Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/11 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa ya komipesa mpe ya bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Elisha amonaki makalo oyo ezali kopela mɔtɔ—Yo mpe omonaka yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Ayikaki mpiko tii na nsuka
    Mekolá kondima na bango
  • Osepelaka na bandeko baklisto oyo bazali mibange?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/11 lok. 31

Mituna ya batángi

Mpo na nini Elisa asɛngaki “ndambo mibale” ya elimo ya Eliya?

Liboso Eliya asukisa mosala na ye ya mosakoli na Yisalaele, mosakoli Elisa, oyo azalaki naino elenge, alobaki na ye ete: “Tiká ete ndambo mibale ya elimo na yo eya epai na ngai.” (2 Mikonzi 2:9, NW) Na ndimbola ya elimo, ezali polele ete Elisa azalaki kolobela ndambo mibale lokola oyo bazalaki kopesa mwana ya liboso. (Deteronome 21:17) Soki totaleli mwa moke lisolo yango, tokomona likambo yango polele mpe ekosalisa biso tózwa mateya na likambo oyo esalemaki.

Ndenge Yehova atindaki ye, mosakoli Eliya apakolaki Elisa mpo akóma na esika na ye. (1 Mikonzi 19:19-21) Pene na mbula soki motoba, Elisa azalaki mosungi ya sembo ya Eliya mpe azalaki na mposa makasi ya kosala mosala yango tii na nsuka. Ata na mokolo oyo Elisa asukisaki mosala na ye ya mosakoli na Yisalaele, Elisa akangamaki na molakisi na ye. Atako Eliya asɛngaki Elisa ete atika kolanda ye, Elisa alobaki mbala misato mobimba ete: “Ngai nakotika yo te.” (2 Mikonzi 2:2, 4, 6; 3:11) Mpo na Elisa, Eliya azalaki mpenza tata na ye ya elimo.​—2 Mikonzi 2:12.

Nzokande, longola Elisa, Eliya azalaki mpe na bana mosusu ya elimo. Eliya ná Elisa bazalaki elongo na mibali mosusu oyo bazalaki kobengama “bana ya basakoli.” (2 Mikonzi 2:3) Mokanda ya mibale ya Mikonzi emonisi ete “bana” yango bazalaki mpe kolinga Eliya mingi, tata na bango ya elimo. (2 Mikonzi 2:3, 5, 7, 15-17) Na yango, lokola Elisa apakolamaki mpo na kozwa esika ya Eliya, azalaki liboso na kati ya bana nyonso ya Eliya​—azalaki lokola mwana ya liboso. Na Yisalaele ya kala, mwana ya liboso azalaki kozwa ndambo mibale ya libula ya tata, mpe bana mosusu bazalaki kozwa ndambo mokomoko. Na yango, Elisa asɛngaki Eliya ndambo mibale ya libula ya elimo.

Mpo na nini Elisa asɛngaki yango na ntango wana? Mpamba te akómaki pene na kozwa mokumba moko monene ya kozala mosakoli na Yisalaele na esika ya Eliya. Elisa ayebaki ete mpo akokisa mokumba monene wana, esengelaki azala na nguya ya elimo oyo eleki mpenza makoki na ye moko, nguya oyo kaka Yehova akoki kopesa. Asengelaki kozala na mpiko lokola Eliya. (2 Mikonzi 1:3, 4, 15, 16) Na yango, asɛngaki ndambo mibale ya elimo ya Eliya, elimo ya mpiko mpe ya “molende mingi mpo na Yehova”​—bizaleli oyo eutaka na elimo ya Nzambe. (1 Mikonzi 19:10, 14 ) Eliya asalaki nini?

Eliya ayebaki ete Elisa asɛngaki eloko moko oyo ye akokaki kopesa ye yango te, kaka Nzambe nde akokaki kopesa yango. Na elimo ya komikitisa, Eliya apesaki eyano ete: “Olɔmbi likambo ya mpasi nde soki okomona ngai wana ekolongolama ngai na yo ekozala boye epai na yo.” (2 Mikonzi 2:10) Yehova apesaki Elisa nzela amona ndenge Eliya amataki na mopɛpɛ. (2 Mikonzi 2:11, 12) Elisa azwaki eloko oyo asɛngaki. Yehova apesaki ye elimo oyo asengelaki na yango mpo na kobanda mosala na ye ya sika mpe kozala na mpiko liboso ya mikakatano oyo asengelaki kokutana na yango.

Lelo oyo, baklisto bapakolami (oyo babengamaka ntango mosusu Elisa ya mikolo na biso) mpe basaleli nyonso ya Nzambe bakoki kolendisama na lisolo oyo. Na bantango mosusu tokoki kokanisa ete tobongi te na mokumba moko ya sika na lisangá, to tokoki kobungisa milende na biso na mosala ya kosakola mpo bato mingi bazali koyamba biso te to bazali kotɛmɛla biso. Kasi, soki tosɛngi Yehova lisalisi, akopesa biso elimo santu oyo tosengeli na yango mpo tólonga mikakatano mpe makambo mosusu oyo tokoki kokutana na yango. (Luka 11:13; 2 Bakolinti 4:7; Bafilipi 4:13) Se ndenge Yehova apesaki Elisa makasi ya kokokisa mikumba minene oyo azwaki, akosalisa mpe biso, tózala mikóló to bilenge, na kokokisa mosala na biso.​—2 Timote 4:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto