Ndenge ya kobatela boninga na mokili oyo ezangá bolingo
“Na makambo wana, nazali kopesa bino mitindo mpo bólinganaka.”—YOA. 15:17.
1. Mpo na nini bakristo ya ekeke ya liboso basengelaki kokoba kozala na boninga makasi?
NA BUTU na ye ya nsuka awa na mabele, Yesu alendisaki bayekoli na ye ya sembo bákoba kolingana lokola baninga. Mwa moke liboso, kaka na butu yango, ayebisaki bango ete bolingo oyo bakozala na yango kati na bango ekomonisa ete bazali bayekoli na ye. (Yoa. 13:35) Bantoma basengelaki kozala na boninga makasi mpo bákoka kolonga mikakatano oyo ezalaki kozela bango mpe bákokisa mosala oyo Yesu alingaki kopesa bango. Ya solo, eyebanaki ete bakristo ya liboso bazalaki kolinga Nzambe mingi mpe bazalaki mpenza kolingana bango na bango.
2. (a) Tozali na ekateli ya kosala nini, mpe mpo na nini? (b) Mituna nini tokotalela?
2 Lelo oyo, ezali mpenza esengo kozala na kati ya lisangá ya mokili mobimba oyo basangani na yango balandaka ndakisa ya bakristo wana ya ekeke ya liboso! Tozali na ekateli ya kotosa etinda ya Yesu ya komoniselana bolingo ya solosolo. Kasi, na mikolo oyo ya nsuka, bato mingi bazali sembo te mpe bazali kolingana na kati ya libota te. (2 Tim. 3:1-3) Boninga oyo basalaka ezali ya likolólikoló mpe ya moimi. Mpo tókoba komonisa ete tozali bakristo ya solosolo, tosengeli te komonisa bizaleli wana. Sikoyo, tótalela mituna oyo: Nini esengeli kosimba boninga ya solosolo? Ndenge nini tokoki kozwa baninga ya malamu? Ntango nini ekoki kosɛnga tókata boninga? Mpe ndenge nini tokoki kobatela boninga ya malamu?
Nini esengeli kosimba boninga ya solosolo?
3, 4. Nini esimbaka boninga ya makasi, mpe mpo na nini?
3 Bolingo mpo na Yehova nde esimbaka boninga ya makasi. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Soki moto akoki kolonga moto oyo azali kaka ye moko, bato mibale bakoki kotɛlɛmɛla ye. Mpe nsinga oyo esalemi na bansinga misato ekatanaka nokinoki te.” (Mos. 4:12) Soki Yehova azali nsinga ya misato na boninga, boninga yango ekoumela.
4 Ya solo, ata bato oyo balingaka Yehova te bakoki mpe kosala boninga ya malamu. Kasi, soki bolingo mpo na Yehova nde esangisi bato, boninga na bango ezalaka makasi koleka. Soki matata ebimi, baninga ya solosolo bakosalelana makambo na ndenge oyo esepelisaka Yehova. Soki banguna ya Nzambe bameki kokɔtisa bokabwani kati na bakristo ya solo, bamonaka ete boninga na bango ekatanaka te. Banda kalakala, basaleli ya Yehova bamonisaka ete bakondima ata kokufa na esika bátɛka bandeko na bango.—Tángá 1 Yoane 3:16.
5. Mpo na nini boninga ya Ruta ná Naomi ezalaki makasi mpenza?
5 Na ntembe te, boninga oyo ekoki mpenza kosepelisa biso ezali oyo tokoki kosala ná bato oyo balingaka Yehova. Tótalela ndakisa ya Ruta ná Naomi. Boninga oyo basi wana mibale basalaki ezali moko kati na bandakisa ya boninga ya malamu mingi oyo Biblia elobeli. Mpo na nini boninga na bango ezalaki makasi? Ruta amonisaki yango ntango alobaki na Naomi ete: “Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai. . . . Tiká Yehova asala ngai bongo mpe abakisa yango, soki eloko mosusu, longola kaka liwa, ekokabola ngai ná yo.” (Ruta 1:16, 17) Emonani polele ete Ruta ná Naomi bazalaki kolinga Nzambe mingi, mpe batikaki bolingo yango etambwisa ndenge oyo bazalaki kosalelana makambo. Mpo na yango, Yehova apambolaki basi yango mibale.
Ndenge ya kozwa baninga ya malamu
6-8. (a) Esengeli kosala nini mpo na kosala boninga ya makasi? (b)Ndenge nini tokoki kozwa baninga?
6 Ndakisa ya Ruta ná Naomi emonisi ete boninga ya malamu eyaka yango moko te. Esengeli kosimbama na bolingo mpo na Yehova. Mpo bato básala boninga ya malamu, basengeli kosala milende mpe kozala na elimo ya komipimela. Ata bana oyo bazali na mabota oyo basambelaka Yehova basengeli kosala milende mpo bázwa baninga ya malamu. Na yango, ndenge nini okoki kozwa baninga ya malamu?
7 Lukáká baninga. Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye na lisangá ya Roma ete ‘bázala na ezaleli ya koyamba bapaya.’ (Rom. 12:13) Mpo na kokóma na ezaleli moko, esɛngaka kosala makambo mingi, moko nsima ya mosusu. Ndenge moko mpe, mpo na kokóma na ezaleli ya koyamba bapaya esɛngaka kosala makambo mingi ya mikemike, mbala na mbala. Moto moko te akoki kolona ezaleli ya koyamba bapaya na esika na yo. (Tángá Masese 3:27.) Lolenge moko oyo okoki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya ezali ya kobengisa bandeko ndenge na ndenge ya lisangá mpo bólya mwa eloko elongo. Okoki kosala ete koyamba bandeko ya lisangá na bino ekóma momeseno na yo?
8 Lolenge mosusu oyo okoki koluka baninga ezali kosɛnga bandeko ndenge na ndenge bábimaka na yo na mosala ya kosakola. Ntango botɛlɛmi na porte moko mpe ozali koyoka ndenge ndeko na yo azali kolobela na motema moko bolingo oyo azali na yango mpo na Yehova, na ntembe te, okobanda kolinga ndeko yango lisusu mingi.
9, 10. Ndakisa nini Paulo atikaki, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?
9 Fungwámá na kati ya bolingo. (Tángá 2 Bakorinti 6:12, 13.) Esilá kokómela yo omona ete ezali ata na ndeko moko te na lisangá oyo akoki kokóma moninga na yo? Soki ezali bongo, ekoki nde kozala ete ozali na lolenge moko boye ya bato oyo omonaka ete bango nde bakoki kozala baninga na yo? Ntoma Paulo atikaki ndakisa malamu na ndenge afungwamaki na kati ya bolingo. Na eleko moko, akokaki kokanisa ata moke te kokóma moninga ya bato oyo bazali Bayuda te. Nzokande, akómaki “ntoma ya bikólo.”—Rom. 11:13.
10 Longola yango, Paulo azalaki kaka na baninga ya mbula na ye te. Na ndakisa, ye ná Timote bakómaki baninga makasi atako bazalaki mbula moko te mpe babɔkwamaki ndenge moko te. Lelo oyo, bilenge mingi basepelaka na boninga oyo basalaka na bandeko ya lisangá oyo bazali mikóló na bango. Vanessa, oyo azali na mbula mwa moke koleka 20 alobi boye: “Nazali na moninga moko ya motema oyo azali na mbula koleka 50. Nakoki koyebisa ye likambo nyonso oyo nakoki koyebisa moninga ya mbula na ngai. Mpe amibanzabanzaka mingi mpo na ngai.” Ndenge nini basalaki boninga ya ndenge wana? Vanessa alobi boye: “Nalukaki boninga yango koluka; nazelaki te eya yango moko.” Yo mpe olingi kosala boninga ná bandeko oyo bozali na bango mbula moko te? Na ntembe te, Yehova akopambola yo mpo na milende na yo.
11. Ndakisa ya Yonatana ná Davidi ekoki koteya biso nini?
11 Zalá sembo. Salomo akomaki boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Mas. 17:17) Ntango Salomo azalaki kokoma maloba yango, mbala mosusu azalaki kokanisa boninga oyo tata na ye Davidi asalaki ná Yonatana. (1 Sa. 18:1) Mokonzi Saulo alingaki ete mwana na ye Yonatana akóma mokonzi ya Yisraele nsima na ye. Kasi, Yonatana andimaki ndenge Yehova aponaki Davidi akóma mokonzi. Na bokeseni na Saulo, Yonatana ayokelaki Davidi zuwa te. Ayokaki nkanda te mpo na lokumu oyo bapesaki Davidi; andimaki mpe te makambo ya lokuta oyo Saulo apanzaki mpo na Davidi. (1 Sa. 20:24-34) Ozali lokola Yonatana? Ntango baninga na yo bazwi mikumba na lisangá, osepelaka mpo na yango? Ntango bakutani na mikakatano, obɔndisaka mpe osalisaka bango? Soki oyoki moto azali koloba mabe ya moninga moko, ondimaka yango mbala moko? To okɔtelaka moninga na yo na bosembo, ndenge Yonatana asalaki?
Ntango oyo ekoki kosɛnga kokata boninga
12-14. Mokakatano nini bato mosusu oyo bazali koyekola Biblia bakutanaka na yango, mpe ndenge nini tokoki kosalisa bango?
12 Ntango moto oyo azali koyekola Biblia abandi kobongola etamboli na ye, akoki kokutana na mikakatano na oyo etali boninga. Akoki kozala na baninga oyo asepelaka na bango kasi batosaka mitinda ya Biblia te. Ekoki kozala ete liboso azalaki mbala na mbala kosala makambo elongo na bango. Kasi sikoyo, amoni ete makambo oyo baninga na ye basalaka ekoki kobebisa ye, mpe amoni ete asengeli kozala lisusu mingi te elongo na baninga ya ndenge wana. (1 Ko. 15:33) Atako bongo, akoki komona ete soki aboyi kosangana na bango, ekomonisa ete azali moninga malamu te.
13 Soki ozali koyekola Biblia mpe ozali na mokakatano yango, kobosana te ete moninga ya solosolo akosepela soki ozali kosala makasi mpo na kobongisa bomoi na yo. Akoki kutu kosangana na yo na koyekola makambo ya Yehova. Nzokande, baninga mabe ‘bakofinga yo’ mpo ozali lisusu komikɔtisa te elongo na bango “na libulu wana ya pɔtɔpɔtɔ ya bomoi ya mbindo.” (1 Pe. 4:3, 4) Ezali baninga wana nde bazali malamu te, kasi yo te.
14 Ntango bato oyo bazali koyekola Biblia bakabwani na baninga na bango ya kala oyo balingi Nzambe te, bandeko ya lisangá bakoki kozwa esika ya baninga yango. (Gal. 6:10) Oyebi bato bazali koyekola Biblia, oyo bayaka na makita? Olukaka libaku ya kozala elongo na bango mpe kolendisa bango?
15, 16. (a) Tosengeli kosala nini soki moninga moko atiki kosalela Yehova? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Nzambe?
15 Kasi, tokosala nini soki moninga na biso moko na lisangá aponi kopesa Yehova mokɔngɔ, mpe mbala mosusu esɛngi abimisama na lisangá? Likambo yango ekoki kopesa mpasi mingi. Ntango azalaki kolobela ndenge ayokaki ntango moninga na ye atikaki kosalela Yehova, ndeko mwasi moko alobaki boye: “Nayokaki mpasi mingi na motema. Nazalaki kokanisa ete moninga na ngai apikamaki makasi na solo, kasi namikosaki. Namitunaki soki azalaki kosalela Yehova kaka mpo asepelisa libota na ye. Nabandaki mpe kotalela lisusu motema na ngai. Nazalaki na bantina malamu ya kosalela Yehova?” Ndenge nini ndeko mwasi yango azwaki makasi? Alobi boye: “Nabwakaki kilo na ngai epai ya Yehova. Nazwaki ekateli ya komonisa Yehova ete nalingaka ye mpenza, kasi kaka te mpo apesaka ngai baninga na kati ya lisangá.”
16 Tokoki te kolikya kotikala moninga ya Nzambe soki tozali elongo na bato oyo baponi kozala baninga ya mokili. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Boyebi te ete kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe? Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.” (Yak. 4:4) Tokoki komonisa bolingo na biso mpo na Nzambe soki tozali kotyela ye motema ete akopesa biso makasi ntango moninga na biso abimisami na lisangá. (Tángá Nzembo 18:25.) Ndeko oyo touti kolobela asukisaki na maloba oyo: “Namonaki ete tokoki te kotinda moto moko alinga biso to alinga Yehova. Ezali ekateli ya moto ye moko.” Kasi, ndenge nini tokoki kobatela boninga oyo tozali na yango na bandeko oyo batikali na lisangá?
Ndenge ya kobatela boninga malamu
17. Ndenge nini baninga ya malamu basololaka?
17 Kosolola malamu ebatelaka boninga. Soki otángi lisolo ya Ruta ná Naomi, ya Davidi ná Yonatana, mpe ya Paulo ná Timote, okomona ete baninga malamu basololaka polele, kasi na limemya. Mpo na ndenge oyo tosengeli kosolola na basusu, Paulo akomaki boye: “Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa.” Awa, Paulo azalaki kolobela ndenge oyo tosengeli koloba na bato “ya libándá,” elingi koloba baoyo bazali bakristo te. (Kol. 4:5, 6) Ya solo, soki tosengeli kolobaka na limemya epai ya bato oyo bazali bakristo te, tosengeli kolobaka na limemya koleka epai ya baninga na biso na kati ya lisangá!
18, 19. Ndenge nini tosengeli kotalela toli nyonso oyo moninga mokristo apesi biso, mpe ndakisa nini bankulutu ya Efese batikelá biso?
18 Moninga ya malamu apesaka motuya na makanisi ya moninga na ye, yango wana basengeli kosolola na bokonde mpe polele. Salomo, mokonzi ya bwanya akomaki boye: “Mafuta mpe mpaka ya malasi nde esepelisaka motema, ndenge mpe elɛngi ya kozala na moninga esepelisaka motema mpo na toli na ye oyo epesami na molimo na ye mobimba.” (Mas. 27:9) Ezali bongo nde otalelaka toli nyonso oyo moninga apesi yo? (Tángá Nzembo 141:5.) Soki moninga ayebisi yo ete azali komitungisa mpo na likambo moko oyo ozali kosala, osalaka nini? Omonaka ete ndenge ayebisi yo ezali komonisa motema boboto, to osilikaka?
19 Ntoma Paulo azalaki moninga ya motema ya bankulutu ya lisangá ya Efese. Mbala mosusu ayebaki mibali yango mosusu liboso bákóma bakristo. Kasi, na likita ya nsuka oyo asalaki na bango, apesaki bango toli ya polele. Basalaki nini? Baninga ya Paulo basilikaki te. Kutu, basepelaki ndenge amibanzabanzaki mpo na bango, mpe balelaki ntango bayokaki ete bakomona ye lisusu te.—Mis. 20:17, 29, 30, 36-38.
20. Moninga ya malamu asalaka nini?
20 Baninga ya malamu basukaka te na koyoka toli, bango mpe bapesaka toli. Ya solo, tosengeli kososola ntango oyo ebongi te “kokɔta na makambo ya bato.” (1 Tes. 4:11) Tosengeli mpe koyeba ete moto na moto “akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.” (Rom. 14:12) Kasi, na ntango oyo esengeli, moto oyo alingi moninga na ye akokundwela ye na boboto mibeko ya Yehova. (1 Ko. 7:39) Na ndakisa, okosala nini soki omoni ete moninga na yo oyo abalá te akómi kokangamakangama na moto oyo azali Motatoli te? Okoboya koyebisa ye ete azali kosala mabe, kaka mpo olingi te koyokisa ye mpasi? To soki moninga na yo aboyi koyoka toli na yo, okosala nini? Moninga ya malamu akoluka lisalisi ya bankulutu mpo básalisa ndeko oyo azali kokende na nzela ya mabe. Kosala bongo esɛngaka mpiko. Atako bongo, eloko moko te ekoki kobebisa mpo na libela boninga oyo esimbami na bolingo mpo na Yehova.
21. Biso nyonso tosalaka nini na bantango mosusu, kasi mpo na nini tosengeli kobatela boninga na bandeko ya lisangá?
21 Tángá Bakolose 3:13, 14. Na bantango mosusu, ekoki kokóma ete baninga na biso ‘bázala na likambo’ ná biso; bango mpe bakoki kosala to koloba makambo oyo epesi biso nkanda. Yakobo akomaki ete “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yak. 3:2) Kasi, mpo na kobatela boninga, esengeli te kotánga mbala boni basali biso mabe, kasi esengeli nde kolimbisaka na motema moko mabe oyo moninga asali biso. Mpo na kosala boninga ya makasi, esengeli kosololaka polele mpe kolimbisanaka na motema moko. Soki tozali komonisa bolingo ya ndenge wana, yango ekokóma “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini tokoki kozwa baninga ya malamu?
• Ntango nini ekoki kosɛnga kokata boninga?
• Tosengeli kosala nini mpo na kobatela boninga makasi?
[Elilingi na lokasa 18]
Nini esimbaki boninga makasi ya Ruta ná Naomi?
[Elilingi na lokasa 19]
Ozalaka na ezaleli ya koyamba bapaya?