Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/9 nk. 19-24
  • Tótosaka mibeko ya Klisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótosaka mibeko ya Klisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kati na libota
  • Kati na lisangá
  • Bankulutu basalelaka mibeko ya Klisto
  • Tótosaka mibeko ya Klisto
  • Mibeko ya Klisto mizali kosala mosala na yango!
  • Mibeko ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bolingo mpe bosembo na lisangá ya bokristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Zwá biyano na mituna oyo
    Programɛ Liyangani ya zongazonga—Elongo na momonisi ya Betele 2017-2018
  • Yehova azali kosɛnga biso nini lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/9 nk. 19-24

Tótosaka mibeko ya Klisto

“Bókumbanaka mikumba [“bozito,” “NW”] na mawa, boye bokokokisa Mobeko na Klisto.”​—BAGALATIA 6:2.

1. Mpo na nini tokoki koloba ete mibeko ya Klisto mizali na nguya monene ya kopusa bato ete básala oyo ezali malamu lelo oyo?

NA RWANDA, Batatoli ya Yehova Bahutu mpe Batutsi batyaki bomoi na bango na likámá mpo na kobatelana moko na mosusu na kobomana monene kati na bato ya bitulúká wana, oyo eutaki kosalema kala mingi te na mboka yango. Na Kobe, na Japon, Batatoli ya Yehova oyo basangani ya mabota na bango bakufaki na koningana monene ya mabelé batungisamaki mingi mpo na yango. Nzokande, basalaki nokinoki mpo na kobikisa bato mosusu oyo bazwamaki kati na likámá yango. Ɛɛ, bandakisa ya kolendisa oyo euti na mokili mobimba emonisi ete mibeko ya Klisto mizali mpenza kosala mosala na yango lelo oyo. Ezali nguya makasi oyo ezali kopusa bango na kosala makambo malamu.

2. Lolenge nini boklisto ya nkombo mpamba ezangi kososola mibeko ya Klisto, mpe tokoki kosala nini mpo na kokokisa mibeko yango?

2 Bobele na ntango yango, bisakweli ya Biblia na ntina na “mikolo na nsuka” mpe ya mpasi ezali kokokana. Mingi bazali na “lolenge na kosambela” kasi “bazali koangana nguya na yango.” (2 Timoté 3:1, 5) Mingi mpenza kati na boklisto ya nkombo mpamba, lingomba ezali bobele elembo, losambo na bango eutaka na motema te. Ezali mpo ete kotosa mibeko ya Klisto ezali likambo ya mpasi? Te. Yesu akokaki te kopesa biso mibeko oyo mikokaki kozala mpasi mpo na biso kotosa yango. Boklisto ya nkombo mpamba esosoli mibeko yango malamu te. Elandi te maloba oyo mapemami: “Bókumbanaka mikumba [“bozito,” NW] na mawa, boye bokokokisa Mobeko na Klisto.” (Bagalatia 6:2) Tozali ‘kokokisa mibeko ya Klisto’ na kokumbanáká bozito, kasi te na kobakisáká mibeko mizangi moboko likoló na bozito ya bandeko na biso, lokola Bafalisai bazalaki kosala yango.

3. (a) Wapi mwa mitindá oyo mikɔtisami kati na mibeko ya Klisto? (b) Mpo na nini ezali libunga koloba ete lisangá ya boklisto esengeli kozala na malako mosusu te bobele mitindá ya sikisiki ya Klisto?

3 Kati na mibeko ya Klisto tozali kokuta mitindá nyonso ya Yesu Klisto​—ezala na ntina na kosakola mpe koteya, kobatela ezaleli ya kotalela makambo na lolenge ya pɛto mpe na lolenge ezangi mindɔndɔ, kosala makasi mpo na kobatela kimya elongo na bazalani na biso, to na kolongola mbindo kati na lisangá. (Matai 5:27-30; 18:15-17; 28:19, 20; Emoniseli 2:14-16) Ya solo, baklisto basengeli kotosa mitindá nyonso ya Biblia oyo etaleli bayekoli ya Klisto. Mpe ezali na makambo mosusu. Lisangá ya Yehova na mobimba na yango, mpe lisangá mokomoko, esengeli kotya malako mabongi mpe kokamata bibongiseli mpo ete makambo nyonso matambola na molɔngɔ́. (1 Bakolinti 14:33, 40) Baklisto mbɛlɛ bakokoka koyangana esika moko te soki malako mapesami te mpo na oyo etali ntango, esika, mpe lolenge ya kosala makita yango! (Baebele 10:24, 25) Na kosaláká engebene malako mabongi oyo bandeko bazali na mikumba batii yango kati na lisangá ezali mpe lolenge moko ya kotosa mibeko ya Klisto.​—Baebele 13:17.

4. Eloko nini ezali nguya ya kopusa bato oyo bazali kati na losambo ya solo?

4 Nzokande, Baklisto ya solo bakotika soko moke te ete losambo na bango ekóma ebongiseli ya mibeko mizangi ntina. Bazali kosalela Yehova bobele te mpo ete moto moko to lisangá nde eyebisi bango ete básala bongo. Bolingo nde ezali nguya oyo ezali kotindika biso. Paulo akomaki ete: “Bolingo ya Kristo ezali kopusa biso.” (2 Bakolinti 5:14, Bondeko ya Sika) Yesu apesaki bayekoli na ye etindá ete bálingana moko na mosusu. (Yoane 15:12, 13) Bolingo ya komipesa ezali moboko ya mibeko ya Klisto, mpe ezali kopusa to kotindika baklisto ya solo bipai nyonso bazali, ezala kati na libota to kati na lisangá. Tiká tótalela naino lolenge yango esalaka.

Kati na libota

5. (a) Lolenge nini baboti bakoki kokokisa mibeko ya Klisto kati na ndako? (b) Bana bazali na mposa ya nini oyo esengeli kouta epai na baboti na bango, mpe mikakatano nini baboti mosusu basengeli kolónga yango mpo na kokokisela bango mposa yango?

5 Ntoma Paulo akomaki ete: “Bino babali, bólingaka basi na bino pelamoko Klisto alingaki Lingomba mpe amipesaki ye moko mpo na bango.” (Baefese 5:25) Wana mobali azali komekola Klisto mpe azali kosalela mwasi na ye na bolingo nyonso mpe na komityáká na esika na ye, azali kokokisa lolenge moko ya ntina mingi ya mibeko ya Klisto. Lisusu, Yesu amonisaki polele bolingo ya motema oyo azalaki na yango mpo na bana mike, komemáká bango na mabɔkɔ na ye, kotyáká mabɔkɔ na ye likoló na bango, mpe kopamboláká bango. (Malako 10:16) Baboti oyo bazali kokokisa mibeko ya Klisto bamonisaka mpe bolingo ya motema mpo na bana na bango. Ya solo, ezali na baboti oyo bazalaka na mokakatano ya komekola ndakisa ya Yesu kati na likambo yango. Basusu bamesaná te komonisa mayoki na bango polele. Baboti, bótika te ete makanisi motindo wana mápekisa bino komonisela bana na bino bolingo oyo bozali na yango epai na bango! Ekoki te bobele ete yo moko oyeba ete olingaka bana na yo. Bango mpe basengeli koyeba yango. Mpe, bakoyeba yango te soki oluki te ndenge nini komonisela bango yango.​—Kokanisá na Malako 1:11.

6. (a) Bana bazali nde na mposa ya mibeko ya baboti, mpe mpo nini oyanoli bongo? (b) Bana basengeli kososola ete mibeko oyo mizali kotyama kati na ndako mizwi moboko na yango likoló na nini? (c) Makámá nini tokopɛngola soki mibeko ya Klisto mizali kosalelama kati na ndako?

6 Bobele na ntango yango, bana bazali na mposa ya litambwisi, yango elimboli ete baboti na bango basengeli kotya mibeko mpe na bantango mosusu kotosisa mibeko yango na kopesáká bango disipilini. (Baebele 12:7, 9, 11) Atako bongo, baboti basengeli kosalisa bana na bango mokemoke mpo ete bámona ntina oyo mpo na yango mibeko wana mityami: ete baboti na bango balingaka bango. Mpe basengeli koyekola ete bolingo ezali ntina ya liboso mpenza mpo na yango basengeli kotosa baboti na bango. (Baefese 6:1; Bakolose 3:20; 1 Yoane 5:3) Moboti oyo ayebi kososola akomityela mokano ya koteya bana ete básalela “nguya ya kososola” na bango mpo ete na mikolo mizali koya bákóma na likoki ya kozwa bikateli malamu bango moko. (Baloma 12:1, NW; kokanisá na 1 Bakolinti 13:11.) Epai mosusu, mibeko misengeli kozala mingi te to mpe disipilini esengeli kozala ya makasi koleka te. Paulo alobaki ete: “Bino batata, bótumolaka bana na bino te na ntina ete bálɛmba na mitema te.” (Bakolose 3:21; Baefese 6:4) Wana mibeko ya Klisto mizali kosala mosala na yango kati na ndako, disipilini ekopesama te na nkanda nyonso to na kofingáká bana. Kati na ndako motindo wana, bana bakomiyoka ete bazali na libateli mpe bazali kolendisama, kasi te lokola ete batyameli bozito to balɛmbisami.​—Kokanisá na Nzembo 36:7.

7. Na lolenge nini bandako ya Betele ezali kopesa ndakisa mpo na oyo etali kotya mibeko kati na ndako?

7 Baoyo basilá kotala bandako ya Betele kati na mokili mobimba balobaka ete Betele ezali ndakisa malamu ya bokatikati mpo na oyo etali kotya mibeko kati na libota. Atako mikóló nde bafandaka kuna, kasi kati na bandako yango makambo matambwisamaka lokola kati na mabota.a Misala mingi misalemaka na Betele mpe yango esɛngaka ete mwa ndambo ebongi ya malako mátyama​—na ntembe te, malako yango mazali mingi koleka oyo ekoki kotyama kati na libota mokomoko. Atako bongo, bankulutu oyo bazali kokamba misala kati na bandako ya Betele, na biro, mpe misala mitali bonyati mikanda, basalaka makasi ete básalela mibeko ya Klisto. Batalelaka ete mokumba na bango ezali te bobele ya kotambwisa misala, kasi ezali mpe ya kolendisa bokóli na elimo mpe “kimya na [Yehova]” kati na bandeko oyo bazali kosala na bango elongo. (Nehemia 8:10) Na yango, basalaka makasi ete bátambwisa makambo na lolenge malamu mpe ya kolendisa mpe basalaka molende ete bázala na makambo makasi te. (Baefese 4:31, 32) Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete mabota ya Betele mayebani mingi mpo na elimo na yango ya esengo!

Kati na lisangá

8. (a) Nini esengeli kozala mokano na biso ntango nyonso kati na lisangá? (b) Kati na makambo nini basusu basɛngaki ete bátyela bango mibeko to balukaki bango moko kotyela yango mibeko?

8 Kati na lisangá mpe, mokano na biso ezali ya kolendisana moko na mosusu na elimo ya bolingo. (1 Batesaloniki 5:11) Na yango, baklisto nyonso basengeli kosɛnzɛla ete bábakisela basusu bozito te, na kopusáká basusu ete bándima makanisi na bango kati na makambo oyo masɛngi ekateli ya moto na moto. Na bantango mosusu, basusu batindaka nkomá na la Société mpo na kosɛnga ete báyebisa bango mibeko mitali makambo lokola oyo ete, lolenge nini basengeli kotalela mwa bafilme mosusu ya sikisiki, babúku, ata mpe biloko oyo bana basakanaka na yango. Nzokande, la Société azali na lotómo te ya kotalela na bozindo makambo motindo oyo mpe kobimisa bikateli likoló na yango. Mingi mpenza, wana ezali makambo oyo moto na moto to mokambi ya libota mokomoko asengeli kozwela yango ekateli oyo ezwi moboko na yango likoló na bolingo ya mitindá ya Biblia. Basusu babongolaka makanisi mpe toli oyo la Société apesaka likoló na lolenge ya kotambwisa makambo, na kokómisaka yango mibeko. Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mársi 1996, ezalaki na lisoló moko kitoko oyo ezalaki kolendisa bankulutu ete básalaka mosala ya kotala bampate kati na lisangá. Mokano na yango ezalaki nde ya kotya mibeko? Te. Atako baoyo bazali na likoki ya kosalela makanisi wana bazali kozwa matomba, kasi bankulutu mosusu bazali na likoki te ya kosalela yango. Bobele bongo, lisoló ya “Mituna ya batángi” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Apríli 1995 ebendaki likebi na biso likoló na likambo oyo ete tosengeli kopɛngola kobebisa lokumu ya libaku ya batisimo na kolekisáká ndelo na mayoki, na ndakisa na kosaláká bilambo to na komonisáká bilembo ya bolóngi. Basusu balekisaki ndelo mpo na oyo etali kosalelama ya toli malamu wana, kobimisáká kútu mobeko ete kotinda mwa nkomá ya kolendisa na mpo na libaku wana ezali mabe!

9. Mpo na nini ezali na ntina ete tópɛngola ezaleli ya kotɔ́ngatɔnga mpe ya kosambisana moko na mosusu?

9 Tótalela mpe likambo oyo ete, soki “mibeko na bonsomi” mizali kosala mosala na yango kati na biso, tosengeli kondima ete masosoli ya baklisto nyonso makokani te. (Yakobo 1:25) Tosengeli kobulunganisama soki bato basali maponi kati na makambo mataleli bango moko, oyo ebuki mitindá ya Makomami te? Te. Kosala bongo ekobimisa bokabwani. (1 Bakolinti 1:10) Wana Paulo apesaki biso likebisi ete tósambisaka baninga na biso bandimi te, alobaki ete: “Ye akotɛlɛma soko akokwea bobele na miso na [nkolo] na ye moko. Nde akotɛlɛma mpenza, zambi Nkolo ayebi kotɛmisa ye.” (Baloma 14:4) Tokoki kosilikisa Yehova soki tozali kolobana mabe moko na mosusu likoló na makambo oyo mataleli lisosoli ya moto na moto.​—Yakobo 4:10-12.

10. Banani bapesameli mokumba ya kokɛngɛla lisangá, mpe lolenge nini tosengeli kosunga bango?

10 Tómikundola mpe ete, bankulutu bapesameli mokumba ya kosɛnzɛla likoló na etongá ya Nzambe. (Misala 20:28) Bazali wana mpo na kosunga biso. Tosengeli kokakatana te mpo na kobɛlɛma epai na bango mpo na koluka toli, mpamba te bazali bayekoli ya Biblia mpe bayebi malamu makambo oyo malobelami kati na mikanda ya la Société Watch Tower. Wana bankulutu bamoni etamboli oyo ekoki mpenza komema na kobukama ya mitindá ya Makomami, bakopesa toli oyo esengeli, kozanga kobanga. (Bagalatia 6:1) Basangani ya lisangá bazali kolanda mibeko ya Klisto na kosaláká na bomoko elongo na babateli na bampate wana ya bolingo, oyo bazali bakambi kati na bango.​—Baebele 13:7.

Bankulutu basalelaka mibeko ya Klisto

11. Lolenge nini bankulutu bazali kosalela mibeko ya Klisto kati na lisangá?

11 Bankulutu basalaka na molende mpo na kokokisa mibeko ya Klisto kati na lisangá. Bazali kopesa ndakisa kati na mosala ya kosakola nsango malamu, bazali koteya na kosaleláká Biblia mpo na kosimba mitema, mpe, lokola babateli na mpate ya bolingo, ya boboto, bazali koloba epai na “milimo minyokwami.” (1 Batesaloniki 5:14, NW) Bapɛngolaka ezaleli oyo eyokani te na bomoto ya boklisto, oyo ezali komonana kati na boklisto ya nkombo mpamba. Ya solo, mokili oyo mozali kobeba nokinoki, mpe lokola Paulo, bankulutu bakoki komitungisa mpo na etongá; kasi bazali kobatela bokatikati na bango na ntango bazali kosilisa mitungisi wana.​—2 Bakolinti 11:28.

12. Wana moklisto akei kosɛnga lisalisi epai na nkulutu moko, lolenge nini nkulutu yango akopesa lisungi na ye?

12 Na ndakisa, moklisto akoki kolinga kosolola na nkulutu moko likoló na likambo moko ya ntina mingi oyo Makomami malobeli yango polele te to oyo ezali kosɛnga kotalela mitindá mikeseni ya Boklisto. Ekoki kozala ete basili komatisa ye ebonga na kompanyi, mpe yango ezali na lifuti mingi kasi ezali mokumba monene. To tata oyo azali mondimi te akoki kosɛnga na mwana na ye oyo azali elenge moklisto makambo mingi oyo makoki kolɛmbisa mosala na ye ya Nzambe. Kati na makambo motindo wana, nkulutu akopɛngola kopesa makanisi na ye moko. Na esika ete asala bongo, na ntembe te, akofungola Biblia mpe akosalisa moklisto yango ete asosola mitindá oyo mitaleli likambo yango. Akoki kosalela Index des publications de la Société Watch Tower, soki ezali, mpo na koluka koyeba oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” asili koloba likoló na likambo yango kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to kati na mikanda mosusu mikolimbolaka Biblia. (Matai 24:45) Kasi ekozala boni soki na nsima moklisto yango azwi ekateli oyo nkulutu wana amoni ete ezali ya mayele te? Soki ekateli yango ebuki mpenza mitindá to mibeko ya Biblia te, moklisto yango akomona ete nkulutu wana ayebi malamu lotómo oyo moto na moto azali na yango ya kokamata ekateli motindo wana, awa ayebi ete: “Moto na moto akomema bozito [“mokumba,” NW] na ye moko.” Nzokande, moklisto yango asengeli komikundola ete, “soko moto akokóna nini, akobuka bobele yango.”​—Bagalatia 6:5, 7.

13. Na esika ete bápesa eyano mbala moko na mituna oyo mitunami, to bápesa makanisi na bango moko, mpo na nini bankulutu basungaka basusu ete básosola makambo?

13 Mpo na nini nkulutu oyo ameseni mpenza na mosala na ye akoki kosala bongo? Mpo na bantina mibale. Ya liboso, Paulo ayebisaki epai na lisangá moko ete azalaki te “nkolo likoló na kondima na bango.” (2 Bakolinti 1:24, NW) Wana nkulutu azali kosunga ndeko na ye ete asosola Makomami mpe akamata ekateli na ye moko nsima ya koyeba malamu na mabe, azali komekola ezaleli ya Paulo. Ayebi ete lotómo na ye ezali na ndelo, bobele lokola Yesu andimaki lotómo na ye ezalaki na ndelo. (Luka 12:13, 14; Yuda 9) Bobele na ntango yango, bankulutu bazalaka pene na kopesa toli ya ntina, ata mpe ya makasi, oyo euti na Makomami, soki yango esengeli. Ya mibale, azali kobongisa moninga na ye moklisto. Ntoma Paulo alobaki ete: “Kasi bilei makasi izali mpo na bato bakómi minene [“bakɔmeli,” NW]; mpo na bango basili kolakisa esoswelo na bango kokabola kati na malamu mpe mabe.” (Baebele 5:14) Na yango, mpo na kokɔmela, tosengeli kosalela nguya na biso moko ya bososoli, kotyáká ntango nyonso motema te na moto mosusu ete apesa biso biyano. Wana azali kolakisa moninga na ye moklisto lolenge ya kososola kati na Makomami, nkulutu azali kosalisa ye ete akóla.

14. Lolenge nini bandeko oyo bakɔmeli bamonisaka ete bazali kotya motema epai na Yehova?

14 Tokoki kondimisama ete Yehova Nzambe, na nzela ya elimo santu na ye, akosala bopusi likoló na mitema ya basambeli na ye ya solo. Na yango, baklisto bakɔmeli basimbaka mitema ya bandeko na bango, na kobondeláká bango, lokola ntoma Paulo asalaki yango. (2 Bakolinti 8:8; 10:1; Filemona 8, 9) Paulo ayebaki ete ezali mingi mpenza bato bazangi boyengebene nde bazali na mposa ya mibeko mingi mpo na kosala ete bátambola na molɔngɔ́, kasi bayengebene bazali na mposa ya mibeko mingimingi te. (1 Timoté 1:9) Amonisaki te ezaleli ya kokanisela basusu mabe to ya kozanga kondimela basusu, kasi azalaki kondima bandeko na ye. Akomelaki lisangá moko ete: “Tosili kondima na Nkolo mpo na bino.” (2 Batesaloniki 3:4) Na ntembe te, kondima ya Paulo, kotyela basusu elikya, mpe kotyela basusu motema ekokisaki mokumba monene mpo na kopusa baklisto wana na mosala. Lelo oyo, bankulutu mpe bakɛngɛli batamboli bazali na mikano motindo moko. Mibali wana ya sembo bazali mpenza bato na maloba ya kokitisa motema!​—Yisaya 32:1, 2; 1 Petelo 5:1-3.

Tótosaka mibeko ya Klisto

15. Wapi mwa mituna oyo tokoki komituna mpo na koyeba soki tozali kosalela mibeko ya Klisto kati na boyokani na biso elongo na bandeko?

15 Biso banso tosengeli komitalela mbala na mbala mpo na koyeba soki tozali kotosa mibeko ya Klisto mpe soki tozali kolendisa yango. (2 Bakolinti 13:5) Ya solo, biso nyonso tokoki kozwa litomba soki tomituni ete: ‘Nazali na maloba ya kolendisa to ya kotɔ́ngatɔnga? Nazali na bokatikati to nalekisaka ndelo? Nandimaka basusu to nalingaka bobele ete ntómo na ngai ekokisama?’ Moklisto alukaka te kopusa ndeko na ye na makasi mpo na oyo asengeli kosala to mpo na oyo asengeli kosala te liboso na makambo oyo malobelami polele te kati na Makomami.​—Baloma 12:1; 1 Bakolinti 4:6.

16. Lolenge nini tokoki kosalisa baoyo bazalaka na makanisi mabe likoló na bango moko, kokokisáká bongo likambo moko ya ntina mingi kati na mibeko ya Klisto?

16 Na eleko oyo ya mpasi, ezali na ntina mpo na biso ete tóluka ndenge ya kolendisana moko na mosusu. (Baebele 10:24, 25; kokanisá na Matai 7:1-5.) Wana tozali kotalela bandeko na biso mibali mpe basi, bizaleli na bango ya malamu bizali na ntina mingi epai na biso koleka bolɛmbu na bango, boye te? Na miso ya Yehova, moto nyonso azali na motuya. Likambo ya mawa ezali ete, bato nyonso te nde bazalaka na likanisi wana, ata mpo na bango moko te. Mingi bazalaka na momeseno ya komona bobele mabe mpe kozanga kokoka na bango moko. Mpo na kolendisa bato motindo wana​—mpe basusu​—tokoki kosolola na moko to mibale na bango na ntango ya likita mokomoko, koyebisáká bango mpo na nini totalelaka koya na bango na makita na motuya mpenza mpe lisungi ya ntina mingi oyo bapesaka na lisangá, boye te? Oyo nde esengo tokoki kozwa na kokitisáká bozito na bango na motindo wana mpe na kokokisáká bongo mibeko na Klisto.​—Bagalatia 6:2.

Mibeko ya Klisto mizali kosala mosala na yango!

17. Na mitindo nini mikeseni ozali komona ete mibeko ya Klisto mizali kosala mosala na yango kati na lisangá na bino?

17 Mibeko ya Klisto mizali kosala mosala na yango kati na lisangá ya boklisto. Tozali komona yango mokolo na mokolo​—wana baninga na biso bazali kosakola nsango malamu na molende nyonso, wana bazali kobɔndisa mpe kolendisana moko na mosusu, wana bazali kosala makasi mpo na kosalela Yehova atako bazali kokutana na makambo ya mpasi mingi, wana baboti bazali kosala makasi mpo na kobɔkɔla bana na bango ete bálinga Yehova na mitema ya esengo, wana bakɛngɛli bazali koteya Liloba ya Nzambe na bolingo mpe na mɔ́tɔ nyonso, kopusáká etongá ete bázala na molende ya kosalela Yehova mpo na libela. (Matai 28:19, 20; 1 Batesaloniki 5:11, 14) Wana mokomoko na biso azali kosalela mibeko ya Klisto kati na bomoi na ye, yango esepelisaka mpenza motema ya Yehova! (Masese 23:15) Mposa na ye ezali ete bato nyonso oyo balingaka mobeko na ye ya kokoka bázala na bomoi ya libela na libela. Na Paladiso oyo ekoya, ekozala ntango oyo tokomona ete bato bakokóma na ezaleli ya kokoka, ntango oyo babuki na mibeko bakozala te, mpe ntango oyo mposa nyonso ya mitema na biso ekotambwisama na lolenge malamu. Oyo nde mbano monene mpo na baoyo bazali kotosa mibeko ya Klisto!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bandako motindo wana ekokani te na bamonastɛrɛ ya boklisto ya nkombo mpamba. Ba “abbés,” to ba “mon père” bazalaka kuna te. (Matai 23:9) Bandeko oyo bazali na mikumba bapesameli limemya, kasi mosala na bango motambwisami na mitindá oyo mitambwisaka bankulutu nyonso.

Okanisi nini?

◻ Lolenge nini baklisto ya nkombo mpamba basosoli te ntina ya mibeko ya Klisto?

◻ Lolenge nini tokoki kosalela mibeko ya Klisto kati na libota?

◻ Mpo na kosalela mibeko ya Klisto kati na lisangá, tosengeli kopɛngola eloko nini, mpe tosengeli kosala nini?

◻ Lolenge nini bankulutu bakoki kotosa mibeko ya Klisto kati na boyokani na bango elongo na basangani ya lisangá?

[Elilingi na lokasa 23]

Mwana na yo azali na mposa monene ya bolingo na yo

[Elilingi na lokasa 24]

Babateli ya mpate bazali mpenza bato na maloba ya kokitisa motema!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto