Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/2 lok. 15
  • “Bazali kongɛnga lokola miinda kati na mokili”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bazali kongɛnga lokola miinda kati na mokili”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Makila ekobikisa bomoi: ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Osengeli kotala video No Blood​​—⁠Medecine Meets the Challenge
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Totambola engebene malako na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/2 lok. 15

Masoló ya Basakoli ya Bokonzi

“Bazali kongɛnga lokola miinda kati na mokili”

BATATOLI YA YEHOVA bakeseni na bato nyonso mosusu mpe mbala mingi bato bapanzaka nsango ya mabe likoló na bango mpo ete baboyaka kozongisama makila. Nzokande, etɛlɛmɛlo wana ezwi moboko makasi kati na Biblia. Emonisi ete Nzambe akweisaka esaleli mabe ya makila mpamba te makila mazali na motuya na miso na ye. (Genese 9:3, 4; Levitike 17:14) Nsima ya koyekola Makomami na mozindo na ntina na likambo yango, Batatoli ya Yehova bazwi esukiseli ete etindá ya Biblia ya ‘koboya makila’ esengeli mpe kotalela mpenza kozongisama makila na mikolo na biso.​—Misala 15:19, 20, 28, 29.

Na mwa bambula oyo euti koleka, minganga mpe bisambiselo ya bamboka mosusu basili komitya ngámbo moko na Batatoli ya Yehova likoló na likambo oyo. Na ndakisa, na Danemark, elenge mama moko oyo ayebaki malamu likanisi ya Biblia likoló na makila akufaki na nsima ya kozwa likámá ya motuka. Lokola aboyaki kozongisama makila, minganga bapanzaki nsango ya mabe likoló na Batatoli ya Yehova na boumeli ya sanza mobimba.

Baboti ya elenge mwasi yango basɛngaki ete bolukiluki bosalema, mpe na Apríli 1994, komisió oyo ekotalelaka masɛngi ya bato ya maladi esakolaki ekateli moko. Elobaki ete elenge mwasi wana akufaki te mpo ete aboyaki kozongisama makila, kasi ezalaki mpo ete minganga basalaki mosala na bango malamu te. Ekateli yango ezwamaki na nsima ya bolukiluki oyo esalemaki na Lisangani oyo elandelaka makambo ya minganga mpe bato oyo batalelaka makambo ya kolɔngɔ́nɔ́. Kati na nkomá moko oyo etindamaki na mapitalo nyonso ya Danemark, Lisangani ya makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ kati na mboka yango eyebisaki ete minganga basengeli kopesa Batatoli ya Yehova nkisi eleki malamu oyo ekoki kopesama na esika ya kozongisama makila, kotaláká ete bango balingaka makila te.

Likambo mosusu etalelaki Dan, elenge Motatoli moko ya mibu 15 oyo akufaki na bokɔnɔ bobéngami leucémie. Minganga batosaki ekateli ya mpiko ya Dan ya koboya kozongisama makila. Yango esalaki ete nsango ya lokuta epanzana kati na bipanzeli-nsango, na kolobáká ete minganga nde babomaki Dan. Nzokande, bato mingi bandimaki te maloba wana ya lokuta.

Na ndakisa, mokambi ya eteyelo epai kuna Dan azalaki kotánga ayaki na Ndako ya Bokonzi mpo na koyangana na lisukúlu ya bokundi. Alobaki ete ayokaki mpasi mpo na nsango ya lokuta oyo elobamaki na ntina na liwa ya Dan. Nsima ya kotuna mituna mingi epai na Motatoli moko oyo basalaka na ye elongo na ntina na Batatoli ya Yehova, andimaki kozwa kasɛti ya video Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation. Kasɛti ya video yango esepelisaki ye mingi, na yango alukaki nzela mpo ete balakisi nyonso ya eteyelo bátala yango. Na nsima, kasɛti yango elakisamaki epai na bayekoli nyonso, na kelasi moko nsima na mosusu.

Ministre ya Danemark oyo atalelaka makambo ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto aboyaki mpe nsango ya lokuta oyo elobamaki likoló na minganga oyo bazalaki kosalisa Dan. Alobaki ete minganga basalaki oyo elongobanaki na kotosáká ekateli makasi ya Dan mpe na kotosáká kondima na ye oyo ezwaki moboko makasi.

Ezali na ebele ya basakoli ya Bokonzi oyo batosaka mibeko ya Nzambe. Mpo na botosi na bango, bakeseni na bato mosusu, “bazali kongɛnga lokola miinda kati na mokili.”​—Bafilipi 2:12, 15, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto