“Leisá monoko, kasi matambé te”
Lolenge ya kotalela mimeseno ya bonkɔ́kɔ ya Afrika mpo na bokundi ebembe
“BAKUNDAKA bakufi na bango te!” Wana ezali lolenge bato mingi balobaka na ntina na Batatoli ya Yehova na Afrika ya Wɛ́sti. Atako bongo, eyebani mpenza malamu ete, Batatoli bakundaka bakufi na bango.
Mpo na nini bato bazali koloba ete Batatoli ya Yehova bakundaka bakufi na bango te? Bazali kosala bongo mpo ete Batatoli balandaka te ebele ya mimeseno miyebani na ekólo mpo na bokundi ebembe.
Mimeseno ya bonkɔ́kɔ mpo na bokundi ebembe
Aliu afandi na mboka moko ya moke na ekólo Nigéria. Ntango mama na ye akufaki, ayebisaki bandeko na ye mpo na liwa ya mama na ye mpe asalaki bongo ebongiseli ete lisukúlu moko litongami na Makomami lisalema epai na ye. Lisukúlu lisalemaki na nkulutu moko ya lisangá ya Batatoli ya Yehova ya mboka wana, mpe limonisaki ezalela ya bakufi mpe elikya ya kolendisa kati na lisekwa, oyo ezwami kati na Biblia. Nsima ya lisukúlu, mama ya Aliu akundamaki.
Bandeko na ye basilikaki mingi. Mpo na bango, soki bokundi bosalemi na matánga te, oyo mbala mingi esalemaka na butu ya mokolo oyo moto akufaki, boye bokundi wana bosalemi malamu te. Na mboka ya Aliu, matánga ezali ntango ya elambo, kasi ya liláká te. Bakosukola mowei, bakolatisa ye bilamba ya mpɛmbɛ, mpe bakolalisa ye na mbeto na libándá. Bandeko ya mowei bakobyanga babɛti miziki, bakosomba bakazyé ya biɛlɛ mpe mbeki ya masanga ya mbila, mpe koboma ngombe moko to ntaba moko. Na nsima, bandeko mpe baninga ya mowei bakoya koyemba, kobina, kolya, mpe komela kino na ntongo ya mokolo molandi.
Na boumeli ya milulu wana, bilei bityami na makolo ya mowei. Ndambo ya nsuki ya moto wana, ya manzáka ya mabɔkɔ, mpe manzáka ya matambé ekokatama mpe ekobombama mpo na bokundi ya mibale. Yango esalamaka mikolo mingi, baposo, ata mpe bambula mingi na nsima.
Mokolo molandi matánga, boye mowei akundami, atako milulu ya liláká mizali kozwa poso moko to koleka. Na nsima, “bokundi ya mibale” bokosalema. Ndambo ya nsuki, manzáka ya mabɔkɔ, mpe manzáka ya matambé makolíngama na elamba ya mpɛmbɛ, oyo ekokákisama na libayá moko ya mɛtɛlɛ 1,5 to mɛtɛlɛ 1,8 ya bolai. Na nzembo mpe na mabina, libayá likomemema na nkunda mpe likokundama pene na nkolo na yango. Miziki ekobɛtama lisusu mingi, bakomela, mpe bakosala feti monene. Mpo na kosukisa milulu ya bokundi, bakobɛta mondoki mbala moko na likoló.
Lokola Aliu apesaki nzela te na makambo wana, afundamaki ete azalaki na limemya te mpo na bawei soko mpo na mimeseno oyo mizali kokumisa bango. Kasi mpo na nini Aliu, oyo azali Motatoli ya Yehova, aboyaki kosangana na momeseno wana? Mpo ete akoki soko moke te kondima makanisi ya mangomba oyo likoló na yango mimeseno wana mizwi moboko.
Bindimeli ya bonkɔ́kɔ ya Afrika
Na Afrika mobimba, bato bandimaka ete bato banso bauti na mokili ya elimo mpe bakozonga kuna. Bato ya ekólo Yoruba na mboka Nigéria, balobaka ete: “Mabelé ezali zándo, nzokande likoló ezali ndako.” Mpe lisese moko ya ekólo Igbo elobi, ete: “Moto nyonso oyo azali koya na mokili, akozonga na ndako, atako aumeli ntango molai awa na mabelé.”
Tótalela mimeseno milobelami na ebandeli. Mokano ya matánga ezali mpo na kopesa elimo mbote ya nsuka. Bilamba ya mpɛmbɛ bitalelami lokola ete bizali malamu mingi mpo na mokili ya elimo. Kotya bilei na matambé eyokani na likanisi oyo ete mowei azali kolya na nzela ya makolo mpe asengeli koleisama bongo ete aoka nzala te na mobembo epai na mboka ya bankɔ́kɔ.
Lisusu, bato mingi bakanisaka ete wana elimo ebimi na nzoto, ekoumelaka naino epai na bato ya bomoi kino na nsuka, ntango ekokangolama na bokundi ya mibale mpo na kozonga epai na bankɔ́kɔ. Bokundi ya mibale ezali kosalema mpamba te, bato bazali kobanga ete elimo ekosilika mpe ekonyokola bato oyo bazali na bomoi na maladi to na liwa. Kobɛtama ya mondoki ezali mpo na “kotinda elimo” na likoló.
Atako mimeseno ya bokundi mizali ndenge na ndenge na Afrika, kasi likanisi lisangisi yango nyonso lizali ete, soki nzoto ekufi, elimo ezalaka na bomoi. Mokano ya milulu nyonso wana ezali mpo na kosala ete elimo endima “libyangami ya kokenda na likoló.”
Bindimeli mpe mimeseno wana elendisamaki na liteya oyo ya boklisto ya lokuta ete molimo ya moto ekufaka te mpe na nzela na losambo na bango mpo na “basantu.” Ndakisa emonani ezali bongo makanisi ya aumônier ya mboka Swaziland, oyo alobaki ete Yesu ayaki te mpo na kobebisa bindimeli ya bonkɔ́kɔ, kasi ayaki nde mpo na kokokisa yango to mpo na kondimisa yango. Lokola, mbala mingi, bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bakambaka milulu ya bokundi, bato mingi bakanisi ete Biblia ezali kolóngisa bindimeli ya bonkɔ́kɔ mpe mimeseno oyo miuti na yango.
Oyo Biblia elobi
Biblia ezali kolóngisa bindimeli wana? Na ntina etali ezalela ya bakufi, Mosakoli 3:20 elobi ete: “Yɔnsɔ [bato mpe banyama] bakokɛnda esika mɔkɔ; yɔnsɔ ilongwi na mputulu, yɔnsɔ ikojonga na mputulu lisusu.” Makomami mayebisi lisusu ete: “Bato na bomɔi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo tɛ . . . Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe jua na bango isili kobeba . . . Ejali na mosala tɛ, to mwango tɛ, to mayɛlɛ tɛ, to boyebi tɛ kati na [Schéol] esika na bakufi, esika ekokɛnda yɔ.”—Mosakoli 9:5, 6, 10.
Mikapo oyo mpe mikapo misusu mimonisi yango polele ete bakufi bakoki komona biso te soko koyoka biso soko kosala biso mabe te. Yango eyokani te na oyo esili yo komona? Mbala mosusu oyebi mozwi moko, moto oyo azalaki na bopusi makasi oyo akufaki nde na nsima basangani ya libota na ye bazali kokelela atako basalaki milulu nyonso ya momeseno wana. Soki mobali wana azalaki na bomoi na mokili ya elimo, mpo na nini azali kosalisa libota na ye te? Akoki kosala bongo te mpamba te Biblia elobi solo—bakufi bazali lisusu na bomoi te, “bazali na nguya te kati na kufa,” mpe bakoki kosalisa moto moko te—Yisaya 26:14, NW.
Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, ayebaki ete likambo yango lizalaki solo. Tótala oyo ekómaki nsima na liwa ya Lazalo. Biblia elobi ete: “[Yesu] alobi na bango ete, Moninga na biso [Lazalo, NW] asili kolala mpɔngi; kasi nakokɛnda kobetola ye. Bayekoli na ye balobi na ye ete, Motei, sɔkɔ alali mpɔngi, mbɛ akobika. Nde Yesu alobi mpɔ na kufa na ye.”—Yoane 11:11-13.
Tósimba ete Yesu akokanisaki liwa na mpɔngi, na bopemi. Ekómaki ye na Betania, abɔndisaki Malia mpe Malata, bandeko basi ya Lazalo. Mpo na mawa, Yesu atangisaki mpisoli. Nzokande, alobaki eloko moko te oyo ekokaki kopesa likanisi ete Lazalo azalaki na elimo elandaki kozala na bomoi mpe ezalaki na mposa ya lisalisi mpo na koluka mboka ya bankɔ́kɔ na ye. Na esika na kozala bongo, Yesu asalaki nde likambo oyo alobaki ete akosala yango. Abetolaki Lazalo longwa na mpɔngi ya liwa na nzela ya lisekwa. Yango emonisaki ete Nzambe akosalela Yesu mpo na kosekwisa baoyo nyonso bazali kati na nkunda na kokanisama.—Yoane 11:17-44; 5:28, 29.
Mpo na nini bakeseni?
Ezali mabe na kokenda na mimeseno na bokundi oyo etongami te likoló na Makomami? Aliu mpe bamilió mosusu ya Batatoli ya Yehova bakanisi ete ezali bongo. Bayebi ete yango ezali mabe—mpe bokosi—mpo na bango ete basunga momeseno moko momonani polele ete motongami likoló na mateya ya lokuta mpe na kozimbisama. Balingi te kosala lokola bakomeli mpe Bafalisai, baoyo Yesu akweisaki mpo na bokosi na losambo.—Matai 23:1-36.
Ntoma Paulo akebisaki Timoté, moninga na ye ya mosala, ete: “Liloba lipemami liyebisi polele ete na bileko bikoya nsima, basusu bakosundola kondima, [mpe] bakotya likebi na maloba mapemami na bokosi mpe na mateya ya bademó, na nzela na bokosi ya mibali oyo bakolobaka makambo na lokuta.” (1 Timoté 4:1, 2, NW) Likanisi oyo ete bakufi bazali na bomoi kati na mokili ya elimo, ezali liteya ya bademó?
Ya solo, ezali bongo. Satana Zábolo, “tata ya lokuta,” alobaki na Eva ete akokufa te, komonisáká ete [Eva] asengelaki kokufa te kati na mosuni. (Yoane 8:44; Genese 3:3, 4) Likambo oyo lizalaki lolenge moko te na koloba ete molimo oyo mokokufaka te, mokolandaka kozala na bomoi nsima na kufa ya nzoto. Nzokande, Satana mpe bademó na ye bazali kosala makasi mpo na kopengwisa bato longwa na solo ya Liloba ya Nzambe, na komonisáká likanisi oyo ete bomoi ezali nsima na liwa. Lokola bazali kondima oyo Nzambe asili koloba kati na Biblia, Batatoli ya Yehova basepeli te na makanisi mpe mimeseno oyo mizali kolóngisa lokuta ya Satana.—2 Bakolinti 6:14-18.
Na kopengoláká mimeseno oyo miuti na Makomami te na ntina na bokundi ebembe, basaleli ya Yehova balingami te epai na bato mingi oyo basepeli te na makanisi na bango. Batatoli mosusu basili kopimelama lisangó ya biloko baboti na bango batikaki. Basusu basili kosundolama na mabota na bango. Nzokande, lokola bazali baklisto ya solo, bayebi ete kotosa Nzambe na bosembo nyonso ekoyeisaka koyina na mokili. Lolenge moko na bantoma ya Yesu Klisto, basili kozwa ekateli ya ‘kotosa Nzambe liboso na kotosa bato.’—Misala 5:29; Yoane 17:14.
Wana bazali kokanisa bato oyo bango balingaki, baoyo basili kolala kati na kufa, baklisto ya solo bazali kosala makasi mpo na komonisa bolingo epai na baoyo bazali na bomoi. Na ndakisa, Aliu akamataki mama na ye ete afanda epai na ye nsima na liwa ya tata na ye mpe aleisaki ye mpe asalisaki ye mikolo nyonso oyo mitikalaki na ye. Wana basusu balobaki ete Aliu azalaki na bolingo te mpo na mama na ye mpo ete akundaki ye te na kolanda momeseno ya ekólo, asalelaki lisese oyo liyebani na bato ya ekólo na ye ete: “Leisá monoko na ngai liboso na koleisa matambé na ngai.” Koleisa monoko, to kosalisa moto wana azali naino na bomoi, ezali na ntina mingi koleka koleisa matambé, likambo tolobelaki na ebandeli mpe oyo, ezali na boyokani na matánga na nsima na liwa ya moto. Na yango, koleisa matambé ezali na litomba moko te mpo na mowei.
Aliu atunaki na batɔ́ngi na ye ete, ‘Bino bolingi ete mabota na bino masalisa bino na bobangé na bino to masalela bino elambo monene nsima ya liwa?’ Mingi bazali kopona ete basalisama wana bazali naino na bomoi. Basepelaka lisusu na koyeba ete na liwa na bango, bakokanisama na limemya mpo na milulu ya liwa oyo mitongami na Biblia mpe na bokundi na nsɔni te.
Ezali yango nde Batatoli ya Yehova bazali koluka kosala mpo na balingami na bango. Bazali koleisa monoko, kasi matambé te.