LISOLO YA BOYEKOLI 51
LOYEMBO 132 Sikoyo tokómi moto moko
Ndenge ya kobongisa libala oyo ekokumisa Yehova
“Makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.”—1 KO. 14:40.
NA MOKUSE
Ndenge oyo bakristo oyo bazali kobalana bakoki kokumisa Yehova na mokolo ya libala na bango.
1-2. Yehova alingaka nini mpo na mokolo ya libala?
OKOBALA mosika te? Soki boye, topesi yo longonya! Na ntembe te, ozali kosala makambo mingi mpo na kobongisa libala na yo. Yehova mpe azali kosepela na yango. Alingi ete osepela na mokolo ya libalaa na yo mpe bózala na esengo nsima ya libala.—Mas. 5:18; Loy. 3:11.
2 Ezali na ntina ete mokolo ya libala na bino ekumisa Yehova. Mpo na nini tolobi bongo? Mpe ndenge nini bokoki kosala yango? Lisolo oyo elobeli libosoliboso baoyo bazali kobongisa libala, kasi mitinda oyo ezali awa ekoki kosalisa biso nyonso tókumisa Yehova soki babengisi biso na libala, to soki basɛngi biso toli na likambo yango.
MPO NA NINI KOLUKA KOKUMISA YEHOVA?
3. Likambo nini mwasi ná mobali oyo bazali kobongisa libala basengeli kotalela, mpe mpo na nini?
3 Mwasi ná mobali oyo bazali kobongisa libala basengeli kosala makambo na boyokani na mitinda oyo Yehova apesi na Liloba na ye. Mpo na nini? Mpo Yehova azali Mobandisi ya libala. Abongisaki libala ya liboso, ya Adama ná Eva. (Eba. 1:28; 2:24) Na yango, baoyo bazali kobongisa libala basengeli libosoliboso kolanda makanisi ya Nzambe.
4. Wapi ntina mosusu oyo mwasi ná mobali basengeli kopesa Yehova lokumu na mokolo ya libala na bango?
4 Ntina mosusu ya monene oyo osengeli kotalela makanisi ya Yehova mpo na mokolo ya libala na yo ezali ete Yehova azali Tata na yo ya likoló mpe Moninga na yo oyo aleki malamu. (Ebr. 12:9) Na ntembe te, mposa na yo ezali ete boninga yango ekoba. Na yango, okolinga te eloko moko oyo ekopesa Moninga na yo Yehova mpasi esalema na mokolo yango to kutu na mokolo mosusu. (Nz. 25:14) Soki okanisi makambo nyonso oyo Yehova asalelá yo mpe oyo akosalela yo, omoni te ete ebongi opesa ye lokumu na mokolo ya libala na yo?—Nz. 116:12.
NDENGE NINI BOKOKI KOKUMISA YEHOVA?
5. Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa mwasi ná mobali oyo bazali kobongisa libala?
5 Biblia epesi te liste ya mibeko mpo na milulu ya libala ya bakristo to bafɛti oyo ekoki kosalema nsima. Na yango, babalani basalaka makambo oyo eyokani na bomoi na bango, mimeseno ya mboka, mpe mposa na bango. Longola yango, bakristo ya solo balandaka mibeko ya Leta mpo na libala. (Mat. 22:21) Atako bongo, Biblia ezali na mitinda oyo ekoki kosalisa mwasi ná mobali oyo bazali kobongisa libala básala libala oyo ekokumisa Yehova mpe ekopesa ye esengo. Mitinda nini bosengeli kobosana te?
6. Mpo na nini ezali na ntina mwasi ná mobali bátosa mibeko ya Leta mpo na libala?
6 Bótosa mibeko ya Leta. (Rom. 13:1, 2) Na bikólo mingi, mwasi ná mobali basengeli kotosa mibeko mosusu ya Leta liboso bábalana. Basengeli koluka koyeba mibeko nini esɛngami esika bafandi. Soki ozali na mposa ya lisalisi na likambo yango, okoki kosolola na bankulutu.b
7. Makambo nini ekoki kosalisa mpo libala ezala ya lokumu?
7 Bósala makasi mpo nyonso eleka na ndenge ya lokumu. (1 Ko. 10:31, 32) Mposa na bino ezali ete makambo oyo ekosalema emonisa mbuma ya elimo ya Nzambe, kasi te elimo ya mokili. (Gal. 5:19-26) Na boyokani na etinda ya Biblia oyo etali ebongiseli ya bokonzi, mobali nde azali na mokumba ya kosala nyonso mpo mokolo ya libala epesa esengo mpe ezala ya lokumu. Nini ekoki kosalisa? Diskur ya libala oyo esimbami na Biblia mpe oyo esalemi na bolingo, na esengo, mpe na lokumu esalisaka bato bámemya ebongiseli ya libala oyo Nzambe atyá. Bato nyonso bakozwa matomba mpo diskur yango ekosalisa bango bámona ete molulu yango ya libala ezali lisɛki te. Yango wana, babalani bakristo mingi balingaka ete diskur yango esalema na Ndako ya Bokonzi, soki likoki ezali. Soki bolingi esalema na Ndako ya Bokonzi, bosengeli kokomela lisangani ya bankulutu mokanda mwa ntango liboso.
8. Nini ekoki kosalisa mpo makambo oyo ekosalema na fɛti ezala ya lokumu? (Baroma 13:13)
8 Tángá Baroma 13:13. Soki boponi kosala fɛti, bokoki kosala nini mpo emonisa elimo ya mokili te? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami “bafɛti ya lokoso” ezalaki komonisa bokutani epai bato bazalaki komɛla mingi mpe miziki ezalaki kobɛta tii butu makasi. Na yango, soki boponi kopesa bato masanga na fɛti na bino, bózwa bibongiseli mpo moto te amɛla mingi.c Soki miziki ekobɛta, volimi ezala na ndenge oyo ekopesa bato nzela ya kobɛta masolo. Lisusu, bópona malamu miziki oyo ekotyama mpe bótalela maloba na yango mpo ebɛtisa moto libaku te.
9. Makambo nini babalani basengeli kolandela na oyo etali maloba to masano na fɛti na bango?
9 Ekozala na bato oyo bakoloba mwa makambo, bokolakisa bafɔtɔ, bavideo, to bokosala masano na fɛti? Makambo yango ekoki kobakisa eloko ya kitoko na fɛti. Kasi, bosengeli komindimisa ete makambo oyo ekoleka ekolendisa bato. (Flp. 4:8) Omituna boye: ‘Ekomonisa limemya epai ya basusu? Ekokumisa ebongiseli ya libala?’ Mpe koleka nyonso: ‘Ekokumisa Yehova?’ Ata soki mwa masɛki ekoki kozala malamu, bóboya likambo nyonso oyo ebongi te, na ndakisa maloba oyo ekotinda bato bákanisa makambo ya kosangisa nzoto. (Ef. 5:3) Bómindimisa ete bandeko ya libota mpe baninga oyo bakoloba mwa maloba bayebi makambo oyo bolingi mpe bakotosa yango.
10. Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli kozala na bopɔlɔ ntango bazali kobongisa libala na bango? (1 Yoane 2:15-17)
10 Bózala na bopɔlɔ. (Tángá 1 Yoane 2:15-17.) Yehova asepelaka ntango basaleli na ye basalaka makasi mpo na kokumisa ye na esika ya kobenda likebi nyonso kaka epai na bango moko. Na yango, bakristo oyo bazali na bopɔlɔ bakoboya kobimisa mbongo mingi koleka ndelo mpe “kolakisa na lolendo” biloko oyo bazali na yango. Bolamu nini bokozwa soki bosali fɛti ya mindɔndɔ te? Mbala mosusu ekokokana na oyo ya Mike, ndeko mobali moko ya Norvège. Alobi boye: “Lokola toboyaki kokɔta nyongo, tokobaki mosala ya mobongisi-nzela. Fɛti ya libala na biso ezalaki mindɔndɔ te, kasi elekaki malamu mpe etiká suvenire ya malamu.” Tabitha, ndeko mwasi moko ya Inde, alobi boye: “Toboyaki mitungisi ebeleebele. Lokola tolingaki fɛti ya mindɔndɔ te, makambo ya kobongisa mpe kobendana ezalaki mingi te.”
Ata soki tofandi wapi, libala ya bakristo ekoki komonisa bopɔlɔ, kozala kitoko, mpe kotika basuvenire ya malamu (Talá paragrafe 10-11)
11. Ndenge nini mwasi ná mobali ya libala bakoki komonisa bopɔlɔ? (Talá mpe bililingi.)
11 Bosili kopona bilamba oyo bokolata? Na ntembe te, bozali na mposa ya kobima kitoko mpenza. Ata na ntango ya kala, mwasi ná mobali ya libala bazalaki kotya likebi na ndenge oyo bakomonana na miso ya bato. (Yis. 61:10) Ya solo, molato na bino na mokolo ya libala ekoki kokesana na lolenge moko boye na oyo ya mabaku mosusu, kasi esengeli kaka komonisa bopɔlɔ. (1 Tim. 2:9) Bótika te ete bilamba to mpe biloko mosusu ya mokili ekóma eloko oyo eleki ntina na mokolo ya libala na bino.—1 Pe. 3:3, 4.
12. Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli koboya mimeseno nyonso ya libala oyo eyokani te na mitinda ya Biblia?
12 Bóboya mimeseno oyo eyokani te na Biblia. (Em. 18:4) Mokili ya Satana ekɔtisá mimeseno ya bapakano, misala ya bilimo mabe mpe biyambayamba na makambo ya libala. Yehova akebisi biso polele ete tózala mosika na makambo wana ya mbindo. (2 Ko. 6:14-17) Soki ozali na ntembe mpo na mimeseno to makambo mosusu ya bonkɔkɔ ya mboka na bino, salá bolukiluki mpo oyeba esika eutá mpe talelá yango na kolanda mitinda ya Biblia mpo oyeba oyo wapi okoki kokɔtisa na libala na bino.
13. Ndenge nini mwasi ná mobali bakoki komekola Yehova na oyo etali bakado?
13 Na esika ofandi, ezalaka momeseno ete bato oyo babengisami na fɛti bápesa babalani kado? Soki bongo, kado oyo bato mosusu bakopesa ekotalela mbala mosusu mbongo oyo bazali na yango. Ya solo, Biblia elendisi bakristo bápesaka, mpe kosala bongo epesaka bango esengo. (Mas. 11:25; Mis. 20:35) Kasi, tosengeli te kosala ete bato oyo tobengisi na fɛti bámona ete basengeli kaka komema kado; tosengeli mpe te kotinda bango bámona ete tokolinga te kado oyo ezali na valɛrɛ moke. Lokola tomekolaka Yehova, tozalaka na botɔndi mpo na eloko oyo bapesi biso, totikaka basusu bápesa na kolanda makoki mpe motema na bango.—2 Ko. 9:7.
NDENGE YA KOBOYA MPE KOLONGA MIKAKATANO
14. Mikakatano nini babalani mosusu bakutanaka na yango?
14 Bokoki kokutana na mikakatano ntango bolingi kobongisa libala oyo ekokumisa Yehova. Na ndakisa, bokoki komona ete ezali mpasi kosala fɛti ya libala ya moke. Charlie, ndeko mobali moko ya Îles Salomon, alobi boye: “Ezalaki mpasi mpenza kopona bato ya kobengisa. Tozali na baninga ebele, mpe na mboka na biso, moto nyonso alingaka ete bábengisa ye!” Tabitha, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Epai nafandaka, bato basalaka kaka bafɛti ya minene. Ezwaki ntango mpo baboti na biso bándima ekateli na biso ya kobengisa kaka bato soki 100.” Sarah, ndeko mwasi moko ya Inde, alobi boye: “Bato mosusu batyaka likebi na mbongo oyo libota ezali na yango. Bana ya bandeko ya tata na ngai basalaki bafɛti ya minene ya libala, na yango nazalaki komona lokola ngai mpe nasengeli kosala fɛti ya monene koleka.” Nini ekoki kosalisa bino bólonga makambo wana mpe mikakatano mosusu?
15. Mpo na nini kobondela ezali na ntina ntango bozali kobongisa libala?
15 Bóbondela mingi mpo na baprogramɛ oyo bozali kosala. Bokoki koyebisa Yehova mokakatano nyonso oyo bokutani na yango to mayoki oyo bozali na yango. (Flp. 4:6, 7) Bokoki kosɛnga ye asalisa bino mpo bózwa bikateli ya malamu, bózala na motema ya kokita ntango bozali komitungisa, mpe bómonisa mpiko na ntango oyo esengeli. (1 Pe. 5:7) Bokotyela Yehova motema mingi ntango bomoni ndenge oyo azali kosalisa bino. Tabitha alobi boye: “Ngai ná fianse na ngai tozalaki kolinga te ete tóbendana biso mibale mpe na bato ya mabota na biso. Na yango, mbala nyonso oyo tozalaki kolobela bibongiseli ya libala na biso, tozalaki kobanda na libondeli. Tomonaki mpenza lobɔkɔ ya Yehova mpe masolo yango ezalaki koleka na kimya.”
16-17. Ndenge nini kosolola malamu ekoki kosalisa na ntango ya kobongisa libala?
16 Bósolola polele mpe na limemya. (Mas. 15:22) Bino mibale oyo bokobalana nde bokozwa bikateli mingi mpo na libala na bino. Na ndakisa dati, mbongo oyo bokobimisa, bato oyo bokobengisa, mpe makambo mosusu mingi. Liboso ya kozwa ekateli, bótalela elongo makambo oyo bokoki kopona, mitinda ya Biblia, mpe toli nyonso oyo bakristo oyo bakɔmɛli na elimo bapesaki bino. Ntango bozali koyebisa makambo oyo bolingi, bózala na boboto, bómitya na esika ya basusu, mpe bótingama kaka na makanisi na bino te. Soki bandeko ya libota ya pene, na ndakisa, baboti na bino, basɛngi makambo mosusu oyo ezali mabe te, bómeka kosala oyo basɛngi mpo na kopesa bango lokumu. Libala na bino ezali mpe likambo monene mpo na bango. Soki bokokoka te kosala oyo basɛngi, bólimbwela bango na boboto bantina oyo bozali na yango. (Kol. 4:6) Bóyebisa bato ya mabota na bino polele ete mokano na bino ya libosoliboso ezali ya kosala fɛti ya esengo oyo ekokumisa Yehova.
17 Koyebisa baboti bikateli oyo bozwi ekoki kozala mpasi, mingimingi soki bazali Batatoli ya Yehova te, kasi bokoki kolonga. Santhosh, ndeko mobali moko ya Inde, alobi boye: “Bato ya mabota na biso balingaki tósala milulu ndenge na ndenge ya Lingomba ya Hindu. Ezwaki ngai ná fianse na ngai ntango mingi mpo na kolimbwela bango bikateli na biso. Kasi tondimaki kosala makambo mosusu oyo basɛngaki ntango tomonaki ete ekopesa Yehova mpasi te. Na ndakisa, tolongolaki bilei oyo biso toponaki kotya na fɛti mpe totyaki oyo ekosepelisa bango; tolongolaki mpe miziki ná kobina mpo bamesanaki na makambo yango te.”
18. Nini ekoki kosalisa mpo makambo eleka malamu na fɛti ya libala? (1 Bakorinti 14:40) (Talá mpe elilingi.)
18 Bóbongisa makambo malamu. Soki bobongisi makambo malamu, mitungisi ekozala mingi te mokolo ya libala na bino. (Tángá 1 Bakorinti 14:40.) Wayne, ndeko mobali moko ya Taïwan, alobi boye: “Mwa mikolo liboso ya libala na biso, tosalaki likita elongo na bandeko nyonso oyo bakosala na fɛti. Tolobelaki bibongiseli oyo tozwaki mpe tosalaki bilakiseli ya makambo mosusu mpo nyonso eleka malamu kuna.” Lisusu, mpo na komonisa limemya epai ya bato oyo bobengisi, bósala nyonso bótosa ngonga na makambo nyonso.
Kobongisa makambo malamu liboso ekoki kosalisa mpo nyonso elaka malamu (Talá paragrafe 18)
19. Nini ekosalisa mpo makambo oyo ekosalema na fɛti ya libala na bino ezala kaka oyo bobongisaki?
19 Bokoki kokima mikakatano mingi soki bokanisi makambo mosusu liboso. (Mas. 22:3) Na ndakisa, soki na mboka na bino bato bayaka na fɛti ata soki babengisi bango te, bókanisa oyo bokoki kosala mpo likambo yango esalema te. Bósalisa bandeko nyonso ya libota oyo bazali Batatoli te báyeba ndenge oyo makambo ekoleka, mpe bóyebisa bango makanisi na bino mpo na makambo mosusu ya bonkɔkɔ oyo bato basalaka na libala. Bokoki kolakisa bango lisolo “Makambo esalemaka ndenge nini na fɛti ya libala ya Batatoli ya Yehova?” oyo ezali na jw.org. Mpo makambo oyo ekosalema elekisa ndelo te, bokoki kotya ndeko oyo akɔmɛli na elimo mpo azala “mokambi ya fɛti.” (Yoa. 2:8) Soki boyebisi ye polele bibongiseli oyo bozwi, akoki kosalisa bino mpo fɛti ya libala na bino esalema na ndenge ya lokumu mpe eyokana na oyo bobongisaki.
20. Likambo nini mwasi ná mobali basengeli kobosana te mpo na fɛti ya libala na bango?
20 Mbala mosusu motó ekoki koswa ntango bokanisi nyonso oyo esengeli kosala mpo na kobongisa libala na bino. Kasi, bóbosana te ete fɛti ya libala ezalaka kaka mokolo moko. Ezali ebandeli ya bomoi kitoko oyo bokosalela Yehova elongo. Bósala makasi mpo libala na bino ezala mindɔndɔ te mpe ekumisa Yehova. Bótyela Yehova motema. Mpe na lisalisi na ye, bokolonga kobongisa libala oyo, soki bokanisi yango nsima ya mikolo, ekopesa bino esengo mpe ekozongisela bino basuvenire ya malamu.—Nz. 37:3, 4.
LOYEMBO 107 Ndakisa ya bolingo ya Nzambe
a NDIMBOLA YA MALOBA: Na bisika mingi, libala ezali molulu epai mwasi ná mobali basalaka elako liboso ya Nzambe. Na nsima, fɛti ekoki kosalema. Ata na bisika mosusu oyo basalaka mpenza molulu ya monene te to fɛti ya libala, mwasi ná mobali bakoki kaka kotalela mitinda ya Biblia mpo na mokolo ya libala na bango.
b Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali ndenge bakristo batalelaka mibeko ya Leta na oyo etali libala, talá lisolo “Mabala oyo esalemi na lokumu na miso ya Nzambe mpe ya bato” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/2006.
c Talá na jw.org video Nasengeli kopesa basusu masanga?