Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/1 nk. 23-28
  • Tólendisa kondima na biso kati na Liloba ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólendisa kondima na biso kati na Liloba ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liloba ya Nzambe ezali solo —Moboko ya kondima na biso
  • Tómekola “Mokokisi ya kondima na biso”
  • Biká mpo na kondima
  • Monisá kondima na bilaka ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Ondimaka mpenza nsango malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tózala na kondima oyo etongami likoló na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • “Bakiselá biso kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/1 nk. 23-28

Tólendisa kondima na biso kati na Liloba ya Nzambe

BATO mingi basilá kotánga Biblia koleka mokanda mosusu nyonso. Kasi bato boni bamonisaka kondima kati na nsango oyo yango ezali koyebisa? Biblia yango moko ezali kolimbola ete “bato nyonso bazali na kondima te.” (2 Batesaloniki 3:2) Ezali polele ete tobotamaka na kondima te. Tosengeli kokólisa yango. Ata baoyo bazali na mwa kondima basengeli kokanisa te ete ekoki sé bongo. Kondima ekoki kobeba mpe kokufa. Na bongo, kozala na milende ezali na ntina mpo na kotikala bato “bakembi mpo na kondima.”​—Tito 2:2.

Yango wana, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova eponaki na elónga mpenza motó na likambo “Kondima kati na Liloba ya Nzambe” mpo na mayangani na bango ya etúká mpo na mobu 1997 mpe 1998. Bamilió ya Batatoli ya Yehova mpe bato mosusu bazwaki libaku malamu ya koyangana mpo na kolendisa kondima na bango kati na Liloba ya Nzambe.

Liloba ya Nzambe ezali solo —Moboko ya kondima na biso

Yango ezalaki motó na likambo ya mokolo ya liboso ya liyangani. Liyangani ebandaki na maloba ya kotombela bayangani nyonso boyei malamu. Kozala na liyangani ezalaki elembo ya polele oyo emonisi limemya mpo na Biblia. Kasi, mituna oyo mipusaka na kokanisa mitunamaki na ntina na motuya ya kondima na biso: ‘Tozali na likoki ya kolóngisa bindimeli na biso, na kosaleláká Liloba ya Nzambe lokola bokonzi oyo eleki? Tosepelaka na bilei ya elimo, kozanga kotyola Biblia, makita ya lisangá, mpe mikanda oyo mikolimbolaka Biblia? Tozali kokóla na bolingo, na boyebi ya sikisiki, mpe na bososoli?’ Molobi alendisaki bayangani ete báyoka na likebi nyonso, wana ayebisaki ete “Liyangani oyo ya Etúká na motó na likambo ‘Kondima kati na Liloba ya Nzambe’ ebongisamaki ete esalisa biso na komitalela malamumalamu mpe kotalela bonene mpe motuya ya kondima oyo moto na moto azali na yango.”

Lisukúlu ya moboko ezalaki na motó na likambo “Tozali kotambola na kondima kasi na komona te.” (2 Bakolinti 5:7) Molobi alobaki ete, “Kondima ya bato oyo bazali kokóma Batatoli ya Yehova ezali bindimandima te.” Likambo yango ezali mpenza solo! Kondima ya solosolo ekufa miso te. Yango etongami likoló na makambo ya solo. Baebele 11:1 elobi ete: “Kondima ezali elendiseli ya biloko bikolikya biso; ezali mpe elimbweli na biloko bizangi komonana.” Molobi amonisaki ete: “Soki tozali kotambola mpenza na kondima, tosengeli kozala na kondima oyo ezali na moboko malamu.” Lokola tozali kotambola na kondima, kasi na komona te, tozali na mposa te ya koyeba makambo mikemike na ntina na lolenge mpe ntango oyo Yehova akokokisa likambo mokomoko ya mokano na ye. Makambo oyo tosili koyeba mpo na ye mazali kopesa biso elikya makasi likoló na nguya na ye ete akokokisa bilaka na ye na bolingo mpe na boyengebene.

Lisukúlu “Bilenge baklisto bazali na ntina mingi kati na lisangá” ekundwelaki bilenge ete bazali na motuya mingi na miso ya Yehova. Balendisaki bango ete bákola na elimo na komityeláká mikano lokola kotánga Biblia mobimba mpe kokokisa masɛngami mpo na komipesa mpe kozwa batisimo. Kotánga kelasi ya milai ezali likambo ya moto ye moko, oyo asengeli kosolola yango elongo na baboti, kasi soki bakani kosala bongo, mokano yango esengeli kozala ntango nyonso ya koluka kozwa makoki mpo na kosalela Nzambe malamu koleka. Kelasi ya mosuni ekoki kosunga mpo na kokokisa mokano moko ntango tozali “koluka koyeba makambo maleki ntina,” oyo mazali na boyokani na kondima na biso.​—Bafilipi 1:9, 10, NW.

Nsima na yango, ezalaki na masukúlu-matongani na biteni misato na motó na likambo ete “Olandaka mitindá ya nani?” Kondima kati na Liloba ya Nzambe ezali kopusa biso na kotosa mitindá ya Biblia. Baklisto batosaka mibeko mpe mitindá ya Yehova. Na ndakisa, Makomami mazali kokebisa biso ete tósalela te maloba ya mbindo mpe ya kozokisa. (Baefese 4:31, 32) Molobi atunaki: “Ntango batumoli yo to basilikisi yo, ofingaka mobalani na yo to bana na yo?” Ya solo, lolenge wana ebongi na moklisto te. Nzambe apesi mitindá mpo na bomoto na biso. Baklisto basengeli komilatisa “na makanisi malamu, mpe na bopɔlɔ.” (1 Timoté 2:9, 10) Liloba “bopɔlɔ” ezali kopesa likanisi ya limemya ya yo moko, ya lokumu, kozanga kolekisa ndelo, mpe ya kozala na bokatikati. Topusami na kolinga bato mosusu mpe tokambami na mitindá ya Biblia mpe na makanisi ya kosala makambo oyo elongobani.

Eteni ya mibale mpe ya misato ya masukúlu-matongani esangisaki botaleli ya vɛrsɛ́ mokomoko ya mokanda ya Baebele 3:7-15 mpe 4:1-16. Mikapo yango ya Biblia mizali kokebisa biso ete “komikómisa motema makasi na nguya ya bozimbisi ya masumu” ezali na likama. (Baebele 3:13, NW) Lolenge nini tokoki kolónga etumba na biso na masumu? Yehova azali kosunga biso na nzela ya Liloba na ye. Ya solo, “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya mpe . . . ezali komeka makanisi mpe mikano na motema.”​—Baebele 4:12.

Lisukúlu ya nsuka mpo na mokolo ya liboso ya liyangani ezalaki “Búku mpo na bato nyonso.” Yango emonisaki bosolo, bosikisiki, mpe motuya ya Biblia. Ezalaki mpenza likambo ya esengo ntango molobi alobelaki kobimisama ya mwa búku ya nkasa 32 na motó na likambo Búku mpo na bato nyonso! Mwa búku yango ebongisami mpenzampenza mpo na bato oyo, atako batángá kelasi mingi, bayebi makambo mingi te na ntina na Biblia. Lisoló esukaki na maloba oyo: “Bato bazali na mposa ya kotalela bango moko Liloba ya Nzambe. Tozali kolikya ete soki bakotánga yango bango moko, bakondimisama ete Biblia, ekeseni na babúku mosusu, ete ezali solo búku mpo na bato nyonso!”

Tómekola “Mokokisi ya kondima na biso”

Motó na likambo oyo ya mokolo ya mibale ya liyangani ebendaki likebi likoló na Yesu Klisto, “Mokokisi ya kondima na biso.” Tosengeli “kolanda matambe na ye.” (Baebele 12:2; 1 Petelo 2:21, NW) Bayebisaka bato mingi na mangomba ya boklisto ete: ‘Ndimelá Nkolo Yesu, mpe okobika!’ Kasi kondima esuki bobele bongo? Biblia elobi ete “kondima oyo ezangi misala esili kokufa.” (Yakobo 2:26) Na yango, longola kondimela Yesu, tosengeli kosala misala ye asalaki, mpenzampenza kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.

Manáka ya ntɔ́ngɔ́ elobelaki mingi mosala ya kosakola. Lokola Paulo, tosengeli kozala na mposa makasi ya kosakola nsango malamu ya lobiko. (Baloma 1:14-16) Yesu asakolaki epai na bato na bisika nyonso. Atako mosala na biso ya kosakola ndako na ndako ezali kobota mbuma, bato mingi bazalaka na ndako te ntango tokendaka kotala bango. (Misala 20:20) Mingi bazalaka na eteyelo, na mosala, na zando to na mobembo. Na yango, tosengeli mpe koteya na bisika ya bato nyonso mpe epai nyonso oyo tokoki kokutana na bato.

Lisukúlu “Pikamá ngwi kati na solo mpe kotɛngatɛnga te” ekundwelaki biso ebele ya bayekoli ya sika oyo bazali kozwa batisimo—mwayene ya koleka 1 000 mokolo na mokolo! Ezali na ntina mingi ete bato oyo ya sika bápikama ngwi mpe bátɛngatɛnga te kati na kondima. (Bakolose 2:6, 7) Molobi alimbolaki ete misisa ya nzeté ebendaka mai mpe biloko oyo bikólisaka nzeté mpe bobele na ntango yango ezali kosala ete nzeté epikama makasi. Bobele bongo, na nzela ya mimeseno malamu ya boyekoli mpe boninga ya malamu, bayekoli ya sika bakoki kopikama kati na solo.

