na ye na Cuba.
“Na Alaska, malili ezalaki epekiseli monene oyo tosengelaki kolonga. Na nord, mpio eleki mingi; mbala mosusu thermomètre elakisaka malili ya 50 °C na nse ya zero. Bamboka mike ya ba Indiens mpe bisika mike etangolami ya sud-est ya Alaska ezali kosenga kokende na maswa to na avion.”—John Errichetti, kelasi ya mbala misato.
“Mpo na ngai, Galaad ezalaki libyangi ya Jéhovah, na nzela ya lisangá na ye ya mabelé, oyo esalelami mpo na kolendisa biso na elimo mpe mpo na komonisa biso lolenge eleki malamu ya kobika.”—Mildred Barr, kelasi ya mbala 11, Irlande.
Batunaki na esengo nyonso bandeko mosusu: Lucille Henschel (kelasi ya mbala 14, Venezuela), Margareta Klein (kelasi ya mbala 20, Bolivie), Lucille Coultrup (kelasi ya mbala 24, Perou), Loraine Wallen (kelasi ya mbala 27, Brésil), William mpe Sandra Malenfant (kelasi ya mbala 34, Maroc), Gerrit Losch (kelasi ya mbala 41, Autriche), mpe David Splane (kelasi ya mbala 42, na Sénégal).
Ezali boni mpo na bandeka oyo bazalaki balakisi? Batunaki mpe bamoko na bango: Russel Kurzen, Karl Adams, Harold Jackson, Fred Rusk, Harry Peloyan, Jack Redford mpe Ulysses Glass. Balobelaki matomba na bango mpe bopusi na yango likoló na bango kino lelo.
Lloyd Barry, oyo azalaki misionere na Japon, apesaki litatoli ya kosimba motema na ntina ya mbuma malamu ya mosala ya bamisionere ya Galaad. Na 1949, ntango bamisionere 15 batindamaki na Japon, basakoli nyonso ya mokili yango bazalaki na nse ya 10. Kasi, nsima ya mibu 44, motuya na basakoli ya Bokonzi esili kokóma 175.000. Robert Wallen alobelaki mpe mosala ya kokamwa oyo bamisionere basalaki wana basalisaki bato mingi na koyeba solo, lokola ndakisa ya ndeko mwasi oyo azali misionere na Panama na boumeli ya mibu 45, amemaki bata 125 na komipesa mpe kozwa batisimo.
Likambo ya ntina ya likita wana ezalaki ntango oyo baoyo nyonso bazwaki mapolomi na Galaad oyo bazalaki kati na bayoki babyangamaki na kokende liboso. Ezalaki likambo ya kosimba motema. Molongo molai ya bandeko mibali mpe basi—basangani ya Bethel 89, elongo na bamisionere oyo babyangamaki—bakitaki na bilekelo mpo na komata ebutelo oyo ezali komema na esika ya molobi. Balandanaki na bandeko oyo bazalaki balakisi na boumeli ya mibu wana, na nsima kelasi ya mbala 94: motuya mobimba ya bato soko 160!
Ndeko Jaracz atunaki ete: “Eteyelo ya Galaad elongaki kati na kobongisama ya bamisionere?” “Litatoli ya mibu 50 oyo miuti koleka elobi ˈƐeˈ na mongongo makasi!”
[Etanda na lokasa 25]
Kelasi ya mbala 94 ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Na kati ya liste oyo awa na nse, milongó mitongomi kobanda na liboso kino na nsima mpo bankombo etangami kobanda na loboko ya mwasi kino loboko ya mobali.
(1) De La Garza, C.; Borg, E.; Arriaga, E. Chooh, E.; Purves, D. Fosberry, A.; Delgado, A.; Dreschor, L.
(2) Scott, V.; Fridlund, L.; Kettula, S.; Copeland, D.; Arriaga, J., Thidé, J.; Olsson, E. Widegren S.
(3) Delgado, F.; Keegan, S.; Leinonen, A., Finnigan, E.; Fosberry, F., Halbrook, J., Berglund, A., Jones, P.
(4) Watson, B.; Frias, C.; Chooh, B.; Halbrook, J.; Purves, J.; Finnigan, S.; Jones, A., Cuccia, M.
(5) Scott, G.; Copeland, D.; Drescher, B.; De La Garza, R.; Leinonen, I.; Keegan, D. Watson, T.; Kettula, M.
(6) Widegren, J.; Borg, S.; Cuccia, L.; Berglund, A.; Olsson, B.; Frias, J.; Fridlund, T.; Thidé, P.