Kotyelama motema kati na mokili ya kozanga kokoka
“MALAMU oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosalaka bobele yango.” Omonaka ete maloba wana mazali solo mpo na yo? Zwá elendiseli na koyebáká ete ntoma Paulo azalaki mpe na mokakatano lolenge yango; atako bongo azalaki moklisto ya bosembo mingi. Yango ezali bongolabongola? Kati na mokanda na ye atindelaki baklisto ya Loma, Paulo alobelaki mokakatano yango: “Na bongo, soko nakosala yango elingi ngai te, ezali ngai moto oyo akosalaka bongo te kasi masumu mazali kofanda kati na ngai.” Masumu nini azalaki kolobela, mpe lolenge nini alongaki yango na boye ete azala moto ya bosembo?—Baloma 7:19, 20.
Mwa moke liboso kati na mokanda na ye, Paulo akomaki: “Mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” “Moto moko” yango ezalaki Adama. (Baloma 5:12, 14) Kozanga kokoka oyo bato basangolaki eutaki na lisumu ya Adama—lisumu ya moto ya liboso, Adama—mpe yango wana kozala sembo ezali mpenza etumba monene.
Likanisi ya Paulo mpo na “lisumu ya liboso,” lolenge yango ebéngamaka, endimami na bato nyonso te lelo oyo mpamba te lisoló ya Biblia na ntina na kozalisama esili koboyama na banganga-mayele ya teoloji mpe na esika na yango bazali kondima liteya ya evolisyó. Komantere moko esalami na mikolo na biso likoló na Baloma 5:12-14 elobi ete: “Banganga-mayele basili kobwaka mokapo yango mobimba pembeni.” Nzokande esili koleka mbula nkámá, bakomantere ya Biblia elobaki na kolongobana mpenza ete “ntango Adama asalaki lisumu . . . alekisaki lisumu yango mpe mbuma mabe na yango epai na bakitani na ye nyonso.”a
Ebandeli ya kobungisa bosembo
Lolenge moko bato mingi lelo oyo bazali kowangana ete Adama, moto ya liboso azalaka na bomoi te, sé bongo bazali koboya kondima Satana Zabolo, mpe bazali kotalela ye lokola moto ya lisapo mpamba.b Kasi moto monene lokola Yesu Klisto ayebisi biso ete Satana “atɛlɛmi kati na solo te,” na maloba mosusu, azangaki sembo. (Yoane 8:44) Mpe ezali na bopusi ya Satana nde Adama na Eva, mwasi na ye, batɛmɛlaki Yehova mpe babungisaki bosembo ntango bamekamaki.—Genese 3:1-19.
Lokola biso banso tozali bakitani ya Adama, biso banso tosangolaki mposa ya kosala masumu. Salomo, moto na mayele alobaki ete: “Moyengebene azali kati na mokili te oyo akosalaka bobele malamu mpe akobunga te.” (Mosakoli 7:20) Atako bongo, moto nyonso akoki kozala oyo abongi na kotyelama motema. Lolenge nini yango ekoki kosalema? Mpamba te esɛngi te ete liboso moto azala naino na kokoka bongo na nsima azala sembo.
Moboko ya bosembo
Davidi, Mokonzi ya Yisalaele asalaki mabunga mingi, kati na yango ekobo na ye na Bata-seba oyo emonisami na bilembeteli mingi. (2 Samwele 11:1-27) Mabunga mingi oyo Davidi asalaki mamonisaki polele ete azalaki moto ya kokoka te. Kasi, Yehova amonaki nini epai ya moto yango? Kolobáká na Salomo, mwana na Davidi, Yehova alobaki ete: “Okotambola liboso na ngai lokola etambolaki Davidi tata na yo na bosembo na motema mpe kolongobana.” (1 Mikonzi 9:4, NW) Atako asalaki mabunga ebele, Yehova ayebaki ete Davidi azali mpenza moto oyo akoki kotyelama motema. Mpo na nini?
Davidi apesaki eyano na ntango alobaki na Salomo ete: “[Yehova] akotalatala mitema nyonso mpe akososola makanisi mpe mikano nyonso.” (1 Ntango 28:9) Davidi asalaki mabunga, kasi azalaki na komikitisa, mpe azalaki na mposa ya kosala oyo ezalaki malamu. Ntango nyonso andimaki mpamela mpe kosembolama—ya solo, asɛngaki yango. Asɛngaki boye ete: “Ɛ [Yehova], meká ngai mpe sosolá ngai, tángá motema na ngai mpe makanisi na ngai.” (Nzembo 26:2) Mpe na ntembe te Davidi apɛtolamaki. Na ndakisa, mpasi oyo lisumu na ye na Bata-seba eyeisaki, eumelaki bomoi na ye mobimba. Atako bongo, Davidi alukaki soko moke te kolóngisa mabe na ye. (2 Samwele 12:1-12) Likambo lileki ntina, amitangolaki soko moke te na losambo ya solo. Mpo na yango, mpe na ntina na koyoka mawa mpe kobongola motema solo, Yehova apusamaki na kolimbisa mabunga na ye mpe kondima ye lokola moto ya sembo.—Talá lisusu Nzembo 51.
Kotyelama motema na ntango ya komekama
Yesu amekamaki na Satana Zabolo oyo asalaki mpenza milende mpo na kokweisa bosembo na ye. Asengelaki kobatela bosembo na ye kati na bampasi mpe minyoko, na bokeseni na Adama, oyo botosi na ye lokola moto ya kokoka emekamaki bobele na etindá azwaki ya kotosa mobeko ya Nzambe. Lisusu, Yesu atungisamaki na koyebáká ete kosikolama ya bato etalelaki bosembo na ye.—Baebele 5:8, 9.
Satana, na mposa na ye makasi ya kokweisa bosembo ya Yesu, abɛlɛmaki na ye ntango oyo Yesu azalaki na bolɛmbu mpenza—nsima ya kolekisa mikolo 40 kati na mokili mokauki mpo na komanyola mpe kokila bilei. Satana amekaki Yesu mbala misato—ete abongola mabanga mampa; ete amikweisa longwa na nsamba ya tempelo, kopesáká likanisi ete banzelu bakobikisa ye mpe yango ekozala likamwisi oyo ekopesa elembeteli ete azali solo Masiya; mpe ete andima koyangela mokili mobimba lokola mbano soki akokumbamela Satana. Kasi Yesu atikalaki ngwi liboso ya komekama mokomoko, kobateláká bongo bosembo na ye epai na Yehova.—Matai 4:1-11; Luka 4:1-13.
Bosembo ya Yobo
Etɛlɛmɛlo ya Yobo, oyo abatelaki bosembo na ye na ntango ya komekama, eyebani malamu. Likambo ya kosepelisa, Yobo ayebaki te ntina oyo bampasi ekomelaki ye. Ayebaki te ete Satana alobaki na ntina na ye ete azali na mikano ya mabe, kolobáká ete Yobo asalelaki Nzambe na bantina ya moimi mpe ete mpo na kobatela bomoi na ye, Yobo akotika bosembo na ye. Nzambe atikaki nzela ete Yobo azwa bampasi mpo na komonisa ete Satana azalaki na libunga.—Yobo 1:6-12; 2:1-8.
Baninga mabe misato bayaki. Na nko mpenza, bamonisaki mitindá mpe mikano ya Nzambe na lolenge mabe. Ata mwasi ya Yobo, ye mpe lokola akangaki ntina ya likambo yango te, akokaki te kolendisa mobali na ye na ntango oyo azalaki na mposa makasi ya bilendiseli. (Yobo 2:9-13) Atako bongo, Yobo atikalaki ngwi. “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai te. Nakosimba boyengebene na ngai makasi, nakotika yango te. Motema na ngai epameli ngai mpo na mokolo moko na ngai te.”—Yobo 27:5, 6.
Ndakisa malamu ya Yobo, bakisá bosembo ya bato mingi mosusu, mibali mpe basi ya kondima, lokola elobelami na Biblia, emonisi ete Satana azali mobuki na lokuta.
Bosembo mpe mosala ya boklisto
Tokoloba ete bosembo ezali ezalela oyo Yehova alukaka epai na moto bobele mpo na komisepelisa? Te. Bosembo ezali na motuya monene mpo na biso bato. Ezali mpo na litomba na biso nde Yesu alendisaki biso ete ‘tólinga Yehova, Nzambe na biso na motema na biso mobimba mpe na molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso mobimba.’ Ya solo, yango ezali “mobeko moleki monene mpe oyo na liboso,” mpe ezali kosala ete mobali, mwasi, to mwana oyo azali sembo akoka kotosa mobeko yango. (Matai 22:36-38) Kozala sembo esangisi makambo nini, mpe wapi matomba na yango?
Moto na sembo akoki kotyelama motema, bobele na bato te kasi, na koleka, na Nzambe. Bopɛto ya motema na ye emonanaka na misala na ye; azali na bokosi te. Apɛngwaka na nzela na ye te to atikaka motema na ye kobebisama te. Ntoma Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “Tosili koboya makambo mabombami mpe na nsɔ́ni, tondimi kosala makambo na mayele mabe te, kobebisa Liloba na Nzambe te. Nde na nzela na kosakola makambo na sembo polele, tokomeka komisembola epai na lisosoli na moto na moto liboso na Nzambe.”—2 Bakolinti 4:2.
Simbá likambo oyo ete Paulo alobeli bizaleli oyo bitaleli mosala ya boklisto. Ndenge nini ministre moklisto akoki kosalela basusu soki mabɔkɔ na ye mazali pɛto te, to azali moto na sembo te? Mokonzi (ordre religieux) moko ya lingomba ya Irlande oyo na mikolo miuti koleka amilongolaki na mosala yango amonisi polele likambo yango. Engebene zulunalo The Independent, andimaki ete “apesaki nzela na sángó moko oyo asangisaka nzoto na bana mike ete akóba kosala elongo na bana ntango mingi na nsima wana eyebanaki ete abebisaka bana.” Lisoló elimbolaki ete sángó yango abebisaki bana mike na boumeli ya mbula koleka 24. Sángó atyamaki na bolɔ́kɔ na boumeli ya mbula minei, kasi kanisá mpasi oyo amemelaki bana oyo ye abebisaki na boumeli ya bambula mingi, nyonso wana mpo ete mokonzi na ye azangaki bosembo ya motema mpo na kosala likambo oyo likokaki kopɛngola mabe!
Bosembo—Mbano na yango
Ntoma Yoane azalaki moto ya kobangabanga te. Na ntina na ezaleli na bango ya mɔ́tɔmɔ́tɔ, Yesu abéngaki ye na ndeko na ye Yakobo ete “Bana na nkake.” (Malako 3:17) Yoane, moto na sembo mpenza, wana azalaki ye na Petelo, alimbolaki epai na mikonzi ya bayuda ete ‘akoki kotika kosolola te’ makambo mamonaki ye mpe makambo mayokaki ye ntango azalaki elongo na Yesu. Yoane azali mpe moko na bantoma oyo balobaki ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso ete tótosa bato.”—Misala 4:19, 20; 5:27-32.
Emonani ete ntango Yoane akómaki na mibu koleka mpenza 90, atindamaki na esanga ya Patamo “mpo na Liloba na Nzambe mpe mpo na litatoli na ntina na Yesu.” (Emoniseli 1:9) Na mbula oyo akómaki na yango, mbala mosusu akanisaki ete mosala na ye ekómaki na nsuka. Kasi ezali bobele na moto ya sembo lokola ye nde akokaki kotyelama motema mpo na mosala ya kokoma emonaneli ya kosimba mayoki oyo ezwami na mokanda ya Emoniseli. Yoane akokisaki mokumba yango na bosembo. Oyo nde libaku malamu mpo na ye! Mpe mabaku malamu mingi masengelaki kolanda. Na nsima, ekoki kozala penepene ya engumba Efese, akomaki Evanzile mpe mikanda na ye misato. Oyo nde libaku malamu mpo na kosukisa mbula 70 ya mosala ya sembo, mosala ya kotyelama motema!
Kozala moto ya sembo na makambo nyonso epesaka bosepeli mozindo. Kozala moto abongi kotyelama motema na miso ya Nzambe ememaka mbano ya seko. Lelo oyo, “ebele monene” ya basambeli ya solo bazali kobongisama mpo na kokɔta na mokili ya sika ya kimya mpe ya molɔngɔ́, na elikya ya kozala na bomoi ya seko. (Emoniseli 7:9) Atako mikakatano ya ebongiseli ya biloko oyo mpe ebele ya mimekano oyo Satana akoki koyeisela basaleli ya Nzambe, bosembo na makambo ya ntina mingi lokola etamboli mpe losambo esengeli kobatelama. Zalá na kondima ete na lisalisi ya nguya oyo Yehova apesaka, okoki kolónga!—Bafilipi 4:13.
Kolobáká mpo na mikolo na ye mpe mikolo misengelaki koya, Davidi, mokomi na nzembo azali kopesa biso elikya na ntango alobi, na nzela ya libondeli ya kopesa matɔ́ndi epai na Yehova ete: “Nde yo osimbi ngai mpo na boyengebene na ngai mpe otemisi ngai liboso na yo libela. [Yehova] . . . akumisama libela na libela.”—Nzembo 41:12, 13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Komantere na The New Testament of Our Lord and Saviour Jesus Christ, according to the Authorised Version, with a brief commentary by various authors.
b Nkombo Satana elimboli “Motɛmɛli.” “Zabolo” elimboli “Motɔngi.”
[Elilingi na lokasa 4]
Atako asalaki mabunga, Davidi amimonisaki ete abongi kotyelama motema
[Elilingi na lokasa 5]
Yesu atikelaki biso ndakisa eleki malamu ya moto abongi kotyelama motema
[Elilingi na lokasa 7]
Kozala moto abongi kotyelama motema ememaka bosepeli mingi