Eteyelo ya Gileadi ekokisi mbula 60 ya kopesa formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ
“KOYEKOLA Biblia na mozindo esalisaki biso tópusana lisusu penepene na Yehova mpe tóyeba ebongiseli na ye malamumalamu. Yango epesaki biso formasyo mpo na kokende kosala na mboka mopaya.” Wana ezali maloba ya moyekoli moko ya kelasi ya mbala ya liboso ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Banda eteyelo ya Gileadi efungwamá, eleki sikoyo mbula 60, etindaka bamisionɛrɛ na mboka mopaya. Likita mpo na kopesa bana-kelasi ya mbala ya 114 badiplome esalemaki mokolo ya 8 Marsi 2003 na esika monene ya mateya ya Société Watchtower na Patterson, na etúká ya New York. Bato 6 404 oyo bayanganaki na ndako monene ya mayangani mpe na bisika mosusu oyo bazalaki kolanda likita na televizyo bafungolaki mpenza matoi mpo na kolanda programɛ oyo ezalaki na masukulu, mituna-masolo mpe lisolo moko ya mwa etuluku ya bato.
Theodore Jaracz, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azalaki prezida ya likita yango. Na maloba na ye ya ebandeli amonisaki ete bayangani bautaki na mikili ndenge na ndenge: na Azia, na bisanga ya Caraïbes, na Amerika ya Ntei mpe ya Sudi, mpe na Mpoto. Ndeko Jaracz asalelaki vɛrsɛ ya 2 Timote 4:5 mpo na komonisa mosala ya libosoliboso ya misionɛrɛ oyo azwi formasyo na Gileadi: ‘kosala mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu.’ Na nzela ya mosala ya koteya bato Biblia, bamisionɛrɛ batatolaka mpo na solo.
Malako ya nsuka mpo na bana-kelasi
Na nsima, masolo mingi ya mikuse elandanaki. Lisolo ya liboso ezalaki ya John Larson, ye azali na komite ya filiale ya États-Unis. Lisolo yango ya kolendisa mpenza ezalaki na motó ya likambo ete: “Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotɛmɛla biso?” (Baloma 8:31) Molobi asalelaki makanisi ya Biblia mpo na komonisa bana-kelasi ntina oyo basengeli kotyela nguya ya Yehova motema mobimba mpo na kolonga mokakatano nyonso oyo bakoki kokutana na yango epai oyo bakotinda bango. Ndeko Larson atángaki Baloma 8:38, 39 mpe alobaki na bana-kelasi boye: “Bózwa ntango ya kokanisa nguya oyo Nzambe azali kosalela mpo na bino, mpe bóbosana te ete eloko moko te ekoki kobebisa likebi oyo Yehova azali kotyela bino.”
Nsima na ye, ekómaki ngala ya Guy Pierce, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Motó ya likambo ya lisolo na ye elobaki ete: “Bóbatela esengo ya miso na bino!” (Luka 10:23) Amonisaki ete esengo ya solo eutaka na koyeba Yehova mpe kokanga ntina ya mokano na ye ya seko mpe komona ndenge oyo bisakweli ya Biblia ezali kokokisama. Ata soki batindi bamisionɛrɛ oyo bazwi badiplome na mboka nini, bakoki kozala ntango nyonso na esengo ya solosolo soki babateli esengo ya miso na bango. Ndeko Pierce alendisaki bana-kelasi oyo bazwaki badiplome na komanyola likoló ya malamu ya Yehova mpe na kotya makanisi mpe mitema na bango na kosala mokano na Ye. (Nzembo 77:12) Soki bamisionɛrɛ yango babungisi elikya na bango te, bakozala na makasi ya kolonga mokakatano nyonso oyo bakoki kokutana na yango.
Na nsima, balakisi mibale bapesaki bana-kelasi toli ya nsuka. Lawrence Bowen asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Bozali koluka lokumu?” Mpo na bato mingi, kozala na lokumu elimboli kozala na nkembo to mpe kozala moto monene. Nzokande, Asafa, mokomi ya nzembo amonaki ete lokumu ya solosolo eutaka na kozala na boyokani malamu na Yehova. (Nzembo 73:24, 25) Alendisaki bana-kelasi bámipesa na koyekola Biblia mpo na kobatela boyokani malamu na Yehova. Baanzelu “bazalaka na mposa ya kotalatala” makambo nyonso oyo etali mokano ya Yehova na nzela ya Klisto. (1 Petelo 1:12) Bazalaka na mposa ya koyeba makambo mingi mpenza ya Tata na bango mpo na komonisa lokumu na ye. Na nsima, molobi alendisaki bana-kelasi na kokumisa Yehova na mosala na bango ya misionɛrɛ na ntango bazali kosalisa bato mosusu bázwa eloko ya motuya monene.
Wallace Liverance, sekrɛtɛrɛ ya eteyelo asalaki lisukulu ya nsuka na eteni ya liboso; motó ya likambo na yango ezalaki: “Bóyebisa bwanya ya Nzambe na kati ya sɛkɛlɛ mosantu.” (1 Bakolinti 2:7) Bwanya ya Nzambe oyo ntoma Paulo alobelaki na mosala na ye ya misionɛrɛ ezali nini? Ezali mayele mpe nguya oyo Yehova azali kosalela mpo na kotya kimya mpe bomoko na molɔ́ngɔ́ mobimba. Bwanya yango nyonso ebombami kati na Yesu. Na esika ya kosalela Baevanzile mpo na koteya bato ndenge ya kosilisa mikakatano ya bomoi, Paulo asalisaki bango na komona ndenge oyo Nzambe akolongola makambo mabe oyo lisumu ya Adama ememaki. (Baefese 3:8, 9) Molobi alendisaki bayangani na maloba oyo: “Bósalela libaku malamu ya mosala oyo bozwi ndenge oyo Paulo asalelaki yango; ye azalaki kotalela mokumba na ye ya misionɛrɛ lokola libaku ya kosalisa bato na komona ndenge oyo Yehova akokokisa mokano na ye.”
Na nsima, Mark Noumair, ye mpe azali molakisi na Gileadi, asololaki na mwa ndambo ya bana-kelasi. Motó ya likambo ya lisolo na bango ezalaki oyo: “Koyekola Liloba ya Nzambe ekómisaka bato baministre ya molende”; etongamaki likoló ya maloba ya Paulo oyo ezali na Baloma 10:10. Bana-kelasi balobelaki makambo mingi oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na mikolo oyo bazalaki na kelasi. Makambo oyo balobaki emonisaki ete ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango, mitema na biso etondaka na makambo kitoko ya Yehova Nzambe mpe Bokonzi na ye mpe tobimisaka yango na monɔkɔ na biso. Na boumeli ya sanza mitano oyo bana-kelasi balekisi na esika monene ya mateya ya Société Watchtower, babandaki koyekola Biblia na bato koleka 30 oyo basepelaki na nsango malamu oyo bamemelaki bango na bateritware oyo bandeko ya masangá ya zingazinga basakolaka mingi kuna.
Toli ya bandeko oyo bateli
Ntango bana-kelasi bazalaki kolanda mateya, bazalaki mpe na libaku ya kokutana na bandeko oyo basalaka na Betele ya États-Unis. Robert Ciranko ná Robert Johnson, bandeko mibale ya filiale ya États-Unis, batunaki mituna na bandeko mingi oyo bazali kosalela Yehova banda bambula ebele, mosusu bazali bakɛngɛli-batamboli, oyo bakendaki na esika monene ya mateya ya Société Watchtower mpo na kozwa formasyo. Bato nyonso oyo batunaki bakɔtá kelasi ya Gileadi mpe basilá kosala mosala ya misionɛrɛ. Bandeko wana oyo batelá na elimo mpe baumelá mingi na mosala balobaki maloba ya bwanya oyo elendisaki bamisionɛrɛ ya sika ná bandeko mpe baninga na bango.
Bapesaki bango batoli lokola oyo: “Bómipesa na mosala ya kosakola mpe na misala na kati ya masangá na bino.” “Bómitalela te ete bozali na valɛrɛ mingi. Bótya makanisi na bino na mokano na bino ya bamisionɛrɛ, mpe bótalela mboka oyo batindi bino ete ezali mboka na bino.” Maloba mosusu ya ntina emonisaki ndenge oyo formasyo ya Gileadi ebongisaka moto mpo na kozala ministre ya mosala ya malamu, ezala esika nini batindi ye. Na ndakisa: “Toyekolaki kopesana mabɔkɔ mpe kosala na bomoko.” “Eteyelo esalisaki biso na kondima mimeseno ya bato mosusu.” “Bateyaki biso mayele ya sika mpo na kosalela Biblia.”
John Barr, ye aumeli mingi na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu monene ya likita yango. Motó ya likambo na yango eutaki na Biblia mpe elobaki ete: “Na mabelé mobimba lokito na bango eyokani.” (Baloma 10:18) Atunaki motuna oyo: Basaleli ya Nzambe balongi kosala likambo yango lelo oyo? Ɛɛ! Na mobu 1881, batunaki batángi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli motuna oyo: “Bozali nde kosakola?” Na nsima, molobi azongisaki makanisi ya bayangani na maloba oyo elobamaki na 1922 na liyangani ya Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis ete: “Bósakola Mokonzi mpe Bokonzi na ye!” Na boumeli ya bambula, molende ya basaleli ya sembo ya Nzambe etindaki bango na kosakola solo ya Bokonzi na bikólo nyonso. Na lisalisi ya mikanda mpe na maloba na bango, nsango malamu ekómi tii na nsuka ya mabelé—nyonso wana mpo na nkembo mpe lokumu ya Yehova. Ndeko Barr asukisaki lisolo na ye na maloba oyo elendisaki bana-kelasi bámona mapamboli oyo bazali na yango; alobaki boye: “Mokolo na mokolo, ntango bozali kobondela Yehova na bisika oyo bakotinda bino, bópesa ye matɔndi oyo euti mpenza na motema mpo na libaku oyo bozali na yango ya kokokisa maloba oyo ete, ‘Na mabelé mobimba lokito na bango eyokani.’ ”
Nsima ya lisukulu yango, batángaki bambote oyo eutaki na bisika ndenge na ndenge mpe prezida apesaki mwana-kelasi mokomoko diplome na ye. Na nsima, mwana-kelasi moko, oyo azalaki na esengo ná mawa mbala moko ya kotika eteyelo oyo balingaki mingi, atángaki mokanda na nkombo ya baninga na ye nyonso mpo na Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe libota ya Betele; amonisaki ekateli ya bana-kelasi ya kokumisa Yehova “sikoyo mpe seko na seko.”—Nzembo 115:18, NW.
Tozali kobondela mpo na bana-kelasi ete bámesana na bisika oyo batindi bango mpe bápesa mpenza mabɔkɔ mpo mosala ya kosakola na mokili mobimba ekende liboso, ndenge baoyo bakendaki liboso na bango banda mbula soki 60 basalaki.
[Etanda na lokasa 23]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na bikólo: 12
Batindami na bikólo: 16
Bana-kelasi bazalaki: 48
Mwayene ya mbula ya kobotama: 34,4
Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 17,6
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13,5
[Elilingi na lokasa 24]
Kelasi ya mbala ya 114 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watch Tower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Rosa, D.; Garrigolas, J.; Lindström, R.; Pavanello, P.; Tait, N. (2) Van Hout, M.; Donabauer, C.; Martinez, L.; Millar, D.; Festré, Y.; Nutter, S. (3) Martinez, P.; Clarke, L.; Maughan, B.; Fischer, L.; Romo, G. (4) Romo, R.; Eadie, S.; Tuynman, C.; Campbell, P.; Millar, D.; Rosa, W. (5) Lindström, C.; Garrigolas, J.; Markevich, N.; Lindala, K.; van den Heuvel, J.; Tait, S.; Nutter, P. (6) Maughan, P.; Pavanello, V.; Eadie, N.; West, A.; Clarke, D.; Markevich, J. (7) Fischer, D.; Donabauer, R.; Curry, P.; Curry, Y.; Carfagno, W.; West, M.; Tuynman, A. (8) Van Hout, M.; Campbell, C.; Festré, Y.; Carfagno, C.; van den Heuvel, K.; Lindala, D.