Mbano ya Yobo—Liziba ya elikya mpo na biso
“[Yehova] apambolaki mikɔlɔ na nsuka na Yobo koleka yango na ebandeli na ye.” —YOBO 42:12.
1. Yehova azali kosala nini mpo na bato na ye, ata na ntango oyo komekama ezali kolɛmbisa bango makasi?
YEHOVA “amikómisaka mopesi na mbano epai na baoyo bazali mpenzampenza koluka ye.” (Baebele 11:6, NW) Azali mpe kopesa nguya epai na bato oyo bamipesi epai na ye mpo ete bátatola na mpiko nyonso, ata soki komekama elɛmbisi bango kino na nsuka ya makasi na bango. (Yobo 26:5; Emoniseli 11:3, 7, 11) Yango emonanaki solo na ntango oyo makambo ya mpasi makwelaki Yobo. Atako babɔndisi misato ya lokuta bakoselaki ye makambo, akangaki monɔkɔ te na ntina na kobanga bato. Nzokande, apesaki litatoli na mpiko nyonso.
2. Atako banyokwamaki mpe bakutanaki na mikakatano, lolenge nini Batatoli ya Yehova balóngaki komekama oyo ekómelaki bango?
2 Na mikolo na biso, mingi kati na Batatoli ya Yehova basili kokutana na minyoko minene mpe ya makasi na boye ete bakómaki pene na liwa. (2 Bakolinti 11:23) Nzokande, lokola Yobo, bamonisaki bolingo mpo na Nzambe mpe basalelaki boyengebene. (Ezekiele 14:14, 20) Balóngaki mpe komekama na bango, bazalaki na ekateli makasi ya kosepelisa Yehova, balendisamaki mpo na kopesa litatoli na mpiko nyonso, mpe batondaki na elikya ya solosolo.
Yobo apesi litatoli na mpiko nyonso
3. Lolenge nini ya litatoli Yobo apesaki na lisukúlu na ye ya nsuka?
3 Kati na maloba na ye ya nsuka, Yobo apesaki nkutu litatoli monene koleka oyo apesaki liboso. Akangaki mpenza monɔkɔ ya babɔndisi na ye ya lokuta. Na maloba makasi ya kotyola, alobaki ete: “Osungi ye oyo ajangi nguya na njela nini?” (Yobo 26:2) Yobo akumisaki Yehova, oyo na nguya na ye atɛlɛmisaki etando na biso oyo ya mabelé likoló ya eloko te mpe akakemisaki mapata matondi na mai likoló na mabelé. (Yobo 26:7-9) Nzokande, Yobo alobaki ete makambo wana ya kokamwa ‘mazali bobele ndambo na nzela ya Yehova.’—Yobo 26:14.
4. Yobo alobaki nini na ntina na bosembo, mpe mpo na nini akokaki koloba bongo mpo na ye moko?
4 Kondimisáká ete azalaki na ekweli te, Yobo alobaki ete: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai tɛ.” (Yobo 27:5) Na bokeseni na bifundeli ya lokuta oyo elobamaki na ntina na ye, asalaki likambo te oyo ekokaki kosala ete etumbu motindo oyo ekómela ye. Yobo ayebaki ete Yehova ayokaka te mabondeli ya bapɛngwi kasi akopesa mbano na bato oyo bazali sembo. Yango ekoki kokundwela biso ete mosika te, na etumba ya Armagedon basáli na mabe bakolongolama na bisika na bango ya nguya, mpe bakokima te na lobɔkɔ na kokamwa ya Nzambe. Kino na ntango wana, libota ya Yehova bakotambola kati na bosembo na bango.—Yobo 27:11-23.
5. Lolenge nini Yobo alimbolaki mayele ya solo?
5 Kanisá bato misato oyo bazalaki na mayele ya mokili wana bazalaki koyoka Yobo komonisa ete bato basili kosalela makoki na bango mpo na kozwa wolo, palata, mpe biloko mosusu ya motuya kati na mabelé mpe na mai monene. Alobaki ete: “Jambi motuya na mayɛlɛ eleki mabanga na pinini.” (Yobo 28:18) Babɔndisi na Yobo misato ya lokuta bakokaki te kosomba mayele ya solo. Eutelo na yango ezali epai na Mozalisi ya mopepe, ya mbula, ya mikalikali, mpe ya nkaké. Ya solo, limemya mpo na “kobanga Yehova—nde ezali mayele, mpe kotika mabe ezali bososoli.”—Yobo 28:28, NW.
6. Mpo na nini Yobo alobelaki bomoi na ye ya kala?
6 Atako bampasi oyo azwaki, Yobo atikaki te kosalela Yehova. Na esika ya kopesa ye Oyo Aleki-Likoló mokɔngɔ, mobali wana ya sembo amonisaki mposa makasi ya kozala na “boyokani elongo na Nzambe,” boyokani oyo azalaki na yango liboso. (Yobo 29:4) Yobo azalaki te komikumisa wana azalaki kolobela lolenge ‘abikisaki bato na mpasi, amilatisaki ye moko na boyengebene, mpe azalaki mpenza tata epai babólá.’ (Yobo 29:12-16) Kasi, azalaki nde kolobela makambo ya bomoi na ye lokola mosaleli ya sembo ya Yehova. Yo mpe osili komizwela lokumu kitoko motindo oyo? Ya solo, Yobo azalaki mpe komonisa lokuta ya bifundeli oyo ebimisamaki na bakosi misato oyo bazalaki basambeli ya lokuta.
7. Yobo azalaki moto ya lolenge nini?
7 Yobo asɛkamaki ata na bilenge ‘oyo akokaki kondima te kotya batata na bango elongo na bambwa na etongá na ye.’ Ayinamaki mpe abwakelamaki nsoi. Atako azwaki mpasi makasi motindo wana, bazangaki komonisela Yobo limemya. (Yobo 30:1, 10, 30) Lokola amipesaki na motema mobimba epai na Yehova, azalaki bongo na lisosoli ya pɛto mpe akokaki koloba ete: “Tika ete napimama na epimeli na sembo ete Njambe ayeba boyɛngɛbɛnɛ na ngai.” (Yobo 31:6) Yobo azalaki te moto na ekobo to mokaneli mabe na bato mosusu, mpe azangaki te kosunga bato na bosénga. Atako azalaki mozwi, atyaki soko moke te elikya kati na bozwi na ye ya mosuni. Lisusu, Yobo amipesaki te na losambo ya bikeko na kosambeláká biloko bizangi bomoi, lokola sanza. (Yobo 31:26-28) Kotyáká elikya epai na Nzambe, atikaki ndakisa malamu ya moto na sembo. Atako bampasi na ye nyonso wana mpe kozala ya babɔndisi ya lokuta, Yobo amilóngisaki na nguya nyonso mpe apesaki litatoli ya kokamwa. Maloba na ye makómaki na nsuka, azalaki kotalela Nzambe lokola Mosambisi na ye mpe Mopesi na mbano.—Yobo 31:35-40.
Elihu azwi maloba
8. Elihu azalaki nani, mpe lolenge nini amonisaki limemya mpe mpiko?
8 Elenge Elihu, mokitani ya Buzu mwana ya Nahola azalaki mpembeni wana mpe azalaki ndeko ya mosika ya Abalayama, moninga na Nzambe. (Yisaya 41:8) Elihu amonisaki limemya epai na mibangé na koyokáká ngámbo nyonso mibale wana bazalaki koloba. Nzokande, alobaki na mpiko nyonso makambo oyo kati na yango bazalaki na libungá. Na ndakisa, nkanda na ye epelaki makasi epai na Yobo mpo ete “alongisaki molimo na ye mɔkɔ liboso na Njambe.” Mingimingi, Elihu azalaki na nkanda makasi epai na babɔndisi ya lokuta. Maloba na bango mamonanaki lokola mazali kokumisa Nzambe, kasi bazalaki mpenza nde kopamela ye na komityáká na ngámbo ya Satana kati na ntembe oyo abimisaki. Lokola “atondaki na maloba” mpe azwaki bopusi ya elimo santu, Elihu azalaki motatoli ya Yehova oyo azangaki koponapona.—Yobo 32:2, 18, 21.
9. Elihu alobaki nini na ntina na kobikisama ya Yobo?
9 Yobo akómaki komibanzabanza mingi na ntina na komilóngisa na ye moko koleka oyo ya Nzambe. Ya solo, azalaki kobundisa Nzambe. Nzokande, wana molimo ya Yobo mozalaki kobɛlɛma na kufa, elembo ya kobikisama emonanaki. Lolenge nini? Elihu apusamaki na koloba ete Yehova andimaki Yobo na nzela ya nsango oyo: “Bikisa ye ete akita na libulu tɛ, nasili komɔna lisiko; tika ete mosuni na ye eleka yango na elɛngɛ na kitɔkɔ, ajonga na mikɔlɔ na bolɛngɛ na ye.”—Yobo 33:24, 25.
10. Yobo amekamaki kino na meko nini, kasi nini tokoki kondimisama na kotalela 1 Bakolinti 10:13?
10 Elihu asembolaki Yobo wana alobaki ete litomba ezali te na kosepelisa Nzambe na kobateláká bosembo. Elihu alobaki ete: “Tika ete ejala mosika na Njambe ete asala mabe! Ejala mosika mpe na Oyo-na-Nguya-Yɔnsɔ ete ajala na lisumu! Mpɔ ete akojongisela moto pelamɔkɔ na mosala na ye.” Kozanga kokanisa, Yobo alobelaki mingi boyengebene na ye moko, kasi asalaki bongo mpamba te azangaki boyebi mpe bososoli oyo esengeli. Elihu abakisaki ete: “Tika ete Yobo asambisama na nsuka mpɔ na kojongisa na ye lokola bato mabe.” (Yobo 34:10, 11, 35, 36) Bobele bongo, kondima mpe bosembo na biso ekoki mpenza komonisama soki ‘tomekami kino koleka ndelo’ na makambo mosusu. Atako bongo, Tata na biso ya likoló oyo azali na bolingo akotika te ete tómekama koleka nguya na biso.—1 Bakolinti 10:13.
11. Wana tomekami makasi, nini tosengeli komikundola?
11 Wana Elihu akóbaki koloba, amonisaki lisusu ete Yobo alobelaki mingi boyengebene na ye moko. Likebi lisengelaki nde kotyama likoló na Motongi na biso Monene. (Yobo 35:2, 6, 10) Elihu alobaki ete Nzambe “akobatelaka bomɔi na bato mabe tɛ nde akolongisaka banyɔkɔlami.” (Yobo 36:6) Ezali na moto moko te oyo akoki kokweisa nzela ya Nzambe mpe koloba ete azali sembo te. Ye akumisami mingi koleka oyo tokoki koyeba, mpe bambula na ye eyebani motuya te. (Yobo 36:22-26) Wana tomekami makasi, tómikundola ete Nzambe na biso ya seko azali sembo mpe akopesa biso mbano mpo na misala na biso ya sembo oyo ezali kosanzola ye.
12. Maloba ya bosukisi ya Elihu mamonisi nini na ntina na lolenge Nzambe akoyeisa etumbu likoló na basáli na mabe?
12 Wana Elihu azalaki koloba, mopepe makasi ezalaki koya. Lokola yango ezalaki kobɛlɛma, motema ya Elihu ebandaki kobeta mpe kolɛnga. Alobaki na ntina na makambo minene masalemi na Yehova mpe alobaki ete: “Ɛ Yobo, yoka oyo; tɛlɛma nyɛ mpe kanisa misala na kokamwa na Njambe.” Lokola Yobo, tosengeli kotalela misala ya kokamwa ya Nzambe mpe lokumu monene oyo ezali kopusa biso na kobanga ye. Elihu alobaki ete: “Oyo-na-Nguya-Yɔnsɔ, tokomɔnaka ye tɛ ajali monɛnɛ na nguya mpe na sembo, na boboto monɛnɛ na ye akonyɔkɔla tɛ. Na bongo bato bakotosaka ye.” (Yobo 37:1, 14, 23, 24) Maloba ya bosukisi ya Elihu makundweli biso ete, wana mosika te Nzambe akoyeisa etumbu likoló na basáli na mabe, akotalela bosembo mpe boyengebene na motuya moke te mpe akobatela baoyo bazali kobanga ye lokola basambeli na ye oyo bazali na limemya mozindo. Oyo nde libaku kitoko kozala kati na bato na sembo wana oyo bazali kondima Yehova ete azali Moyangeli ya Mɔlɔ́ngɔ́ mobimba! Yiká mpiko lokola Yobo ayikaki, mpe kotika nzela soko moke te ete Zábolo apɛngwisa yo na esika na yo epambwami kati na bibele wana oyo bazali na esengo.
Yehova ayanoli Yobo
13, 14. (a) Na ntina na makambo nini Yehova azalaki kotuna Yobo mituna? (b) Makambo nini tokoki koyekola na mituna misusu oyo Nzambe atunaki Yobo?
13 Oyo nde nsɔ́mɔ Yobo azalaki na yango ntango Yehova alobelaki ye kati na mopepe makasi! Nzambe nde abimisaki mopepe makasi wana, yango ekokanaki te na mopepe monene oyo Satana asalelaki mpo na kokweisa ndako mpe koboma bana na Yobo. Yobo azangaki maloba ntango Nzambe azalaki kotuna mituna: “Yɔ ojalaki wapi wana natiaki miboko na mokili? . . . Nani atii libanga na yango na nsuka, wana miɔtɔ na ntɔngɔntɔngɔ iyembaki elɔngɔ mɔkɔ mpe bana yɔnsɔ na Njambe bangangaki na esɛngɔ?” (Yobo 38:4, 6, 7) Yehova atunaki Yobo mituna mingi na ntina ya mai monene, mapata oyo mazingi yango, londende, bikuke ya kufa, pole mpe molili, mpe bituluku ya minzoto. Yobo akokaki koloba eloko moko te ntango batunaki ye: “Oyebi nde mibeko na lola?”—Yobo 38:33.
14 Mituna misusu mimonisaki ete liboso na kozalisama ya moto mpe liboso ete apesamela bokonzi likoló na mbisi, bandɛkɛ, nyama, mpe biloko bikotambolaka na mokili, oyo Nzambe azalaki kokokisa bamposa na yango—kozanga lisalisi to toli ya moto. Mituna mingi ya Yehova milobelaki bikelamu yango lokola ngombe mobali ya zámba, maligbángá (autruche), mpe mpunda. Atunaki Yobo ete: “Mpɔngɔ ebuti mpɔ na liloba na yɔ, etongi mpe ndako na ye na likolo?” (Yobo 39:27) Soko moke te! Kanisá naino mayoki ya Yobo ntango Nzambe azalaki kotuna ye: “Motɛmɛli na Oyo-na-Nguya-yɔnsɔ akowelana na ye?” Likambo ya kokamwa ezali te soki Yobo alobaki ete: “Tala ngai najali elɔkɔ mokɛ mokɛ, nakojongisela yɔ nini? Natii lobɔkɔ na ngai likolo na monɔkɔ na ngai.” (Yobo 40:2, 4) Lokola Yehova azalaka ntango nyonso na elónga, soki tomekami na komilelalela na ntina na ye, tosengeli ‘kotya lobɔkɔ likoló na monɔkɔ na biso.’ Mituna ya Nzambe mimonisaki bonene na ye, lokumu na ye, mpe nguya na ye, ndenge emonisami na biloko azalisaki.
Behemote mpe Leviatana
15. Behemote atalelami lokola nyama nini, wapi mwa makambo makesenisi ye na banyama mosusu?
15 Na nsima Yehova alobelaki Behemote, oyo eyebani mingi ete ezali ngubu. (Yobo 40:15-24) Eyebani mingi na ntina na monene na yango mingi, kilo mingi, mpe loposo makasi, nyama wana ‘elyaka matiti.’ Eutelo ya nguya mpe makasi na ye ezali na loketo na ye mpe misisa ya libumu na ye. Mikuwa ya makolo na ye ezali makasi lokola “mingendu na motako.” Behemote ebangaka te mai ya makasi, kasi kozanga mpasi emataka epai mbongé ezali kouta.
16. (a) Lolenge Leviatana alobelami emonisi ekelamu nini, mpe wapi mwa makambo matali ye? (b) Nguya ya Behemote mpe Leviatana ekoki kopesa likanisi nini mpo na oyo etali kokokisa mikumba kati na mosala ya Yehova?
16 Nzambe atunaki lisusu Yobo ete: “Oyebi kobenda Lewiatana na ndɔbɔ, to kokitisa lolemo na ye na nkamba?” Lolenge oyo Leviatana elobelami emonisi ete ezali bongo ngando. (Yobo 41:1-34) Esalaka boyokani ya kimya elongo na moto te, moto na mayele mpe moto moko te akoki kotumola nyama wana. Mbanzi ekimisaka ye te, mpe “akosɛka mpɔ na makɛlɛlɛ na makɔnga mikɛ.” Leviatana oyo ezali na nkanda ebongolaka mai na bozindo lokola mbilika na mafuta na malasi. Likambo oyo ete Leviatana mpe Behemote bazali na nguya mingi koleka Yobo esalisaki ye na komikitisa. Biso mpe tosengeli koyeba na komikitisa nyonso ete tozali na nguya kati na biso moko te. Tozali na mposa na mayele mpe nguya oyo Nzambe apesaka mpo na kopɛngola mino ya Nyoka oyo ete Satana, mpe kokokisa mikumba tozali na yango kati na mosala ya Yehova.—Bafilipi 4:13; Emoniseli 12:9.
17. (a) Lolenge nini Yobo “amonaki Nzambe”? (b) Mituna oyo Yobo akokaki te koyanola na yango emonisaki nini, mpe lolenge nini yango ekoki kosalisa biso?
17 Na komikitisa nyonso, Yobo ayebaki ete makanisi na ye mazalaki mabe mpe andimaki ete alobaki na kozanga boyebi. Nzokande, amonisaki kondima na boye ete akokaki “komona Nzambe.” (Yobo 19:25-27) Lolenge nini yango ekokaki kosalema mpo ete ezali na moto te oyo akoki komona Yehova mpe kotikala na bomoi? (Exode 33:20) Ya solo, Yobo amonaki kolakisama ya nguya ya Nzambe, ayokaki maloba na Nzambe, mpe miso na ye ya bososoli mafungwamaki mpo na komona solo na ntina na Yehova. Na bongo Yobo ‘amityolaki mpe abongolaki motema na mputulu mpe na mputulu ya mɔ́tɔ.’ (Yobo 42:1-6) Mituna mingi oyo azalaki na likoki te ya koyanola emonisaki bonene ya Nzambe mpe emonisaki bokɛ ya moto; ata moto oyo amipesá epai na Yehova lokola Yobo. Yango ezali kosalisa biso na komona ete matomba na biso moko esengeli te kozala na ntina koleka kobulisama ya nkombo ya Yehova mpe kolóngisama ya boyangeli na ye. (Matai 6:9, 10) Lobanzo na biso ya liboso esengeli kozala kobatela bosembo epai na Yehova mpe kokumisa nkombo na ye.
18. Babɔndisi ya lokuta ya Yobo basengelaki kosala nini?
18 Na bongo, ezalaki boni mpo na babɔndisi ya lokuta oyo bazalaki koluka boyengebene na bango moko? Na bosembo nyonso, Yehova akokaki koboma Elifaza, Biledada, mpe Sofala mpo balobaki te solo na ntina na ye, lokola Yobo asalaki yango. Nzambe alobaki ete: “Bokamata ngɔmbɛ nsambo mpe mpate nsambo mpe kɛnda epai na moombo na ngai Yobo ete bokaba likabo na kotumba mpɔ na bino; moombo na ngai Yobo akobɔndɛla mpɔ na bino.” Bato wana misato basengelaki komikitisa mpo na kotosa etinda yango. Yobo, moto na sembo asengelaki kobondela mpo na bango, mpe Yehova andimaki libondeli na ye. (Yobo 42:7-9) Kasi ezali boni mpo na mwasi ya Yobo, oyo asɛngaki ye ete alakela Nzambe mabe mpe akufa? Emonani ete ayokanaki na Yobo na lisalisi ya mawa ya Nzambe.
Mbano oyo elakami ezali kopesa biso elikya
19. Na kotalela likambo ya Yobo, lolenge nini Yehova amonisaki bonene na ye likoló na Zábolo?
19 Wana Yobo atikaki komitungisa na ntina na bampasi na ye mpe azongelaki mosala ya Nzambe, Yehova abongolaki makambo mpo na ye. Nsima wana Yobo abondelaki mpo na bato misato wana, Nzambe ‘alongolaki ezalela na ye ya mawa’ mpe ‘apesaki ye mbala mibale nyonso oyo azalaki na yango.’ Yehova amonisaki bonene na Ye liboso ya Zábolo na kopekisáká lobɔkɔ ya Satana oyo ezali na nguya mabe ya kopesa bokɔnɔ mpe, na lolenge ya ekamwiseli, abikisaki Yobo. Lisusu, Nzambe azongisaki nsima mampinga ya bademó mpe atɛmɛlaki bango na kotyáká Yobo katikati na ezingelo ya mampinga na Ye ya baanzelu.—Yobo 42:10; Nzembo 34:7.
20. Na makambo nini Yehova apesaki Yobo mbano mpe apambolaki ye?
20 Bandeko mibali mpe bandeko basi ya Yobo, mpe baningani na ye ya kala balandaki koya kolya elongo na ye, komonisa boboto epai na ye, mpe kobɔndisa ye na ntina na bampasi oyo Yehova atikaki nzela ete ekómela ye. Moko na moko kati na bango azalaki kopesa Yobo mosolo mpe lopɛtɛ na wolo. Yehova apambolaki mikolo ya nsuka ya Yobo koleka yango na ebandeli, na boye ete akómaki na bampate 14 000, kamela 6 000, bangombe 1 000, mpe bampunda basi 1 000. Yobo abotaki lisusu bana mibali nsambo mpe bana misato ya basi, motuya sé moko oyo azalaki na yango liboso. Bana na ye ya basi—Yemima, Kasia mpe Kɛlɛnɛ-hapuku—bazalaki bana basi kitoko koleka kati na mokili mobimba, mpe Yobo apesaki bango libula elongo na bandeko na bango ya mibali. (Yobo 42:11-15) Mpe, Yobo aumelaki lisusu na bomoi mbula 140 mpe amonaki bana na ye mpe bana na bana na ye kino mabota minei. Lisoló lisukisi ete: “Boye Yobo akufaki mpaka, atondi na mikɔlɔ mingi.” (Yobo 42:16, 17) Lolenge bomoi na ye eyeisamaki molai ezalaki mosala ya kokamwa ya Yehova Nzambe.
21. Lolenge nini lisoló ya Makomami oyo etali Yobo esalisi biso, mpe tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini?
21 Lisoló ya Makomami na ntina na Yobo ezali kokebisa biso mingi na ntina na mayele mabe ya Satana mpe ezali kosalisa biso na komona lolenge nini likambo litali boyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba ezali na boyokani na bosembo ya bato. Lokola Yobo, baoyo nyonso balingaka Nzambe bakokutana na komekama. Kasi tokoki koyika mpiko lokola Yobo ayikaki mpiko. Alóngaki komekama na ye mpo ete azalaki na kondima mpe na elikya, mpe azwaki mbano mingi. Lokola basaleli ya Yehova lelo oyo, tozali na kondima mpe na elikya ya solo. Mpe oyo nde elikya monene Mopesi na mbano atye liboso na moko na moko na biso! Kobatela kati na makanisi mbano ya likoló ekosalisa bapakolami na kosalela Nzambe na bosembo nyonso na boumeli ya bomoi na bango awa na mabelé. Mingi kati na baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na mabelé bakokufa te, kasi baoyo bakokufa bakozwa mbano ya lisekwa kati na Paladiso awa na mabelé, elongo na Yobo ye moko. Kobateláká elikya ya solosolo kati na motema mpe makanisi, tiká ete baoyo nyonso balingaka Nzambe bámonisa ete Satana azali mobuki na lokuta na kotɛlɛmáká ngwi na ngámbo ya Yehova lokola bato ya sembo mpe bato bazali kosimba makasi boyangeli na ye ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba.
Lolenge nini okoki koyanola?
◻ Wapi mwa makambo oyo Yobo alobaki na lisukúlu na ye ya nsuka epai na babɔndisi na ye ya lokuta?
◻ Lolenge nini Elihu amonisaki ete azalaki motatoli ya sembo ya Yehova?
◻ Wapi mwa mituna misusu oyo Nzambe atunaki Yobo, mpe yango ezalaki na bopusi nini?
◻ Lolenge nini ozwi litomba na lisoló ya Makomami oyo etali Yobo?
[Bililingi na lokasa 18]
Maloba ya Yehova na ntina na Behemote mpe Leviatana esalisaki Yobo na komikitisa