Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/8 nk. 9-14
  • Koya ya Yesu to kozala ya Yesu​—⁠oyo wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koya ya Yesu to kozala ya Yesu​—⁠oyo wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Batunaki likambo nini?
  • Makambo oyo Matai akomaki—Na Greke
  • Ndimbola ikeseni kati na lokótá ya Liebele
  • Tózela nsuka ya kozala na ye
  • Pole engengi likoló na kozala ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Koya ya Masiya mpe boyangeli na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Kozonga ya Kristo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Kozala ya Klisto—Elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/8 nk. 9-14

Koya ya Yesu to kozala ya Yesu​—oyo wapi?

“Nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo?”​—MATAI 24:3, NW.

1. Mituna oyo Yesu azalaki kotuna ekokisaki mokumba nini kati na mosala na ye?

LOLENGE Yesu azalaki kotuna mituna na mayele nyonso ezalaki kopusa bayoki na ye ete bákanisa na mozindo mpe bátalela kútu makambo na lolenge ya sika. (Malako 12:35-37; Luka 6:9; 9:20; 20:3, 4) Tokoki kozala na botɔ́ndi mpamba te azalaki mpe koyanola na mituna. Biyano na ye bizali kopesa biso bingɛngiseli likoló na makambo ya solo oyo mbɛlɛ tokokaki koyeba yango te to kososola yango te soki ayanolaki te na mituna oyo batunaki ye.​—Malako 7:17-23; 9:11-13; 10:10-12; 12:18-27.

2. Na motuna nini tosengeli kotya likebi sikawa?

2 Kati na Matai 24:3, tozali komona moko na mituna ya ntina mingi oyo Yesu ayanolaki na yango. Wana akómaki na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, Yesu apesaki likebisi ete Tempelo ya Yelusaleme esengelaki kobomama, komonisáká bongo elembo ete ebongiseli ya Bayuda ekómaki na nsuka na yango. Lisoló oyo lizwami kati na Matai libakisi ete: “Wana afandaki likoló na Ngomba ya Olive, bayekoli babɛlɛmaki epai na ye na nkúku, kolobáká ete: ‘Yebisá biso, makambo oyo makozala ntango nini, mpe nini ekozala elembo ya kozala [“koya,” Boyokani ya Sika] na yo mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo?’”​—Matai 24:3, NW.

3, 4. Bokeseni nini monene ezali kati na lolenge oyo mabongoli ya Biblia ezali kobongola liloba ya moboko oyo ezwami na Matai 24:3?

3 Bamilió ya batángi ya Biblia basilá komituna ete: ‘Mpo na nini bayekoli ya Yesu batunaki motuna wana, mpe eyano ya Yesu esengeli kozala na bopusi nini epai na ngai?’ Kati na eyano na ye, Yesu alobelaki lolenge nini kobima ya nkasa elakisaka ete eleko ya molungé ‘ebɛlɛmi.’ (Matai 24:32, 33) Na yango, mangomba mingi mazali koteya ete bantoma bazalaki koluka koyeba elembo ya “koya” ya Yesu, elembo oyo esengelaki komonisa ete bozongi na ye ekómi pene. Bandimaki ete “koya” yango ekozala ntango oyo akomema baklisto kuna na likoló mpe na nsima akoyeisa nsuka ya mokili. Ondimi ete likanisi oyo elongobani?

4 Na esika ya kosalela liloba “koya,” mabongoli mosusu ya Biblia, kati na yango mpe Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau, esaleli liloba “kozala.” Ekoki kozala ete likambo oyo bayekoli batunaki mpe eyano oyo Yesu apesaki ekeseni na oyo eteyami kati na mangomba? Bayekoli batunaki mpenza likambo nini? Mpe Yesu apesaki eyano nini?

Batunaki likambo nini?

5, 6. Tokoki koloba ete likanisi ya bantoma ezalaki nini na ntango batunaki motuna oyo ezali na Matai 24:3?

5 Na kotalela makambo oyo Yesu alobaki na ntina na tempelo, ekoki mpenza kozala ete bayekoli bazalaki kokanisa na ntina na ebongiseli ya Bayuda na ntango basɛngaki ye ete ayebisa bango ‘elembo ya kozala [to, “koya”] na ye mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko [elingi mpenza koloba, “mikolo”].’​—Kokanisá “mokili” kati na 1 Bakolinti 10:11 mpe Bagalatia 1:4, Bondeko ya Sika.

6 Na ntango yango bayekoli bazalaki bobele na bososoli moke likoló na mateya ya Yesu. Liboso bakanisaki ete “Bokonzi na Nzambe ekomonana nokinoki.” (Luka 19:11; Matai 16:21-23; Malako 10:35-40) Ata na nsima ya lisoló wana na Ngomba ya Olive, liboso ya kopakolama na elimo santu, batunaki Yesu soki asengelaki kozongisa Bokonzi ya Yisalaele na ntango wana.​—Misala 1:6.

7. Mpo na nini bantoma basengelaki kotuna Yesu na ntina na mokumba na ye na mikolo mizalaki koya?

7 Nzokande, bayebaki mpenza ete asengelaki kotika bango, mpo ete kala mingi te autaki koloba na bango ete: “Moi ezali kati na bino mwa ntango moke; bótambola naino ezali bino na moi ete molili mokanga bino te.” (Yoane 12:35; Luka 19:12-27) Ekoki kozala ete bamitunaki, ‘Soki Yesu akotika biso, lolenge nini tokoyeba bozongi na ye?’ Na ntango abimaki lokola Masiya, bato mingi bayebaki ye te. Mpe koleka mbula moko na nsima, mituna mikóbaki kotunama mpo na koyeba soki alingaki kokokisa oyo nyonso Masiya asengelaki kosala. (Matai 11:2, 3) Na yango, bantoma bazalaki na ntina ya kotuna motuna oyo motalaki mikolo mizalaki koya. Kasi, lisusu, bazalaki kosɛnga elembo oyo elingaki komonisa ete etikali moke aya to bazalaki nde kosɛnga likambo mosusu?

8. Ekoki mpenza kozala ete bantoma bazalaki koloba lokótá nini elongo na Yesu?

8 Kanisá ete ozalaki ndɛkɛ mpe ozalaki koyoka lisoló oyo ezalaki koleka likoló na Ngomba ya Olive. (Kokanisá na Mosakoli 10:20.) Na ntembe te, mbɛlɛ olingaki koyoka Yesu mpe bantomba bazali koloba na lokótá ya Liebele. (Malako 14:70; Yoane 5:2; 19:17, 20; Misala 21:40) Nzokande, ekoki mpenza kozala ete bayebaki mpe lokótá ya Greke.

Makambo oyo Matai akomaki—Na Greke

9. Mabongoli mingi ya Evanzile ya Matai na mikolo na biso masaleli moboko nini?

9 Makomi ya kala oyo ebandaki uta na ekeke ya mibale T.B. mamonisi ete liboso Matai akomaki Evanzile na ye na Liebele. Na ntembe te, na nsima ayaki kokoma yango na Greke. Bamaniskri mingi ya Greke ekómi kino na mikolo na biso mpe esalelami lokola moboko mpo na kobongola Evanzile na ye na nkótá ya mikolo na biso. Makambo nini Matai akomaki na lokótá ya Greke na ntina na lisoló oyo elekaki na Ngomba ya Olive? Akomaki nini na ntina na “koya” to “kozala” oyo mpo na yango bayekoli batunaki motuna mpe oyo Yesu ayanolaki?

10. (a) Liloba nini ya Greke Matai asaleli mingi oyo elimboli “koya,” mpe ekoki kobimisa ndimbola nini? (b) Liloba mosusu nini ya Greke tosengeli kotalela?

10 Kati na mikapo 23 ya liboso ya Matai, tozali kokuta mbala 80 liloba “koya” na Greke oyo bato mingi bazalaki koloba, oyo ezali bongo erʹkho·mai. Mingimingi epesaka likanisi ya kobɛlɛma to ya kokóma pene, lokola emonisami kati na Yoane 1:47: “Yesu amoni Natanaele azali koya [epai] na ye.” Engebene lolenge esalelami, liloba erʹkho·mai ekoki kolimbola “koya,” “kokende,” “kokóma na esika boye,” to “kozala na nzela.” (Matai 2:8, 11; 8:28; Yoane 4:25, 27, 45; 20:4, 8; Misala 8:40; 13:51) Kasi na Matai 24:3, 27, 37, 39, Matai asalelaki liloba mosusu, liloba pa·rou·siʹa, oyo emonani na esika mosusu te kati na Baevanzile. Lokola ezali Nzambe nde apemisaki kokomama ya Biblia, mpo na nini apusaki Matai ete apona kosalela liloba oyo ya Greke kati na mikapo wana na ntango azalaki kokoma Evanzile na ye na Greke? Yango elimboli nini, mpe mpo na nini biso tosengeli koluka koyeba yango?

11. (a) Pa·rou·siʹa elimboli nini? (b) Lolenge nini bandakisa oyo euti na makomi ya Josèphe endimisi bososoli oyo tozali na yango na ntina na pa·rou·siʹa? (Talá maloba na nsé ya lokasa.)

11 Na lolenge lobongi mpenza, pa·rou·siʹa elimboli “kozala.” Búku Expository Dictionary of New Testament Words ya Vine elobi ete: “PAROUSIA, . . . [elingi mpenza koloba], kozala, para, elongo, mpe ousia, bozali (euti na eimi, kozala), elimboli koya mpe na yango kozala elongo. Na ndakisa, kati na nkomá moko ya papirise elenge mwasi moko azali kolobela ntina ya parousia na ye na esika moko mpo na kosɛnzɛla likoló na bozwi na ye.” Badiksionɛrɛ mosusu epesi ndimbola oyo ete pa·rou·siʹa ezali kopesa likanisi ya ‘boyei ya mokonzi moko.’ Na yango, ezali bobele ntango ya boyei te, kasi kozala na ye na esika yango kobanda na ntango ya bokómi. Likambo ya kobenda likebi yango oyo, ezali na lolenge wana nde Josèphe, mokomi na makambo ya kala, oyo azalaki na bomoi eleko moko na bantoma, asalelaki liloba pa·rou·siʹa.a

12. Lolenge nini Biblia yango moko ezali kondimisa ndimbola ya pa·rou·siʹa?

12 Ndimbola ya liloba “kozala” endimisami polele kati na mikanda ya kala, kasi likebi ya baklisto etyami mingi likoló na lolenge oyo Liloba ya Nzambe esaleli pa·rou·siʹa. Ezali lolenge moko na ndenge mikanda ya kala misalelaki yango​—kozala. Tozali komona yango kati na ndakisa oyo ezwami na mikanda ya Paulo. Na ndakisa, akomaki epai na Bafilipi ete: “Na lolenge botosaka ntango nyonso, te bobele na ntango nazali, kasi sikawa mingi mpe bozalaka na bolingo malamu ya kotosa na ntango nazali te, bóbatela malamu lobiko na bino.” Alobelaki lisusu na ntina na koumela elongo na bango ete basengelaki kosepela “na nzela ya kozala [pa·rou·siʹa] na [ye] lisusu elongo na [bango].” (Bafilipi 1:25, 26, NW; 2:12) Mabongoli mosusu malobi “kozala na ngai elongo na bino lisusu” (Weymouth; New International Version); “ntango nakozala lisusu kati na bino” (La Bible de Jérusalem; New English Bible); mpe “ntango lisusu bokozala na ngai kati na bino.” (Twentieth Century New Testament) Kati na 2 Bakolinti 10:10, 11, Paulo akesenisaki “kozala na ye mpenza” na “kozala te.” Kati na ndakisa wana emonani polele ete azalaki te kolobela kobɛlɛma na ye to koya na ye; asalelaki pa·rou·siʹa na ndimbola ya kozala wana.b (Kokanisá na 1 Bakolinti 16:17.) Kasi, ezali boni mpo na bisika mosusu oyo Yesu asalelaki pa·rou·siʹa? Elimbolaki “koya” na ye, to emonisaki nde kozala na boumeli ya ntango molai?

13, 14. (a) Mpo na nini tosengeli koloba ete pa·rou·siʹa etaleli eleko molai ya ntango? (b) Tosengeli koloba nini na ntina na boumeli ya pa·rou·siʹa ya Yesu?

13 Na eleko ya Paulo, baklisto bapakolami batyaki likebi mingi likoló na pa·rou·siʹa ya Yesu. Kasi Paulo akebisaki bango ete ‘bábulunganisama te kati na likoki na bango ya kososola.’ Liboso “motyoli na mibeko asengelaki komonana,” emonani ete ezali bongo kelasi ya bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba. Paulo akomaki ete “kozala ya motyoli na mibeko ezali engebene mosala ya Satana na misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta.” (2 Batesaloniki 2:2, 3, 9, NW) Emonani polele ete pa·rou·siʹa, to kozala ya “motyoli na mibeko” ezalaki bobele koya mpo na ntango mokuse te; esengelaki kosalema na boumeli ya mwa ntango, oyo na boumeli na yango bilembo ya lokuta esengelaki komonana. Mpo na nini yango ezali na ndimbola monene?

14 Tótalela naino vɛrsɛ́ oyo ezwami mpenza liboso na yango: “Motyoli na mibeko akomonisama polele, oyo Nkolo Yesu akolongola na nzela ya elimo ya monoko na ye mpe akosilisa ye nyɛɛ na nzela ya nguya ya kozala na ye.” Bobele lokola kozala ya “motyoli na mibeko” ekoumela eleko moko boye, kozala ya Yesu ekoumela mwa ntango mpe ekosuka na ntango ya kobebisama ya motyoli wana, ye “mwana ya libebi.”​—2 Batesaloniki 2:8, NW.

Ndimbola ikeseni kati na lokótá ya Liebele

15, 16. (a) Liloba nini ya sikisiki esalelami kati na mabongoli mingi ya Evanzile ya Matai na Liebele? (b) Lolenge nini liloba bohʼ esalelami kati na Makomami?

15 Lokola tomonaki yango, Matai akomaki Evanzile na ye liboso na lokótá ya Liebele. Na yango, asalelaki liloba nini ya Liebele kati na Matai 24:3, 27, 37, 39? Mabongoli ya Evanzile ya Matai na Liebele ya mikolo na biso esaleli liloba bohʼ, ezala kati na motuna ya bantoma mpe kati na eyano ya Yesu. Na bongo ekoki kotángama na lolenge oyo: “Nini ekozala elembo ya [bohʼ] na yo mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo?” mpe, “Lokola ezalaki mikolo na Noa, [bohʼ] na Mwana na moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:3, 37) Bohʼ elimboli nini?

16 Atako liloba ya Liebele bohʼ ezali na ndimbola ndenge na ndenge, kasi ndimbola na yango ya liboso mpenza ezali bongo “koya.” Búku Theological Dictionary of the Old Testament elobi ete: “Liloba bohʼ esalelami mbala 2 532, ezali moko na maloba oyo esalelami mingi kati na Makomami ya Liebele mpe ezali liloba ya liboso oyo ezali kolobela kotambola.” (Genese 7:1, 13; Exode 12:25; 28:35; 2 Samwele 19:30; 2 Mikonzi 10:21; Nzembo 65:2; Yisaya 1:23; Ezekiele 11:16; Danyele 9:13; Amosa 8:11) Soki Yesu mpe bantoma na ye basalelaki liloba oyo ekoki kolimbola makambo mingi boye, mbɛlɛ ndimbola na yango ekokaki kobɛtɛlama ntembe. Kasi basalelaki liloba yango?

17. (a) Mpo na nini mabongoli ya Matai na Liebele ya mikolo na biso makoki komonisa na bosikisiki mpenza te makambo nyonso oyo Yesu mpe bayekoli na ye balobaki? (b) Kati na mokanda nini mosusu tokoki komona elembeteli mpo na koyeba liloba oyo Yesu mpe bantoma basalelaki, mpe na ntina nini mosusu mokanda yango esengeli kobenda likebi na biso? (Talá maloba na nsé ya lokasa.)

17 Tóbosana te ete Biblia ya Liebele ya mikolo na biso ezali mabongoli oyo makoki te komonisa na bosikisiki mpenza makambo nyonso oyo Matai akomaki na Liebele. Ezali solo ete Yesu akokaki kosalela liloba mosusu na esika ya bohʼ, oyo ekokani mpenza na ndimbola ya pa·rou·siʹa. Tozali komona yango kati na búku Hebrew Gospel of Matthew oyo ebimisamaki na Professeur George Howard na 1995. Búku yango elobelaki mingi mokanda ya ntembe oyo monganga Moyuda Shem-Tob ben Isaac Ibn Shaprut abimisaki na ekeke 14 mpo na kotɛmɛla baklisto. Mokanda yango emonisaki eteni moko ya makomi ya Evanzile ya Matai. Elembeteli ezali oyo emonisi ete eteni wana ya makomi ya Matai ezalaki mpenza ya kala mpe ekomamaki liboso na Liebele, kasi te ete ebongolamaki na Latin to na Greke na eleko ya Shem-Tob.c Na yango, ekoki komonisa biso ndimbola oyo ezali pene mpenza na oyo elobamaki na Ngomba ya Olive.

18. Liloba nini ya Liebele ya kobenda likebi Shem-Tob asaleli, mpe yango elimboli nini?

18 Kati na Matai 24:3, 27, 39, Matai oyo ezwami kati na mokanda ya Shem-Tob esaleli liloba bohʼ te. Esaleli nde nkombo oyo eyokani na yango, bi·ʼahʹ. Nkombo yango esalelami kati na Makomami ya Liebele bobele na Ezekiele 8:5, epai kuna elimboli “ekɔtelo.” Nzokande na esika yango bi·ʼahʹ elobi koya te, elobeli nde ekuke ya ndako; na ntango ozali na ekɔtelo to na monoko ya ndako, elingi koloba ete ozali kati na ndako. Lisusu, kati na barulo ya Mer Morte, makomi mosusu oyo ezali na Biblia te masaleli mingi bi·ʼahʹ mpo na kolobela koya kati na mosala ya bonganga to kobanda mosala yango. (Talá 1 Ntango 24:3-19; Luka 1:5, 8, 23.) Mpe libongoli ya Peshitta na Liebele uta na lokótá ya Syriaque (to Aramɛyɛ) oyo ebimaki na 1986 esaleli liloba bi·ʼahʹ na Matai 24:3, 27, 37, 39. Na yango elembeteli ezali ete na ntango ya kala nkombo bi·ʼahʹ ekokaki mbala mosusu kozala ndimbola oyo ekesanaki mwa moke na liloba bohʼ oyo esalelami kati na Biblia. Mpo na nini tosengeli kotalela yango?

19. Soki Yesu mpe bantoma na ye basalelaki bi·ʼah,ʹ na bongo tokoki koloba nini?

19 Ekoki kozala ete bantoma na motuna na bango mpe Yesu na eyano na ye, basalelaki nkombo bi·ʼah.ʹ Atako bantoma bakanisaki bobele koya ya Yesu na mikolo mizalaki liboso, ekoki kozala ete Yesu asalelaki bi·ʼahʹ mpo na kolobela makambo mingi koleka oyo bantoma bazalaki kokanisa. Yesu akokaki kolobela koya na ye mpo na kobanda mosala ya sika; koya na ye esengelaki kozala ebandeli ya mokumba ya sika. Yango esengelaki kokokana na ndimbola ya pa·rou·siʹa, oyo Matai asalelaki. Ezali likambo ya kokamwa te ete lolenge wana ya kosalela bi·ʼahʹ esengeli kondimisa liteya oyo Batatoli ya Yehova bazali koteya uta kala, ete “elembo” oyo esangisi makambo mingi, oyo Yesu apesaki, esengelaki komonisa ete azalaki.

Tózela nsuka ya kozala na ye

20, 21. Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo Yesu alobaki na ntina na mikolo ya Noa?

20 Boyekoli na biso ya kozala ya Yesu esengeli mpenza kozala na bopusi likoló na bomoi na biso mpe likoló na bilikya na biso. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete básɛnzɛlaka ntango nyonso. Apesaki elembo mpo ete kozala na ye eyebana, ata soki eteni monene na bango balingaki kotyela yango likebi te: “Lokola ezalaki mikolo na Noa, koya [“kozala,” NW] na Mwana na moto ekozala bongo. Mpo ete na mikolo yango liboso na mpela monene, bazalaki kolya mpe komela, kobala mpe kobalisa, kino mokolo eingelaki Noa na [masúwa]; bayebaki likambo te kino eyaki mpela mpe elongolaki bango nyonso. Koya [“kozala,” NW] na Mwana na moto ekozala mpe bongo.”​—Matai 24:37-39.

21 Na mikolo ya Noa, bato mingi ya eleko wana bazalaki komibanzabanza bobele na makambo na bango moko. Yesu asakolaki ete na “koya [“kozala,” NW] na Mwana na moto ekozala mpe bongo.” Mbala mosusu bato oyo bazalaki pene na Noa bamonaki ete likambo moko te elingaki kosalema. Nzokande toyebi ete likambo lisalemaki mpenza. Mikolo yango, oyo eumelaki mwa ntango, ezalaki liboso ya kokokisama ya likambo moko monene, ‘mpela eyaki mpe elongolaki bango nyonso.’ Luka amonisi lisoló motindo moko oyo kati na yango Yesu akokanisaki “mikolo na Noa” na “mikolo na Mwana na moto.” Yesu apesaki likebisi oyo ete: “Ekozala lokola makambo oyo na mokolo ekomonana Mwana na moto.”​—Luka 17:26-30.

22. Mpo na nini tosengeli kotya likebi mingi mpenza likoló na esakweli ya Yesu na Matai mokapo 24?

22 Nyonso wana ezali na ndimbola monene mpo na biso mpamba te tozali kobika na ntango oyo tozali komona makambo Yesu asakolaki​—bitumba, koningana ya mabelé, maladi, nzala, mpe konyokolama ya bayekoli na ye. (Matai 24:7-9; Luka 21:10-12) Makambo yango mazali komonana uta etumba oyo ebongolaki lisoló ya mokili esalemaki, tolingi kolobela bongo Etumba ya liboso ya mokili mobimba, atako bato mingi batalelaka yango lokola ete ekeseni te na makambo mosusu ebimaka kati na lisoló ya bato. Nzokande, baklisto ya solo, bazali kososola ndimbola ya makambo wana minene, bobele lokola bato oyo bazalaka na bokɛngi bayebaka ete soki nzeté ya miwiti ebimisi nkasa, boye eleko ya molungé ekómi pene. Yesu apesaki lisusu toli oyo: “Wana ekomona bino makambo oyo kobima, bóyeba ete Bokonzi na Nzambe ezali penepene.”​—Luka 21:31.

23. Epai na banani Matai 24 ezali na ndimbola mingi mpenza?

23 Kati na eyano oyo apesaki likoló na Ngomba ya Olive, Yesu azalaki kolobela mingi mpenza bayekoli na ye. Bango nde basengelaki kosala mosala ya lobiko ya kosakola nsango malamu na mabelé mobimba liboso ete nsuka eya. Bango nde basengelaki kososola “Mbindo-na-Libebisi . . . kotɛlɛma na esika na bulɛɛ.” Bango basengelaki ‘kokima’ liboso ete bolɔ́zi monene eya. Mpe ezalaki mpenza mpo na bango nde maloba oyo mayebisamaki: “Soko mikolo yango iyei mikuse te mbɛ moto moko akobika te. Nde mpo na baponami, mikolo yango ikoya mikuse.” (Matai 24:9, 14-22) Kasi maloba oyo mazali na nguya ya kopusa moto na kokanisa malimboli nini mpenza, mpe mpo na nini tokoki koloba ete ezali kopesa biso moboko ya kozala na esengo mingi lisusu, na elikya, mpe na molende uta sikawa? Boyekoli bolandi ya Matai 24:22 ekopesa biso biyano na mituna oyo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bandakisa euti epai na Josèphe: Na ngomba Sinai minkalikali mpe nkaké “esakolaki ete Nzambe azali [pa·rou·siʹa] kuna.” Makamwisi oyo mabimaki na mongombo “mamonisaki kozala [pa·rou·siʹa] ya Nzambe.” Na kolakisáká mosaleli ya Elisa makálo oyo mazingelaki ye, Nzambe “amonisaki nguya mpe kozala [pa·rou·siʹa] na ye polele epai na mosaleli na ye.” Na ntango Petronius mokonzi ya Baloma alukaki kobondela Bayuda, Josèphe alobaki ete ‘Nzambe amonisaki Petronius kozala [pa·rou·siʹa] na ye’ na kotindáká mbula. Josèphe asalelaki te pa·rou·siʹa lokola bobele kobɛlɛma mpamba to koya mpo na mwa ntango moke. Elimboli kozala oyo ezali kokóba, oyo ezangi komonana. (Exode 20:18-21; 25:22; Levitike 16:2; 2 Mikonzi 6:15-17)​—Kokanisá na búku Antiquities of the Jews (Makambo ya kalakala ya Bayuda) Mokanda 3, mokapo 5, paragrafe 2 [80], mokapo 8, paragrafe 5, [202]; Mokanda 9, mokapo 4, paragrafe 3 [55]; Mokanda 18, mokapo 8, paragrafe 6 [284].

b Kati na búku A Critical Lexicon and Concordance to the English and Greek New Testament, E. W. Bullinger amonisi ete pa·rou·siʹa elimboli “kozala to kokóma kozala, na yango elimboli kozala, koya; kokóma oyo emonisi mpe likanisi ya kofanda libela.”

c Moko na bilembeteli emonisi ete ezali na liloba ya Liebele oyo ete “Nkombo,” ekomami na mobimba to na mokuse, mbala 19. Professeur Horward akomi ete: “Kotángama ya nkombo ya Nzambe kati na mokanda ya boklisto oyo Moyuda moko mobɛti-ntembe azongeli mwa ndambo ya maloba na yango ezali likambo moko ya kobenda likebi. Soki mokanda yango ya boklisto ebongolamaki na Liebele uta na Greke to na Latin, mbɛlɛ tokokaki komizela ete tómona nkombo adonai [Nkolo] kati na makomi na yango, kasi te elembo ya nkombo ya Nzambe YHWH, oyo ezali bongo nkombo ya ekila. . . . Ezali likambo ya kokamwa na komona ete abakisaki nkombo wana ya ekila. Elembeteli emonisi polele mpenza ete Shem-Tob azwaki makomi na ye wana ya Matai na nkombo ya Nzambe ekomamá kati na yango mpe ekoki mpenza kozala ete atikaki yango mpo ete amema ngambo te na kolongoláká yango.” Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau — avec références ezwi moboko ya kosalela nkombo ya Nzambe kati na Makomami ya Greke ya boklisto uta na Shem-Tob (J2).

Okoyanola lolenge nini?

◻ Mpo na nini ezali na ntina komona bokeseni oyo ezali kati na lolenge oyo ba Biblia ebongoli Matai 24:3?

◻ Pa·rou·siʹa elimboli nini, mpe mpo na nini tosengeli koluka koyeba yango?

◻ Bokokani nini ekoki kozala kati na Matai 24:3 na Greke mpe na Liebele?

◻ Likambo nini ya ntina mingi etaleli ntango tosengeli koyeba mpo na kososola Matai mokapo 24?

[Elilingi na lokasa 10]

Ngomba ya Olive, oyo Yelusaleme ezali na nsé na yango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto