Basalaki Mokano ya Yehova
Ndakisa ya komipesa mpe ya bosembo
MPO na elenge mosali na bilanga na nkombo Elisa, mokolo oyo ebandaki lokola mokolo nyonso ya mosala na ye ya kotimola mabelé ekómaki mokolo oyo molekaki ntina kati na bomoi na ye. Wana azalaki kosala kati na elanga, kozanga ete akanisa yango, Elisa amonaki Eliya, mosakoli aleki lokumu na Yisalaele koya kotala ye. ‘Mpo na nini ayei kotala ngai?’ Mbala mosusu Elisa amitunaki bongo. Azelaki ntango molai te mpo na kozwa eyano. Eliya abwakelaki Elisa monkóto na ye, komonisáká ete mokolo mosusu Elisa akokóma mokitani na ye. Elisa atyolaki libyangi yango te. Mbala moko, atikaki mosala na ye ya elanga mpo na kokóma mosungi ya Eliya.—1 Mikonzi 19:19-21.
Mbula motoba na nsima, ntango ekokaki mpo ete Eliya atika mosala na ye. Lisoló yango esili kobéngama “moko na masoló minene” kati na Makomami ya Liebele.
Eliya azali komibongisa mpo na kotika mosala na ye
Eliya alingaki kosala mobembo ya nsuka na Betele, na Yeliko, mpe na Yaladene. Yango esengelaki kotambola ntáká ya bakilomɛtɛlɛ ebele na makolo, mpe na bisika mingi ya bangomba. Na esika nyonso oyo bazalaki kopema na mobembo, Eliya azalaki kosenga na Elisa ete atikala wana. Kasi Elisa azalaki koyebisa nkolo na ye na molende nyonso ete akozala na ye elongo kino nsuka.—2 Mikonzi 2:1, 2, 4, 6.
Ntango bakómaki na Betele mpe na Yeliko, “bana ya basakoli” bayaki pene na Elisa.a Balobaki na ye ete: “Yo oyebi ete lelo oyo Yehova akolongola nkolo na yo epai na yo?” Azongisaki ete, “Ɛ, ngai nayebi, zalá nyɛɛ.”—2 Mikonzi 2:3, 5.
Na nsima Eliya na Elisa bakendaki na Ebale Yaladene. Ntango bakómaki na Yaladene, Eliya asalaki ekamwiseli wana bana ya basakoli soko 50 bazalaki kotala na mosika. “Eliya akamataki monkóto na ye, akangaki yango, abɛtaki mai mpe makabwanaki epai na epai; bongo bango mibale balekaki na mabelé makauki.”—2 Mikonzi 2:8.
Wana bakatisaki, Eliya alobaki na Elisa ete: “Tuná likambo nini likoki na ngai kosalela yo liboso naino nalongwelami yo te.” Elisa asengaki “makabo mibale” ya elimo ya Eliya—yango ezalaki, mabondo mibale oyo masengelaki kopesama bobele na mwana nsɔ́mi. Ɛɛ, Elisa akumisaki Eliya lokola mwana mobali mobotami ya liboso akumisaka tata na ye. Na koleka oyo wana, apakolamaki na elimo mpo na kokóma mokitani ya Eliya lokola mosakoli ya Yehova na Yisalaele. Na bongo, lisɛngi na ye ezalaki ya moimi te mpe ezangaki ntina te. Atako bongo, koyebáká ete bobele Yehova nde akoki kopesa yango, na bopɔlɔ nyonso Eliya alobaki ete: “Olɔmbi likambo na mpasi.” Mpe abakisaki ete: “Soko okomona ngai wana ekolongolama ngai na yo ekozala boye epai na yo nde soko okomona ngai te ekozala boye te.”—2 Mikonzi 2:9, 10; Deteronome 21:17.
Na ntembe te Elisa azalaki na ekateli makasi koleka ya kokangama mpenza na nkolo na ye. Na nsima, “likalo na mɔ́tɔ mpe mpunda na mɔ́tɔ” ebimaki. Na kokamwa mpenza, Elisa amonaki na miso wana Eliya akamatamaki na lipata na mopɛpɛ monene—na lolenge ya ekamwiseli, amemamaki na esika mosusu.b Elisa alokɔtaki monkóto ya Eliya mpe azongaki na nsima mpe atɛlɛmaki pembeni ya Yaladene. Abɛtaki mai mpe alobaki ete, ‘Yehova Nzambe na Eliya wapi?’ Mai ekabwanaki, kopesaka elembo polele ete Elisa aponamaki na Nzambe lokola mokitani ya Eliya.—2 Mikonzi 2:11-14.
Liteya mpo na biso
Ntango azwaki libyangi mpo na mosala moko ya ntina elongo na Eliya, Elisa atikaki nokinoki mosala na ye ya elanga mpo na kokende kosala na mosakoli monene na Yisalaele. Emonani polele ete, mikumba na ye misusu ezalaki ya lokumu te, mpo ete ayebanaki lokola moto oyo ‘azalaki kosopa mai na mabɔkɔ ya Eliya.’c (2 Mikonzi 3:11, NW) Atako bongo, Elisa atalelaki mosala na ye lokola libaku malamu, mpe akangamaki na bosembo nyonso na Eliya.
Lelo oyo basaleli mingi ya Nzambe bazali komonisa elimo ya komipesa motindo yango. Bamoko basili kotika “bilanga” na bango, misala na bango ya mosuni, mpo na kosakola nsango malamu na bateritware ya mosika to mpo na kosala lokola basangani ya libota ya Betele. Bamosusu basili kokende na mboka ya bapaya mpo na kotonga bandako ya la Société. Mingi basili kondima oyo ekoki kobéngama ete mosala ya komikitisa. Nzokande, moto moko te oyo azali kosalela Yehova na motema mobimba azali kosala mosala mozangi ntina. Yehova azali kosepela na moto nyonso oyo azali kosalela ye na bolingo malamu, mpe akopambola elimo na bango ya komipesa.—Malako 10:29, 30.
Elisa akanganaki na Eliya kino nsuka. Aboyaki kotika mosakoli yango oyo akómaki mobangé ata ntango likoki lipesamelaki ye. Na ntembe te, boyokani ya penepene oyo akólisaki na Eliya esalaki ete bolingo yango ya sembo ekóma esengo. Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazali kosala makasi mpo na kolendisa boyokani na bango elongo na Nzambe mpe kati na bandeko na bango bandimi. Bomoko oyo ezali ekanganeli makasi ekopambolama, mpo ete Biblia elobi na ntina na Yehova ete: “Epai na moto na sembo okomimonisa sembo.”—2 Samwele 22:26.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba “bana na basakoli” ekoki kolimbola eteyelo mpo na baoyo babyangamaki na mosala yango to bobele ebongiseli mpo na kosunga basakoli.
b Eliya akomaki mokanda epai na Yolama Mokonzi ya Yuda mwa bambula na nsima.—2 Ntango 21:12-15.
c Mimeseno ya bonkɔkɔ esɛngaki ete mosali asopela nkolo na ye mai n mabɔkɔ mpo na kosukola yango, mpenzampenza nsima ya kolya. Momeseno yango ezalaki lokola oyo ya kosukola makolo, oyo ezalaki kolakisa ezaleli ya boyambi bapaya, ya limemya, mpe kati na lolenge mosusu ya boyokani, elembo ya komikitisa.—Genese 24:31, 32; Yoane 13:5.