Bauti kolónga lokola bayekoli, bakei kolónga lokola Bamisionere
“NAZALI kondima te ete biso nde tozwi libaku malamu boye!” wana ezali maloba ya Will, azalaki koloba na ntina na kobongisama oyo ye na mwasi na ye Patsy, bauti kozwa lokola bayekoli na kelasi ya mbala ya 103 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower. Zahid mpe Jeni bandimaki yango. Balobaki ete: “Tozwi libaku malamu ya kozala awa.” Bayekoli nyonso batángaki malamu na eteyelo. Sikawa bazali na esengo ya kobanda mosala na bango ya misionere. Kasi, liboso ya molulu ya kozwa mapɔlɔ́mi, oyo esalemaki mokolo mwa 6 Sɛtɛ́mbɛ 1997, bazwaki toli oyo epesamaki na bolingo nyonso mpe ekosunga bango na kolónga kati na mosala na bango ya misionere.
Prezidá ya molulu ezalaki Theodore Jaracz, mosangani ya lisangani ya Mikóló-Bakambi. Amonisaki ete—elongo na libota ya Betele mpe bamonisi ya filiale 48 ya la Société Watch Tower—baninga mpe bayebani ya ekólo Canada, ya États-Unis, ya Mpótó, mpe ya Porto Rico bazalaki wana mpo na komonisa lisungi na bango mpe bolingo na bango epai na bayekoli. Ndeko Jaracz amonisaki ete bamisionere ya mangomba ya boklisto babosani mosala ya misionere mpe babandi komipesa mobimba na misala mosusu to mpe komikɔtisa na makambo ya politiki. Na bokeseni, bamisionere ya Gileadi bazali kosalela makambo oyo babongisamaki mpo na kosala. Bazali koteya bato Biblia.
Robert Butler autaki na biro ya la Société oyo ezwami na Brooklyn asalaki lisoló oyo elobi: “Salá ete nzela na yo elónga.” Alimbolaki ete bato batalelaka bolóngi na ndenge ya mosolo to ya biloko mosusu oyo moto azali na yango, kasi oyo ezali mpenza na ntina ezali lolenge Nzambe atalelaka bolóngi. Mosala ya Yesu elóngaki, ezali te mpo ete amemaki motuya monene ya bato na kobongola motema, kasi mpo ete azalaki sembo na mosala na ye. Yesu apesaki nkembo na Yehova, mpe amibebisaki te na mokili. (Yoane 16:33; 17:4) Yango ezali makambo oyo moklisto nyonso akoki kosala.
Robert Pevy, misionere ya kala na ekólo Philippines, apesaki toli ete: “Zalá moombo ya bato nyonso.” Ntoma Paulo alóngaki na mosala na ye ya misionere. Sɛkɛlɛ́ ya bolóngi na ye ezalaki nini? Amikómisaki moombo ya bato nyonso. (1 Bakolinti 9:19-23) Molobi alimbolaki ete: “Misionere ya Gileadi oyo azali na elimo motindo wana akotalela te mosala ya misionere lokola ete eleki misala mosusu, to lokola lopɛtɛ mpo na etɛlɛmɛlo eleki likoló kati na lisangá. Misionere akendaka na mosala na ye na mokano bobele moko—kosalela [basusu], mpamba te ezali yango nde moombo akosalaka.”
Kotongáká toli na ye likoló na 2 Bakolinti mokapo 3 mpe mokapo 4, Gerrit Lösch moko wa lisangani ya Mikóló-Bakambi alendisaki bayekoli ete “Bómonisa nkembo ya Yehova lokola talatála.” Akundwelaki bango ete boyebi ya Nzambe ezali lokola pole oyo ezali kongɛngisa moklisto ntango afungoli motema na ye mpo na koyamba yango. Tozali komonisa pole yango na kosakoláká nsango malamu mpe na kobateláká etamboli malamu. Asungaki bango na koyeba ete “na bantango mosusu bokomiyoka ete bozali kokoka te. Soki mayoki motindo oyo eyeli bino, bótalela Yehova, ‘ete nguya oyo eleki [nguya] nyonso euta na Nzambe.’” (2 Bakolinti 4:7) Kolobeláká maloba ya Paulo mazwami na 2 Bakolinti 4:1, Ndeko Lösch abendaki likebi ya bayekoli ete: “Bósundola mosala na bino ya misionere te. Bóbatela talatála na bino pɛɛ!”
Karl Adams, molakisi na eteyelo ya Gileadi, asalaki lisoló oyo elamusaki mposa ya bato, ezalaki na motó na likambo ete “Yehova azali wapi?” Motuna wana motalelaki te esika Yehova afandi kati na molɔ́ngɔ́, kasi mposa ya koyeba makanisi ya Yehova mpe bilembo ya litambwisi na ye. Alobaki ete: “Na ntango ya mitungisi, ata moto oyo aumeli kati na mosala ya Yehova akoki kobosana makanisi ya Yehova.” (Yobo 35:10) Ezali boni mpo na mikolo na biso? Na 1942, libota ya Nzambe ezalaki na mposa ya litambwisi. Mosala ya kosakola esukaki, to ezalaki naino na makambo mingi ya kosala? Mokano na Yehova ezalaki nini mpo na bato na ye? Wana bazalaki koyekola Liloba ya Nzambe, eyano ekómaki polele. Ndeko Adams, alobaki ete, “Liboso ete mobu 1942 ekóma na nsuka, bibongiseli bizwamaki mpo na kosala Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower.” Yehova apambolaki mpenza mosala ya bamisionere oyo eteyelo wana etindaki.
Mark Noumair azalaki molakisi ya mibale ya Gileadi oyo asalaki lisoló. Kati na lisoló na ye oyo ezalaki na motó na likambo ete “Lolenge nini bokosalela makoki na bino?,” alendisaki bayekoli ete básalela mateya oyo bazwaki na Gileadi nokinoki ntango bakokóma na bateritware na bango ya sika. Alobaki ete: “Bósala makasi ete bósepela na bato mosusu. Bósepela na bato mpe na mimeseno na bango. Bóyoka mposa ya koyekola bizaleli na bango, istware na bango, mpe makambo oyo banamboka bazali kotalela lokola masano to masɛki. Wana ekoyekola yo lokótá, okomesana noki na teritware na yo.”
Bayekoli ya molende bazali kozwa esengo na mosala
Mpo ete básalela mateya na bango wana bazalaki naino na Gileadi, bayekoli batindamaki na masangá 11 ya penepene. Na bawikende, bazalaki kosangana na molende kati na mosala ya kosakola. Wallace Liverance, molakisi na eteyelo ya Gileadi abyangaki bayekoli mingi ete bápesa baeksperiansi liboso ya bayoki. Esengo na bango emonanaki polele wana bazalaki koyebisa makambo oyo bakutanaki na yango na ntango bazalaki kopesa litatoli na bazando, na baparkingi, na bamagazini, na balabála, mpe na ndako na ndako. Bamoko na bango balukaki mayele ya kokutana na bato oyo bazalaki koloba lokótá ya bapaya oyo bazalaki kofanda to kosala na teritware ya lisangá na bango. Bayekoli ya kelasi ya mbala ya 103 batambwisaki boyekoli ya Biblia soko zomi, na boumeli ya sanza mitano oyo balandaki mateya.
Bamisionere oyo baumeli na mosala bazali komonisa basɛkɛlɛ́ ya bolóngi
Nsima ya eteni oyo ya manáka, Patrick Lafranca mpe William Van de Wall babyangaki basangani nsambo ya Bakomité ya Filiale ete bálobela na mokuse liteya oyo basilaki kozwa na mosala ya misionere mpo na litomba ya kelasi. Na bolingo mpenza, bapesaki bayekoli toli ete bátalela mosala ya misionere lokola euti na Yehova mpe bázwa ekateli ya kokangama na mosala na bango. Balobelaki matomba malamu oyo bamisionere ya Gileadi basilaki kozwa na mosala na bango na mikili mosusu.
Nini esalisaki basangani ya Bakomité ya Filiale yango ete básala na boumeli ya ntango molai lokola bamisionere ya esengo, mpe oyo bazali kobota mbuma? Basalaki na bomoko elongo na bandeko ya teritware esika oyo batindamaki mpe bayekolaki makambo mingi epai na bango. Bamipesaki na koyekola lokótá nokinoki nsima ya bokómi na bango na teritware. Bayekolaki kozala na makambo makasimakasi te mpe komimesenisa na bizaleli ya banamboka. Charles Eisenhower, azwaki lipɔlɔ́mi na kelasi ya mbala ya yambo ya Gileadi mpe azali misionere ekokisi sikawa mbula 54, amonisaki “sɛkɛlɛ́” mitano oyo esalisi bamisionere ete balónga: (1) Koyekola Biblia ntango nyonso, (2) koyekola lokótá, (3) kozala na molende kati na mosala ya kosakola, (4) kosala nyonso ete kimya ezala na ndako ya bamisionere, mpe (5) kobondela Yehova ntango nyonso. Bayekoli bapusamaki te bobele na batoli kitoko oyo bazwaki, kasi bapusamaki na esengo ya solo oyo bamisionere wana ya makoki bazwaki na mosala ya Yehova. Lolenge Armando mpe Lupe bamonisi yango, “bazali na esengo ntango bazali koloba na ntina na bomoi na bango.”
Nsima ya masoló-mituná, lisukúlu moko etikalaki. Albert Schroeder, mosangani ya lisangani ya Mikóló-Bakambi, aponaki motó ya likambo “Kapita ya sembo ya Liloba ya Nzambe azali komonisa mosala ya motuya na solo.” Lokola Biblia ezali mokanda ya moboko na Eteyelo ya Gileadi, bayekoli basepelaki koyoka makambo oyo alingaki koloba. Ndeko Schroeder alobaki ete ntango mosala ya kobongola Biblia Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau ebandaki esili koleka mibu 50, bapakolami oyo bazali basangani ya komité ya Traduction du monde nouveau balukaki te kondimama na bato, kasi batyaki elikya na litambwisi ya elimo santu. (Yilimia 17:5-8) Nzokande, eleki mwa mikolo, bakonzi mosusu bandimi ete Traduction du monde nouveau ezali Biblia oyo esalemi malamu koleka. Kati na nkomá moko atindelaki la Société, nganga-mayele moko ya Biblia akomaki ete: “Nayebaka mokanda oyo mokomami malamu ntango namoni yango, mpe ‘Komité na bino ya Biblia Traduction du monde nouveau’ esali mosala moko kitoko mpenza.”
Nsima ya lisukúlu yango, bayekoli bazwaki mapɔlɔ́mi na bango, mpe liboso ya bato nyonso bayebisaki bisika oyo bango bakokende. Ezalaki ntango moko ya esengo mpo na basangani ya kelasi. Ntango momonisi moko ya banakelasi atangaki nkomá ya matɔ́ndi na ntina na mateya bazwaki, bato mingi bazalaki konganga na kolɛngisáká mingongo mpe balelaki. Bayekoli mosusu bamibongisaki mpo na mosala ya misionere bambula mingi liboso. Koyebáká ete mateya na Gileadi makopesama na Lingelesi, bamoko bakendaki na masangá ya lokótá ya Lingelesi mpo na kobongisa Lingelesi na bango. Bamosusu bakendaki epai oyo mposa ya babongisi-nzela ezalaki makasi, ezala na mboka na bango moko to na mboka-mopaya. Nzokande basusu bamibongisaki na kotangáká baeksperiansi, na kosaláká bolukiluki, to na kotaláká mbala na mbala kasɛti-video ya la Société Jusqu’aux extrémités de la terre.
Will na Patsy, oyo tolobelaki na ebandeli, bakamwaki na esengo oyo bayekoli bango moko bamonisaki. “Bato oyo bayebaki kútu biso te bazalaki koyamba biso mpe kokanga biso bafɔtɔ́. Mosangani moko ya lisangani ya Mikóló-Bakambi apesaki biso mbote na mɔ́tɔ mpenza mpe alobaki ete ‘Tosepeli kozala na bino!’” Na ntembe te, bayekoli ya kelasi ya mbala ya 103 balingani makasi. Babongisamaki malamu. Mateya oyo bazwaki na Gileadi makosalisa bango na kosala mbongwana wana bauti kolónga lokola bayekoli kino kokende kolónga lokola bamisionere.
[Etanda na lokasa 22]
Makambo matali banakelasi
Motuya ya bikólo epai bauti: 9
Motuya ya bikólo epai batindami: 18
Motuya ya bayekoli: 48
Motuya ya babalani: 24
Mwayene ya bambula ya kobotama: 33
Mwayene ya bambula balekisi kati na solo: 16
Mwayene ya bambula balekisi kati na mosala ya ntango nyonso: 12
[Elilingi na lokasa 23]
Kelasi ya mbala ya 103 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Kati na bankombo oyo ezwami awa na nsé, milɔngɔ́ mitángami kobanda liboso kino na nsima, mpe bankombo etángami kobanda na lobɔkɔ ya mwasi kino na lobɔkɔ ya mobali.
(1) Bunn, A.; Dahlstedt, M.; Campaña, Z.; Boyacioglu, R.; Ogando, G.; Nikonchuk, T.; Melvin, S.
(2) May, M.; Mapula, M.; Lwin, J.; Hietamaa, D.; Hernandez, C.; Boyacioglu, N.; Sturm, A.; Melvin, K.
(3) Thom, J.; Mapula, E.; Nault, M.; Teasdale, P.; Wright, P.; Pérez, L.; Shenefelt, M.; Pak, H.
(4) Murphy, M.; Campaña, J.; Stewart, S.; Cereda, M.; Reed, M.; Pérez, A.; Teasdale, W.; Pak, J.
(5) Stewart, D.; Wright, A.; Cereda, P.; Nikonchuk, F.; Reed, J.; Hietamaa, K.; Ogando, C.; Shenefelt, R.
(6) Murphy, T.; Hernandez, J.; Nault, M.; Bunn, B.; Thom, R.; Dahlstedt, T.; Lwin, Z.; May, R.; Sturm, A.
[Elilingi na lokasa 24]
Tokokende mboka nini?