Okoki kozala na boninga oyo ekoumelaka
EZALI na makambo oyo mapekisaka boninga. Ya solo, Biblia esakolaki ete na “mikolo na nsuka” oyo bolingo, bolingo ya motema, mpe bosembo ekozala te. (2 Timoté 3:1-5; Matai 24:12) Makambo oyo masili kobimisa mpasi monene ya mayoki ya kozala yo moko. Moto moko alobaki ete: “Kartyé na biso ezali lokola masúwa ya Noa. Soki obalá te, okoki kokɔta kati na yango te.” Ezali te bobele libúngá ya moto mokomoko oyo azali na mayoki ya kozala ye moko. Na mikili misusu, makambo oyo mapekisaka boninga ete eumela ezali bongo makambo lokola oyo: mingimingi bato balongwaka na esika moko mpo na kokenda kofanda na esika mosusu, mabota mazali kopanzana, bingumba epai kuna moto na moto atalelaka bobele makambo na ye moko mpe bingumba bitondi na makámá, mpe kozanga ntango ya kominanola.
Na mikolo na biso, moto oyo azali kofanda na engumba akoki kosala boninga elongo na bato mingi na boumeli ya pɔ́sɔ moko koleka motángo ya baninga oyo mofandi na mboka na ekeke 18 akokaki kozwa na boumeli ya mbula moko to ata mpe na boumeli ya bomoi na ye mobimba! Atako bongo, lelo oyo boninga ezalaka bobele ya likolólikoló. Bato mingi bamipesaka mobimba na makambo matali bokutani ya kominanola mpe ya kolekisa ntango malamu. Atako bongo, tosengeli kondima ete bilambo bizangi ntina elongo na baninga mabe ezali lokola kosalela nzube mpo na kopelisa na yango mɔ́tɔ. Mosakoli 7:5, 6 elobi ete: “Koyoka mpamela na moto na mayele eleki na malamu koyoka nzembo na bazoba. Lokola makɛlɛlɛ na kozika na nzube na nsé na mbɛki, boye ezali kosɛka na zóba; oyo mpe ezali mpamba.” Nzube ekoki kopesa mwa mɔ́tɔ moke mpe na makɛlɛlɛ, kasi ekoki te mpo na kopesa biso mɔ́tɔ na boumeli ya mwa ntango molai. Bobele bongo, baninga oyo batyaka makɛlɛlɛ, basɛkaka mingi, bakoki kosepelisa biso mpo na mwa ntango mokuse, kasi bakoki te kolongola epai na biso mayoki ya kozala biso moko mpe kokokisa mposa na biso ya kozala na baninga.
Kozala yo moko ekeseni na mayoki ya komona lokola ete ozali yo moko. Na bantango mosusu kozala yo moko ezalaka na ntina mpo na biso mpo ete tókoka kozwa lisusu makasi mpe kozwa makambo mingi oyo tokoki kokabela baninga mosusu. Na ntango mayoki ya kozala bango moko ekómelaka bango, bato mingi bafungolaka nokinoki radió to televizyó to eloko mosusu ya motindo wana. Bolukiluki moko emonisaki ete likambo oyo bato basalaka mingi mpenza wana mayoki ya kozala bango moko ekómeli bango, ezali bongo kotala televizyó. Nzokande, balukiluki yango basukisaki ete kotala televizyó na boumeli ya ntango molai ezali moko na makambo maleki mabe oyo tokoki kosala wana tozali na mayoki ya kozala biso moko. Ezali kokólisa ezaleli ya goigoi, kozanga esengo, mpe makanisi mazangi ntina, kozwáká bongo esika ya boninga elongo na basusu.
Solo mpenza, tokoki kozwa litomba na ntango oyo tozalaka biso moko soki tosaleli yango na lolenge malamu. Tokoki kosalela yango na kotángáká, na kokomáká mikanda, na kosaláká makambo ndenge na ndenge, mpe na komipemisáká. Kosalela ntango na biso ya kozala biso moko na lolenge malamu esangisi mpe kobondela Nzambe, koyekola Biblia, mpe komanyola likoló na yango. (Nzembo 63:6) Wana ezali lolenge ya kobɛlɛma pene na Yehova Nzambe, ye oyo asengeli kozala moninga na biso monene oyo aleki baninga mosusu nyonso.
Bandakisa ya boninga oyo ezwami kati na Biblia
Atako ezali malamu kosala boninga elongo na bato mingi, Biblia ekundweli biso ete “moninga azali mpe oyo akotikala penepene koleka ndeko.” (Masese 18:24) Biso banso tozalaka na mposa ya kozala na baninga moke oyo bamibanzabanzaka mpenza na ntina na biso, oyo boninga na biso elongo na bango epesaka biso esengo, makasi, mpe kimya. Atako mbala mosusu boninga motindo wana emonanaka mingi te lelo oyo, bandakisa mingi ya sikisiki ya kala ezwami kati na Biblia. Na ndakisa, Davidi mpe Yonatana bazalaki na boninga makasi. Liteya nini tokoki kozwa kati na yango? Mpo na nini boninga na bango eumelaki?
Na ndakisa, Davidi mpe Yonatana bazalaki na makambo ya lolenge moko mpe ya ntina mingi oyo bango mibale bazalaki kosepela na yango. Likambo lileki ntina lizali oyo ete, bango mibale bazalaki na bokangami mozindo epai na Yehova. Wana amonaki kondima oyo Davidi azalaki na yango epai na Nzambe mpe makambo oyo asalaki mpo na kobatela libota ya Yehova, “motema na Yonatana mokanganaki na motema na Davidi. Yonatana alingaki ye lokola [molimo] na ye moko.” (1 Samwele 18:1) Na bongo, bolingo oyo moko mpe mosusu bazali na yango epai na Nzambe esalaka ete baninga bákangana moko na mosusu.
Yonatana mpe Davidi bazalaki bato ya mpiko oyo bakangamaki ntango nyonso na mibeko ya Nzambe. Na yango, bakokaki kopesana limemya moko epai na mosusu. (1 Samwele 19:1-7; 20:9-14; 24:6) Ezali mpenza lipamboli mpo na biso soki tozali na baninga oyo bakobangaka Nzambe, oyo bamitambwisaka engebene mibeko ya Makomami.
Makambo mosusu mpe masalaki ete Davidi mpe Yonatana bázala na boninga. Boyokani na bango ezalaki ya sembo mpe ya kozanga bokosi, mpe moko na moko atyelaki moninga motema. Na bosembo nyonso, Yonatana atyaki matomba ya Davidi liboso na oyo ya ye moko. Azalaki na zúwa te mpo ete Davidi asilaki kozwa elaka ya kokóma mokonzi; nzokande, Yonatana asungaki ye na mayoki mpe na elimo. Mpe Davidi andimaki lisungi yango. (1 Samwele 23:16-18) Na lolenge oyo eyokani na Makomami, Davidi mpe Yonatana bamonisaki polele mayoki na bango ya boninga moko epai na mosusu. Boninga na bango oyo eyokanaki na ezaleli ya komipesa na Nzambe ezwaki moboko na yango kati na bosepeli ya solo mpe kati na bolingo ya motema. (1 Samwele 20:41; 2 Samwele 1:26) Ezalaki ya makasi mpenza mpamba te mibali yango mibale batikalaki ntango nyonso sembo epai na Yehova. Kosalela malako motindo oyo ekoki kosalisa biso ete tótonga mpe tóbatela boninga ya solo.
Lolenge nini tokoki kokólisa boninga
Ozali koluka baninga ya solo? Bazali mosika te. Bato mosusu oyo osilá koyebana na bango uta kala bakoki kozala baninga na yo, mpe bakoki kozala na mposa ete ozala moninga na bango. Mingimingi mpenza na ntina na baninga baklisto, ezali likambo ya mayele ete tósalela toli oyo ya Paulo ya ‘kofungola mitema na biso.’ (2 Bakolinti 6:11-13) Nzokande, koyoka mawa te soki na ntango nyonso oyo ozali komeka kosala boninga, ozali kolónga te kosala boninga ya mozindo mpe ya makasi. Mbala mingi, esɛngaka ntango molai mpo na kokólisa boninga, mpe boninga nyonso te nde ekozala ya mozindo. (Mosakoli 11:1, 2, 6) Ya solo, mpo na kozala na boninga ya solosolo, tosengeli kozala bato na moimi te, mpe tosengeli kolanda toli ya Yesu: “Makambo nyonso malingi bino ete básalela bino yango, bino bósalela bango bobele bongo.”—Matai 7:12.
Nani azali na mposa ete ozala moninga na ye? Longolá bato oyo bakokani na yo na mbula ya kobotama, ezali boni mpo na baoyo oleki bango na mbula ya kobotama to baoyo baleki yo? Boninga ya Davidi mpe Yonatana, Luta mpe Naomi, Paulo mpe Timoté ezalaki na bokeseni na bambula ya kobotama. (Luta 1:16, 17; 1 Bakolinti 4:17) Okoki kobakisa molɔngɔ́ ya baninga na yo na kokɔtisáká basi bakufelá mibali mpe bato mosusu oyo bazali minzemba? Kanisá mpe na ntina na bato ya sika na kartyé na yo. Ekoki kozala ete batikaki baninga na bango mingi to mpe baninga na bango nyonso mpenza mpamba te balongwaki na esika bazalaki kofanda liboso to mpo ete babongoli lolenge na bango ya bomoi. Kozela te ete basusu nde báluka yo. Soki ozali moklisto, salá boninga oyo ekoki koumela na kolandáká toli oyo ya Paulo: “Mpo na bolingo na bandeko, bólinganaka; mpo na lokumu, bókumisanaka.”—Baloma 12:10.
Tokoki kokokanisa boninga na likambo litali kokabela. Yesu alobaki ete soki tozali kopesa, bato bakopesa biso mpe. Alobaki mpe ete esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa. (Luka 6:38; Misala 20:35) Osilá kokutana na bato oyo bautá na bisika ndenge na ndenge? Mayangani ya mikili mingi oyo Batatoli ya Yehova basalaka mamonisi ete bato ya mimeseno ndenge na ndenge bakoki kosala boninga ya solo mpe oyo ekoki koumela wana bazali bango nyonso kosambela Nzambe.
Lolenge oyo tokoki kobatela boninga ntango nyonso malamu
Na mawa nyonso, baoyo batalelami lokola baninga mbala mosusu bapesanaka mpasi. Matɔ́ngi, kobimisa sɛkɛlɛ́ ya moninga, komonisa kozanga bosepeli epai na moninga—nyonso wana ezali kati na makambo oyo epesaka mpasi mingi ntango euti na moto oyo otalelaki lokola moninga. Tokoki kosala nini soki makambo motindo wana mabimi?
Pesá ndakisa. Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo ete opesa moninga mpasi te oyo ezangi ntina. Na bisika mosusu, esalemaka mingi ete baninga básɛka bolɛmbu ya moko to ya mosusu. Kasi makambo makasi to bokosi ekoyeisa boninga makasi soko moke te, ata soki elobami ete bazali “bobele kosɛka.”—Masese 26:18, 19.
Salá makasi ete obatela boninga. Kozanga boyokani ekoki kobima soki baninga bazali komizela ete moko akokisela mosusu makambo oyo maleki makoki na ye. Moninga oyo azali na bokɔnɔ to atungisami na mokakatano moko monene akokoka mpenza te komonisa mayoki ya esengo lokola momeseno. Na bongo, na bantango motindo wana, salá makasi ete omitya na esika ya moninga mpe osunga ye.
Silisá matata nokinoki mpe na boboto nyonso. Soki likoki ezali, salá yango na nkuku. (Matai 5:23, 24; 18:15) Salá ete moninga na yo andimisama mpenza ete olingi kobatela boyokani malamu elongo na ye. Baninga ya sembo balimbisanaka. (Bakolose 3:13) Okozala moninga ya lolenge wana—oyo akanganaka makasi koleka ndeko?
Kotánga mpe kokanisa na ntina na boninga ezali bobele ebandeli. Soki tozali komiyoka ete tozali bobele biso moko, tiká ete tósala likambo oyo ebongi, na bongo, mayoki yango makoumela lisusu ntango molai te. Soki tosali makasi, tokoki kozwa baninga ya solo. Tokosala ekanganeli makasi mpenza elongo na bamoko kati na bango. Kasi moto moko te akoki kozwa esika ya Nzambe, Moninga aleki monene. Bobele Yehova nde akoki koyeba komitya na esika na biso, mpe kosalisa biso na lolenge esengeli mpenza. (Nzembo 139:1-4, 23, 24) Lisusu, Liloba na ye lizali kopesa biso elikya moko kitoko mpo na mikolo mizali koya—mokili ya sika epai kuna tokokoka kozwa baninga ya solo mpo na libela.—2 Petelo 3:13.
[Bililingi na lokasa 5]
Davidi mpe Yonatana bazalaki na boninga ya solo, biso mpe tokoki kozala na yango