Koyangana elongo na baoyo bazali kobanga Nzambe
“BIPAI nyonso bato bazali koluka kosikolama na kobanga—kobanga mobulu, kobanga ya kozanga mosala, mpe kobanga ya kozwa bokɔnɔ makasi. Biso mpe tolukaka bonsomi wana. . . . Bongo, mpo na nini tozali kolobela kolóna ezaleli ya kobanga?” Motuna oyo ya kokamwisa mobimisamaki na molobi nyonso oyo asalaki lisukúlu-moboko na liyangani ya etúká “Bobángi Nzambe,” oyo ebandaki na Yúni 1994.
Bamilió ya bayangani—libosoliboso na Amerika ya Nɔ́rdi, na nsima na Mpótó, na Amerika ya katikati mpe ya Súdi, na Afrika, na Azia, mpe na bisanga ya mai monene—bazalaki na mposa makasi ya koyekola kolóna kobanga. Mpo na nini? Mpamba te tosengeli komonisa bobángi Nzambe soki tolingi kozwa mapamboli oyo Yehova Nzambe abombeli libota na ye. Ezalaki mpo na koyekola na ntina na bobángi Nzambe nde bayangani bakutanaki, mpe na boumeli ya manáka ya mikolo misato, bayekolaki makambo mingi na ntina na ezaleli wana ya boklisto oyo ezali na ntina mingi.
‘Bangá Nzambe mpe tosá mibeko na ye’
Wana ezalaki motó ya likambo ya mokolo ya liboso ya liyangani, etongami likoló na Mosakoli 12:13. Kasi kobanga Nzambe elimboli nini? Na ebandeli mpenza ya manáka, mokambi ya liyangani alimbolaki ete bobángi Nzambe emonisaka nsɔ́mɔ mpe limemya mozindo mpo na Yehova elongo na bobángi malamu ya kosala likambo oyo likozanga kosepelisa ye. Bobangi Nzambe motindo oyo ezali ya kolɛngisa te; ezali kopesa litomba mpe ebongi mpenza.
Lolenge nini bobángi wana ya ntina ekoki kopesa biso litomba? Lisukúlu oyo lilandaki, “Tólɛmba te mpe tótika te,” elimbolaki ete bobángi Nzambe ekopusa biso na kotosa mibeko ya Nzambe na esengo nyonso. Soki yango esangani elongo na bolingo ya Nzambe mpe ya bazalani, bobángi motindo yango ekopesa biso nguya ya elimo. Ee, bobángi Nzambe ekoki kosalisa biso na kopɛngola kolɛmba kati na bopoti mbangu mpo na bomoi ya seko.
Na nsima manáka ezalaki na mituna epai na baoyo bamonisaki bilembeteli ete bobángi Nzambe ekoki kosunga biso. Baoyo batunamaki bayebisaki lolenge limemya mozindo mpo na Nzambe eyikisaki bango mpiko na kokóba kati na mosala atako bakutanaka na kozanga bosepeli, na kozanga kotya likebi, to na minyoko mpe esalisaki bango kati na mikakatano na bango moko.
Kasi, mpo na nini bato mosusu bazalaka na bobángi Nzambe nzokande basusu bazalaka na yango te? Kati na lisukúlu “Tólóna bobángi Nzambe mpe tózwa litomba na yango,” molobi oyo asalaki lisukúlu-moboko alimbolaki ete na Yilimia 32:37-39, Yehova alakaki ete akopesa motema ya bobángi Nzambe epai na libota na ye. Yehova akolónaka bobángi Nzambe kati na mitema na biso. Lolenge nini? Na nzela ya elimo santu na ye mpe ya Liloba na ye lipemami, Biblia. Nzokande, ezali polele ete, tosengeli kosala milende makasi mpo na koyekola Liloba ya Nzambe mpe mpo na kozwa mpenza litomba na ebele ya bibongiseli ya elimo oyo asili kokamata. Yango esangisi mayangani mpe makita kati na masangá na biso, oyo esalisaka biso na koyekola kobanga ye.
