Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/12 nk. 21-23
  • Bamisionere mingi mpo na kobuka mbuma na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bamisionere mingi mpo na kobuka mbuma na mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Mateya mapesami na Galaad mazali kopesa bolamu kati na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Galadi​—⁠Kobongisama oyo etongami likoló na kondima oyo eleki mosantu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Eteyelo ya Galaad: Eumeli mibu 50 mpe ezali kosala na nguya mingi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Elimo ya komipesa ezali kotinda bato na Gileadi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/12 nk. 21-23

Bamisionere mingi mpo na kobuka mbuma na mokili

SANZA ya septembre ezali eleko ya bobuki mbuma mpo na basali elanga Nzokande, ezali bobuki mbuma moko eleki na ntina mingi oyo, mokolo ya 8 septembre 1991, ebendaki ebele monene na bato na Salle d’assamblées ya ba Témoins de Jéhovah oyo ezali na mboka Jersey City, kaka ne kotalana na engumba ya New York, na ngambo mosusu ya etuka ye Hudson. Na kati ya salle yango nde esalamaki bopesi mapolomi na bandeko oyo bazwi mapolomi na kelasi ye 91 na Galaad, Eteyelo ya boyekoli Biblia ya Société Watchtower. Na libaku yango, basangani 4 263 ya libota ya Béthel mpe babyangami bayanganaki, mpe 1 151 ya bato mosusu balandaki likambo yango na nzela ya telefone kobanda na biro monene ya le Société na Brooklyn ná mpe na ba fermes ya mboka Wallkill mpe ya mboka Patterson.

Prézida ya Eteyelo ya Galaad, Frederick Franz, ye oyo akomi na mibu 98 kala te, abandaki likita na libondeli moko ya mɔ́tɔ mpe ya kosimba motema. Ndeko Albert Schroeder, mosangani ya college central, mpe sekretere ya kala mpe molakisi na Eteyelo, atambwisaki bopesi mapɔlɔmi yango. Akundwelaki na bayangani Nzembo 2:1, 2 mpe bisakweli mosusu oyo epai kuna bazali kolobela ete na eleko na biso mabota makoninga mpe bakotomboka. Mibulungano yango mipesi nzela na bituka bibele na kofungwama na bobuki mbuma ya elanga na mabelé.

Diskur ya liboso ya mokolo yango elobamaki na ndeko George Couch, mosangani na comité ya Béthel. Ezalaki na motó na likambo: “Tango mapamboli oyo bozali kozwa” Akundwelaki na bayekoli ya Galaad ete ezakaki likambo ya lombangu te na kokamata emeseno yango. Amonisaki na bango ete na ntembe te bango moko mpe basilaki kozwa mapamboli, kasi mapamboli yango mapesamelaki bango bobele na nsima na kosala milende mingi. Yakobo, oyo akomaki na mibu 97, ye moko abundaki na makasi mpenza ná anzelu moko​—nyonso wana mpo na kozwa lipamboli. (Genese 32:24-32) Ndeko mobali Couch alendisaki bayekoli na kokolisa makanisi ya mabe te, kasi na kokoma lipamboli mpo na basusu na kokolisaka, kimya ya elimo, na nzela ya libondeli mpe ya etelemeli makasi.

Na nsima ndeko mobali John Barr, mosangani ya college central, akamataki liloba likoló na motó na likambo “Bozala na bolingo kati na bino.” Bayekoli ya Yesu bazalaki pene na kokufa bamoko mpo na basusu. Atunaki na bayekoli: “Bozali kooka bolingo motindo yango kati na mitema na bino?” Abakisaki: “Kozanga bolingo yango, tozali mpamba. Ezali na yango na likambo ya mpasi koleka te.” (1 Bakolinti 13:3) Ndeko mobali Barr atangaki ba lolenge ekeseni ya komonisa bolingo. Alendisaki bayekoli na komonisa limemya na bamisionɛrɛ oyo bakozala elongo na bango, na kolukaka ntango nyonso koloba makambo na mayele. Na kolobelaka 1 Petelo 4:8 apesaki bango toli ete: “Bobosanaka matata mike.” Ayaki komonisa ete ezala na mokolo na bango ya kosala kuku bakoki komonisa ezaleli yango na kosalaka mosala yango ezala te na kosengisama, kasi na bolingo. Akundwelaki bango ete, tosengeli ntango nyonso kolakisa bolingo na bandeko na biso mibali mpe ya basi.​—Baloma 13:8.

