Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/7 nk. 26-29
  • Gamaliele—Ye oyo ateyaki Saulo moto na Talasia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Gamaliele—Ye oyo ateyaki Saulo moto na Talasia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Gamaliele azalaki nani?
  • Ateyamaki na Gamaliele​—Lolenge nini?
  • Elimo ya mateya ya Gamaliele
  • Yango elimbolaki nini mpo na Paulo?
  • ‘Tokoki te kotika koloba mpo na Yesu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Mishnah mpe Mibeko ya Nzambe epai na Mose
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tozali kokende liboso tii na bolongi ya nsuka!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/7 nk. 26-29

Gamaliele—Ye oyo ateyaki Saulo moto na Talasia

BIBELE bafandaki nyɛɛ. Bobele mwa ntango liboso, etikalaki mpenza moke ete báboma ntoma Paulo. Ye oyo ayebanaki mpe lokola Saulo moto na Talasia, abikisamaki na mampinga ya Baloma mpe sikawa azali liboso na bibele, likoló na ebuteli pene na tempelo ya Yelusaleme.

Kopɛpɛláká bato lobɔkɔ na ye mpo na kosɛnga ete bázala nyɛɛ, Paulo abandaki koloba na lokótá ya Liebele, ete: “Bandeko mibali, na batata, boyoka ezongiseli ekozongisa ngai na bino sasaipi. . . . Ngai Moyuda, nabotami na Talasia na Kilikia, nde nabɔkɔlami na mboka oyo. Nayekoli makambo nyonso na kati na Mibeko na bankɔ́kɔ epai na makolo na Gamaliele. Nazalaki mpe moto na mposa na likambo na Nzambe pelamoko bino nyonso bozali lelo.”​—Misala 22:1-3.

Wana bomoi na ye ezalaki na likámá, mpo na nini Paulo abandaki maloba ya komilóngisa na kolobáká ete ayekolaki epai na Gamaliele? Gamaliele azalaki nani, mpe kozala moyekoli epai na ye esangisaki makambo nini? Boyekoli motindo yango ezalaki na bopusi likoló na Saulo ata nsima wana akómaki ntoma moklisto Paulo?

Gamaliele azalaki nani?

Gamaliele azalaki Mofalisai moko oyo ayebanaki mingi. Hillel Mokóló, mobandisi ya moko na bituluku minene mibale ya Bafalisai kati na losambo ya Bayuda azalaki bongo nkɔ́kɔ na ye.a Mateya ya Hillel matalelamaki ete mazali na bokatikati koleka oyo ya mowelani na ye, Shammai. Nsima ya kobebisama ya tempelo ya Yelusaleme na mobu 70 T.B., Bet Hillel (Ndako ya Hillel) elingamaki mingi koleka Bet Shammai (Ndako ya Shammai). Ndako ya Hillel ekómaki elembo ya losambo ya Bayuda oyo endimamaki na bato banso, mpamba te mangomba mosusu ya mikemike nyonso elimwaki ntango tempelo ebebisamaki. Bikateli ya Bet Hillel ezwamaka mbala mingi lokola moboko mpo na mibeko ya Bayuda kati na Mishnah, oyo ekómaki moboko oyo Talmud etongamaki likoló na yango, mpe emonani polele ete lokumu monene oyo Gamaliele azalaki na yango esalaki mpe ete Bet Hillel eyebana mingi.

Gamaliele alingamaki mingi na boye ete azalaki moto ya liboso oyo abéngamaki rabban, nkombo ya lokumu mingi koleka labi. Ya solo, Gamaliele azalaki moto oyo apesamelaki limemya mingi na boye ete búku Mishnah elobi na ntina na ye ete: “Ntango Rabban Gamaliele mokóló akufaki nkɛmbo ya Torah esukaki, mpe bopɛtɔ na bosantu [sikisiki “kotyama pembeni”] elimwaki.”​—Sotah 9:15.

Ateyamaki na Gamaliele​—Lolenge nini?

Ntango ntoma Paulo alobaki na bibele kati na Yelusaleme ete ‘abɔkɔlamaki na makolo na Gamaliele,’ alingaki koloba nini? Kozala moyekoli ya molakisi lokola Gamaliele ezalaki kosɛnga nini?

Na ntina na kolakisama motindo yango, Profɛsɛrɛ Dov Zlotnick na likindo ya Teoloji ya Bayuda na États-Unis akomi ete: “Bosikisiki ya mobeko oyo mokomami te, na bongo bosolo na yango, etali mpenzampenza boyokani kati na molakisi mpe moyekoli: likebi ya molakisi mpo na koteya mobeko mpe mposa makasi ya moyekoli ya koyekola yango. . . . Na yango, banakelasi balendisamaki ete báfanda pene na makolo na banganga-mayele . . . ‘mpe komela maloba na bango na mposa nyonso.’”​—Avot 1:4, Mishnah.

Kati na búku na ye A History of the Jewish People in the Time of Jesus Christ (Lisoló ya makambo ya kala ya Bayuda na ntango na Yesu Klisto), Emil Schürer alimboli malamu mwango ya koteya ya balabi na ekeke ya liboso. Akomaki ete: “Balabi oyo bazalaki na lokumu mingi mbala mingi bazalaki koyanganisa ebele ya bilenge mibali oyo bazalaki na mposa ya koyekola, mpo na koteya bango na bozindo makambo mingi mpe makeseni ya ‘mobeko oyo mokomami te.’ . . . Kolakisama yango etalaki bongo kolendendela ntango nyonso mpo na kokólisa makoki na bango ya kobomba makambo na motó. . . . Molakisi azalaki koyebisa banakelasi na ye makambo mingi matali mibeko mpo bákoka kokata yango mpe azalaki kotika ete báyanola na yango to azalaki ye moko koyanola yango. Banakelasi bazalaki mpe kopesamela nzela ya kotuna mituna epai na molakisi.”

Na makanisi ya balabi, matomba oyo mateya yango malingaki kopesa mazalaki na ntina mingi koleka likambo ya kozwa bapwé malamu. Baye bazalaki koyekola epai na balakisi lolenge yango bazalaki kokebisama ete: “Ye nani abosani likambo moko na makambo oyo ayekoli​—Engebene Makomi bomoi na ye mpenza etalelami na yango.” (Avot 3:8) Longonya monene epesamaki na moyekoli oyo azalaki lokola “libulu ya mai oyo nsé na yango etongami malamu, oyo ebungisaka ata litangá moko ya mai te.” (Avot 2:8) Wana ezalaki lolenge ya kolakisama oyo Paulo, oyo ayebanaki lokola Saulo moto ya Talasia, nkombo na ye na Liebele, azwaki epai na Gamaliele.

Elimo ya mateya ya Gamaliele

Na boyokani na mateya ya Bafalisai, Gamaliele akólisaki kondima kati na mibeko mikomami te. Na yango, atyaki likebi mingi likoló na makambo ya bonkɔ́kɔ ya balabi koleka Makomami mapemami. (Matai 15:3-9) Búku Mishnah etángi maloba Gamaliele alobaki ete: “Luká molakisi [labi] mpe okozala na kokakatana te, mpamba te osengeli te kofuta koleka ndambo na zomi mpo na boínga.” (Avot 1:16) Yango elimbolaki ete ntango Makomami ya Liebele mamonisaki polele te likambo oyo moto asengelaki kosala, asengelaki te kosalela likanisi na ye moko to kolanda lisosoli na ye moko mpo na kozwa ekateli. Nzokande, asengelaki kokutana na labi ya makoki mingi oyo asengelaki kozwa ekateli mpo na ye. Engebene Gamaliele, ezalaki bobele na lolenge wana nde moto akokaki kopɛngola kosala lisumu.​—Kokanisá na Baloma 14:1-12.

Nzokande, Gamaliele ayebanaki mbala mingi lokola moto oyo azalaki na elimo ya makambo makasimakasi te kati na lolenge na ye ya kokata makambo na losambo. Na ndakisa, amonisaki komibanzabanza epai na basi ntango akataki ete “akopesa mwasi nzela ya kobala lisusu na litatoli ya moto moko [na ntina na liwa ya mobali na ye].” (Yevamot 16:7, Mishnah) Lisusu, mpo na kobatela mwasi oyo alongolami na libala, Gamaliele akɔtisaki mibeko mingi na likambo litali kopesa mokanda ya koboma libala.

Elimo motindo yango emonani mpe kati na lolenge oyo Gamaliele asalaki epai na bayekoli ya Yesu Klisto. Mokanda ya Misala eyebisi ete ntango bakonzi mosusu ya Bayuda balukaki koboma bantoma ya Yesu, oyo bakangaki bango na ntina na mosala ya kosakola, “Mofalisai moko atɛmi kati na Koyangana, nkombo na ye Gamaliele, ye molakisi na Mibeko, moto na lokumu na miso na bato nyonso, apesi monɔkɔ ete bábimisa bantoma moke. Alobi na bango ete, Mibali na Yisalaele, kebá na bino soko bolingi kosala nini na bato oyo. . . . Nazali koloba na bino ete bólongwa na bato oyo, mpe bótika bango, . . . Kebá ete bózwama babunani na Nzambe te.” Balandaki toli ya Gamaliele, mpe babimisaki bantoma.​—Misala 5:34-40.

Yango elimbolaki nini mpo na Paulo?

Paulo abɔkɔlamaki mpe alakisamaki epai na ye oyo azalaki moko na balabi ya lokumu mingi ya ekeke ya liboso T.B. Na ntembe te, wana ntoma atángaki nkombo ya Gamaliele, esalaki ete ebele na engumba Yelusaleme bátya likebi monene na lisoló na ye. Kasi alobelaki bango makambo matali Molakisi oyo alekaki Gamaliele mosika​—Yesu, Masiya. Wana Paulo azalaki kosolola na ebele na bato, azalaki bongo koloba lokola moyekoli ya Yesu, kasi te lokola moyekoli ya Gamaliele.​—Misala 22:4-21.

Kolakisama oyo Paulo azwaki epai na Gamaliele ezalaki na bopusi likoló na ye wana esilaki ye kokóma moklisto? Na ntembe te, kolakisama ya mozindo kati na Makomami mpe mibeko ya Bayuda oyo Paulo azwaki ezalaki na litomba mingi mpo na Paulo wana ekómaki ye moteyi moklisto. Nzokande, mikanda mipemami ya Biblia oyo Paulo akomaki mizali komonisa polele ete asilaki kobwaka mateya mpe bindimeli ya Mofalisai Gamaliele. Paulo akambaki baninga na ye Bayuda mpe bato mosusu nyonso, epai na balabi ya losambo ya Bayuda te to na bonkɔ́kɔ ya bato te, kasi epai na Yesu Klisto.​—Baloma 10:1-4.

Soki Paulo akóbaki lokola moyekoli ya Gamaliele, mbɛlɛ alingaki kokóma na lokumu mingi. Basusu oyo bazalaki na etuluku ya Gamaliele basungaki mpo na kotya moboko ya losambo ya Bayuda mpo na mikolo mizalaki koya nsima. Na ndakisa, Simeona, mwana ya Gamaliele, mbala mosusu azalaki moninga ya Paulo ya kelasi, akokisaki mokumba monene kati na botomboki ya Bayuda liboso na Loma. Nsima ya kobebisama ya tempelo, Gamaliele II, mwana na mwana ya Gamaliele azongisaki bokonzi ya Sanedrina, mpe akómisaki efandelo na yango na mboka moke Yavneh. Judah Ha-Nasi, mwana na mwana ya Gamaliele II nde asangisaki makomi ya búku Mishnah, oyo ekómá moboko ya mateya ya Bayuda kino na mikolo na biso.

Lokola moyekoli ya Gamaliele, mbɛlɛ Saulo moto na Talasia akokaki kokóma moto monene kati na losambo ya Bayuda. Nzokande, na ntina na mosala motindo yango, Paulo akomaki ete: “Soko nazalaki na litomba wana, natángi yango eloko mpamba mpo na Klisto. Ɛɛ, nazali kotánga biloko nyonso mpamba mpo na likambo lileki malamu, yango koyeba Klisto Yesu Nkolo na ngai. Mpo na ye nabungisi biloko nyonso mpe nazali kotánga yango bobele nyei ete nazwa Klisto lokola libonza.”​—Bafilipi 3:7, 8.

Na kotikáká mosala na ye ya Mofalisai mpe kokómáká moyekoli ya Yesu Klisto, Paulo azalaki nde kosalela toli ya molakisi na ye ya kala, na ntina na “kozwama babunani na Nzambe” te. Na kotikáká konyokola bayekoli ya Yesu, Paulo atikaki kobundisa Nzambe. Nzokande, wana akómaki moyekoli ya Klisto, akómaki moko na “basalani elongo na Nzambe.”​—1 Bakolinti 3:9, NW.

Nsango ya boklisto ya solo ezali kokóba kosakolama na Batatoli ya Yehova ya molende na mikolo na biso. Lokola Paulo, mingi na bango basalaki mbongwana monene kati na bomoi na bango. Basusu na bango batikaki kútu misala ya matomba mingi mpo bákoka kosala lisusu mingi koleka kati na mosala ya kosakola Bokonzi, mosala oyo “euti na Nzambe.” (Misala 5:39) Bazali na esengo ete balandaki ndakisa ya Paulo na esika ya kolanda ndakisa ya Gamaliele, molakisi na ye ya kala.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mikanda mosusu milobi ete Gamaliele azalaki mwana ya Hillel. Búku Talmud elobeli yango polele te.

[Elilingi na lokasa 28]

Wana akómaki ntoma Paulo, Saulo moto na Talasia asakolaki nsango malamu epai na bato na mabota nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto