Milulu ya libala oyo mikumisaka Yehova
Lisoló Oyo, Na Ntina Na Mabala Ya Boklisto, Libongisamaki Libosoliboso Na Lokóta Amharique Na Mboka Éthiopie Mpo Na Kopesa Malako Mabongi Na Bato Mingi Ya Mokili Yango Oyo Kala Mingi Te Bauti Kokóma Batatoli Ya Yehova. Lisoló Yango Lizali Kolobela Mimeseno Mpe Misala Ya Mboka Yango Oyo Mikoki Kokesana Na Mimeseno Ya Esika Ofandi. Mbala Mosusu Okosepela Mingi Na Bokeseni Yango. Nzokande, Lisoló Oyo Lizali Kopesa Batoli Ya Bokatikati Euti Na Biblia Oyo Okomona Ete Ekoki Kosalelama Na Mboka Na Bino Atako Mimeseno Ya Molulu Ya Libala Na Mboka Na Bino Ekeseni Na Oyo Ya Éthiopie.
MOTÓ na lisoló moko kitoko ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yulí 1985 ezalaki “Libala ezali molulu ya esengo epai na baklisto.” Lisoló lilandaki ya nimero yango ezalaki na motó na likambo “Ndenge nini kosepela na bokatikati na elambo ya libala.” (Mpo na baoyo bazali komibongisa mpo na libala, toli mosusu ya mayele ezali kati na búku Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo, mokapo ya mibale, mpe búku Votre jeunesse—Comment en tirer le meilleur parti, mikapo 19 mpe 20.)a Bato mingi bakómaki Batatoli ya Yehova nsima ya kobimisama ya masoló wana, na yango tolingi kozongela mwa makambo mosusu oyo makoki mpenza kosalelama na mboka na biso, na makambo mosusu ya ntina oyo makoki kosalisa biso na kokómisa milulu ya libala mabaku ya kokumisa Yehova, Mobandisi ya libala.
Motuna oyo tosengeli liboso kotalela molobi boye: “Libala lisengeli kosalema na eleko nini?” Mokolo ya libala mosengeli koponama engebene bileko ya mabala oyo bityami na momeseno ya bonkɔkɔ? Na bisika mosusu ezalaka na biyambayamba ete mabala nyonso oyo masalemi na eleko mosusu ya mbula makolónga te. Yango ezali bongo biyambayamba ya mpamba, mpamba te babalani mingi oyo bazali lelo kosalela Yehova na esengo mpe na bomoko babalanaki te na eleko etyami na mimeseno ya bonkɔkɔ. Tondimaka likambo ya makila malamu to makila mabe te. (Yisaya 65:11; Bakolose 2:8) Tokopesa nzela te na bandeko na biso ya mosuni ete bámona bokeseni kati na solo mpe lokuta soki totye mokolo ya libala na biso na boyokani na biyambayamba na bango. Ya solo, baklisto bakoki kobala ata na sanza nini ya mobu.
Ntango lisukúlu ya libala libongisami nsima ya milulu ya bokomisi libala na Letá, ekozala likambo ya mayele te kotika ete mikolo mingi mileka kati na bibongiseli wana mibale. Soki babalani balingi ete lisukúlu ya libala lipesama na Ndako ya Bokonzi, basengeli kokutana na bankulutu mikolo mingi liboso mpo na kosɛnga ndingisa ya kosalela Ndako ya Bokonzi. Bankulutu basengeli komindimisa ete bibongiseli ya milulu yango bikotungisa lisosoli na bango te. Esengeli kopona ntango oyo ekobebisa bibongiseli ya lisangá te. Ndeko mobali oyo aponami mpo na kosala lisukúlu ya libala akokutana liboso na mobali mpe mwasi oyo bakobalana mpo na kopesa bango toli oyo ekosunga bango mpe mpo na kondimisama ete mitindá ya bizaleli malamu to mibeko ya mboka epekisi libala yango te mpe soki andimi bibongiseli nyonso ya bokutani to ya elambo oyo ekosalema na nsima. Lisukúlu ya libala esengeli koumela miniti ntuku misato mpe ekosalema na limemya nyonso, kotyáká likebi mingi na makambo ya elimo. Lisukúlu ya libala eleki elambo nyonso oyo ekoki kosalema nsima na yango.
Libala ya baklisto ezali libaku malamu mpo na komonisa ete tozali “bato na mokili te.” (Yoane 17:14; Yakobo 1:27) Makambo nyonso masengeli kosalema na mobulu te. Yango elingi koloba ete tosengeli kotosa ngonga na esika ete bato bazelaka, mbala mosusu kobulunganisáká bibongiseli ya lisangá. Yango ezali mpenza likambo oyo mwasi oyo akobala asengeli kotyela likebi, mpamba te bandeko na ye ya mosuni bakoki kotinda ye ete aya nsima ya ngonga oyo etyami—lokola nde yango ekotombola motuya na ye. Na kokómáká na ntango malamu, ndeko mwasi moklisto oyo akɔmɛli akomonisa ete bizaleli ya elimo, lokola komikitisa mpe limemya, bizali na ntina mingi na miso na ye! Lisusu, ntango mokangi-fɔtɔ́ abyangami na libaku yango, ezali na ntina mingi ete mobulu mozala te. Ekozala malamu ete tósɛnga na mokangi-fɔtɔ́ ete alata kazaka, kalavati, patalo ya malamu mpe ete abulunganisa lisukúlu te wana azali kokanga fɔtɔ́. Basengeli te kokanga fɔtɔ́ na ntango ya libondeli. Etamboli na biso oyo ezangi mobulu ekokumisa Yehova mpe ekopesa litatoli malamu mpenza. Ntina ezali te ya kolanda mimeseno ya mboka oyo ekoki mpenza kobebisa ndimbola ya elambo.
Kosala elambo ezali lisɛngami te mpo ete libala likoka kolónga, nzokande Makomami mapekisi te kosala ebongiseli mpo na kosepela. Atako bongo, bokutani motindo yango kati na baklisto ya solo esengeli kokesana na bilambo ya bato ya mokili oyo bizalaka na makambo ya kolekisa ndelo, ya komela mingi, na kolekisa ndelo na kolya, miziki ya makasi, mabina ya nsɔ́ni, mpe ata bitumba. Biblia etángi “bilambo ya lokoso” kati na misala ya nzoto. (Bagalatia 5:21) Ezalaka mpasi te kokamba makambo malamu soki bokutani ezali na bato mingi te. Ntina ezali te ya kotya hema mpo na komiyokanisa na mimeseno ya mboka. Soki basusu bamoni malamu kosalela hema mpo na kozwa esika malamu to mpo na komibatela na moi to mbula, yango ezali likambo na bango moko.
Makambo oyo masalemaki liboso mazali komonisa ete mwango malamu ya kotya ndelo na motángo ya babyangami ezali bongo kopesa moto na moto lokasa ya libyangi. Ezali likambo ya mayele kobyanga moto na moto na esika ya kobyanga masangá mobimba, mpe lokola tozali baklisto oyo batosaka molɔngɔ́, tosengeli kotosa motángo yango. Nkasa ya libyangi ekosalisa mpe biso na kopɛngola mitungisi oyo ekoki kobima soki moto moko oyo abimisami na lisangá ayei na elambo, mpamba te soki akɔti, bandeko mibali mpe bandeko basi mingi bakoki kotika elambo. (1 Bakolinti 5:9-11) Soki babalani ya sika babyangi bandeko ya mosuni to bayebani na bango, na ntembe te basengeli kozala mingi te, kopesáká bongo ntina mingi na baoyo bazali “bandeko na biso kati na kondima.” (Bagalatia 6:10) Basusu bamonaki malamu kobyanga bayebani to bandeko ya mosuni bobele na lisukúlu ya libala kasi na elambo te. Mpo na nini? Mpamba te, na mabaku mosusu bandeko ya mosuni babimisaki matáta na bilambo ya libala na boye ete bandeko mibali mpe bandeko basi bamonaki ete bakokaki te kotikala wana. Babalani mosusu babongisaki bobele mwa bokutani moke mpo na kolya elongo na basangani ya libota mpe baninga mosusu baklisto.
Na boyokani na Yoane 2:8, 9, ezali malamu kopona ‘kapita na elambo.’ Mobali oyo akobala akosepela kopona moklisto moko oyo bakoki kotyela motema mpo asɛnzɛla ete mobulu mozala te mpe mitindá mitombwani mitosama. Epai kuna baninga bapesaka makabo, yango esengeli kosalema kozanga “nzombo na bizaleli.” (1 Yoane 2:16) Bakoki kotya miziki ya kosepelisa oyo ezali na maloba ya mbindo te, na makɛlɛlɛ makasi te, to na ebeteli ya makasi mpe te. Bandeko mingi bamonaki malamu ete nkulutu moko ayoka liboso miziki oyo bakotya na elambo. Mabina makoki mpe kozala motambo, mpamba te mabina mingi ya bonkɔkɔ mauti na mabina oyo mazalaki kosalelama na milulu ya kobota mpe mazali kolamusa mposa ya nzoto. Mbala mosusu “ntango ya kolya gato mpe komela champagne” ezalaka mpo na bato ya mokili ntango ya kolekisa ndelo. Ya solo, babalani baklisto mingi bazwaki ekateli ya kosalela te masanga makasi na bilambo ya libala na bango, mpe na yango bapɛngolaki mikakatano.
Lokola tolingi kokumisa Yehova, tokoboya nzombo ya kobenda likebi mingi likoló na biso moko. Ata mikanda ya mokili mizali kokweisa elimo ya kosala makambo na mindɔndɔ́ mingi. Ekozala mayele te soki babalani bamikɔtisi na nyongo monene mpo na kobongisa elambo monene mpe na nsima basengeli komipimela na boumeli ya bambula mingi mpo bákoka kofuta nyongo ya mokolo bobele moko! Ya solo, bilamba nyonso oyo bakolata mokolo yango esengeli kozala na bopɔlɔ mpe bibongisami malamu, oyo ebongi na bato oyo bazali koyambola ete bandimaka Nzambe. (1 Timoté 2:9, 10) Lisoló “Milulu ya libala ya baklisto bisengeli komonisa bokatikati” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augústo 1970, ebimeli ya Lifalanse) eyebisaki makambo oyo na ntina na molato:
“Mpo na moto, libala lizali libaku ya ntina mingi, yango wana mbala mingi likebi lipesamaka mpo na komonana na esengo mpe kitoko. Nzokande, yango elingi koloba te ete osengeli kolata bobele lolenge moko ya robe to ya kazaka ya sipesiale. Osengeli kotalela malamumalamu mimeseno ya mboka na bino, makoki na yo mpe molato oyo ekosepelisa yo. . . . Kasi, ekozala nde likambo ya mayele kosomba kazaka ya motuya mingi na boye ete omityela bozito monene to otya yango likoló na basusu? . . . Basi mosusu basepelaki kosalela robe ya moninga moko ya motema to ya ndeko moko ya mosuni. Basusu basepelaki mingi kotonga to kotongisa bango moko molato na bango ya libala, mbala mosusu na motindo boye ete yango ekómaki elamba oyo bakokaki kosalela yango na mabaku mosusu ya nsima. Ezali likambo libongi ete babalani bakumisa elambo ya libala na bango na kolatáká bilamba na bango bileki kitoko oyo bazalaka na yango . . . Basusu oyo bazalaki na likoki ya kosala elambo monene basepelaki kosala ‘elambo moke’ mpamba te mikolo mizali mabe.”
Bobele bongo, ezali na ntina te ete etuluku oyo ezali kolanda babalani (baninga ya mobali mpe mwasi oyo babali) ekoka kozala na bato ebele. Bango mpe basengeli te koluka kobenda likebi mingi likoló na bango na molato mpe na makambo bazali kosala. Atako ekoki kondimama ete moto oyo abimisami na lisangá azala na lisukúlu ya libala na Ndako ya Bokonzi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yulí 1985 elobi ete: “Ekobonga te ete bato oyo babimá na lisangá to bato mosusu oyo bazali kotɛmɛla mitindá ya Biblia, bázala na elambo ya libala.”
Atako Yesu akendaki na elambo ya libala, tokoki kokanisa te ete alingaki kondima ete milɔngɔ́ ya mituka mitambola na engumba na makɛlɛlɛ mingi. Kútu, mbala mosusu bapolisi bafutisaki basɔfɛ́lɛ lomande mpo ete batyaki makɛlɛlɛ mingi na nkembi ya libala. (Talá Matai 22:21.) Na nyonso oyo, na esika ya komekola nzombo to mitindo ya makambo ya bato na bikólo ya mokili oyo, baklisto basengeli komonisa mayele oyo ezali na basɔkɛmi.—Masese 11:2.
Kasi ebongi nde kokenda na bilambo ya libala ya baninga ya penepene, ya baninga ya mosala oyo bazali bato na mokili, to bandeko mosusu ya mosuni mpe bayebani? Moklisto mokomoko asengeli kokamata ekateli na likambo yango. Tosengeli kobosana te ete ntango na biso ezali na motuya mingi, mpamba te tozali na mposa na yango mpo na kosakola, koyekola biso moko, mpo na libota mpe makambo mosusu ya lisangá. (Baefese 5:15, 16) Na nsuka ya pɔ́sɔ, tozalaka na makita mpe na mosala ya kosakola oyo tolingaka te kozangisa yango. (Baebele 10:24, 25) Ngonga oyo etyamaka na mabala mingi ebebisaka manáka ya bibongiseli ya mayangani to ya bibongiseli ya sipesiale mpo na mosala ya kosakola na ntango ya Elambo ya mpokwa ya Nkolo. Tosengeli te kotika nzela ete likebi na biso elongwa na milende oyo bandeko ya mokili mobimba bazali kosala mpo na koyangana na Elambo ya mpokwa ya Nkolo. Liboso ete tokóma na boyebi ya solo, tolekisaki ntango mingi elongo na bato ya mokili, mbala mosusu kati na makambo oyo mazalaki kotyola Nzambe. (1 Petelo 4:3, 4) Sikawa makambo oyo tozali kotalela na ntina mingi mazali lisusu lolenge yango te. Likoki lizalaka ntango nyonso ya kotombela longonya na babalani oyo bazali bato ya mokili na kotindeláká bango kálati to na kolekáká mokolo mosusu kotala bango mpo na mwa ntango moke. Basusu basalelaki libaku yango mpo na kopesa litatoli, batángaki mwa mikapo ya Makomami oyo mibongi na babalani ya sika.
Libala oyo kati na yango makambo ya elimo matyami liboso na bizaleli ya mokili ekokumisa solo Yehova. Wana bazali kosala makasi mpo na kozala bato ya mokili te na biyambayamba na yango mpe kolekisa ndelo na yango, mpe wana bazali kotikela yango nzela te ete ebebisa bibongiseli ya Teokrasi, mpe wana bamonisi ezaleli ya bopɔlɔ na esika ya nzombo, baklisto bakosepela na libaku wana. Lisusu, bakokoka kokanisa libaku yango kozanga kotungisama na lisosoli mpe ekozala suvenire malamu. Wana ezali yango komonisa mayele mpe bokatikati, tiká ete mabala nyonso ya baklisto mápesa litatoli epai na bato na mitema sembo oyo bazali komona yango.
[Maloba na nse ya lokasa]]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Elilingi na lokasa 24, 24]
Baklisto balandaka bilandela te momeseno nyonso ya bonkɔkɔ oyo mitali milulu ya libala