Toli yango ebongaki mpenza na bakandidá mpo na batisimo. Ɛɛ, na mokolo ya mibale ya liyangani, ebele ya bayekoli ya sika bazwaki batisimo, kolandáká ndakisa ya Yesu. Lisukúlu “Kondima kati na Liloba ya Nzambe ezali komema na batisimo” ekundwelaki bakandidá mpo na batisimo ete kozindisama mobimba kati na mai ezali elembo ebongi mpo na komonisa ete bakufi na bomoi na bango ya kala oyo ezalaki koluka matomba na bango moko. Kobimisama na bango na kati ya mai ezali komonisa ete bazongisami na bomoi mpo na kosala mokano ya Nzambe.

Lisukúlu “Bundá makasi mpo na kondima” etongamaki kati na Biblia na mokanda ya Yuda. Tolendisamaki na kobatela kondima na biso na kotɛmɛláká bopusi mabe, lokola bizaleli ya mbindo, botomboki, mpe lipɛngwi. Na nsima, baboti—mingimingi batata—batyaki likebi na lisukúlu “Kokisá bamposa ya bato ya ndako na yo.” Kokokisa bamposa ya elimo, ya mosuni, mpe ya mayoki mpo na libota ezali mokumba euti na Makomami. (1 Timoté 5:8) Yango ezali kosɛnga ntango, kosolola, mpe kozala penepene. Na ntembe te, Yehova Nzambe asepelaka na misala makasi nyonso oyo baboti baklisto bazali kosala mpo na kobɔkɔla bana na bango kati na solo.

“Tiká ete tókende na ndako ya Yehova,” ezali motó na likambo ya masukúlu-matongani oyo elandaki, ekólisaki bosepeli mpo na makita ya boklisto. Yango ezali esika ya bopemi mpo na mitungisi ya mokili oyo. Na makita tozali na libaku malamu ya kopesana bilendiseli, mpe tokoki komonisa bolingo na biso mpo na baninga na biso bandimi. (Baebele 10:24, 25) Makita masungaka biso lisusu na kokólisa makoki na biso mpo na koteya malamu, mpe makólisaka boyebi na biso ya mokano ya Nzambe. (Masese 27:17) Tómitangola mosika na lisangá te, mpe tókanisa maloba ya Yesu ete: “Wana mibale to misato bayangani mpo na nkombo na ngai, ngai nazali kati na bango.”​—Matai 18:20.

Lisukúlu ya nsuka na mokolo yango ezalaki “Motuya ya kondima na yo—Emekami sikawa.” Kondima oyo emekami te ezali na motuya oyo emonisami te, mpe lolenge na yango eyebani naino te. Ekokani na chèque oyo batii yango naino sinyatili te. Mosolo oyo ekomami kati na yango ezali na motuya te, boye te? Bobele bongo, kondima na biso esengeli komekama mpo na komonisa ete ezali na makoki mpe na motuya ya solo. (1 Petelo 1:6, 7) Molobi alobaki ete: “Na bantango mosusu, bakonzi ya mangomba mpe bapɛngwi bakosaka bapanzi nsango mpe bakonzi ya Letá na kobimiseláká Batatoli ya Yehova bifundeli ya lokuta, komonisáká bindimeli mpe lolenge ya bomoi na biso na lolenge mabe. . . . Tokopesa nde nzela na bato oyo Satana abomi bango miso ete bábangisa biso mpe bálɛmbisa mitema na biso na boye ete tóyoka nsɔni mpo na nsango malamu? Tokopesa nde nzela na lokuta oyo ezali kolobama na ntina na solo epekisa biso koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita mpe kobima na mosala ya kosakola? To tokotikala ngwi mpe tokozala na mpiko mpe na ekateli makasi ya kokóba kosakola solo na ntina na Yehova mpe Bokonzi na ye?”

Biká mpo na kondima

Motó na likambo ya mokolo ya misato ya liyangani etongamaki likoló na maloba ya Paulo ete: “Emonani polele mpe ete moto akozala moyengebene liboso na Nzambe na nzela na Mibeko te, mpo ete, Moyengebene akobika [mpo] na kondima.” (Bagalatia 3:11) Masukúlu-matongani, “Maloba ya esakweli ya Yoele mpo na mikolo na biso,” ezalaki moko na makambo ya ntina na ntɔ́ngɔ́. Mokanda ya Yoele ezali kotalela mikolo na biso mpe mpo na komonisa ete ezali likambo ya nokinoki mokanda yango elobi ete: “Mawa mpo na mokolo yango! Zambi mokolo na [Yehova] ebɛlɛmi, ezali koya lokola libebisami uta na Oyo-na-Nguya-Nyonso.” (Yoele 1:15) Motindo moko na mayoyo oyo mazali kopota mbangu makasi, baklisto bapakolami bapesi nzela na eloko moko te ete ekanga mosala ya kosakola Bokonzi na mikolo oyo ya nsuka.

Mokanda ya Yoele ezali mpe kopesa elikya, na kolobáká ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika.” (Yoele 2:32) Yango esuki te bobele na kotánga nkombo ya Yehova. Esengeli kobongola motema mpe kotika misala ya mabe. (Yoele 2:12, 13) Ntango ya kozela ezali te mpamba te mosika te Yehova akosambisa mabota, ndenge asalaki yango likoló na Moaba, na Amona, mpe likoló na etúká ya ngombangomba ya Seili na mikolo ya Yosafata, Mokonzi ya Yuda.​—2 Ntango 20:1-30; Yoele 3:2, 12.

Bato nyonso balendisamaki na lisukúlu oyo ezalaki na motó na likambo ete “Monisá kondima na kozeláká Yehova.” Sikawa tosili kopusana mosika kati na mikolo ya nsuka, tokoki kotala ebele na bisakweli ya Yehova oyo bisili kokokisama, mpe tozali kosepela mingi na makambo oyo makokokisama. Libota ya Yehova esengeli kokóba komonisa motema molai, komikundoláká ete makambo nyonso oyo Nzambe asili kolaka makokokisama.​—Tito 2:13; 2 Petelo 3:9, 10.

Manáka ya ntɔ́ngɔ́ esukaki na lisano-liteya “Batelá liso na yo malamu.” Lisano-liteya oyo esimbaki mitema ya bato elendisaki biso na kotalela ezalela na biso na oyo etali koluka biloko ya mosuni. Ata tofandi epai wapi, soki tolingi ete bomoi na biso ezanga mitungisi, tosengeli kolanda toli ya Yesu mpo na kobatela liso na biso malamu, tótala polele epai na Bokonzi ya Nzambe.​—Matai 6:22.

Lisukúlu ya bato nyonso ezalaki na motó na likambo oyo ebendaki likebi ya bato “Kondima mpe bomoi na yo na mikolo mizali koya.” Yango emonisaki bilembeteli ya kozanga makoki ya batambwisi ya mokili mpo na kosilisa mikakatano na mokili. (Yilimia 10:23) Makambo oyo mazalaki kosalema kala mazali sé kozongelama—mazali sé kokóma mabe koleka mpe kopesa mpasi mingi koleka. Batatoli ya Yehova bazali kokanisa nini na ntina na mikolo mizali koya? Tondimisami ete bato ya bosembo bakozala malamu na mikolo mizali koya na nsé ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 5:5) Nzambe akokokisa bilaka na ye mpo na bolamu ya baoyo nyonso bazali na kondima kati na Liloba na ye, oyo ezali koloba na biso ete: “Bóluka [Yehova] naino akoki komonana, bóbyanga ye naino abɛlɛmi penepene.”​—Yisaya 55:6.

Yesu abimisaki motuna moko ya ntina mpo na mikolo na biso. Atunaki: “Wana ekoya Mwana na moto, akokuta kondima awa na nsé?” (Luka 18:8) Lisukúlu ya nsuka ezongelaki na bokuse makambo oyo malobamaki na liyangani mpe elobelaki lolenge nini liyangani emonisaki ete kondima kati na Liloba ya Nzambe ezali komonana, atako tozali kati na mokili oyo ezangi kondima mpe oyo emipesi na makambo na yango moko.

Lisusu, tokoki komituna boye, ‘Nazali kati na baoyo bazali na kondima ezangi kotɛngatɛnga epai na Nzambe mpe kati na Liloba na ye?’ Liyangani ya Etúká “Kondima kati na Liloba ya Nzambe” esengeli kosalisa biso na koyanola ɛɛ na motuna oyo. Mpe tozali na botɔ́ndi mingi epai na Yehova mpo ete alendisi kondima na biso epai na ye mpe kati na Biblia, Liloba na ye lipemami!

[Bililingi na lokasa 24]

Ebele ya bandeko ya bolingo malamu basalaki mpenza na esengo mpo na koyamba ebele ya bato bayaki na liyangani

[Bililingi na lokasa 25]

Mabándá minene ya masano lokola oyo esalelamaki na mokili mobimba

[Elilingi na lokasa 25]

L. A. Swingle moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi azali kolakisa mwa búku ya sika

[Elilingi na lokasa 26]

Bato mingi bazwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na bango na Yehova

[Bililingi na lokasa 27]

Bayangani bayembaki nzembo ya Bokonzi na esengo nyonso. Na elilingi ya moke: lisano-liteya “Batelá liso na yo malamu”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto