Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/12 nk. 3-7
  • Mpo na nini osengeli kobatela bosembo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini osengeli kobatela bosembo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bosembo elimboli nini?
  • Okokangama makasi na bosembo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Batelá bosembo na yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Tambolá na nzela ya bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Kotyelama motema kati na mokili ya kozanga kokoka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/12 nk. 3-7

Mpo na nini osengeli kobatela bosembo na yo?

“Meká ngai, ee [Yehova] . . . lokola sembo na kati na ngai.”​—NZ. 7:8.

1, 2. Wapi mwa makambo oyo ekoki komeka bosembo ya moklisto?

KANISÁ makambo oyo misato: Baninga ya kelasi ya elenge mobali moko bazali kotumola ye. Bazali kotumola ye mpo mbala mosusu afinga to abunda na bango. Akosala bongo, to akokanga motema mpe akolongwa na esika yango? Mobali moko oyo azali ye moko na kati ya ndako azali kosala bolukiluki na Internet. Na mbala moko, elembo moko ebimi na ordinatɛrɛ na ye mpe emonisi esika akoki kofungola mpo na kotala makambo ya mbindo. Motema na ye ekotinda ye afungola esika yango, to akoboya mpenza? Ndeko mwasi moko azali kosolola ná bandeko basi mosusu mpe na mbala moko, bandeko basi yango bakómi kotɔnga ndeko mwasi mosusu. Ye mpe akokɔta na lisolo yango, to akosala makasi akɔtisa lisolo mosusu?

2 Atako makambo yango misato ekeseni, nyonso ekokani na likambo moko. Ezali komeka bosembo ya baklisto yango misato. Okanisaka bosembo na yo ntango ozali kotalela bamposa, mikano, mpe makambo mosusu oyo ekoki kotungisa yo? Mokolo na mokolo, bato bakanisaka ndenge bakoki kobongisa nzoto na bango, ndenge bakoki kobatela yango kolɔngɔnɔ, ndenge ya kozwa mbongo, bakanisaka bisengo mpe mikakatano ya kozala na baninga, ata mpe libala. Tokoki kolekisa ntango mingi na kokanisa makambo yango. Kasi, Yehova alukaka mpenza nini ntango atalaka na mitema na biso? (Nz. 139:23, 24) Bosembo na biso.

3. Yehova atikeli biso bonsomi ya kopona nini, mpe tokotalela nini na lisolo oyo?

3 Yehova, Mopesi ya “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki,” apesi mokomoko na biso ebele ya makabo. (Yak. 1:17) Apesi biso nzoto, mayele, azali kosalisa biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ, mpe apesi biso makoki mosusu ndenge na ndenge. (1 Kol. 4:7) Nzokande, Yehova asɛngaka biso na makasi te ete tómonisa bosembo. Atikeli biso bonsomi ya kopona kokolisa ezaleli yango to te. (Det. 30:19) Yango wana, tosengeli koyeba soki bosembo ezali nini. Tokotalela mpe makambo misato oyo emonisi ntina monene ya ezaleli yango.

Bosembo elimboli nini?

4. Bosembo elimboli nini, mpe liteya nini tokoki kozwa na mobeko ya Yehova mpo na bambeka ya banyama?

4 Bato mingi bayebaka mpenza te soki bosembo elimboli nini. Na ndakisa, ntango bato ya politiki bamikumisaka ete bazali na bosembo, mbala mingi balingaka komonisa ete bazali mabɔkɔ mpɛmbɛ. Ezaleli yango mpe ezali na ntina, kasi bosembo esangisi mpe bizaleli mosusu. Na Biblia, bosembo elimboli kokangama mobimba, kozala na bizaleli oyo elongobani. Maloba ya Liebele oyo ezali na boyokani na “bosembo” euti na verbe oyo elimboli mobimba, kozanga mbeba to litɔnɔ. Moko na maloba yango esalelami mpo na kolobela lolenge ya bambeka oyo ebongaki kopesa Yehova. Yehova azalaki kondima kaka mbeka ya nyama oyo ezangi mbeba, to ezali mobimba. (Tángá Levitike 22:19, 20.) Yehova azalaki kosepela ata moke te na bato oyo bazalaki kopesa lokola mbeka banyama oyo ebukaná, oyo ezali na maladi, to oyo ekufá miso.​—Mki. 1:6-8.

5, 6. (a) Bandakisa nini emonisi ete mbala mingi tosepelaka na biloko oyo ezali mobimba? (b) Epai ya bato ya masumu, kobatela bosembo elimboli nde kozala bato ya kokoka? Limbolá.

5 Kosepela to kotalela na motuya eloko oyo ezali mobimba, to ezangi mbeba, ezali likambo ya kokamwa te. Tópesa ndakisa: moto moko oyo alukaka babuku ya kala amoni buku moko ya ntina mingi nsima ya koluka yango ntango molai; kasi, amoni ete biteni mingi ya ntina ezali te. Moto yango akolɛmba nzoto mpe akoki kozongisa yango esika azwi yango. Tózwa ndakisa mosusu: mwasi moko azali kotambolatambola na libongo mpo na kolɔkɔta ndako ya mbɛmbɛ oyo mbonge ezali kobwaka na libongo. Azali kosepela na kitoko mpe mitindo na yango ndenge na ndenge; soki agumbami mpo na kolɔkɔta, okanisi ete akozwa oyo ya ndenge nini? Akozwa oyo ya mibimba, oyo ezangi mbeba. Ndenge moko mpe, Nzambe alukaka bato oyo bazali na etamboli oyo ezangi mbeba.​—2 Nta. 16:9.

6 Kasi, okoki komituna soki kozala sembo esɛngi kozala moto ya kokoka. Lokola tozali bato ya masumu mpe ya kozanga kokoka, tokoki komimona lokola buku oyo ezangi biteni mosusu to ndako ya mbɛmbɛ oyo ebukaná. Omiyokaka bongo na bantango mosusu? Yebá ete Yehova asɛngaka te ete tózala bato ya kokoka na makambo nyonso. Akoki ata mokolo moko te kosɛnga biso tósala makambo oyo tokokoka te.a (Nz. 103:14; Yak. 3:2) Nzokande, alingaka ete tóbatela bosembo. Boye, kozala moto ya kokoka ekeseni nde na kobatela bosembo? Ɛɛ. Tópesa ndakisa: Elenge mobali moko alingi elenge mwasi moko mpo na libala. Akoki te komizela ete elenge mwasi yango azala moto ya kokoka. Kasi, akomizela ete alinga ye na motema mobimba, elingi koloba akabola bolingo na ye na mobali mosusu te. Ndenge moko mpe, Yehova azali “Nzambe oyo asɛngaka ete básambela kaka ye.” (Ex. 20:5, NW) Asɛngaka te ete tózala bato ya kokoka, kasi tósambela kaka ye mpe na motema mobimba.

7, 8. (a) Ndakisa nini Yesu apesaki na likambo etali bosembo? (b) Na kotalela Makomami, komonisa bosembo elimboli nini?

7 Na ntembe te toyebi eyano oyo Yesu apesaki ntango batunaki ye mobeko oyo eleki monene na kati ya mibeko nyonso. (Tángá Malako 12:28-30.) Yesu apesaki eyano na motuna yango, na maloba kaka te, kasi amonisaki yango mpe na bomoi na ye. Atikaki ndakisa eleki malamu ya moto oyo alingaki Yehova na makanisi, na motema, na molimo, mpe na makasi na ye nyonso. Amonisaki ete moto amonisaka bosembo, na maloba kaka te, kasi mpe na misala ya malamu oyo euti na makanisi ya pɛto. Mpo na kobatela bosembo, tosengeli kolanda matambe ya Yesu.​—1 Pet. 2:21.

8 Na yango, na kotalela Makomami, komonisa bosembo elimboli kokangama epai ya Tata na biso ya likoló, Yehova Nzambe, na motema mobimba mpe kosala mokano na ye. Kobatela bosembo elimboli koluka libosoliboso kosepelisa Yehova Nzambe na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Tosengeli kotya na esika ya liboso makambo oyo eleki ntina na miso na ye. Tótalela makambo misato oyo emonisi ntina ya kosala bongo.

9. Ndenge nini bosembo ya mokomoko na biso etalelami na ntembe oyo ebimaki mpo na bokonzi ya Nzambe?

9 Lotomo oyo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi esimbami te na bosembo na biso. Bokonzi na ye ezali sembo, ekoumela seko, mpe ezali na molɔ́ngɔ́ mobimba. Ekozala bongo libela na libela, ata soki bikelamu na ye balobi to basali nini. Nzokande, ntembe moko monene ebimaki mpo na lotomo ya Nzambe ya koyangela likoló mpe mabelé. Na yango, bokonzi na ye esengeli kolongisama, na maloba mosusu kondimisama liboso ya bikelamu nyonso ete yango nde ebongi, ezali sembo, mpe asalelaka yango na bolingo. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tosepelaka kolobela bokonzi ya Nzambe epai ya moto nyonso oyo andimi koyoka biso. Kasi, ndenge nini mokomoko na biso akoki komonisa ete azali na ngámbo ya Yehova na ntembe yango? Ndenge nini tokoki komonisa ete toponi Yehova lokola Mokonzi na biso? Soki tozali kobatela bosembo.

10. Satana alobaki nini mpo na bosembo ya bato, mpe eyano nini okolinga kopesa ye?

10 Talá ndenge oyo bosembo na yo etalelami. Maloba ya Satana elimbolaki ete moto moko te akopona bokonzi ya Nzambe, ete moto moko te akosalela Yehova na bolingo ya solo. Liboso ya ebele ya bikelamu ya elimo, Zabolo alobaki na Yehova boye: “Loposo mpo na loposo! Moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye.” (Yobo 2:4) Maloba yango emonisi ete Satana alobaki kaka mpo na Yobo te, kasi mpo na bato nyonso. Yango wana, Biblia ebengi Satana “mofundi ya bandeko na biso.” (Emon. 12:10) Azali kotumola Yehova na koloba ete baklisto bakotikala sembo te​—bango nyonso, ata mpe yo. Satana alobi ete okowangana Yehova mpo na kobikisa bomoi na yo. Okanisi nini mpo na maloba yango? Omoni te ete yango epesi yo libaku ya komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta? Soki obateli bosembo na yo, okomonisa ete Satana azali lokuta.

11, 12. (a) Bandakisa nini emonisi ete bikateli na biso ya mokolo na mokolo etaleli bosembo na biso? (b) Mpo na nini kobatela bosembo ezali libaku malamu?

11 Na yango, ntembe oyo ebimaki mpo na bosembo na biso emonisi ete etamboli na biso ya mokolo na mokolo mpe makambo oyo toponaka ezali na ntina mingi. Tótalela lisusu makambo misato oyo tolobelaki na ebandeli. Bandeko yango bakoki kosala nini mpo na kobatela bosembo? Elenge oyo baninga ya kelasi bazali kotumola akoki koyoka mposa ya kozongisa, kasi na mbala moko akokanisa toli oyo: “Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe, balingami, kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa, Yehova alobi bongo.’” (Lom. 12:19) Na nsima, alongwe esika yango. Mobali oyo azali kosalela Internet akoki koyoka mposa ya kotala bililingi oyo elamusaka mposa ya nzoto, kasi akokanisa maloba ya Yobo oyo: “Nakati kondimana na miso na ngai elongo, nzela nini kutu nakoki kotalaka epai ya moseka?” (Yobo 31:1) Yango wana, mobali yango aboyi na motema moko kotala bililingi ya mabe, amoni yango lokola pwazɔ. Ndeko mwasi oyo azali na esika oyo akoki koyoka likambo ya mabe mpo na ndeko mosusu, akoki kokanisa toli oyo: “Tiká ete moto na moto na kati na biso asepelisa mozalani na ye na oyo ezali malamu mpo na kotonga ye.” (Lom. 15:2) Amoni ete likambo yango ekolendisa te. Ekozala malamu te mpo na ndeko na ye moklisto; ekosepelisa mpe Tata na ye ya likoló te. Yango wana, apekisi lolemo na ye mpe akɔtisi lisolo mosusu.

12 Na likambo mokomoko, moklisto aponi kosala likambo oyo ezali komonisa lokola nde alobi ete: ‘Yehova azali Mokonzi na ngai. Na likambo oyo, nakomeka kosala oyo ekosepelisa ye.’ Yo mpe olukaka kosepelisa Nzambe na makambo oyo oponaka mpe bikateli oyo ozwaka? Soki osalaka yango, okokisaka maloba oyo ezali na Masese 27:11: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.” Tozali na libaku malamu ya kosepelisa motema ya Yehova! Omoni te ete ebongi tósalaka nyonso mpo na kobatela bosembo na biso?

13. Ndenge nini maloba ya Yobo mpe ya Davidi emonisi ete Yehova asambisaka biso na kolanda bosembo na biso?

13 Tomoni ete bosembo esalisaka biso tómonisa ete tozali na ngámbo ya bokonzi ya Yehova. Na yango, Yehova akosambisa biso na kolanda bosembo na biso. Yobo ayebaki likambo yango malamu. (Tángá Yobo 31:6.) Yobo ayebaki ete Nzambe amekaka bato nyonso na “epimeli ya sembo,” alandaka mitinda na Ye ya boyengebene mpo na koyeba soki tozali kobatela bosembo na biso. Davidi mpe alobaki boye: “[Yehova] akosambisa mabota; meká ngai, ee [ Yehova], lokola boyengebene na ngai; mpe lokola sembo na kati na ngai. . . . Yo okomeka mitema mpe makanisi, yo Nzambe ya boyengebene.” (Nz. 7:8, 9) Toyebi ete Nzambe akoki kotánga “mitema mpe makanisi” ya bato. Kasi, tóbosana te eloko oyo alukaka. Ndenge Davidi alobaki yango, Yehova asambisaka biso na kolanda bosembo na biso.

14. Mpo na nini tosengeli kokanisa te ete lokola tozali bato ya kozanga kokoka tokoki te kobatela bosembo?

14 Kanisá ete Yehova Nzambe azali kotala na mitema ya bamiliare ya bato lelo oyo. (1 Nta. 28:9) Bato boni amonaka ete bazali kobatela bosembo? Bato mingi te! Nzokande, tosengeli kokanisa te ete lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kobatela bosembo te. Tozali mpenza na ntina ya kotya motema, lokola Davidi mpe Yobo, ete Yehova akomona ete tozali kobatela bosembo, atako tozali bato ya kozanga kokoka. Tóbosana te ete kozala moto ya kokoka ezali ndanga te ete tokobatela bosembo na biso ntango nyonso. Banda mokili ebandá, ezali kaka na bato misato oyo bazalaki bato ya kokoka awa na mabelé, mpe mibale kati na bango, Adama ná Eva, babatelaki bosembo na bango te. Nzokande, bamilio ya bato ya kozanga kokoka babatelaki bosembo. Yo mpe okoki kosala yango.

15. Ndenge nini Davidi amonisaki ete bosembo ezali na ntina mingi mpo na elikya na biso ya mikolo ezali koya?

15 Lokola Yehova akosambisa biso na kolanda libosoliboso bosembo na biso, bosembo ezali na ntina mingi mpo na elikya na biso ya mikolo ezali koya. Davidi ayebaki ete ezali bongo. (Tángá Nzembo 41:12.) Asepelaki mingi na elikya ya kozwa ngɔlu ya Nzambe mpo na libela. Ndenge moko na baklisto ya solo lelo oyo, Davidi azalaki na elikya ya bomoi ya seko, akosalela Yehova Nzambe mpe akokoba kopusana penepene na ye. Davidi amonaki ete asengeli kobatela bosembo na ye mpo amona kokokisama ya elikya yango. Ndenge moko mpe, Yehova asungaka biso, ateyaka biso, atambwisaka biso, mpe apambolaka biso ntango tozali kobatela bosembo.

16, 17. (a) Mpo na nini ozali na ekateli ya kobatela ntango nyonso bosembo na yo? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo elandi?

16 Elikya ezali na ntina mingi mpo tózala na esengo lelo oyo. Ekoki kopesa biso esengo oyo ekobatela biso na ntango ya mpasi. Elikya ekoki mpe kobatela makanisi na biso. Tóbosana te, Biblia ekokanisi elikya na ekɔti. (1 Tes. 5:8) Ndenge ekɔti ebatelaka motó ya soda oyo azali na etumba, elikya ebatelaka biso tókóma te na makanisi mabe oyo Satana azali kolendisa na mokili oyo esili kobeba. Bomoi ekozala na ntina moko te soki tozangi elikya. Tosengeli komitalela malamumalamu, koluka koyeba mpenza soki bosembo mpe elikya na biso ezali ndenge nini. Kobosana te ete ntango ozali kobatela bosembo, ozali komonisa ete ozali na ngámbo ya Yehova mpe ozali kobatela elikya na yo mpo na mikolo ezali koya. Tiká ete okangama makasi na bosembo na yo!

17 Lokola bosembo ezali na ntina mingi, tosengeli kotalela mituna mosusu. Ndenge nini tokoki koyekola bosembo? Ndenge nini tokoki kobatela yango? Moto akoki kosala nini soki abungisi bosembo mpo na mwa ntango? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Yesu alobaki boye: “Bosengeli kozala bato ya kokoka, ndenge Tata na bino ya likoló azali moto ya kokoka.” (Mat. 5:48) Na ntembe te, alingaki koloba ete ata bato ya kozanga kokoka bakoki kozala bato oyo bazangi mbeba na etamboli na bango. Tokoki kokokisa mobeko ya kolinga basusu, mpe na ndenge yango, kosepelisa Nzambe. Nzokande, Yehova azali moto ya kokoka na makambo nyonso. Epai na ye, liloba “bosembo” elimbolaka mpe kokoka.​—Nz. 18:30.

Okopesa eyano nini?

• Bosembo elimboli nini?

• Ndenge nini bosembo na biso etalelami na ntembe ya bokonzi ya Nzambe?

• Na ndenge nini bosembo esimbi elikya na biso?

[Bililingi na lokasa 5]

Mokolo na mokolo tokutanaka na ebele ya makambo oyo emekaka bosembo na biso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto