Epafalɔditɔ—Motindami ya Bafilipi
PAULO akomaki epai na Bafilipi ete: “Bónyangela ye kati na Nkolo na esengo nyonso; bókumisa lolenge oyo na bato.” Na ntembe te tokozala na esengo soki mokɛngɛli moko moklisto alobi na ntina na biso maloba ya kokumisa lolenge oyo. (Bafilipi 2:29) Kasi Paulo azalaki kolobela nani? Mpe moto yango asalaki nini mpo ete azwa longonya monene boye?
Na motuna ya liboso eyano ezali ete Epafalɔditɔ. Mpo na motuna ya mibale, tiká tótalela makambo oyo matindaki Paulo na kokoma maloba wana.
Pene na mobu 58 T.B., Bafilipi bayokaki ete ntoma Paulo abendamaki na makasi na libándá ya tempelo mpe abɛtamaki mabe na bibele kati na Yelusaleme, akangamaki na bakonzi, mpe nsima ya kolekisa ntango na bolɔ́kɔ kozanga ete bákata likambo na ye, atindamaki na Loma kati na monyɔlɔ́lɔ. (Misala 21:27-33; 24:27; 27:1) Wana batungisamaki na ntina na ye, ekoki mpenza kozala ete bamitunaki soki bakokaki kosala nini mpo na ye. Na mosuni bazalaki na biloko mingi te mpe Paulo azalaki mosika, bongo bakokaki kopesa bobele lisalisi moke mpenza. Nzokande, mayoki ya bolingo oyo mapusaki Bafilipi na mbala ya liboso ete básunga ye kati na mosala na ye mazalaki naino; kútu mingi koleka, mpamba te azalaki kati na mpasi.—2 Bakolinti 8:1-4; Bafilipi 4:16.
Ekoki kozala ete Bafilipi batalelaki soki kati na bango moto moko akokaki komemela Paulo likabo na bango mpe kosunga ye kati na bosɛnga na ye. Kasi yango ezalaki mobémbo moko molai mpe ya kolɛmbisa mingi, mpe kosunga ye ekokaki kozala likámá! Joachim Gnilka amonisi ete: “Esengelaki kozala na mpiko mpo na kokenda kotala mokangami, mpe na koleka, moto oyo ‘mbeba’ na ye eyebisamaki mpenza polele te.” Mokomi Brian Rapske alobi ete: “Likámá mosusu ezalaki bongo ya kozala na boninga ya penepene elongo to ya komonisa boboto epai na mokangami to na makanisi na ye. . . . Liloba to likambo moko oyo etyamaki likebi te ekokaki komema na kufa bobele ya mokangami te kasi lisusu ya mosungi na ye.” Bafilipi bakokaki bongo kotinda nani?
Tokoki nokinoki kokanisa ete mobémbo motindo yango mokokaki kolamwisa bobangi mpe kozanga elikya, kasi Epafalɔditɔ (akeseni na Epafalo ya Kolose) amonisaki bolingo na ye mpo na kokokisa mokumba wana ya mpasi. Na kotaleláká nkombo na ye, oyo ekɔtisaki nkombo ya Aphrodite kati na yango, mbala mosusu azalaki mopakano oyo abongwanaki na losambo ya boklisto—abotamaki na baboti bamipesaki na nzambe-mwasi ya Bagreke mpo na bolingo mpe kobota. Ntango Paulo akomelaki Bafilipi mpo na kotɔ́nda bango mpo na bokabi na bango, na lolenge lobongi alobelaki Epafalɔditɔ lokola “ntoma mpe mosungi uta na bino mpo na bosɛnga na ngai.”—Bafilipi 2:25.
Na lisalisi ya makambo oyo Biblia ezali koloba na ntina na Epafalɔditɔ, tokoki kososola ete atako akumisamaki mpo na elimo na ye ya komipesa na bolingo nyonso kati na mosala wana mpo na Paulo mpe mpo na lisangá na ye moko, Epafalɔditɔ azalaki na mikakatano motindo moko na oyo tozali na yango lelo oyo. Tiká tótalela ndakisa na ye.
“Mosungi mpo na bosɛnga na ngai”
Toyebi mpenza makambo mingi te, kasi tokoki bobele kokanisa ete Epafalɔditɔ alɛmbaki mingi na mobémbo wana ekómaki ye na Loma. Ekoki kozala ete atambolaki na nzela ebéngami Via Egnatia, nzela moko ya Baloma oyo elekaki kati na Makedonia. Boye akatisaki Mai monene Adriatique na esika kálati ya mboka Italie emonani lokola “litindi” mpe na nsima alandaki na nzela ebéngami Voie Appienne kino na Loma. Ezalaki mobémbo molai (kilomɛ́tɛlɛ 1 200) oyo ekoki mpenza kozala ete ezwaki koleka sanza mobimba.—Talá etánda na lokasa 29.
Epafalɔditɔ azalaki na elimo nini ntango abandaki mobémbo na ye? Atindamaki mpo ete akokisa “lisungi,” to lei·tour·giʹa, epai na Paulo. (Bafilipi 2:30) Liloba wana ya Greke lizalaki kosalelama libosoliboso mpo na mosala oyo mwanamboka moko asali na bolingo na ye moko mpo na Letá. Na nsima, yango ekómaki kosalelama mpo na kolobela mosala oyo Letá asɛngaka na makasi epai na banamboka oyo bazali mpenza na makoki ya kokokisa yango. Na ntina na kosalelama ya liloba wana kati na Makomami ya Greke, nganga-mayele moko alobi ete: “Moklisto azali moto oyo azali kosala mosala mpo na Nzambe mpe mpo na bato, libosoliboso, mpo ete alingi kosala bongo, na motema na ye mobimba, mpe ya mibale, mpo ete apusami na kosala bongo, mpamba te bolingo ya Klisto epusi ye na kosala bongo.” Ee, oyo nde elimo malamu mpenza Epafalɔditɔ amonisaki!
‘Atye bomoi na ye na likámá’
Kosaleláká liloba moko oyo ekamatami na elobeli ya masano ya mbongo, Paulo alobi ete Epafalɔditɔ ‘atyaki [pa·ra·bo·leu·saʹme·nos] bomoi na ye na likámá,’ to na ndimbola mpenza ya liloba, “atekaki” bomoi na ye mpo na mosala ya Klisto. (Bafilipi 2:30) Tosengeli te kokanisa ete Epafalɔditɔ asalaki likambo moko ya bozoba; nzokande, kokokisama ya mosala na ye ya bulɛɛ ezalaki na makámá. Mbala mosusu alukaki kokokisa mokumba wana ya kopesa lisungi na eleko mabe ya mbula? Alukaki nde kokokisa yango nsima ya kobɛla na nzela kati na mobémbo na ye? Ata ndenge nini, Epafalɔditɔ “abɛlaki solo, penepene na kufa mpenza.” Ekoki kozala ete asengelaki kotikala mwa ntango molai elongo na Paulo mpo na kosunga ye, yango emonani polele ete ntoma alingaki komonisa ntina oyo Epafalɔditɔ asengelaki kozonga nokinoki.—Bafilipi 2:27.
Nzokande, Epafalɔditɔ azalaki moto moko ya mpiko mingi oyo azalaki na bolingo malamu ya komitya na likámá mpo na kopesa lisungi epai na baoyo bazali kati na bosɛnga.
Tokoki komituna biso moko ete, ‘Na meko nini namipimelaka mpo na kosunga bandeko na ngai oyo bazali kati na mpasi?’ Elimo ya bolingo malamu motindo yango ezali te liponi ya baklisto bango moko. Yesu alobaki ete: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete, Bólinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingi bino.” (Yoane 13:34) Epafalɔditɔ akokisaki mosala na ye “pene na kufa mpenza.” Epafalɔditɔ azali bongo ndakisa ya moto oyo azalaki na “elimo” oyo Paulo alendisaki Bafilipi ete bázala na yango. (Bafilipi 2:5, 8, 30, Kingdom Interlinear) Tosili komibongisa mpo na kosala bongo?
Nzokande, Epafalɔditɔ anyokwamaki na makanisi. Mpo na nini?
Mpasi ya makanisi oyo abɛlaki
Omitya yo moko na esika ya Epafalɔditɔ. Paulo alobaki ete: “Alingaki mingi ete amona bino nyonso mpe ayoki mawa ete boyoki ete abɛlaki malali.” (Bafilipi 2:26) Epafalɔditɔ ayebaki ete bandeko ya lisangá na ye bayokaki ete abɛlaki mpe azalaki na makoki te ya kosunga Paulo na lolenge oyo balikyaki yango. Ya solo, ekoki kozala ete Paulo amitungisaki na ntina na kolɔngɔ́nɔ́ ya Epafalɔditɔ. Luka, monganga, moninga ya Paulo asengelaki nde kotika misala misusu mpo na kobatela Epafalɔditɔ?—Bafilipi 2:27, 28; Bakolose 4:14.
Mbala mosusu mpo na yango, Epafalɔditɔ anyokwamaki na mpasi ya makanisi. Ekoki kozala ete akanisaki ete bandeko ya lisangá na ye batalelaki ye lokola moto oyo azali na makoki te. Azalaki mbala mosusu na mayoki ya komema ngambo mpe “alingaki mingi” komona bango mpo na kondimisa bango bosembo na ye. Paulo asalelaki liloba makasi ya Greke, a·de·mo·neʹo, “koyoka mawa,” mpo na kolobela ezalela ya Epafalɔditɔ. Engebene nganga-mayele J. B. Lightfoot, liloba wana likoki komonisa “ezalela ya mobulungano, kozanga mpɔngi, kokoka te kotya likebi na likambo moko, oyo eutaka na motungisi kati na nzoto, to na mpasi na motema, lokola mawa, nsɔ́ni, kozanga kolónga, bongo na bongo.” Esika mosusu oyo liloba yango lisalelami kati na Makomami ya Greke ezali na boyokani na mpasi oyo Yesu ayokaki kati na elanga ya Getesemane liboso na kufa na ye.—Matai 26:37.
Paulo akómaki na bosukisi oyo ete likambo lileki malamu lizalaki bongo kozongisa Epafalɔditɔ epai na Bafilipi elongo na nkomá oyo ezali kolimbola ntina oyo motindami na bango azongi nokinoki. Wana alobaki ete, “Nakanisi mpe ete natindela bino Epafalɔditɔ,” Paulo ye moko andimaki mokumba ya bozongi na ye, kolongoláká bongo likanisi nyonso ete Epafalɔditɔ azangaki kolónga. (Bafilipi 2:25) Na kokesana, Epafalɔditɔ azalaki pene na kufa mpo na kokokisa mokumba na ye! Paulo alendisaki bango na esengo nyonso ete “bányangela ye kati na Nkolo na esengo nyonso; bákumisa lolenge oyo na bato. Mpo ete abɛlɛmi na kufa mpo na mosala na Klisto, ɛɛ atye bomoi na ye na likamba [“likámá,” NW] ete asukisa lisungi na bino epai na ngai.”—Bafilipi 2:29, 30.
“Bókumisa lolenge oyo na bato”
Mibali mpe basi oyo bazali na elimo motindo moko na Epafalɔditɔ babongi solo kokumisama. Bamipimelaka makambo mingi mpo bákoka kosala mosala ya bulɛɛ. Kanisá na ntina na baoyo bamipesi ete bákoka kosala mosika na mboka na bango lokola bamisionere, bakɛngɛli-batamboli, to basáli ya bolingo malamu na bafiliale ya la Société Watch Tower. Soki bobangé to kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto epekisi basusu kosala sikawa oyo bazalaki kosala liboso, babongi kozwa limemya mpe kolingama mingi mpo na bambula mingi ya mosala ya sembo oyo basili kosala.
Nzokande, bokɔnɔ oyo elongolaka moto makoki nyonso ya kosala ekoki kozala ntina ya mpasi ya makanisi to ya mayoki ya ngambo. Tokoki kozala na mposa ya kosala mingi. Ezali solo likambo ya komitungisa! Baoyo nyonso bazali kati na ezalela motindo oyo bakoki kozwa liteya na ndakisa ya Epafalɔditɔ. Bongo, ezalaki nde libunga na ye soki abɛlaki? Soko moke te! (Genese 3:17-19; Baloma 5:12) Epafalɔditɔ azalaki na mposa ya kosalela Nzambe mpe bandeko na ye, kasi bokɔnɔ epesaki ye nzela te.
Paulo apamelaki Epafalɔditɔ te na ntina na mpasi na ye kasi ayebisaki Bafilipi ete bázala penepene na ye. Bobele bongo, tosengeli kobɔndisa bandeko na biso na ntango balɛmbi na motema. Mingi tokoki kokumisa bango mpo na ndakisa malamu ya mosala ya sembo oyo basalaki. Likambo oyo ete Paulo akumisaki Epafalɔditɔ, kolobáká malamu mpenza na ntina na ye, ekokaki kobɔndisa ye, kokitisa mwa moke mpasi na ye ya makanisi. Biso mpe tokoki komindimisa ete ‘Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na biso mpe bolingo bosili biso kotalisa na nkombo na ye, awa esalelaki biso babulami mpe tozali naino kosalela bango.’—Baebele 6:10.
[Etanda na lokasa 29]
Mpasi ya mobémbo
Na mikolo na biso, kosala mobémbo katikati na bingumba minene mibale ya Mpótó, lokola oyo Epafalɔditɔ asalaki, ekoki kosɛnga milende mingi te. Mobémbo yango mokoki kosalema na esengo nyonso kati na mpɛpo na boumeli ya ngonga moko to ngonga mibale. Yango ezalaki likambo mosusu kosala mobémbo motindo yango na ekeke ya liboso. Na eleko wana, kotambola longwa na esika moko mpo na kokenda na esika mosusu mosika ezalaki likambo ya mpasi. Motamboli na makolo akokaki kosala kati na kilomɛ́tɛlɛ 30 mpe 35 na mokolo moko, wana amitiki na mpiɔ, moi makasi mpe makámá mosusu, bakisa mpe likámá ya “babɔtɔli.”—2 Bakolinti 11:26.
Ezali boni mpo na bisika ya kolala na butu mpe ya kosomba biloko na nzela?
Michelangelo Cagiano de Azevedo, mokomi na makambo na kala amonisi ete na banzela nyonso ya Baloma, “ezalaki na mansiones, balɔtɛlɛ ya solosolo, elongo na magazini, bibɔkwelo ya banyama, mpe bandako mpo na basáli na yango; kati na ba mansiones mibale, ezalaki na ba mutationes, to bisika ya kopema, epai moto akoki kosomba bampunda mosusu to makálo mpe kosombitinya biloko.” Balɔtɛlɛ yango ezalaki na lokumu mabe mpamba te bato ya etamboli mabe bazalaki kokɔta kuna. Longola likambo ya koyiba biloko ya basáli-mobémbo, bankóló-lɔtɛlɛ bazalaki mbala mingi kobakisa mosolo na kozwáká oyo ezalaki kouta epai na basi ya pite. Juvenal, mokomi ya maloba ya kotyola na Latin alobi ete bato nyonso oyo basengelaki kofanda kati na lɔtɛlɛ lolenge yango basengelaki “kolala penepene na basáli na mabe, na basáli na masúwa, miyibi, mpe baombo oyo bazali kokima, pene na babomi bato mpe basáli sanduku ya bibembe. . . . Kɔ́pɔ moko ezalaki kosalelama na moto nyonso; moto moko te azalaki na mbeto na ye moko, to na mesa na ye moko.” Bakomi mosusu ya ntango ya kala bazalaki komilela na ntina na mai ya komɛla oyo ezalaki mabe mpe na bilalelo mabe, oyo etondaki na bato, ezalaki bosɔtɔ, na mpiɔ mpe etondi na kinsekwa.
Karte/Bililingi na lokasa 27]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Rome
[Elilingi]
Mosáli-mobémbo na ntango ya Baloma ya kala
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Kálati: Ngomba Molai. Copyright. 1995 Digital Wisdom, Inc.; Mosáli-mobembo: Da originale del Museo della Civiltà Romana, Rome