Kimya ezali te mpo na Bamemi-nsango ya lokuta!
“Basali na mabe bakosuka . . . Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.”—NZEMBO 37:9, 11.
1. Mpo na nini na ‘ntango oyo ya nsuka’ tosengeli komizela komona bamemi-nsango, ezala ya lokuta to ya solo?
BAMEMI-NSANGO—ya solo to ya lokuta? Na ntango ya lisoló ya Biblia, ezalaki na mitindo yango nyonso mibale ya bamemi-nsango. Kasi ezali boni na mikolo na biso? Na Danyele 12:9, 10, tozali kotánga ete momemi-nsango ya likoló ayebisaki mosakoli ya Nzambe ete: “Maloba yango mazipami mpe makangami na elembo kino ntango na nsuka. Bato mingi bakomipɛtola mpe bakomiyeisa mpɛmbɛ, mpe bakomekama; nde bato mabe bakosala mabe, mpe ata moko na bato mabe akososola te; nde bato na mayele bakososola.” Tozali sikawa kobika na “ntango [yango] ya nsuka.” Tozali komona bokeseni monene kati na “bato mabe” mpe “bato na mayele,” boye te? Ezali bongo mpenza!
2. Lolenge nini Yisaya 57:20, 21 ezali kokokisama lelo oyo?
2 Na mokapo 57, vɛrsɛ́ 20 mpe 21, tozali kotánga maloba ya Yisaya, momemi-nsango ya Nzambe: “Bato mabe bazali lokola mai-na-monana mazali kotombwatombwa, bayebi kofanda na kimya te, mai na yango ekobwaka bosɔtɔ mpe mbindo likoló. Nzambe na ngai alobi ete, Mpo na bato mabe kimya ezali te.” Oyo nde maloba mabongi mpenza wana mazali kolobela mokili oyo lokola ezali kobɛlɛma na ekeke ya 21! Basusu bakoki kútu komituna ete ‘Tokokóma mpenza na ekeke yango?’ Bamemi-nsango oyo bazali na mayele bakoyebisa biso nini?
3. (a) Bokeseni nini emonisami na 1 Yoane 5:19? (b) Lolenge nini Emoniseli mokapo 7 elobeli baoyo “bazali na mayele”?
3 Ntoma Yoane azalaki na mayele mapemami na Nzambe. Na 1 Yoane 5:19, tozali kotánga boye: “Toyebi ete tozali bana na Nzambe mpe mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” Bayisalaele ya elimo 144 000 bakeseni na mokili oyo, batikali kati na bango oyo bakómi mibangé bazali na biso kino lelo. “Ebele monene . . . uta na mabota nyonso, bikólo nyonso mpe minɔkɔ nyonso,” basangani na bango mpe motuya na bango eleki sikawa milió mitano, bango mpe bazali na mayele. “Ezali baoyo bauti na bolɔ́zi monene.” Mpe mpo na nini bazwi mbano? Mpamba te bango mpe “basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila na Mwana na Mpate” na komonisáká kondima na mbeka ya Yesu. Lokola bazali bamemi-nsango ya pole, bango mpe bazali “kosalela [Nzambe] mosala na bulɛɛ butu na moi.”—Emoniseli 7:4, 9, 14, 15, NW.
Bamemi-nsango ya kimya ya lokuta
4. (a) Mpo na nini bamemi-nsango ya kimya ya lokuta kati na mokili ya Satana bakolónga te? (b) Lolenge nini Baefese 4:18, 19 ezali kokokisama lelo?
4 Nzokande, ezali boni mpo na bamemi-nsango ya kimya ya lokuta oyo bazali kati na ebongiseli ya mokili ya Satana? Na Yisaya mokapo 33, vɛrsɛ́ 7, tozali kotánga boye: “Talá bato na makasi na bango bazali konganga libándá, [bamemi-nsango, NW] na kimya bazali kolela mingi mpenza.” Oyo nde bosolo emonisami na maloba yango na ntina na baoyo bazali kotambolatambola longwa na mboka-mokonzi ya engumba moko kino na mboka-mokonzi ya engumba mosusu, komekáká kotya kimya! Mosala ya mpunda! Mpo na nini mosala ya mpunda? Mpamba te bazali komeka kolongola bilembo ya bokɔnɔ ya mokili na esika ete bápikola mpenza nde misisa na yango. Liboso mpenza, bazali koyeba te ete Satana azali, oyo ntoma Paulo amonisaki lokola “nzambe na mokili oyo.” (2 Bakolinti 4:4) Satana asili kolóna mbóto ya mabe kati na bato, litomba na yango ezali ete ebele ya bato, bakisá mpe bakonzi mingi, sikawa bazali kokokana na maloba oyo mazwami na Baefese 4:18, 19: “Ekaniseli na bango ezali na molili, batangolami mosika na bomoi na Nzambe mpo na kozanga boyebi kati na bango, na ntina na makasi na mitema na bango. Bazali koyoka mawa te, bamipesi na makambo na nsɔ́ni ete básala makambo na bosɔtɔ na bilulela.”
5. (a) Mpo na nini bibongiseli ya bato bizali kolónga te kotya kimya? (b) Nsango nini ya kolendisa Nzembo 37 ezali na yango?
5 Ebongiseli moko te ya bato ya kozanga kokoka ekoki kopikola lokoso, moimi mpe koyina oyo etondi lelo na mitema ya bato. Bobele Mozalisi na biso, Yehova, Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ nde akoki kopikola yango! Lisusu, bobele ndambo ya bato na bopɔlɔ, ndambo moke ya bato kati na mokili nde balingi kozala na nsé ya litambwisi na ye. Bokeseni ya mbuma na bango mpe ya bato mabe ya mokili emonisami na Nzembo 37:9-11: “Basali na mabe bakosuka, nde baoyo bakozilaka [Yehova] bakosangola mokili. Nsima na mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te . . . Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.”
6, 7. Makambo nini ya lisoló ya mangomba ya mokili mazali komonisa ete mangomba yango malóngi te kosala lokola bamemi-nsango ya kimya?
6 Na bongo, bamemi-nsango ya kimya bakoki komonana kati na mangomba ya mokili oyo ezali na bokɔnɔ? Makambo nini emonani kino sikawa kati na mangomba? Lisoló ya bato emonisi ete na boumeli ya bikeke, mangomba masangani na kosopa makila, kútu mazali kopusa bato na kosopa motuya monene ya makila. Na ndakisa, zulunalo Christian Century oyo ebimaki na pɔ́sɔ ya 30 Augústo 1995, elobelaki mobulu oyo mosalemaki na ex-Yougoslavie ete: “Na eteni ya Bosnie oyo etalelami na ba Serbes, basángó bafandaka na milɔngɔ́ ya liboso na parlemá, mpe bazali lisusu na milɔngɔ́ ya liboso epai kuna bazali kopambola basodá mpe mandoki na bango liboso ya kokende na bitumba.”
7 Ekeke mobimba ya mosala ya bamisionere ya mangomba ya boklisto na Afrika epesi ata litomba moko malamu te, lokola yango emonisamaki malamumalamu na Rwanda, mokili oyo moyebani ete mozali na 80 % ya bakatolike. Zulunalo The New York Times ya 7 Yulí 1995, ekomaki ete: “Golias, zulunalo ya balaiki oyo ezali na bonsomi mpe ebimisami na Lyon [na France], ekanaki koyebisa bankombo ya basángó 27 ya Rwanda mpe bamamɛ́lo minei oyo babomaki to bapusaki bato ete báboma basusu na Rwanda na mobu mouti koleka.” Ebongiseli ebéngami African Rights (Ntómo ya bana ya Afrika), oyo biro na yango ezali na Londres, elobaki boye: “Longola likambo oyo ete mangomba makangaki monɔkɔ na ntango ya etumba, masengeli mpenza kozongisa monɔkɔ mpo na komikɔtisa ya bamoko ya basángó, bapastɛ́rɛ mpe bamamɛ́lo na yango kati na kobomama ya bato.” Yango ekokani na oyo elekaki na Yisalaele na ntango ya Yilimia, momemi-nsango ya solo ya Nzambe oyo alobelaki “nsɔ́ni” likoló na Yisalaele, na bakonzi na yango, banganga mpe basakoli na yango, abakisaki ete: “Makila na bato na sembo emonani na bilamba na yo.”—Yilimia 2:26, 34.
8. Mpo na nini ekoki kolobama ete Yilimia azalaki momemi-nsango ya kimya?
8 Mbala mingi Yilimia abéngamaki ete mosakoli na kosambisa, kasi akoki mpe kobéngama ete momemi-nsango ya kimya ya Nzambe. Alobelaki kimya lolenge moko Yisaya asalaki liboso na ye. Yehova asalelaki Yilimia ete asakola bikateli likoló na Yelusaleme, na kolobáká ete: “Mboka oyo ezali epeliseli na nkanda na ngai mpe na nkɛlɛ na ngai longwa na mokolo motongaki bango yango kino mokolo oyo; ekoki ete nalongola yango na liboso na elongi na ngai mpo na mabe nyonso na bana na Yisalaele mpe na bana na Yuda oyo esali bango ete bápelisa nkanda na ngai, bango mpe mikonzi na bango, mpe mikóló na bango mpe banganga na bango mpe basakoli na bango mpe bato na Yuda mpe bafandi kati na Yelusaleme.” (Yilimia 32:31, 32) Yango esakolaki kosambisa oyo Yehova akosambisa bayangeli mpe bakonzi ya mangomba ya boklisto na mikolo na biso. Mpo ete kimya ya solo ebatelama, basali yango ya mabe mpe ya mobulu basengeli kolongolama! Bazali soko moke te bamemi-nsango ya kimya.
Mabota Masangani makoki kotya kimya?
9. Lolenge nini Mabota Masangani ezali komiloba ete ezali momemi-nsango ya kimya?
9 Mabota Masangani (O.N.U.) ekoki kokóma momemi-nsango ya kimya ya solosolo? Kútu, maloba ya ebandeli ya mokanda na yango ya moboko, oyo makomamaki na sanza ya Yúni 1945, bobele mikolo 41 liboso ya kobebisama ya Hiroshima na bɔ́mbi atomike, mazali komonisa mokano na yango: “kobikisa mabota makoya nsima na bolɔ́zi ya bitumba.” Bikólo 50 oyo bapesaki nkombo mpo ete bázala basangani ya Mabota Masangani basengelaki “kosangisa makasi [na bango] mpo na kotya kimya mpe libateli epai na bato ya mokili mobimba.” Lelo oyo, Mabota Masangani esangisi bongo mikili 185, ekanisami ete bango nyonso bazali sé na mokano moko.
10, 11. (a) Lolenge nini bakonzi ya mangomba bazali kosunga Mabota Masangani? (b) Na lolenge nini ya mabe bapápa bazali kolakisa “Nsango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe”?
10 Na boumeli ya bambula, Mabota Masangani ezali ntango nyonso kokumisama, mingimingi na bakonzi ya mangomba. Na mwa 11 Apríli 1963, Pápa Jean XXIII abimisaki búku na ye oyo ezalaki na motó na likambo ete “Pacem in Terris” (Kimya na mabelé) kati na yango alobaki ete: “Mposa na biso makasi ezali ete Mabota Masangani—kati na kokabolama na yango mpe myango na yango—ekoka kokóma na makoki ya kokokisa mikumba na yango mitombwani mpe ya lokumu.” Na nsima, na Yúni 1965, na San Francisco, bakonzi ya mangomba, oyo elobamaki ete bamonisaki katikati ya bato ya mokili mobimba, basalaki molulu ya bosepeli mbula 20 ya Mabota Masangani. Lisusu, na 1965, Pápa Paul VI ntango akendaki kotala biro monene ya Mabota Masangani amonisaki yango lokola “elikya ya nsuka mpo na boyokani mpe mpo na kimya.” Na 1986, Pápa Jean Paul II apesaki mabɔkɔ mpo na kosakola ete mobu yango ezalaki Mobu ya kimya ya mokili mobimba mpo na Mabota Masangani.
11 Lisusu, na boumeli ya mobembo na ye na Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, pápa alobaki ete: “Lelo tozali kosakola Nsango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe.” Kasi azali mpenza komema Nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe? Wana azalaki kolobela mikakatano ya mokili, abakisaki ete: “Lokola tozali kokutana na mikakatano minene boye, ndenge nini tokoki koboya kondima mokumba ya ebongiseli ya Mabota Masangani?” Na esika ete apona Bokonzi ya Nzambe, pápa aponi nde Mabota Masangani.
Bantina ya ‘kolela mingi mpenza’
12, 13. (a) Ndenge nini Mabota Masangani emonisi misala na yango lolenge elobelami na Yilimia 6:14? (b) Mpo na nini boyangeli ya Mabota Masangani ekokani na maloba ya Yisaya 33:7?
12 Molulu oyo mosalemaki mpo na kosepela mibu 50 ya Mabota Masangani emonisi ete ebongiseli yango elóngi te kopesa ata elikya moko ya “kimya na mabelé.” Ntina moko emonisamaki na mokomi moko na zulunalo The Toronto Star ya Canada, akomaki ete: “Mabota Masangani ezali nkósi oyo ezangi míno, oyo engulumaka ntango ekutani na botomboki ya bato, kasi esengeli kozela basangani na yango ete bápesa yango míno liboso ete ekoka koswa.” Mbala mingi koswa yango ezalaka makasi te mpe esalemaka noki te. Bamemi-nsango ya kimya na ebongiseli ya mokili oyo, mpe mingimingi oyo bazali kati na mangomba ya boklisto, bakokani na maloba ya Yilimia 6:14 oyo elobi ete: “Babikisi mpasi na bato na ngai bobele mpamba wana elobi bango ete, Kimya! Kimya! nde kimya ezali te.”
13 Secrétaire général mokomoko ya Mabota Masangani oyo aponamaki, asalaki milende makasi mpo ete Mabota Masangani elónga. Kasi bowelani ya ntango nyonso oyo ezali kati na basangani na yango 185 na ntina na lolenge oyo bakoki kosilisa bitumba, lolenge ya kotambwisa politiki, mpe lolenge ya kosalela mosolo esili kokitisa bilikya ya bolóngi. Kati na lapólo na ye ya mobu 1995, secrétaire général oyo azalaki ntango wana akomaki makambo matali kolongolama ya “likámá ya nikleere” lokola ete ezalaki kofungolama ya nzela mpo “na mabota ete másala esika moko mpo na makambo ya nkita mpe bokóli ya makambo ya mboka mpo na bato nyonso.” Kasi abakisaki ete: “Likambo ya mawa, lapólo ya makambo ya mokili na boumeli ya mwa mibu oyo mileki ekweisaki bilikya wana ya kolónga.” Ya solo, bamemi-nsango ya kimya ya lokuta bazali ‘kolela mingi mpenza.’
14. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Mabota Masangani ekwei na makambo matali mosolo mpe bizaleli malamu? (b) Lolenge nini Yilimia 8:15 ezali kokokisama?
14 Motó na likambo oyo ebimaki na zulunalo The Orange County Register ya Californie elobaki boye: “Lisangá ya Mabota Masangani ekwei na makambo matali mosolo mpe bizaleli.” Lisoló yango lilobaki ete kati na 1945 mpe 1990, bitumba koleka 80 bisalemaki mpe bibomaki bato koleka milió 30. Etángaki maloba ya mokomi moko na zulunalo Reader’s Digest ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1995 oyo “amonisaki misala ya basodá ya Mabota Masangani ete ezali na ‘bakambi oyo bazangi makoki ya kopesa mitindá, basodá oyo bazangi botosi, boyokani na babandisi ya bitumba, kozanga kolónga na makambo matali kopɛngola makámá na ntango ekoki, mpe kútu na bantango mosusu, kopesa mabɔkɔ na makambo ya nsɔ́mɔ.’ Lisusu, ‘kokwea ya bizaleli malamu, moyibi mpe kobebisa esili koleka ndelo.’” Na eteni oyo ezalaki na motó na likambo ete “Mibu 50 ya Mabota Masangani,” zulunalo The New York Times ezalaki na motó na likambo ete “Kosalelama na lolenge mabe mpe kobungisa bozwi ezali kokweisa mikano malamu ya Mabota Masangani.” Zulunalo The Times ya Londres, na Angleterre, ezalaki na lisoló moko oyo ezalaki na motó na likambo ete “Nsima ya mibu ntuku mitano, Mabota Masangani elɛmbi—ezali na mposa ya manáka moko ya malamu mpo na kozwa lisusu nguya.” Na kotaleláká makambo nyonso, ezali lokola tozali kotánga yango na Yilimia mokapo 8, vɛrsɛ́ 15 ete: “Toluki kimya nde malamu eyei te; toluki mpe ntango na kobikisama nde talá mikakatano iyei.” Likámá ya nikleere ezali ntango nyonso kobangisa bato. Ezali polele ete, Mabota Masangani ezali soko moke te momemi-nsango ya kimya oyo bato bazali na mposa na ye.
15. Na lolenge nini Babilone ya kala mpe mangomba oyo mauti na yango emonani ete bazali babomi mpe babebisi?
15 Makambo nyonso wana makosuka ndenge nini? Maloba ya esakweli ya Yehova mazali mpenza polele. Libosoliboso, nini ezali kozela mangomba ya lokuta ya mokili, oyo mbala mingi mazali na boninga makasi na Mabota Masangani? Mangomba yango mazali mombóto oyo mouti na losambo ya bikeko, Babilone ya kala. Na lolenge lobongi, mangomba yango mamonisami kati na Emoniseli 17:5 lokola “Babilone monene, mama na [basi na] pite na bosɔtɔ na mokili.” Yilimia alobelaki kosambisama ya lisangani yango ya lokuta. Lokola mwasi na pite, mangomba yango masili kolɛngola bato ya politiki ya mokili, kokosáká Mabota Masangani mpe kosaláká boyokani ya mabe elongo na basangani na yango ya banguya ya politiki. Bazali basangani minene kati na bitumba na lisoló mobimba ya bato. Moto moko alobaki na ntina na bitumba ya mangomba na Inde ete: “Karl Marx alobaki ete mangomba mazali kolangwisa bato lokola bángi. Kasi maloba yango makoki kozala solo te mpamba te bángi ezali elangwiseli oyo elɛmbisaka nzoto mpe elalisaka mpɔngi. Nzokande, mangomba mazali kosala makambo koleka bángi. Mazali kobimisa mobulu ya nsɔ́mɔ mpe mazali na nguya moko mabe.” Mokomi yango azali mpenza na elónga nyonso te. Mangomba ya lokuta mazali kolɛmbisa mpe mazali kobebisa.
16. Mpo na nini bato ya motema sembo basengeli uta sikawa kokima Babilone Monene? (Talá mpe Emoniseli 18:4, 5.)
16 Na bongo, bato ya motema malamu basengeli kosala nini? Yilimia, momemi-nsango ya Nzambe apesi eyano: “Bókima longwa na kati na Babilone, moto na moto abikisa bomoi na ye! . . . Zambi oyo ezali ntango na kobukanisa na [Yehova].” Tozali na esengo ete bamilió basili kokima bolɔ́kɔ ya Babilone Monene, lisangani ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Ozali moko kati na bango? Na bongo, okoki kososola ndenge Babilone Monene esili kobebisa mabota kati na mokili: “Mabota basili komɛla vinyo na ye, boye mabota mazali na bibɛbɛ.”—Yilimia 51:6, 7.
17. Kosambisama nini elingi kokómela Babilone Monene, mpe nini ekolanda likambo yango?
17 Mosika te, “bibɛbɛ” basangani ya Mabota Masangani bakosalelama na Yehova mpo na kobundisa mangomba ya lokuta, lokola yango emonisami na Emoniseli 17:16: “Bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolya mosuni na ye, mpe bakotumba ye na mɔ́tɔ.” Yango ekomonisa bongo ebandeli ya bolɔ́zi monene oyo elobelami na Matai 24:21 mpe ekosuka na Armagedon, etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Lolenge moko na Babilone ya kala, Babilone Monene ekozwa kosambisama oyo elobelami na Yilimia 51:13, 25: “Ɛ yo oyo okofandaka pembeni na mai mingi na bibombelo mingi na biloko na motuya, nsuka na yo ekómi; kolulela na yo epimami. Talá ngai nazali kotɛmɛla yo, ɛ ngomba na kobebisa, [Yehova] alobi bongo, oyo azali kobebisa mokili mobimba; nakosembola lobɔkɔ na ngai likoló na yo, nakobulunganisa yo longwa na mabanga, nakozalisa yo ngomba ezikisami.” Mabota mabebisami mpe mazali kolendisa bitumba makolanda mangomba ya lokuta kati na kobebisama wana, mokolo ya nkɛlɛ ya Yehova ekozwa mpe bango.
18. Ntango nini mpe na lolenge nini Yisaya 48:22 ekokokisama?
18 Na 1 Batesaloniki 5:3, elobami na ntina na bato mabe ete: “Ekolobaka bato ete, Kimya ezali, makambo mazali te, wana libebi ekokwela bango pwasa pelamoko mpasi ekoyela mwasi na zemi mpe nzela na kokima ekozala te.” Ezali baoyo na ntina na bango nde Yisaya alobaki ete: “Talá . . . [bamemi-nsango, NW] na kimya bazali kolela mingi mpenza.” (Yisaya 33:7) Ya solo, lokola tozali kotánga yango na Yisaya 48:22, “[Yehova] alobi ete, Kimya ezali te mpo na basali na mabe.” Kasi avenire ya ndenge nini ezali kozela bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe? Lisoló lilandi likoyebisa biso yango.
Mituna ya bozongeli
◻ Na maloba nini ya nguya basakoli ya Nzambe batɔndɔlaki bamemi-nsango ya lokuta?
◻ Mpo na nini bibongiseli ya bato bilóngi te kotya kimya ya seko?
◻ Na lolenge nini bamemi-nsango ya kimya ya solo bakeseni na basungi ya Mabota Masangani?
◻ Bato na bopɔlɔ basengeli kosala nini mpo ete básepela na kimya oyo Yehova alaki?
[Bililingi na lokasa 15]
Yisaya, Yilimia mpe Danyele, bango nyonso basakolaki kokwea ya milende ya bato mpo na kotya kimya
Picture on page 16]
“Mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.”—Ntoma Yoane
[Elilingi na lokasa 17]
“Bazali kati na molili na makanisi.”—Ntoma Paulo