Kebá na makambo ya bonkɔkɔ oyo esepelisaka Nzambe te
NA MBOKA moko na Afrika, na mwa lopango moko, batye sanduku moko libándá na moi makasi mpe bafungoli ezipeli na yango. Ntango bato bazali kolela basali molɔngɔ mpe bazali koleka liboso ya sanduku, mobange moko atɛlɛmi. Elongi na ye etondi na mawa; akitisi motó tii pembeni ya mowei mpe abandi koloba: “Mpo na nini oyebisaki ngai te ete ozali kotika biso? Mpo na nini otiki ngai boye? Awa yo okei, okokoba kosalisa ngai?”
Na mboka mosusu ya Afrika, mwana moko abotami. Moto moko te azali na ndingisa ya komona ye. Kaka nsima ya mikolo mingi nde bakobimisa mwana na miso ya bato mpe bakosala molulu mpo na kopesa ye nkombo.
Bato mosusu bakoki kokamwa komona moto azali koloba na mowei to na koyoka ete babombi mwana oyo abotami mpo bato bámona ye te. Nzokande, na bamboka mosusu, ntango moto akufi to mwana abotami, bato basalaka makambo ndenge na ndenge mpo bakanisaka ete soki moto akufi, akufaka mpenza te, akómaka nde na bomoi mosusu mpe ayebaka makambo nyonso oyo elekaka.
Bonkɔkɔ yango ekɔtelá mpenza bato; yango wana basalaka milulu mpo na makambo nyonso ya bomoi. Na ndakisa, ebele ya bato bakanisaka ete kobotama, kokóma elenge, kobala, kobota, mpe kokufa, ezali lokola baporte oyo moto alekaka na nzela oyo ezali komema ye na mokili ya bankɔkɔ. Bakanisaka ete moto oyo akufi akendaka na mokili wana mpe kuna akobaka kosalisa bandeko na ye oyo atikaki. Kutu, moto yango akoki mpe kobotama lisusu.
Bato basalaka milulu ndenge na ndenge mpo na kosalisa moto aleka malamu baporte wana. Basalaka milulu wana ya bonkɔkɔ mpo bakanisaka ete ntango moto akufi, eloko moko na nzoto na ye etikalaka na bomoi. Baklisto ya solo baboyaka milulu nyonso oyo bato basalaka mpo bandimaka makambo wana. Mpo na nini?
Moto akómaka ndenge nini ntango akufi?
Biblia eyebisi polele ndenge oyo moto akómaka ntango akufi. Elobi boye: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te . . . Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe zuwa na bango esili kobeba . . . Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika ya bakufi, esika ekokende yo.” (Mosakoli 9:5, 6, 10) Basambeli ya solo bandimaka liteya wana ya ntina mingi banda kala. Bayebi malamu ete molimo ekufaka. (Ezekiele 18:4) Bayebi mpe ete bilimo ya bakufi ezali te. (Nzembo 146:4) Na ntango ya kala, Yehova apekisaki bato na ye makasi ete bámeka ata moke te kosangana na molulu nyonso oyo bato basalaka mpo bakanisaka ete bato oyo bakufá bayebaka makambo mpe bakoki kosalisa bato ya bomoi.—Deteronome 14:1; 18:9-13; Yisaya 8:19, 20.
Baklisto ya liboso mpe bazalaki koboya molulu nyonso ya bonkɔkɔ oyo euti na mateya ya lokuta. (2 Bakolinti 6:15-17) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova, bázala mindɛlɛ to baindo, to bato ya ekólo nini, to ya bonkɔkɔ nini, baboyaka kosala milulu nyonso oyo euti na liteya ya lokuta oyo elobaka ete soki moto akufi, eloko moko kati na ye ekufaka te.
Nini ekoki kosalisa biso na koyeba soki likambo boye to boye ya bonkɔkɔ ezali malamu to mabe? Tosengeli kotalela malamumalamu soki likambo yango euti na liteya ya Biblia te, na ndakisa liteya oyo elobi ete bilimo ya bato bakufá ekoki kosalisa bato ya bomoi to kosala bango mabe. Lisusu, tosengeli komituna soki bato oyo bayebi mateya to bindimeli ya Batatoli ya Yehova bakobɛta libaku te soki bamoni biso tozali kosala likambo wana. Na makanisi wana na motó, tiká tótalela makambo mibale oyo basalelaka milulu ya bonkɔkɔ: kobotama ya mwana mpe liwa ya moto.
Milulu ntango mwana abotami mpe mpo na kopesa ye nkombo
Makambo mingi oyo bato basalaka ntango mwana abotami ezali mabe te. Nzokande, na bisika oyo bakanisaka ete mwana oyo abotami auti epai ya bankɔkɔ mpe ayei na mokili, baklisto basengeli mpenza kokeba. Na ndakisa, na bamboka mosusu na Afrika, soki mwana abotami, babombaka ye na ndako mpe bapesaka ye nkombo kaka nsima ya mikolo. Mikolo oyo balekisaka etalelaka mboka na mboka; soki mikolo yango ekoki, basalaka molulu moko mpo na kopesa mwana nkombo mpe babimisaka ye mpo bandeko mpe baninga bámona ye. Na ntango wana nde bayebisaka bato nyonso nkombo oyo bapesi ye.
Buku Bato ya Ghana mpe bonkɔkɔ na bango (na Lingelesi) elimboli ntina ya momeseno yango boye: “Na boumeli ya mikolo nsambo kobanda mokolo oyo abotami, batalelaka ye naino lokola ‘mopaya’ oyo asilisi naino kokabwana malamumalamu te na mokili ya bilimo epai auti mpo akɔta na mokili ya bato awa na mabelé. . . . Babombaka mwana na ndako mpe balingaka te ete bato mosusu bámona ye.”
Mpo na nini balekisaka mwa mikolo liboso ya kopesa mwana nkombo mpe basalelaka yango molulu? Buku mosusu (Ghana in Retrospect) elobi boye: “Bakanisaka ete liboso mwana akokisa mikolo mwambe, azalaka naino moto te. Azalaka naino na mwa boyokani na mokili ya bilimo oyo auti.” Buku yango elobi lisusu boye: “Lokola nkombo nde ekómisaka mwana moto, soki baboti bamoni ete mwana na bango akoki kokufa, bazelaka naino liboso ya kopesa ye nkombo tii ntango bakomona mpenza ete akozala na bomoi. . . . Yango wana, bakanisaka ete molulu wana, oyo babengaka ntango mosusu kobimisa mwana, ezalaka na ntina mingi mpenza mpo na mwana ná baboti na ye. Molulu yango nde ekɔtisaka mwana na mokili ya bato.”
Mingimingi, ndeko moko ya libota oyo azali mokóló atambwisaka molulu wana ya kopesa mwana nkombo. Mboka na mboka ezali na ndenge oyo basalaka molulu yango, kasi mbala mingi basopaka masanga, babelelaka bankɔkɔ mpo na kotonda bango lokola mwana akómi malamu na mokili ya bato, mpe basalaka milulu mosusu kilikili.
Na nsuka, bayebisaka bato nkombo ya mwana. Atako baboti nde bapesaka mwana nkombo, bandeko mosusu bayebisaka nkombo oyo bango bakanisi ebongi na mwana, mbala mosusu balukaka kondimisa yango na makasi. Nkombo oyo bapesi mwana ekoki kozala na ndimbola na monɔkɔ ya mboka, na ndakisa “akendaki mpe azongi,” “Mama azongi lisusu,” to “Tata azongi lisusu.” Bankombo mosusu ezalaka mpo na kopekisa bankɔkɔ bázongisa ye na mokili ya bawei.
Kosepela ntango mwana abotami ezali mabe ata moke te. Kopesa mwana nkombo ya ndeko moko ya libota mpe kopesa ye nkombo oyo emonisi makambo oyo elekaki ntango abotamaki ezali mpe mabe te, ata mpe kopona ntango nini bakopesa mwana nkombo ezali likambo ya moto na moto. Kasi, lokola baklisto balingaka kosepelisa Nzambe, bakebaka ete básala te makambo oyo ekotinda bato bákanisa ete bango mpe bandimaka ete soki mwana abotami sika azalaka naino “mopaya” oyo auti na mokili ya bilimo mpe alingi kokɔta na mokili ya biso bato.
Lisusu, ata soki na mboka na bango molulu ya kopesa mwana nkombo ezalaka na ntina mingi, baklisto basengeli te kosala likambo oyo ekotungisa lisosoli ya bato mosusu mpe basengeli kotalela makanisi oyo bato oyo bazali bandimi te bakoki kozwa. Tokoloba nini soki, na ndakisa, libota moko ya baklisto babombi mwana oyo abotami sika tii mokolo oyo bakosala molulu ya kopesa ye nkombo? Bato bakokanisa nini soki bazali kopesa bana bankombo oyo eyokani te na makambo ya Biblia oyo bango moko bateyaka?
Yango wana, ntango baklisto bazali kopona ndenge nini mpe ntango nini bakopesa mwana na bango nkombo, balukaka ‘kosala makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe’ mpo na kobɛtisa moto moko libaku te. (1 Bakolinti 10:31-33) Baklisto ‘batyaka komandema ya Nzambe pembeni’ te ‘mpo na kobatela mimeseno’ oyo ezali mpenza nde kokumisa bakufi. Nzokande, baklisto bapesaka lokumu mpe nkembo epai ya Yehova, Nzambe ya bomoi.—Malako 7:9, 13.
Kozonga na bomoi
Mpo na bato mingi, kobotama to liwa ezali kaka mbongwana oyo moto asalaka; soki moto akufi, alongwaka nde na mokili ya bato mpe akendaka na mokili ya bilimo. Bato mingi bakanisaka ete bankɔkɔ bakoki kopesa bato ya bomoi etumbu, to kopesa bango mbano; mpe soki basali milulu te ntango moto akufi, bankɔkɔ bakosilika. Makambo nyonso oyo bato basalaka soki moto akufi euti na likanisi wana.
Milulu oyo basalaka mpo na kolɛmbisa mitema ya bawei ezalaka na makambo ndenge na ndenge: liboso, balelaka mpe bagangaka liboso ya nzoto ya mowei; mpe nsima ya kokunda ebembe, basalaka fɛti. Mbala mingi, na milulu yango, bato balangwaka masanga, babɛtaka miziki ya makasi mpe babinaka. Bato bapesaka milulu yango valɛrɛ mingi; yango wana, ata bato oyo bazali na mbongo te, soki ndeko na bango akufi, basalaka nyonso mpo na “kokunda ye na lokumu,” ata soki ekosɛnga bákɔta banyongo to bámilukela mindɔndɔ mosusu.
Banda kala, Batatoli ya Yehova bamonisaka polele ete Biblia epekisi milulu wana.a Milulu yango ezali, na ndakisa, kotikala libándá ntɔngɔ saa, kosopa masanga mpo na komɛlisa bankɔkɔ, koloba na bawei mpe kosɛnga bango makambo, kolongola pili, mpe makambo mosusu oyo bato basalaka mpamba te mpo na bango, ntango moto akufi, molimo na ye ekufi te. Makambo wana oyo ezali kopesa Nzambe lokumu te ezali “mbindo,” ezali “bokosi ya mpambampamba” oyo euti na “mimeseno ya bato” kasi na Liloba ya solo ya Nzambe te.—Yisaya 52:11; Bakolose 2:8.
Mposa ya kosala lokola bato nyonso
Batatoli mosusu babundaka etumba monene mpo básala milulu ya bonkɔkɔ te, mingimingi na mikili oyo bato bapesaka valɛrɛ mingi na milulu mpo na kokumisa bawei. Lokola Batatoli ya Yehova basanganaka na milulu wana te, bato mosusu basepelaka na bango te to mpe balobaka ete balingaka bandeko na bango te, batyolaka bawei. Lokola bandeko na bango balobaka mingi mpe batyaka bango mbamba, baklisto mosusu, atako bayebi mateya ya Biblia, bandimaka kosala milulu wana mpo babangaka bato. (1 Petelo 3:14) Bamosusu balobaka ete bakoki kotika makambo wana te mpo ezali bonkɔkɔ na bango. Ezali mpe na baoyo balobaka ete soki baboyi milulu wana, bato mosusu bakokanisela basaleli ya Yehova mabe.
Biso tolukaka kosilikisa bato te. Kasi, Biblia elobi na biso ete soki moto aponi kolanda solo, bato ya mokili oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ bakosepela na ye te. (Yoane 15:18, 19; 2 Timote 3:12; 1 Yoane 5:19) Biso moko nde toponi nzela ya solo, mpe toyebi ete tosengeli kokesana na bato oyo bazali na molili ya elimo. (Malaki 3:18; Bagalatia 6:12) Se ndenge Yesu akweaki te ntango Satana amekaki ye mpo asala likambo oyo ekosepelisa Nzambe te, biso mpe, ata soki batye biso mbamba, toboyaka kosala makambo oyo ekosepelisa Nzambe te. (Matai 4:3-7) Baklisto ya solo, na esika básala makambo mpo na kobanga bato, balukaka libosoliboso nde kosepelisa Yehova mpe kopesa ye nkembo lokola Nzambe ya solo. Yango wana baboyaka kokakola mitinda ya Biblia mpo na losambo ya pɛto, kaka mpo na kosepelisa bato.—Masese 29:25; Misala 5:29.
Tolelaka bawei na ndenge oyo ezali kokumisa Yehova
Koyoka mawa makasi mpe kolela ntango ndeko to moninga moko akufi ezali likambo ya kokamwa te. (Yoane 11:33, 35) Kokanisa ndeko to moninga oyo akufi mpe kokunda ye na limemya ezali malamu mpe ezali ndenge ebongi ya komonisa ete tolingaki ye. Kasi, Batatoli ya Yehova, ata soki bazali na mawa makasi ntango ndeko to moninga na bango moko akufi, baboyaka kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe te. Likambo yango ezali pɛtɛɛ te mpo na baoyo bakoli na bamboka oyo bato babangaka bawei. Ekoki kozala mpasi mingi tóbatela makanisi malamu ntango tozali na mpasi na motema mpo ndeko to moninga na biso moko akufi. Atako bongo, Yehova, “Nzambe ya kobɔndisa nyonso,” apesaka baklisto ya sembo makasi mpe bandeko na bango bandimi basungaka bango. (2 Bakolinti 1:3, 4) Lokola baklisto ya solo bandimaka mpenza ete mokolo mosusu bato oyo bakufá, baoyo Nzambe abombá na makanisi na ye, bakozonga na bomoi, baboyaka kosala milulu oyo ezali komonisa lokola nde lisekwa ekozala te.
Tozali na esengo mingi na ndenge Yehova alongoli biso ‘na molili mpo tókɔta na kati ya pole na ye ya kokamwa’! (1 Petelo 2:9) Ntango tozali kosepela kobotama ya mwana to tozali na mawa mpo ndeko to moninga na biso akufi, tiká ete mposa na biso ya kosala makambo oyo ezali sembo mpe bolingo na biso makasi mpo na Yehova Nzambe etinda biso na ‘kokoba kotambola lokola bana ya pole.’ Tótika te ete makambo ya bonkɔkɔ oyo euti na boklisto te mpe oyo esepelisaka Nzambe te ebebisa biso.—Baefese 5:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mwa buku Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo? Ebimisami na Batatoli ya Yehova.