“Ozali na komindimisa?” Oyo nde ezalaki motó na likambo kitoko oyo elimbolamaki na ndeko David Olson, mosangani ya comité mpo na mosala ya kosakola. Alobelaki makasi makambo mibale oyo kati na yango bakoki komonisa kondimisama: Jéhovah mpe lisangá na ye, epai na yango tozali na bantina mingi na komonisa kondimisama (Masese 14:6; Yilimia 17:8); mpe biso moko. Na ntango bazali kotalela mosala na bango ya ministre mpe konfianse oyo Jéhovah mpe lisangá na ye bapesi bango, bamisionere bazali koyeba ete bazali na bantina ya solo ya kozala na konfianse na bango moko. Ntóma Paulo azalaki na bantina ekokani ya kozala na konfianse. (1 Bakolinti 16:13; Bafilipi 4:13) Nzokande ndeko mobali Olson akebisaki bango na kotya konfianse mingi na yo moko, ezaleli oyo mokili ezali kolendisa, lokola yango elakisami na maloba oyo malobamaki na mokomi moko oyo ayebani mingi: “Nalobelaka mbala mingi makomi na ngai. Esalaka bopusi na masolo na ngai.” Nzokande, konfianse oyo emekisami na komikitisa ekoki okopesa kondimisama na bato mosusu. Yango ezalaki solo na oyo etalaki paulo.

Lyman Swingle, mosangani ya college central, na nsima ayaki kolendisa bayekoli na maloba oyo: “Bobima mpo na bobuki mbuma, bino bazwi na mapɔlɔmi na eteyelo ya Galaad!” Alobaki ete mokolo oyo mozali mokolo ya bobuki mbuma mpo na Eteyelo ya Galaad mpe mpo na bandeko mibali mpe bandeko basi ya mokili mobimba; bana ya kelasi balingaki kokende kokutana na bankɔkɔ na bazwi mapolomi oyo bazali kosala lisusu kati na mosala ya misionere, bamoko babimaki na kelasi ya liboso, ya mibale mpe na kelasi ya misato na Galaad, kati na ba mbula 40! Ndeko mobali Swingle monisaki ete na eleko wana moto moko te azalaki kokanisa ete mosala na misionere mokolandana lisusu na boumeli ya mibu 50, ezala ebongiseli ya banazis, ezala ebongiseli ya ba fascistes mpe ba politike mosusu ya biyangeli oyo bizalaki kopekisa mosala ya kosakola bikolimwa. Atunaki boye, soki tondimisami na oyo Jéhovah asalaki na ntango ya kala, ekozala boni na mikolo mizali koya? Asukisaki na kosalaka libyangi makasi oyo na bayekoli: “Bobima mpo na bobuki mbuma!”

Balakisi mibale ya liboso ya Eteyelo ya Galaad bayaki na nsima koloba na bana na kelasi ya 91 mpo na mbala ya nsuka. Ndeko mobali Jack Redford alobaki na motó na likambo “Zwa mayele.” Alobaki na bayekoli ete Eteyelo ya Galaad epesi bango boyebi mpe bososoli, kasi basengeli kozwa mayele, elingi koloba likoki ya kosalela boyebi na bango na lolenge ya malamu. Alendisaki bango na kobwaka likanisi oyo ete bayekolaki nyonso na Galaad. “Likambo oyo eleki, ezali oyo bozali koyekola nsima na eteyelo.” Tala, kati na makambo yango, oyo etikali na bango lisusu na koyeba: komizalisa na moto na kimya elongo na bazalani, na koyebaka kosɛnga “bolimbisi to pardon” na mobalani na bango, na bamisionere mosusu ná mpe bandeko mibali mpe ya basi na esika oyo bakokende; komitika te na mayoki na bango ya liboso, koyeba ete mokakatano nyonso mozalaka na makambo mingi mpe ezali malamu ya koyeba na bozindo makambo nyonso liboso na kopesa toli ya mayele; na nsuka, memya bandeko ya lisangá oyo okotindama, baoyo bazali kolonga mikakatano.​—Masese 15:28; 16:23; Yakobo 1:19.

Ndeko Ulysses Glass, sɛkrɛtɛrɛ ya Eteyelo ya Galaad, ebongaki diskur na ye likoló ya Bafilipi 3:16. Apesaki longonya na bayekoli mpo na bokoli oyo basalaki mpe alendisaki bango na kolanda kati na nzela yango, engebene oyo elobi mokapo yango. Amonisaki bango ete, atako bakolanda kozwa boyebi oyo ya solo, bakoyeba nyonso te. Akokanisaki makanisi na ye na kokamataka ndakisa ya montre. Moto oyo akolataka yango akoki koyeba kotambwisa yango, kasi akoki koyeba te motindo nini yango esalaka mpenza. Ndenge moko mpe, ba missionnaires basengeli te kotala mpamba baoyo bazali na boyebi motindo moko te na bango, kasi oyo bazali na yango​—mpe oyo eleki​—kobanga Jéhovah. (Masese 1:7) Akundwelaki na bana ya kelasi ntina na kobatela ‘liso malamu.’ (Matai 6:22) Bosali ya liso ya elimo ekoki kopekisama, motindo moko na liso ya moto. Na ndakisa, basusu, bazali komisala makanisi libela, mpe bazali kotalela bobele mwa makambo na kozanga ete bakoka kotalela makambo yango nyonso; epai mosusu, basusu, bazali kotalela makambo bobele likolólikoló mpe bazali kokoka te kotalela na bozindo makambo ya ntina oyo basengelaki kolobela.

Diskur ya nsuka na ntongo, ezalaki na motó na likambo “Toluka koyeba lisangá ya Jéhovah mpe tosala elongo na yango,” elobamaki na ndeko Theodore Jaracz, mosangani ya college central. Ndeko Jaracz monisaki ete, atako ezali na bankoto ya masanga mpe ya masangani kati na mokili, bobele moko euti na mokili te, Ndenge nini koyeba lingomba oyo lizali komonisa Jéhovah? Liloba ya Nzambe lizali kopesa bilembo ya boyebi. Biblia ezali komonisa ete na likoló kozalisama na Nzambe ebongisami malamu mpenza. (Nzembo 103:20, 21; Yisaya 40:26) Tokoki koyeba lisangá ya Jéhovah ya mabelé, na kobongama oyo ezali kati na yango, na ndenge ete bazali ya kokabwana na mokili, bazali kondima mpenza mitinda ya Biblia, ezali na bopeto boleki ya makanisi mpe ete basangani na yango bazali kolakisana bolingo bamoko na basusu. Ndeko mobali Jaracz alendisaki bana ya eteyelo ya Galaad na kosalisa ebele na bato, kati na mboka oyo bakotinda bango, na koluka koyeba lisangá ya Jéhovah na nzela ya Makomami. Na likambo yango, ayebisaki nsango moko ya kolendisa: Eteyelo ya Galaad ekoyeisama monene, mpe ekoyamba pene na bayekoli 50 kati na kelasi ya 93! Lisusu, bakelasi oyo ebakisama na Eteyelo ya Galaad na Allemagne ekobanda na eleko moko. Bobeti maboko ya ntango molai mpe ya makasi bosalemaki mpo na koyamba nsango yango.

Likambo ya nsuka na ntongo yango ezalaki bopesi ya mapɔlɔmi na bayekoli 24 ya eteyelo ya Galaad. Mosika te bakosala mobembo na ba mboka 12 oyo batindi bango. Bana ya kelasi, basalaki ekateli moko, ya mozindo ya motema na kopesaka botondi na college central mpe na libota ya Béthel. Na nsima na komela ti, ndeko mobali charles Rice, mosangani ya comité ya ba fermes ya Watchtower, atambwisaki boyekoli na mokuse ya Mosenzeli. Na nsima bandeko oyo bazwi mapolomi balakisaki programɛ moko ya kitoko, oyo ezalaki kolakisa bamoko ya makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza mitano ya bolandi mateya na bango na mboka Wallkill, kati na ekólo ya New York. Na nsima, basakoli ya masangá ya mboka yango basalaki drame, oyo ezalaki na motó na likambo Bilenge oyo bazali komikundwela Mozalisi na bango.

Mpo na kosukisa ndeko mobali Georges Gangas, oyo azali na mibu 95 mpe mosangani ya college central, asalaki na Jéhovah, losambo oyo emonisaki ezaleli ya móto oyo ezalaka na ye. Bayangani bakendeki na kotondaka na esengo, na ntembe te moko na moko azwaki ekateli ya kosungana lisusu koleka na mosala ya kobuka mbuma na mokili.

Kelasi ya mbala 91 ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya Société Watchtower

[Etanda na lokasa 22]

Makambo matali bana ya kelasi:

Motuya ya bikólo epai bauti: 6

Motuya ya bikólo epai batindami: 12

Motuya ya bayekoli: 24

Motuya ya babalani: 12

Mwayene ya mbula ya kobotama: 33, 4

Mwayene ya mibu balekisi kati na solo: 16, 13

Mwayene ya mibu balakisi kati na mosala ya pionnier: 11, 3

[Elilingi na lokasa 23]

Na kati ya liste oyo lizali awa na nse, milongó mitangami kobanda na liboso kino na nsima mpe bankombo ekangami kobanda loboko na mwasi kino loboko na mobali:

(1) McDowell, A.; Youngquist, L.; Skokan, B.; Wargnier, N.; Miller, Y.; Muñoz, M. (2) Bales, M.; Perez, D.; Attick, E.; Vainikainen, A.; Mostberg, K. (3) DePriest, D.; DePriest, T.; Perez, R.; Wargnier, J.; Muñoz, J.; Miller, J. (4) McDowell, S.; Bales, D.; Skokan, M.; Attick, C.; Youngquist, W.; Vainikainen, J.; Mostberg, S.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto