Mateya mapesami na Galaad mazali kopesa bolamu kati na mokili mobimba
KATI na mokili oyo esili konuna kolakisakma ezali bobele na motuya moke. Lokola moboko na yango etyami mingimingi likoló na makanisi ya bato na esika ete etyama likoló na Liloba ya Nzambe, ekoki mpenza te kopesa ntina ya solo kati na bomoi. Kasi Eteyelo ya Galaad ezali bongo te. Kati na maloba na ye ya ebandeli, na libaku ya kopesama ya mapolomi ya kelasi ya 93 ya Galaad, Theodore Jaracz ya collège central amonisaki ete eteyelo yango ezali kopesa kolakisama moko ya ntina mingi. Nzembo 119:160 elobi ete: “Liloba na yo [Nzambe] mobimba ezali solo.” Yango wana ezalaki na motema mɔ́tɔ nde bato 6 000 bayanganaki na ebongiseli ya kopesa mapolomi mokolo ya 13 septembre 1992.
Lisolo ya liboso na ntongo, epesamaki na Lon Schilling ya comité ya ferme ya Watchtower, ezalaki na motó ya likambo “Bolanda kolonga mokili mpe mokolo na yango.” Ndeko Schilling alobelaki mingi mpenza Emoniseli 12:11 mpe amonisaki ete verset yango ezali kolobela mitindo misato ya kolonga mokili: (1) na nzela na makila ya mwana na mpate, (2) na nzela ya litatoli, mpe (3) na komonisa elimo ya komiboya. Akundolaki epai na bayekoli ete basaleli mingi ya Jéhovah bamonisaki elimo yango mpe bandimaki ata kokufa mpo na kobatela bokangami mpe bosembo na bango.
Motó ya likambo elimbolamaki na John E. Barr, mosangani ya collège central elobaki “Batela ebombelo na yo malamu.” Kati na elobeli ya mɔ́to oyo azalaka na yango, akokanisaki kotyana motema kati na Jéhovah mpe basaleli na ye na kotyana motema oyo ekolisami kati na babalani ya sembo. Asalelaki makanisi ya ntina kati na 2 Timoté 1:12, 13, mpo na kolendisa bayekoli ete babatela elikya na bango na kopesaka motuya mingi na “lolenge ya maloba ya lobiko” oyo ezali kati na Biblia. Anyataki makasi ete boyekoli ya moto na moto esengeli kozala eteni ya ntina monene ya ebongiseli na bango ya mokolo na mokolo, mpe na boboto alendisaki bango na kotika te ete biyano na bango na makita ekoma likambo bobele ya momeseno, kasi ezala ntango nyonso ya kolendisa.
William Van De Wall ya comité pour le service du champ apesaki lisolo oyo elandaki, na motó ya likambo “Bomibanzabanza na bolingo nyonso mpo na bato oyo bakokani na bampate.” Atunaki na bayekoli bizaleli nini balukaka epai na monganga ya libota, mpe alendisaki bango na kolona bizaleli motindo yango: komitya na esika ya bato mosusu, mawa, mpe ngolu oyo bakomona motuya na yango.
Daniel Sidlik mosangani ya collège central, asalaki na esengo nyonso lisolo “Epai na Nzambe makambo nyonso makoki kosalama.” Akundolaki epai na bayekoli ete Abalayama mpe Sara basekaki likanisi oyo limonanaki lokola ete likoki kosalema te, elikya ya kobota mwana na bonunu na bango. Bilaka mingi ya Nzambe bizali komonana na miso na bato lokola bikoki kokokisama te; kasi anzelu atunaki Abalayama ete: “Likambo moko lileki makasi mpo na Jéhovah?” (Genese 18:14, MN) Ndeko Sidlik alendisaki bayekoli na komonisa kondima kati na makoki na Nzambe ya kokokisa oyo ekoki kosalema te, na kotika ata moke te ete kondima na bango elemba to etengatenga, ata soki bakutani na mikakatano ya lolenge nini.
Balakisi bapesi toli
Na nsima, balakisi mibale ya Eteyelo ya Galaad basalaki masolo. Liboso, ndeko Jack D. Redford alimbolaki motó ya likambo: “Komizalisa nkombo malamu epai na Nzambe.” Asosolaki elongo na bango ete ezali nde moto oyo amemi nkombo akosala ete nkombo yango ezala malamu to mabe. Apesaki bokeseni kati na bankombo lokola Adam, Nimerod, Yezabele, Saulo, na Yudasi mpe bankombo lokola Noa, Abalayama, Luta, Paulo mpe Timoté. Nkombo na nkombo etondi na makambo matali bomoi na momemi na yango. Atunaki na bayekoli nkombo ya lolenge nini bakozala na yango nsima ya mibu 10, 100, to ata 1 000—Oyo ya misionere oyo atikaki mosala, to oyo ya moto na komilelalela to ya misionere ya sembo? Apesaki bango toli na kotya makanisi likoló ya miango ya kobongisa makambo mpe likoló na mikano na esika ya kotalela mikakatano.
Ulysses V. Glass apesaki lisolo oyo motó na yango ezalaki kotinda bato na kokanisa, ete: “Lolenge nini ozali kobatela kondima na yo?” Akokanisaki kondima ya malamu na busole oyo elakisaka ntango nyonso nzela malamu. Busole oyo ezali kati na motuka ekoki kobulungana na nguya mosusu ekeseni na nguya euti na mabelé, mpe esengeli kolongola bopusi ya nguya motindo yango. Bobele bongo, mokili oyo esili konuna ezali kosala bopusi mingi oyo soki totiki yango ekoki kobulunganisa to kolembisa kondima na biso. Wana akebisaki bayekoli na bopusi motindo yango, ndeko Glass apesaki bango longonya mpo na komibanzabanza na bango mpo na ezaleli mpe mayoki ya bato mosusu.
Lisolo ya nsuka na ntongo wana epesamaki na Albert Schroeder, oyo azali mosangani ya collège central. Ayikisaki bayekoli mpiko na “kobatela elimo ya misionere,” mpe akumisaki bango mpo ete bamonisaki elimo ya misionere lokola bayekoli ya kelasi ya liboso na 1943, ntango ye azalaki secrétaire ya Eteyelo. Asosolaki ete bazalaki kosepela mingi na bato, balingaki mosala ya kosakola mpe bazalaki komitika kotambwisama na elimo ya Nzambe. Alendisaki bango ete balanda kokolisa elimo yango mpe basalela mingi Traduction du Monde nouveau kati na boyekoli na bango moko. Asukisaki na kotalelama ya ba versets moko na moko ya Nzembo 24 lokola elakiseli.
Na nsima, bayekoli ya Eteyelo ya Galaad bazwaki mapolomi na bango. Bazalaki na mapolomi na bango na maboko ntango bazalaki kotanga na mongongo makasi mikili epai bakokende kosala, mpe bayoki bazalaki kobeta maboko makasi.
Na nsima ya nzanga, Calvin Chyke, mosangani ya comité de l’imprimerie akambaki boyekoli ya Mosenzeli. Ebongiseli moko ya kosepelisa epesamaki oyo kati na yango bayekoli bamonisaki makambo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza mitano oyo balekisaki na mateya, mpe balakisaki bililingi ya mwa mikili epai batindamaki. Lisusu, babalani oyo basili kokola batunamaki mpe bamonisaki mwa mayele mpe ekperianse oyo bazwaki na boumeli ya mibu mingi ya mosala ya misionere. Ebongiseli ya nsima ya nzanga esukaki na drame moko oyo ekokanaki na libaku yango, na motó ya likambo elobi: “Tomizimbisa te mpe toseka Nzambe te.”
Bayangani bakendeki na esengo monene, na komona oyo kolakisama ya solo na Nzambe ekoki kosala mpe na koyeba ete kolakisama yango ekolanda kopesa bolamu na mokili mobimba. Ntango bamisionere wana 48 bakabwanaki mpo na kokende bipai batimaki, mabondeli mingi mapesamaki mpo na bango, na elikya ete baklisto yango ya sembo bakozala mapamboli mpo na libota ya Nzambe epai bakei.
[Etanda na lokasa 19]
Makambo matali bana kelasi
Motuya ya bikolo epai bauti: 7
Motuya ya bikolo epai batindami: 18
Motuya ya bayekoli: 48
Motuya ya babalani: 24
Mwayene ya mbula ya kobotama: 32,8
Mwayene ya mibu balekisi kati na solo: 15,3
Mwayene ya mibu balekisi kati na mosala ya pionnier: 10,4
[Etanda na lokasa 20]
Kopesama ya mapolomi na eteni mosusu ya Eteyelo ya Galaad
Na le 21 juin 1992, etuluku ya bamisionere 24 bazwaki mapolomi na bango na kelasi ya minei ya Eteyelo ya Galaad oyo esalemaki na Selters/Taunus, Allemagne. Kelasi, oyo ezalaki na babalani 11 mpe bandeko basi minzeba mibale, bautaki na bikolo 7, bazalaki na mwayene ya mbula ya kobotama 32, mwayene ya mibu balekisi uta batisimo 14, mpe mwayene ya mibu 8,5 kati na mosala ya pionnier. Bayangani koleka 2 000 bazalaki na milulu ya kopesa mapolomi.
Ndeko Jaracz nde abandaki na kotalela Masese 11:24, oyo ezali bongo koloba: “Moto azali oyo akopalanganisa nde ekobakisama lisusu.” Amonisaki ete bayekoli balingaki kopalanganisama mpe kotombola bokoli.
Masolo kitoko ya Makomami mapesamaki na Richard Kelsey, coordinateur ya comité ya filiale ya Allemagne; Wolfgang Gruppe ya bureau de service; Werner Rudtke mpe Edmund Anstadt, bango mpe basangani ya comité ya filiale; mpe balakisi mibale, Dietrich Forster mpe Lothar Kaemmer. Albert Schroeder ya collège central apesaki lisolo moko kitoko oyo elobi “Bolanda kozala baluki ya pauni ya elimo.“ Eteni oyo elekaki esengo na libaku wana ezalaki kotangama ya bikolo 11 epai batindimaki na Afrika, na Amerike central mpe na Eropa ya Est. Na nsuka moyekoli moko atangaki mokanda moko mouti na bayekoli nyonso mpo na komonisa bosepeli na bango epai na collège central.
[Elilingi na lokasa 18]
Kelasi ya mbala 93 ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Na kati ya liste oyo awa na nse, milongó mitangami kobanda ne liboso kino no nsima mpe bankombo alongami kobanda na loboko ya mwasi kino loboko ya mobali.
(1) C. Hitesman; P. West; D. Evans; M. Hipps; N. Simonelli; S. Wood; M. corkle; C. Flores; J. Thomas. (2) M. Jones; J. Nissinem; M. Sponenberg; K. Zachary; G. Ravn; M. Backmam; A. Wettergren; D. Evans; R. Flores; G. Caporale. (3) N. Simonelli; M. Rechsteiner; M. Rechsteiner; L. Ruiz-Esparza; B. Gerbig; C. Simpson; C. Zanewich; B. Zachary; L. Richtts. (4) J. Simpson; J. Backaman; G. Corkle; M. Gerbig; B. Ricketts; L Bagger-Hansen; A. Jones; K. Zanewich; J. Ravn; C. Hipps. (5) S. Sponenberg; A. Hitesman; L. Caporale; S. Ruiz-Esparza; R. Thomas; B. Bagger-Hansen; M. wood; M. West; C. Wettergren; E. Nissinen.