Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/12 nk. 25-27
  • Bazali na mposa ya kosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali na mposa ya kosala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bilendiseli ya nsuka
  • Basalá-kala balobi
  • Elimo ya komipesa ezali kotinda bato na Gileadi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Eteyelo ya Gileadi ekokisi mbula 60 ya kopesa formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bauti kolónga lokola bayekoli, bakei kolónga lokola Bamisionere
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bósepela kati na Yehova mpe bózala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/12 nk. 25-27

Bazali na mposa ya kosala

ELOKO nini etindaki mibali 24 na basi na bango na ntango bazali naino nzoto makasi ete bátika bandeko, baninga mpe mboka na bango mpo na kosala mosala ya misionɛrɛ na mboka mopaya? Mpo na nini basepeli kokende na ekólo lokola Papouasie-Nouvelle-Guinée, Taïwan, mpe na bikólo ya Afrika mpe ya Amérique latine? Balingi kaka kokende komona bikólo yango? Te. Kasi, bolingo ya solo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango nde epesi bango mposa ya kokenda na bamboka yango.—Matai 22:37-39.

Bato yango ezali banani? Bana-kelasi oyo bauti kozwa badiplome na kelasi ya mbala ya 109 na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Na mokolo ya pɔsɔ, mwa 9 Sɛtɛmbɛ 2000, bato 5 198 bayanganaki na Esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, na etúká ya New York, mpe na bisika mosusu mpo na koyoka toli malamu oyo bapesaki bana-kelasi oyo bazwaki diplome mpo básala malamu mosala na bango ya misionɛrɛ.

Stephen Lett, moto akambaki likita yango, azali mosangani ya Komite mpo na Mateya ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Asalaki lisolo ya ebandeli oyo elobelaki vɛrsɛ ya Matai 5:13, “Bino bozali mungwa ya mokili.” Ndeko Lett alobaki ete maloba ya Yesu ebongi mpenza kosalelama epai ya bana-kelasi oyo bazwaki diplome. Na ndakisa, mungwa epesaka biloko elɛngi. Se ndenge yango, na elobeli ya elilingi, na mosala na bango ya kosakola, bamisionɛrɛ bazali lokola mungwa.

Bilendiseli ya nsuka

Ndeko Lett abengaki bandeko oyo bazali kosalela Yehova banda kala mpe basalaki masukulu ya mikuse kasi ya ntina mingi na Makomami. Ya liboso ezalaki John Wischuk, oyo asalaka na Departema ya Bokomi. Motó ya likambo ya lisolo na ye elobaki ete, “Nzembo oyo eleki mokuse ezali kolendisa elimo ya misionɛrɛ,” eutaki na Nzembo 117. Lelo oyo, tozali na mposa ya kopesa litatoli mpo na Yehova mpe Bokonzi na ye na “bikólo” mpe na “mabota” ya mokili mobimba. Balendisaki bana-kelasi bákokisa makambo oyo Nzembo 117 elobi mpe bálendisa bato ‘Básanzola [Yehova].’

Na nsima, mokambi abengisaki Guy Pierce, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Motó ya likambo ya lisolo na ye ezalaki: “Bózala na makambo makasi te, kasi bózala na bolɛmbu te.” Liloba ya Nzambe ezali makasi. Na mokanda ya Deteronome 32:4, babengi Yehova Nzambe ete Libanga, kasi Liloba na ye ezali kosɛnga ete tózala na makambo makasi te, yango wana bakomaki yango mpo na bato ya minɔkɔ mpe mimeseno nyonso, na mokuse, mpo na bato nyonso. Balendisaki bana-kelasi básakolaka Liloba ya Nzambe, bátika nsango na yango esimba mitema mpe lisosoli ya bato. (2 Bakolinti 4:2) Ndeko Pierce alobaki ete: “Bókangama na mitinda ya sembo, kasi bózala na makambo makasi te. Bótyola bato ya teritware na bino te mpo mimeseno na bango ekeseni na oyo ya bino.”

Karl Adams, ye azali molakisi na Gileadi, azali kosala na biro monene banda pene na mbula 53, asalaki lisolo oyo motó ya likambo na yango ezali kotinda na kokanisa: “Bokokende wapi soki bolongwe awa?” Ya solo, mibali 24 na basi na bango bakei mosala ya misionɛrɛ na bikólo 20 na mokili mobimba, kasi batunaki bango ete, Soki bokómi kuna, bomoni mboka yango, bokosala nini? Tozali na mokili oyo bato bazali motó likolólikoló. Bato balingaka kokende na bisika ya sika mpe kosala makambo ya sika mpo na bisengo na bango moko. Kasi, Yehova atindi bana-kelasi esika oyo alingi mpo na bisengo na bango moko te kasi mpo na kobatela “bampate” na ye. Basengeli te kozala lokola bato oyo, na Yisalaele ya kala, balingaki bamposa na bango moko mpe bazangisaki libaku malamu ete Yehova asalela bango mpo na kopambola bato ya mokili mobimba. Basengeli nde kolanda ndakisa ya Yesu Klisto, oyo alukaki bamposa na ye moko te, ntango nyonso asalaki mokano ya Tata na ye mpe azalaki na botosi na makambo nyonso akutanaki na yango.—Yoane 8:29; 10:16.

Wallace Liverance, sɛkrɛtɛrɛ ya Eteyelo ya Gileadi, asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete, “Bópesa motuya na makambo mozindo ya Nzambe.” Mbala na mbala, Makomami ekokanisaka Liloba ya Nzambe na bozwi, babiju ya ntalo, mabanga ya ntalo, mpe biloko ya motuya mingi mpe oyo bato balukaka mingi. Mokanda ya Masese 2:1-5 (NW ) emonisi ete mpo na kozwa “boyebi ya Nzambe,” tosengeli kolukaluka yango lokola “biloko ya motuya bibombami.” Molobi alendisaki bana-kelasi bákoba kotimola kati na makambo mozindo ya Nzambe ntango bazali na mosala na bango na bisika oyo batindi bango. Ndeko Liverance alobaki boye: “Yango ebongi mpenza, mpamba te ekolisaka kondima mpe elikya epai ya Yehova mpe ekoyeisa makasi ekateli na bino ya kotika mosala na bino te. Ekosalisa bino bólobaka na kondima mpe bózala bateyi ya malamu ntango bozali kolimbolela bato mikano ya Nzambe.”

Lawrence Bowen, ye mpe azali molakisi na Gileadi, asalaki lisolo na ye lokola nde bazali na kelasi, mpe alobaki ndenge Yehova apambolaki mosala ya bana-kelasi na sanza mitano oyo eleki. Atángaki maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na Misala 20:20 mpo na mosala na ye ya kosakola na Efese, alobaki ete ntoma Paulo asalelaki mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli. Makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango emonisi ete, lokola ntoma Paulo, baoyo balingaka Nzambe mpe balingaka bazalani na bango na ntango na biso, bamipekisaka te na koteya solo mpe kotika nguya ya Liloba ya Nzambe esala mosala epai ya bato mosusu. Yehova apambolaka mingi mosala yango.

Basalá-kala balobi

Ntango bana-kelasi ya Gileadi bazalaki kolanda mateya, bazalaki na libaku malamu ya kokutana na basangani ya bakomite ya filiale 23, oyo bazalaki na Esika Monene ya mateya na Patterson mpo na kolanda mateya na bango. Leon Weaver na Merton Campbell, bango mibale basalaka na Biro ya mosala ya kosakola, batunaki basangani mingi ya bakomite ya filiale mituna, bamoko na bango bazwá diplome na Gileadi. Masolo ya bamisionɛrɛ yango ezalaki elendiseli monene mpo na bana-kelasi, na bandeko mpe baninga na bango.

Mpo bámesana na bisika batindi bango, bapesaki bana-kelasi toli oyo: “Bózala na makanisi malamu. Soki bokutani na likambo moko oyo ekamwisi bino, bótika mosala te. Bótya elikya epai ya Yehova”; “bóyekola kosepela na oyo emonani, mpe bótya motema ete Yehova akopesa bino biloko oyo ezali na ntina mpo na bomoi.” Bapesaki lisusu bana-kelasi toli mpo bábatela esengo na mosala na bango. Bapesaki bango toli mosusu oyo: “Bókokanisa esika bouti na esika bokei te”; “bóyekola monɔkɔ ya mboka yango mpe bólobaka yango malamu mpo bókoka kosololaka na bato”; “bóyekola mimeseno mpe makambo ya bato epai bozali, mpo yango ekosalisa bino bótika mosala na bino te.” Toli yango elendisaki bamisionɛrɛ ya sika mingi.

Nsima ya mituna yango, David Splane, misionɛrɛ ya kala mpe azwaki diplome na kelasi ya mbala ya 42 na Gileadi, mpe azali sikoyo na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, asalaki lisukulu-moboko oyo ebendaki likebi ya bato na motó ya likambo ete “Bozali banani—Bayekoli to bato oyo bazwi diplome?” Atunaki bana-kelasi: “Ndenge nini bosengeli komitalela lokola bozali kokende na mosala na bino ya misionɛrɛ? Lokola bato oyo bazwi diplome mpe bayebi makambo nyonso ya mosala ya misionɛrɛ to lokola bayekoli oyo bazali naino na makambo mingi ya koyekola?” Ndeko Splane alobaki ete mwana-kelasi ya mayele oyo azwi diplome amitalelaka lokola moyekoli. Bamisionɛrɛ basengeli kotalela moto nyonso oyo bakutani na ye na mosala na bango ya misionɛrɛ ete akoki koteya bango likambo moko. (Bafilipi 2:3) Balendisaki bana-kelasi básala na baninga na bango bamisionɛrɛ, na biro ya filiale, mpe na masangá na bango. Ndeko Splane alobaki ete: “Bosilisi ekizamɛ na bino ya nsuka, kasi bozali kaka bayekoli. Bóyebisaka bato nyonso polele ete bozali wana mpo na koyekola.”

Nsima ya lisolo yango, bana-kelasi bazwaki badiplome na bango, mpe bayebisaki bato bisika batindi bango. Ekómaki esengo mingi mpo na bana-kelasi ntango moko na bango atángaki mokanda oyo bana-kelasi bakomaki mpe oyo emonisaki ekateli na bango ya kotika nzela na makambo oyo bayekoli na Liloba ya Nzambe etinda bango na kosala mingi na mosala ya bulɛɛ.

Moto nyonso oyo azalaki wana andimaki ete toli oyo bana-kelasi bazwi elendisi bango bámonisa bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango. Toli yango elendisaki bango lisusu mingi koleka mpo na kosalisa bato na elimo na bisika oyo batindi bango lokola bamisionɛrɛ.

[Etanda na lokasa 25]

MAKAMBO MATALI BANAKELASI

Bauti na bikólo: 10

Batindami na bikólo: 20

Banakelasi bazali: 48

Mwayene ya mbula ya kobotama: 33,7

Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 16,2

Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 12,5

[Elilingi na lokasa 26]

Kelasi ya mbala ya 109 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia

Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.

(1) Collins, E.; Miles, L.; Alvarado, A.; Lake, J. (2) Van Dusen, L.; Biharie, A.; Heikkinen, H.; Koós, S.; Smith, H. (3) Ashford, J.; Ashford, C.; Boor, C.; Richard, L.; Wilburn, D.; Lake, J. (4) Chichii, K.; Chichii, H.; Ramirez, M.; Baumann, D.; Becker, G.; Biharie, S.; Ramirez, A. (5) Van Dusen, W.; Lemâtre, H.; Pisko, J.; Cutts, L.; Russell, H.; Johnson, R. (6) Becker, F.; Baumann, D.; Johnson, K.; Pifer, A.; Madsen, C.; Lemâtre, J.; Heikkinen, P. (7) Smith, R.; Russell, J.; Collins, A.; Pisko, D.; Wilburn, R.; Koós, G. (8) Cutts, B.; Boor, J.; Madsen, N.; Pifer, S.; Richard, E.; Miles, B.; Alvarado, R.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto