Tózala na esengo sikawa mpe mpo na libela
“Bósepela mpe bóyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga; mpo ete talá, nakotonga Yelusaleme mpo na kosanzola mpe bato na ye mpo na esengo.”—YISAYA 65:18.
1. Lolenge nini losambo ya solo esili kosala bopusi likoló na bato na boumeli ya bikeke mingi?
NA BOUMELI ya bikeke mingi, ebele ya bato bazwaki esengo mingi ya kosalela Nzambe ya solo Yehova. Davidi azalaki bobele moko na baoyo bazwaki esengo mingi kati na losambo ya solo. Biblia eyebisi ete ntango sanduku ya kondimana ekumbamaki kino Yelusaleme, “boye Davidi mpe libota mobimba na [Yehova] bayeisaki sanduku na [Yehova] wana ezalaki bango kobimisa mingongo.” (2 Samwele 6:15) Esengo motindo wana ya kosalela Yehova ezali te bobele likambo ya ntango ya kala. Yo mpe okoki kosangana na yango. Mpe ata sikawa okoki kozwa esengo na lolenge moko to mosusu!
2. Longolá kokokisama ya ebandeli ya Yisaya mokapo 35 likoló na Bayuda oyo bazongaki, banani lelo oyo batalelami kati na kokokisama mosusu?
2 Na lisoló ya liboso, totalelaki kokokisama ya esakweli ya kolendisa oyo ezali na Yisaya mokapo 35. Tokoki na elónga nyonso kobénga yango esakweli ya kozongisama mpamba te ezali na motindo wana nde yango ekokisamaki liboso epai na Bayuda na ntango ya kala. Na ntango na biso, yango ezali mpe kokokisama lolenge wana. Ndenge nini? Kobanda na bantoma ya Yesu mpe basusu na Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova azali na boyokani na Yisalaele ya elimo. Bango bazali bato oyo bapakolamaki na elimo santu ya Nzambe, baoyo bakómaki basangani ya oyo ntoma Paulo abéngi ete “Yisalaele na Nzambe.” (Bagalatia 6:16; Baloma 8:15-17) Tómikundola lisusu ete, na 1 Petelo 2:9, baklisto yango babéngami ete “libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulɛɛ, bato baponami.” Petelo akóbi komonisa lolenge mosala ya Yisalaele ya elimo ezali: “‘basengeli koyebisa malamu’ na oyo abyangi bango kobima na molili mpe kokɔta na [pole, NW] na ye na kokamwisa.”
Kokokisama na ntango na biso
3, 4. Ezalela ya makambo ezalaki nini ntango Yisaya mokapo 34 ekokisamaki na mikolo na biso?
3 Ezalaki na eleko moko na ebandeli ya ekeke oyo wana batikali ya Bayisalaele ya elimo bazalaki te koyebisa na nguya nyonso nsango motindo wana. Bazalaki naino na bosepeli makasi te kati na pole ya elimo. Ya solo, bazalaki kati na molili makasi. Yango ezalaki ntango nini? Mpe Yehova Nzambe asalaki nini mpo na yango?
4 Ezalaki na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mwa moke nsima wana Bokonzi ya Nzambe mpe ya Masiya etyamaki na likoló na 1914. Mabota bamikɔtisaki kati na etumba ya mikili mingi mpe bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bazalaki kopesa bango mabɔkɔ. (Emoniseli 11:17, 18) Ya solo, Nzambe atɛmɛlaki mpenza kelasi wana ya bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba, oyo esili kopɛngwa, motindo moko lokola asalaki epai na Edome, libota ya lolɛ́ndɔ. Na yango, esakweli oyo ezali na mokapo 34 ya Yisaya ezali kokokisama epai na Edome ya elilingi na mikolo na biso. Kokokisama wana na nzela ya kolimwa ya libela ekokokana lisusu mpenza na motindo oyo yango ekokanaki epai na Edome ya kala.—Emoniseli 18:4-8, 19-21.
5. Kokokisama ya lolenge nini Yisaya mokapo 35 ezwaki na mikolo na biso?
5 Ezali boni mpo na Yisaya 35 mpe maloba oyo yango elobeli makasi likoló na bantina ya kozala na esengo? Yango mpe esili kokokisama na ntango na biso. Ndenge nini? Yango ekokani kati na kozongisama ya Yisalaele ya elimo longwa na lolenge moko ya boombo. Tótalela makambo oyo masalemaki kala mingi te kati na lisoló ya teokrasi, na boumeli ya bomoi ya bato mingi oyo bazali naino kino lelo oyo.
6. Mpo na nini ekoki kolobama ete batikali ya Yisalaele ya elimo bakómaki na ezalela ya boombo?
6 Na boumeli ya eleko mokuse ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, batikali ya Yisalaele ya elimo babatelaki te, na mobimba mpenza, bopɛtɔ na bango ya elimo, mpe balandaki te mokano ya Nzambe na lolenge mpenza ya malamu. Basusu kati na bango babebisamaki na mateya ya mabe mpe babungisaki etɛlɛmɛlo na bango mpamba te bazangaki kokamata etɛmɛlo ya sikisiki mpo na Yehova wana bazwaki bopusi makasi ya kopesa mabɔkɔ na mabota oyo masanganaki na etumba. Na boumeli ya bambula yango ya bitumba, bazwaki minyoko ya ndenge na ndenge mpe na bisika mingi, mikanda na bango oyo mikolimbolaka Biblia mipekisamaki. Na nsuka, bamoko kati na bandeko oyo bazalaki na mikumba minene batyamaki na bolɔ́kɔ mpo na bifundeli ya lokuta. Wana tozali kotalela makambo wana oyo masilá koleka, ezali mpasi te komona ete, na lolenge moko, libota ya Nzambe, na esika ya kozala na bonsomi, ezalaki kati na ezalela ya boombo. (Kokanisá na Yoane 8:31, 32.) Bazalaki mpenza kozanga pole ya elimo. (Baefese 1:16-18) Bazalaki mwa moke lokola ebubu mpo na oyo etali kosanzola Nzambe, mpe mpo na yango bazalaki kobota mbuma te na elimo. (Yisaya 32:3, 4; Baloma 14:11; Bafilipi 2:11) Ozali kososola ete yango ekokani na ezalela ya Bayuda ya kala wana bazalaki na boombo na Babilone?
7, 8. Kozongisama ya lolenge nini batikali ya mikolo na biso bamonaki yango?
7 Kasi Nzambe alingaki nde kotika basaleli na ye ya mikolo na biso kati na ezalela motindo wana? Te, azwaki ekateli ya kozongisa bango, lokola Yisaya asakolaki yango. Na bongo, bobele esakweli moko wana na mokapo 35 ezali mpe kozwa kokokisama ya sikisiki na eleko na biso, na kozongisama ya batikali ya Yisalaele ya elimo na bozwi mpe na kolɔngɔ́nɔ́ malamu kati na paladiso ya elimo. Na Baebele 12:12, Paulo asaleli Yisaya 35:3 na ndimbola ya elilingi, na kosaláká bongo, amonisi ete lolenge oyo tozali kosalela eteni ya esakweli wana ya Yisaya na ndimbola ya elimo ebongi mpenza.
8 Nsima ya eleko ya etumba, batikali bapakolami ya Yisalaele ya elimo babimaki na boombo ya elilingi. Yehova Nzambe asalelaki Yesu Klisto, Siruse Monene, mpo na kobimisa bango na boombo. Na yango, batikali wana bakokaki kosala mosala ya kotonga lisusu, lokola batikali ya Bayuda ya kala oyo bazongaki na mboka na bango mpo na kotonga lisusu tempelo kati na Yelusaleme basalaki. Lisusu, Bayisalaele yango ya elimo babandaki kolóna mpe kobimisa paladiso ya elimo oyo etondi na banzeté kitoko, oyo ezalaki elilingi ya elanga ya Edene.
9. Lolenge nini likambo lokola oyo elobelami na Yisaya 35:1, 2, 5-7 esalemaki na ntango na biso?
9 Wana ezali biso kokanisa likambo oyo touti kolobela, tótala lisusu Yisaya mokapo 35, tómona molɔngɔ́ 1 mpe molɔngɔ́ 2. Oyo emonanaki lokola ete mokili mokauki mobandaki solo kobimisa fololo mpe kobota mbuma motindo moko na banzeté ya kala na Salona. Tótala bongo na molɔngɔ́ 5 kino molɔngɔ́ 7. Miso ya batikali ya elimo, oyo ndambo na bango bazali na bomoi mpe na milende kati na mosala ya Yehova, efungwamaki. Na lolenge ya malamu koleka, basosolaki ndimbola ya makambo oyo mabimaki na 1914 mpe oyo elandaki nsima ya etumba. Mpe yango ezali na bopusi likoló na mingi kati na biso baoyo bazali basangani ya “ebele monene,” oyo ezali sikawa kosala elongo na batikali.—Emoniseli 7:9.
Ozali kati na kokokisama yango?
10, 11. (a) Lolenge nini otalelami kati na kokokisama ya Yisaya 35:5-7? (b) Lolenge nini ozali komiyoka na ntina na mbongwana yango?
10 Omikamata yo moko lokola ndakisa. Liboso ete okutana na Batatoli ya Yehova, ozalaki kotánga Biblia mokolo na mokolo? Soki ozalaki kosala yango, ozwaki mpenza bososoli? Na ndakisa, oyebi sikawa solo likoló na ezalela ya bakufi. Okoki kotinda moto oyo amonisi bosepeli na mikapo ya polele oyo mizali kati na Genese 2, Mosakoli 9, Ezekiele 18, bakisá mpe mikapo mingi mosusu. Na ntembe te, ozali kososola oyo Biblia ezali koteya na ntina na makambo to mituna ndenge na ndenge. Na mokuse, ozali kokanga ntina ya Biblia, mpe okoki kolimbola makambo mingi na yango epai na bato mosusu, lokola, na ntembe te osalaka yango.
11 Nzokande, ekozala malamu ete biso nyonso tómituna ete, ‘Lolenge nini nayekolaki makambo oyo nayebi na ntina na solo ya Biblia? Liboso ete nayekola elongo na libota ya Yehova, nayebaki esika mikapo wana nyonso mizali? Nasosolaki yango, mpe nakómaki na bosukisi malamu na oyo etali ntina na yango?’ Eyano ya bosembo ezali ete, Te. Moto moko te asengeli kozokisama na motema soki tolobi ete, ozalaki mpenza mokufeli miso mpo na oyo etali mikapo yango mpe ndimbola na yango. Ezali boye te? Mikapo yango mizalaki wana kati na Biblia, kasi okokaki komona yango te, to kokanga ntina na yango te. Na bongo, lolenge nini miso na yo mayaki kofungwama na ndimbola ya elimo? Ezalaki na nzela ya makambo oyo Yehova asalaki na kokokisama ya Yisaya 35:5 likoló na batikali bapakolami. Na ngala na yo, miso na yo mafungwamaki. Ozali lisusu kati na molili ya elimo te. Ozali na likoki ya komona.—Kokanisá na Emoniseli 3:17, 18.
12. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete oyo ezali ntango te mpo na kobikisama ya mosuni na nzela ya bikamwiseli? (b) Lolenge nini ndakisa ya ndeko F. W. Franz emonisi lolenge Yisaya 35:5 ezali kokokana na ntango na biso?
12 Baoyo bayekolaka na molende nyonso Biblia mpe misala ya Nzambe epai na bato na boumeli ya bikeke mingi oyo bileki bayebi ete eleko oyo ya lisoló ya bato ezali te eleko ya bikamwiseli mpo na kobikisa bato na mosuni. (1 Bakolinti 13:8-10) Na yango tozali te komizela ete Yesu Klisto afungola miso ya bakufeli miso mpo na kondimisa bato ete azali Masiya, Mosakoli ya Nzambe. (Yoane 9:1-7, 30-33) Mpe azali te kopesa epai na bakufeli matoi nyonso likoki ya koyoka lisusu. Ntango Frederick W. Franz, moko ya bapakolami, oyo azalaki prezidá ya Société Watch Tower, akómaki pene na kokokisa mbula 100 na bomoi, azalaki mpenza komona lisusu malamu te mpe azalaki kosalela bamasini mpo na koyoka malamu. Na boumeli ya mwa bambula, akokaki lisusu te kotánga ye moko; nzokande nani akokaki kotalela ye lokola ‘mokufeli miso’ to ‘mokufeli matoi’ engebene ndimbola oyo tozali kokuta awa na Yisaya 35:5? Likoki na ye ya komona malamu na elimo ezalaki lipamboli mpo na libota ya Nzambe kati na mokili mobimba.
13. Mbongwana to kobongisama nini libota ya Nzambe ya mikolo na biso emonaki yango?
13 Ezali boni mpo na lolemu na yo? Ekoki kozala ete bapakolami ya Nzambe bazalaki bibubu na boumeli ya boombo na bango ya elimo. Nzokande, ntango Nzambe abongolaki ezalela na bango, ndemo na bango ibandaki konganga na esengo likoló na makambo oyo bayebaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe oyo etyami mpe na ntina na bilaka na ye mpo na mikolo mizali koya. Ekoki kozala ete bapesaki mpe lisungi mpo ete lolemu na yo efungwama. Na bambula eleki, ozalaki na likoki ya koyebisa solo ya Biblia epai na basusu? Ekoki kozala ete na ntango ozalaki naino koyekola, omilobelaki ete: ‘Nazali kosepela na boyekoli, kasi nakokenda soko moko te koloba epai na bato oyo nayebi bango te.’ Nzokande, ezali solo te ete, “lolemu na ebubu” ya Yisaya 35:6 ezali sikawa ‘konganga na esengo?’—Yisaya 35:6.
14, 15. Lolenge nini bato mingi basili kotambola na “Nzela ya bulɛɛ” na ntango na biso?
14 Bayuda ya kala oyo basikwamaki longwa na Babilone basalaki mobémbo molai mpo na kozonga na mokili na bango. Yango ekokani na nini na ntango na biso? Talá na Yisaya 35:8: “Balabála ekozala wana, nzela mpenza; ekobyangama ete, Nzela na bulɛɛ; baoyo na mbindo bakoleka wana te.”
15 Uta kosikwama na bango longwa na boombo ya elimo, batikali bapakolami, oyo bazali sikawa elongo na bamilió ya bampate mosusu, babimaki longwa na Babilone Monene na balabála ya elilingi, nzela epɛtɔlami mpe ya bulɛɛ oyo ezali komema na paladiso ya elimo. Tozali kosala milende makasi mpo na kozala bato babongi mpe oyo bakotikala kati na Nzela yango ya bulɛɛ. Kanisá naino na ntina na yo moko. Bizaleli malamu na yo mpe mitindá oyo ozali kosalela sikawa eleki mpenza oyo ozalaki na yango ntango ozalaki naino kati na mokili, boye te? Ozali kosala milende makasi koleka mpo na koyokanisa makanisi na yo mpe etamboli na yo na mitindá ya Nzambe, boye te?—Baloma 8:12, 13; Baefese 4:22-24.
16. Ezalela ya makambo nini tokoki kosepela na yango wana ezali biso kotambola na Nzela ya bulɛɛ?
16 Lokola ozali kokóba kati na Nzela oyo ya bulɛɛ, ozali kobanga ata moke te na ntina na bato oyo bakokani na banyama na yauli. Ya solo, kati na mokili, osengeli ntango nyonso kokeba, na lolenge ya elilingi, ete bato bálya yo mobesu te. Bato mingi batondi na yauli kati na boyokani na bango elongo na basusu. Oyo nde bokeseni monene na basaleli ya Nzambe! Ozali kati na ezingelo ya kobatelama. Ya solo, bandeko na biso mibali mpe basi bazali bato ya kokoka te; moko kati na bango akoki mbala mosusu kosala libúngá to kosalela yo mabe. Kasi oyebi ete bandeko na yo bazali te na mokano ya kozokisa yo to ya kolya yo mobesu. (Nzembo 57:4; Ezekiele 22:25; Luka 20:45-47; Misala 20:29; 2 Bakolinti 11:19, 20; Bagalatia 5:15) Nzokande, bazali kosepela na yo, basili kosalisa yo, mpe bazali na mposa ya kosalela Nzambe elongo na yo.
17, 18. Na ndimbola nini paladiso ezali lelo oyo, mpe wapi litomba na yango mpo na biso?
17 Na yango, tokoki kotala Yisaya mokapo 35, mpe kobatela kati na makanisi na biso kokokisama ya molɔngɔ́ 1 kino 8 na mikolo na biso. Ezali polele ete tosili kozwa oyo ebéngami paladiso ya elimo, boye te? Yango ezali naino ya kokoka te. Kasi ezali solo paladiso, mpamba te, lokola molɔngɔ́ 2 emonisi yango awa, tokoki uta sikawa “komona nkembo na [Yehova], bokonzi na Nzambe na biso.” Litomba nini lizali kozwana? Molɔngɔ́ 10 elobi ete: “Babikisami na [Yehova] bakobutwa; bakoya epai na Siona na [konganga na esengo, NW], na esengo na seko likoló na mitó na bango; bakozwa esengo mpe kosepela, mawa mpe kokimela ikokima mbangu.” Ya solo, kobima na biso longwa na mangomba ya lokuta mpe lolenge oyo tokangami na losambo ya pɛtɔ na nsé na ngɔlu ya Nzambe ezali solo kopesa esengo.
18 Esengo oyo ezwami mpo na losambo ya solo ezali ntango nyonso sé kokóla, boye te? Ozali komona lolenge bato ya sika bazali kosala mbongwana mpe kokangama makasi na solo ya Biblia. Ozali komona lolenge bilenge bazali kokóla kati na lisangá mpe lolenge bazali kokende liboso kati na elimo. Bato mingi bazali kozwa batisimo, epai kuna ozali komona bato oyo oyebi bazali kozwa batisimo. Yango ezali bantina ya esengo mingi lelo, boye te? Ɛɛ, ezali mpenza esengo ete basusu bazali kosangana na bonsomi na biso ya elimo mpe bazali kosepela na paladiso na biso ya elimo!
Kokokisama mpo na mikolo mizali koya!
19. Yisaya mokapo 35 etondisi biso na elikya nini kitoko?
19 Kino sikawa, makambo totaleli kati na Yisaya 35 ezali kotalela kokokisama na yango ya liboso mpe kokokisama na yango ya elimo oyo ezali kosalema lelo. Kasi esuki bongo te. Ezali na makambo mingi lisusu. Yango ezali na boyokani na bosolo ya Biblia na ntina na kozongisama ya paladiso ya solo awa na mabelé.—Nzembo 37:10, 11; Emoniseli 21:4, 5.
20, 21. Mpo na nini ezali likambo ya mayele mpe oyo eyokani na Makomami ya kondima ete Yisaya mokapo 35 esengeli lisusu kokokisama?
20 Elingaki kozala likambo ya kolongobana te mpo na Yehova na kolobela polele lolenge paladiso ekozala mpe kosukisa kokokisama na yango bobele na makambo ya elimo. Ya solo, yango elingi koloba te ete kokokisama ya elimo ezali na ntina moke. Ata soki Paladiso mpenza etyamaki, mbɛlɛ tokosepela mpenza na yango te, wana tozali kati na bitando kitoko mpe elongo na banyama ya kimya, kasi tozingelami na bato oyo babebi na elimo, bato oyo bazali kosala makambo lokola banyama ya zámba. (Kokanisá na Tito 1:12.) Ɛɛ, makambo ya elimo masengeli kozala na esika ya liboso, mpamba te yango ezali na ntina mingi koleka.
21 Nzokande, paladiso oyo ezali koya ekosuka te bobele na makambo ya elimo oyo tozali kosepela na yango sikawa mpe oyo, na koleka mpenza, tokosepela na yango na mikolo mizali koya. Tozali na ntina malamu ya kozela kokokisama ya mibale mpe ya solosolo ya bisakweli lokola oyo ya Yisaya mokapo 35. Mpo na nini? Mpamba te, tozali kotánga na mokapo 65 ete Yisaya asakolaki “makoló na sika mpe mabelé na sika.” Ntoma Petelo atángaki mokapo wana ntango azalaki kolobela makambo oyo makolanda mokolo ya Yehova. (Yisaya 65:17,18; 2 Petelo 3:10-13) Petelo amonisaki ete makambo oyo Yisaya alobelaki makosalama mpenza na ntango “mabelé na sika” makokóma likambo ya solo. Yango esangisi mpe makambo oyo omesani na yango malamu—kotonga ndako mpe kofanda kati na yango, kolóna bilanga ya vinyo mpe kolya mbuma na yango, kosepela na mosala ya mabɔkɔ na yo libela na libela, komona mbwa ya zámba mpe mwana na mpate kofanda esika moko, mpe koyeba ete mabe esili kati na mabelé mobimba. Na maloba mosusu, bomoi molai, bandako ya malamu, ebele ya bilei, mosala ya kosepelisa, mpe kimya kati na banyama mpe kati na bato elongo na banyama.
22, 23. Mpo na ntina nini tosengeli kozala na esengo mpo na kokokisama ya Yisaya mokapo 35 na mikolo mizali koya?
22 Elikya wana ezali kotondisa yo na esengo, boye te? Ɛɛ, esengeli kotondisa yo na esengo, mpamba te Nzambe asalaki biso ete tózala na bomoi motindo wana. (Genese 2:7-9) Na bongo, yango elingi koloba nini mpo na oyo etali esakweli ya Yisaya 35 oyo tozali kotalela? Yango elimboli ete bantina mosusu ebakisami mpo ete tónganga na esengo. Bisobe mpenza mpe mikili mikauki mikobota fololo, kopesáká biso ntina ya kozala na esengo. Na nsima, bato ya miso bulé to miso ya sokolá, to miso ya lángi mosusu kitoko, kasi oyo bazali kino sikawa bakufeli-miso bakozala na likoki ya komona. Bandeko na biso baklisto basi mpe mibali oyo bakufá-matoi, ata baoyo kati na biso bayokaka malamu te, bakosepela na koyoka mingongo polelepolele. Oyo nde esengo na kosalela likoki yango mpo na koyoka lolenge Liloba ya Nzambe ezali kotángama mpe kolimbolama, bakisá mpe koyoka makelele ya mopɛpɛ kati na banzeté, koseka ya mwana moke, mpe nzembo ya bandɛkɛ oyo izali kopesa bosepeli!
23 Yango ekolimbola lisusu ete batɛngumi, bakisá mpe baoyo kati na biso bazali konyokwama na bokɔnɔ ya mingai na makolo, bakotambola kozanga mpasi. Oyo nde kobɔndisama monene! Na nsima, bitima ya mai bikopunzwa kati na lisobe. Tokomona mai kopunzwa mpe tokoyoka makelele na yango. Tokotambola kuna mpe tokosimba matiti ya lángi ya mai ya mpondu mpe banzeté ya mingendu (papyrus). Yango ekozala mpenza Paladiso oyo ezongisami. Ezali boni mpo na esengo ya kozala pene na nkosi to ya nyama mosusu ya zámba kozanga kobanga? Ezali ata na ntina te ete tóbanda kolobela makambo yango mokomoko, mpamba te biso banso tozali komona yango kati na makanisi mpe tozali kosepela na yango uta sikawa.
24. Mpo na nini okoki kondima maloba oyo mazali na Yisaya 35:10?
24 Yisaya andimisi biso ete: “Babikisami na [Yehova] bakobutwa; bakoya epai na Siona na [konganga na esengo, NW], na esengo na seko likoló na mitó na bango.” Na yango, tokoki mpenza kondima ete tozali na ntina ya konganga na esengo. Esengo mpo na oyo Yehova azali uta sikawa kosalela libota na ye kati na paladiso na biso ya elimo mpe esengo mpo na oyo tozali kozela kati na Paladiso ya solosolo, oyo esili kobɛlɛma. Na ntina na bato na esengo—na ntina na biso—Yisaya akomi ete: “Bakozwa esengo mpe kosepela, mawa mpe kokimela ikokima mbangu.”—Yisaya 35:10.
Osimbaki?
◻ Kokokisama nini ya mibale Yisaya mokapo 35 ezwaki?
◻ Na ndimbola ya elimo, nini ekokani na mbongwana ya makamwisi oyo Yisaya asakolaki?
◻ Lolenge nini osanganaki na kokokisama ya esakweli wana?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete Yisaya mokapo 35 ezali kotondisa biso na elikya mpo na mikolo mizali koya?
[Elilingi na lokasa 15]
Bolɔ́kɔ oyo ezali na Raymond Street na Brooklyn, epai bandeko nsambo oyo bazalaki na mikumba minene bakangamaki na Yúni 1918
[Elilingi na lokasa 16]
Atako azalaki lisusu komona malamu te na bambula ya nsuka ya bomoi na ye, emoneli ya elimo ya ndeko Franz ezalaki makasi mpenza
[Bililingi na lokasa 17]
Kokóla mpe kokenda liboso na elimo ezali ntina ya esengo