Manáka ya nsima ya nzangá ebandaki na batoli etali kotya elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye. Yango elandanaki na lisoló moko likoló na makambo ya ntina oyo kati na yango bobángi Nzambe esengeli kozala na bopusi kati na bomoi na biso ya baklisto.
Na nsima masukúlu-matongami ya yambo ya liyangani wana mapesamaki. Masukúlu-matongami yango mazalaki na motó ya likambo “Bobangi Nzambe ezali kopusa biso na kotosa mitindá miuti na Nzambe,” oyo ebendaki likebi likoló ya libota. Awa na nsé ezali na mwa batoli ya Makomami—mpe ebongi—oyo epesamaki.
□ Mpo na mibali oyo babali: Bobangi Nzambe esengeli kopusa mobali na kolinga mwasi na ye lokola nzoto na ye moko. (Baefese 5:28, 29) Mobali moko te azokisaka nzoto na ye moko, amiyokisaka nsoni liboso na baninga na ye, to mpe andimaka bilobaloba na ntina na mabunga na ye. Na yango, asengeli kopesa mwasi na ye lokumu mpe limemya oyo amipesaka ye moko.
□ Mpo na basi: Bobangi Nzambe oyo Yesu azalaki na yango epusaki ye ‘ntango nyonso na kosepelisa Nzambe.’ (Yoane 8:29) Yango ezali elimo moko malamu mpo na basi ya mabala na komekola kati na boyokani na bango elongo na mibali na bango.
□ Mpo na baboti: Baboti baklisto bakoki komonisa bobángi Nzambe na kotaleláká mikumba na bango ya baboti na bopotu te, na kotaleláká bana na bango lokola libula liuti na Yehova. (Nzembo 127:3) Mokumba ya liboso ya baboti mosengeli kozala ya kobokola bana na bango ete bakóma baklisto ya solo.
□ Mpo na bana: Yehova apesi bana etindá ya kotosa “baboti na bango kati na Nkolo.” (Baɛfɛsɛ 6:1) Na yango, kotosa baboti ezali kotosa Nzambe.
Lisukúlu ya nsuka ya mokolo wana esimbaki mpenza mayoki, mpamba te etalelaki mayoki ya mozindo oyo biso banso tozalaka na yango ntango molingami na biso akufi. Nzokande, penepene na katikati ya lisukúlu, ezalaki na likambo ya kosepelisa. Molobi alamwisaki esengo monene epai na bayoki na kolakisáká mwa-búku moko ya sika Ntango moto oyo olingaka akufi. Mokanda wana ya nkasa 32, oyo esalemi na langi kitoko mpenza ezali koyebisa makambo mingi oyo makoki kosalisa baoyo bakufeli bato na kososola mpe kolónga mayoki oyo ebotamaka nsima ya kufa ya molingami na bango. Ekómeli naino yo te ete ozangi makambo ya koloba mpo na kolendisa moto oyo akufeli molingami na ye? Eteni moko ya mwa-búku yango ezali komonisa lolenge nini tokoki kosalisa baoyo bakufeli bato. Wana bazalaki koyoka molobi, mingi kati na bayoki bazalaki kokanisela moto moko oyo akokaki kozwa litomba na mwa-búku yango.
‘Tósala mosala ya bulɛɛ na bobángi Nzambe mpe na nsɔ́mɔ’
Wana ezalaki motó ya likambo ya mokolo ya mibale, ezwami na Baebele 12:28. Kati na manáka ya ntɔ́ngɔ́ masukúlu-matongami ya mibale mapesamaki, “Masangá oyo mazali kotambola kati na bobángi ya Yehova.” Eteni ya liboso elobelaki koyangana na makita. Kokende na biso na makita ezali komonisa limemya oyo tozali na yango epai na Nzambe mpe bibongiseli na ye ya elimo. Na koyanganáká na makita, tozali komonisa ete tozali kobanga nkombo na ye mpe ete tozali na mposa makasi ya kosala mokano na ye. (Baebele 10:24, 25) Molobi ya mibale alimbolaki ete mpo ete lisangá mobimba ekoka kotambola kati na bobángi ya Yehova, moto na moto asengeli kokokisa mokumba na ye na kobateláká etamboli ya kitoko. Molobi ya nsuka alobelaki libaku malamu mpe mokumba oyo baklisto bazali na yango—kosakola nsango malamu kozanga kotika. Tosengeli kosakola lisusu ntango boni? Kino Yehova akoloba ete ekoki.—Yisaya 6:11.
“Esengo ya Yehova ezali esika makasi na biso” ezalaki motó ya lisoló oyo elandaki, lokola etalelami sikawa kati na masoló ya boyekoli ya zulunalo oyo. (Nehemia 8:10) Mpo na nini libota ya Yehova lizali na esengo? Molobi abimisaki mwa bantina yango. Moko na bantina, oyo eleki monene ezali boye ete boyokani elongo na Nzambe ezali kokómisa biso bato oyo baleki na esengo na mabelé mobimba. Kanisá naino, molobi akundwelaki bayangani ete, tozali na libaku malamu ya kozala kati na bato oyo Yehova asili kobenda epai na ye na nzela ya Yesu Klisto. (Yoane 6:44) Oyo nde ntina monene ya kozala na esengo!
Likambo lileki ntina kati na mayangani nyonso lizalaka batisimo, mpe mayangani “Bobángi Nzambe” makesenaki na basusu te. Kati na lisoló “Komipesa mpe batisimo kati na bobángi ya Yehova,” molobi alimbolaki ete moto nyonso oyo asili kozwa batisimo azali na mikumba minei: (1) Tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe na lisalisi ya mikanda oyo mikosalisa biso na kososola mpe na kosalela yango; (2) tosengeli kobondela; (3) tosengeli koyangana elongo na baninga bandimi kati na makita ya lisangá; mpe (4) tosengeli kopesa litatoli mpo na nkombo mpe Bokonzi ya Yehova.
Manáka ya Mwapɔ́sɔ na nsima ya nzangá ebandaki na lisoló oyo ya kolendisa “Yehova akotika libota na ye te.” Esili koleka bikeke ntuku misato na mitano, ntango libota ya Yisraele ekutanaki na mikakatano, Yehova apesaki bango ndanga na nzela ya Mose ete: “[Yehova] Njambe na yɔ . . . akotika yɔ tɛ.” (Dutɛlɔnɔmɛ 31:6) Yehova akokisaki ndanga na ye na kobateláká Bayisraele ntango bakɔtaki na Mabelé ya Ndaka mpe bakamataki yango. Lelo oyo, wana tozali kati na komekama, biso mpe tokoki kozala na elikya makasi ete Yehova akotika biso te, soki totikali penepene na ye mpe soki tolandi toli ya Liloba na ye.
Lolenge nini okoki kozwa esengo monene ya kotánga Biblia? Kati na lisukúlu “Tángá Biblia Mosantu, Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo,” molobi apesaki toli ete tótángaka Biblia na mposa ya koluka koyeba makambo mpe na kotunáká mituna lokola oyo, ete: Lisoló oyo lizali koteya ngai nini na ntina na bizaleli mpe banzela ya Yehova? Lolenge nini nakoki komekola Yehova na likambo yango? Kotánga Biblia na motindo oyo ezali likambo ya esengo mpe ekopesa mbano monene.
Na nsima likebi lityamaki likoló na masukúlu-matongami ya misato oyo mazalaki na manáka, “Bibongiseli mpo na kosalisa baoyo bazali kobanga Yehova.” Atako Yehova akosalaka bikamwiseli te mpo na libota na ye na mikolo na biso, ntembe ezali te ete akosunga baoyo bazali kobanga ye. (2 Petelo 2:9) Masukúlu-matongami wana malobelaki bibongiseli minei ya Yehova mpo na kosalisa biso na mikolo oyo ya mpasi mingi: (1) Na nzela ya elimo na ye, Yehova akopesaka biso nguya ya kosala misala oyo mileki nguya na biso. (2) Na nzela ya Liloba na ye, akopesaka biso toli mpe litambwisi. (3) Na nzela ya lisiko, azali kopesa biso lisosoli ya pɛto. (4) Na nzela ya lisangá na ye, oyo esangisi mpe bankulutu, azali kolakisa biso nzela mpe azali kobatela biso. (Luka 11:13; Baefese 1:7; 2 Timoté 3:16; Baebele 13:17) Na kosaleláká malamu mpenza bibongiseli wana, tokozala na makoki mingi ya koyika mpiko mpe bongo tokosepelisa Yehova.
Lisukúlu ya nsuka na Mwapɔ́sɔ nsima ya nzangá ezalaki na motó ya likambo “Mokolo ya nsɔ́mɔ ya Yehova mobɛlɛmi,” etongami likoló na esakweli ya Malaki. Kati na lisoló ya bato ezalaki na mikolo ya nsɔ́mɔ, na ndakisa, ntango kosambisama ekwelaki Yelusaleme na mobu 70 T.B. Kasi mokolo moleki nsɔ́mɔ kati na lisoló ya bato mokozala mokolo ya Yehova oyo mozali koya ntango ‘akopesa etumbu na baoyo bayebi Njambe tɛ mpe bajangi kotosa nsango malamu na Nkolo na biso Yesu.’ (2 Batɛsalɔniki 1:6-8) Yango ekoya mpenza noki? Molobi ayebisaki ete: “Nsuka ebɛlɛmi! Yehova ayebi mokolo mpe ngonga yango. Akobongola manáka na ye te. Tobyangami ete toyika mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso.”
Nokinoki mikolo mibale misilaki koleka. Mokolo ya nsuka mosengelaki komema makambo nini?
“Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo”
Motó ya likambo ya mokolo ya misato motongamaki likoló na Emoniseli 14:7. Kati na manáka ya ntɔ́ngɔ́, molɔngɔ́ ya masukúlu mingi mongɛngisaki mateya ya moboko oyo mazali kokesenisa Batatoli ya Yehova na mangomba mosusu.
Kati na lisukúlu “Lisekwa ya bato sembo ekozala,” molobi abimisaki motuna moko ya ntina: “Na boumeli ya Mokolo ya kosambisa wana ya mbula nkóto, ntango nini baoyo bakufaki sembo na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo ya Satana bakosekwa?” Eyano ezalaki nini? Molobi alimbolaki ete: “Biblia eyebisi yango te. Nzokande, ebongi mpenza kondimama ete baoyo bazali kokufa na mikolo na biso bakosekwisama liboso mpo na kosangana, elongo na ebele monene oyo bakobika na Armagedon, kati na mosala monene ya koteya oyo mokosalema na Mokolo ya kosambisa, boye te? Ee, ezali mpenza bongo!” Babiki bakozala? Na ntembe te bakozala. Mateya mpe bandakisa ya Biblia oyo ezali kondimisa biso na likambo yango elimbolamaki polele kati na lisukúlu oyo lilandaki nsima, “Babiki na bolózi monene.”
Kobanda kala Batatoli ya Yehova basili kososola ete Biblia ezali kolobela bilikya mibale—bomoi ya seko kati na paladiso na mabelé mpo na ebele na bamilió ya bato mpe bomoi ezangi kufa kati na likoló mpo na motuya moke na bato oyo bakozala elongo na Klisto kati na Bokonzi. Elikya ya bomoi kati na makoló etalelamaki kati na lisukúlu “Banga tɛ, etonga mokɛ.” (Luka 12:32) Na kotalela makambo oyo mazali koleka lelo kati na mokili, basangani ya etonga moke basengeli kobanga te; moko na moko kati na bango asengeli koyika mpiko kino nsuka. (Luka 21:19) Molobi alimbolaki ete: “Kozanga kobanga na bango ezali na ntina mpo na kolendisa basangani ya ebele monene. Bango mpe basengeli kolóna ezaleli ya kozanga kobanga wana ezali bango kokanisa kobika na eleko eleki mpasi lokola esalemá naino na mabelé te.”
Na nsuka ya manáka ya ntɔ́ngɔ́, bayoki bamonaki na esengo nyonso lisano-liteya Maponi oyo mazali liboso na yo. Na mikolo ya Yosua, mpe lisusu na mikolo ya mosakoli Eliya, Bayisraele basengelaki kokamata bikateli. Esengelaki kosala liponi. Eliya alobaki ete: “Kino ntango nini bino bokotambolatambola na njela mibale ikesɛnɛni? Sɔkɔ [Yehova] ajali Njambe, bila ye; sɔkɔ Bala, bila ye.” (1 Mikonji 18:21) Lelo oyo mpe, bato basengeli kokamata bikateli. Oyo ezali ntango te ya kotambolatambola kati na nzela mibale ekeseni. Wapi liponi ya malamu oyo esengeli kosala? Bobele oyo Yosua asalaki na ntango ya kala. Alobaki ete: “Kasi mpɔ na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela Yehova.”—Yosua 24:15.
Nokinoki, ekómaki Mwalomingo nsima ya nzangá mpe ntango ya lisukúlu ya bato banso oyo ezalaki na motó ya likambo “Mpo na nini kobanga Nzambe ya solo sikawa.” Kati na Emoniseli 14:6, 7 (NW), bato banso balendisami ete: “Bangá Nzambe mpe pesá ye nkembo.” Mpo na nini esengeli nokinoki kobanga Nzambe? Mpamba te, lokola mokapo wana mozali koloba, “ntango ya kosambisa na ye esili kokóma.” Na nzela ya Mwana na ye, oyo azali sikawa mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, Yehova akosukisa ebongiseli ya mbindo, ya botomboki ya ntango oyo. Molobi alimbolaki ete yango ezali mwango bobele moko mpo na kobikisa baoyo bazali kobanga Nzambe mpe ya kobikisa mabelé oyo ezali efandelo na biso. Lokola tozali kobika na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo, ezali likambo ya nokinoki ete tobanga Nzambe sikawa!
Nsima ya botaleli mokuse ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na pɔ́sɔ wana, molobi ya nsuka abutaki na ebáelo. Alimbolaki ete, liyangani ebimisi litomba malamu oyo ete, bobángi Nzambe ekómi na ntina mingi mpo na bayangani. Alobelaki mpenza matomba mingi ya malamu oyo mazali kozwama na baoyo bazali kobanga Nzambe. Molobi asakolaki bobimi ya kaseti video ya sika—Basanganí mpo na mateya mauti na Nzambe. Yango ezali komonisa makambo ya kokamwa ya mayangani ya mikili mingi “Mateya mauti na Nzambe” oyo masalemaki na 1993-1994. Wana lisukúlu yango lizalaki kobɛlɛma na nsuka na yango, mingi bazalaki komituna, ‘Tosengeli kozela nini mpo na mbula oyo ezali koya?’ Tokozala na liyangani ya etúká oyo ekoumela mikolo misato, na bisika mingi.
Mpo na kosukisa, molobi atángaki maloba oyo mazwami na Malaki 3:16, oyo elobi ete: “Bongo baoyo [bakobangaka Yehova, NW] balobanaki moto na moninga na ye mpe [Yehova] ayokamelaki bango, ɛɛ ayokaki bango. Mpe mokanda na kokanisa ekomamaki liboso na ye mpɔ na bayo bajalaki [kobanga Yehova mpe bazalaki komibanzabanza mpo na nkombo na ye, NW].” Bayangani bapanzanaki na ekateli makasi ya kokanisa na nkombo ya Yehova mpe ya kosalela ye na bobángi Nzambe.
[Elilingi na lokasa 24]
Bato oyo balingi kozwa batisimo basengeli kolanda komonisa bobángi Nzambe
[Elilingi na lokasa 25]
Lisano-liteya “Maponi oyo mazali liboso na yo” emonisaki epai na bayoki ntina ya kokamata ekateli ya kosalela Yehova
[Elilingi na lokasa 26]
Bayangani bazalaki na esengo ya kozwa mwa-búku “Ntango moto oyo olingaka akufi”