Ozalaka na botɔ́ndi mpo na lisangá ya Yehova?
“[Yehova] alobi boye ete, Lola ezali kiti na ngai mpe mokili ezali etyelo na makolo na ngai.”—YISAYA 66:1.
1, 2. (a) Bilembeteli nini bizali komonana na miso bindimisi ete Yehova azali na lisangá? (b) Yehova afandaka wapi?
ONDIMAKA ete Yehova azali na lisangá? Soki ɛɛ, mpo na nini ondimaka yango? Okoki koyanola ete: ‘Tozali na Ndako ya Bokonzi. Tozali na lisangá ebongisami malamu mpe ezali na lisangani ya bankulutu. Tozali na mokɛngɛli-motamboli oyo aponami mpe ayaka kotala biso mbala na mbala. Tosalaka mayangani ya minene mpe ya mike. Tozali na filiale ya la Société Watch Tower na ekólo na biso. Ntembe ezali te ete makambo nyonso oyo mpe makambo mosusu mingi mamonisi ete Yehova azali na lisangá oyo ezali kotambola malamu.’
2 Makambo nyonso wana ezali elembeteli ete lisangá ezali. Kasi, soki tosukaka bobele na komona mpe koyeba makambo oyo mazali awa na mabelé, toyebi naino lisangá ya Yehova malamu te. Yehova ayebisaki Yisaya ete mabelé ezali etyelo ya makolo na ye, kasi lola ezali kiti ya bokonzi na Ye. (Yisaya 66:1) Yehova azalaki kolobela “lola” oyo wapi? Mopɛpɛ oyo ezingi biso? Makoló? To esika mosusu epai bomoi ya lolenge mosusu ezali? Yisaya alobeli ‘efandelo na bulɛɛ mpe na nkembo’ ya Yehova mpe mokomi na nzembo alobeli makoló yango lokola “efandelo na ye.” Na yango, “lola” oyo elobelami na Yisaya 66:1 ezali bongo mokili ya elimo oyo emonanaka na miso te epai kuna Yehova azali na etɛlɛmɛlo oyo eleki bonene, to etɛlɛmɛlo ya nsuka.—Yisaya 63:15; Nzembo 33:13, 14.
3. Lolenge nini tokoki kolonga ntembe?
3 Yango wana, soki tolingi solo komona mpe koyeba lisangá ya Yehova, tosengeli kotala likoló. Mpe likambo yango ezalaka mokakatano mpo na bato mosusu. Lokola lisangá ya Yehova na likoló emonanaka na miso te, ndenge nini toyebi ete yango ezali solo? Kutu bamoko bakoki naino kobɛta ntembe, komitunáká ete, ‘Ndenge nini tokoki kondima ete yango ezali?’ Ɛɛ, ndenge nini kondima ekoki kolonga ntembe? Ezali na sɛkɛlɛ mibale: boyekoli ya biso moko ya Liloba ya Nzambe na mozindo mpe koyangana mpe kopesa biyano na makita ya boklisto pɔsɔ na pɔsɔ. Boye, tokoki kosilisa ntembe na biso na lisalisi ya pole euti na solo. Ezalaki na basaleli mosusu ya Nzambe oyo babɛtaki ntembe. Tótalela ndakisa ya mosaleli ya Elisa na ntango mokonzi ya Sulia ayaki kobundisa Yisalalele.—Kokanisá na Yoane 20:24-29; Yakobo 1:5-8.
Moto oyo amonaki mampinga ya likoló
4, 5. (a) Mosaleli ya Elisa azalaki na mokakatano nini? (b) Lolenge nini Yehova ayanolaki na libondeli ya Elisa?
4 Mokonzi ya Sulia atindaki limpinga monene ya basoda na butu na Dotani mpo na kokanga Elisa. Ntango mosaleli ya Elisa alamukaki na ntɔngɔntɔngɔ mpe abimaki, mbala mosusu mpo na kozwa mwa mopɛpɛ ya mpiɔ likoló ya ndako na bango kuna na Moyen-Orient, amonaki likambo moko ya nsɔmɔ! Limpinga mobimba ya basoda ya Sulia na bampunda mpe makalo ya etumba ezingaki engumba, kozeláká mpo na kokanga mosakoli ya Nzambe. Mosaleli angangaki epai ya Elisa ete: “Ɛ nkolo na ngai, tokosala nini?” Na ntembe te, na motema mpio mpe na kondimisama, Elisa ayanolaki ete: “Bangá te mpo ete baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango.” Ekoki kozala ete mosaleli amitunaki, ‘Bazali wapi? Nazali komona bango te!’ Ntango mosusu yango ekoki mpe kozala mokakatano na biso—kozanga komona mampinga ya likoló na miso ya bososoli.—2 Mikonzi 6:8-16; Baefese 1:18.
5 Elisa abondelaki mpo ete miso ya mosaleli na ye máfungwama. Nini esalemaki na nsima? “[Yehova] afungolaki miso na elenge mpe amonaki. Talá, ngomba etondaki na mbalata mpe makalo na mɔ́tɔ oyo izali kozingela Elisa.” (2 Mikonzi 6:17) Ɛɛ, amonaki mampinga ya likoló, mampinga ya baanzelu oyo bazalaki kozela mpo na kobatela mosakoli ya Nzambe. Na ntango yango akokaki kososola mpo na nini Elisa azalaki kobanga te.
6. Ndenge nini tokoki kozwa bososoli na ntina na lisangá ya Yehova na likoló?
6 Biso mpe tozalaka ntango mosusu na mokakatano ya kososola lokola oyo mosaleli ya Elisa azalaki na yango? Mikakatano mosusu oyo tokutanaka na yango to oyo mosala ya boklisto ezali kokutana na yango na mikili mosusu, totalelaka yango bobele na miso ya mosuni? Soki ezali bongo, tokoki kolikya kozwa emonaneli moko oyo ekongɛngisa biso? Te, mpamba te tozali na eloko moko oyo mosaleli ya Elisa azangaki—Biblia, buku oyo ezali na ebele ya bimonaneli, oyo ekoki kopesa biso bososoli mpo na koyeba lisangá ya Yehova na likoló. Liloba yango lipemami ezali mpe kopesa mitinda oyo misengeli kosembola makanisi na biso mpe etamboli na biso. Nzokande, tosengeli kosala molende ya koluka bososoli mpe kolona bosepeli mpo na ebongiseli ya Yehova. Mpe tokoki kosala bongo na nzela ya boyekoli na biso moko, na mabondeli mpe na komanyola.—Baloma 12:12; Bafilipi 4:6; 2 Timoté 3:15-17.
Boyekoli mpo na komona
7. (a) Bato mosusu bakoki kozala na mokakatano nini na likambo ya boyekoli ya bango moko? (b) Mpo na nini ezali na ntina ete moto asala milende mpo na koyekola ye moko?
7 Mpo na bato mingi, na ndakisa baoyo bamesanaki koyekola te ntango bazalaki na kelasi to baoyo bazwaki libaku ya kokɔta kelasi te, mbala mosusu kosala boyekoli ya bango moko ezalaka komekama makasi. Nzokande, soki tolingi komona mpe kosepela na lisangá ya Yehova na miso na biso ya bososoli, tosengeli kolona mposa ya koyekola. Okoki nde kolya bilei kitoko soki elambami te? Lolenge molambi nyonso akoki koyebisa yo, kolamba bilei kitoko esɛngaka mosala mingi. Kasi, bilei yango bikoki kolyama bobele na boumeli ya miniti ntuku misato to na nse na yango. Nzokande, matomba ya boyekoli na biso moko makoki koumela bomoi mobimba. Boyekoli na biso moko ekoki kokóma likambo oyo tokobanda kosepela na yango mingi soki tomoni bokoli oyo tokoki kosala. Ntoma Paulo alobaki na bosolo mpenza ete tosengeli ntango nyonso kokeba mpo na biso moko mpe mpo na mateya na biso mpe tókoba komipesa na botángi liboso ya bato nyonso. Likambo yango esɛngi milende ntango nyonso, kasi matomba na yango makoki koumela libela.—1 Timoté 4:13-16.
8. Mokanda ya Masese ezali kolendisa elimo nini?
8 Moto moko ya mayele na ntango ya kala alobaki boye: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na mayele mpe ete otya motema na yo koluka boyebi; ɛɛ, soko okolela mpo na bososoli mpe soko okonganga mpo na boyebi; soko okoluka ye lokola palata, mpe okolukaluka ye lokola na biloko na motuya bibombami; mbɛ, okososola botosi na kotosa [Yehova] mpe okozwana na boyebi na koyeba Nzambe.”—Masese 2:1-5.
9. (a) Wolo ezali na motuya nini liboso ya “boyebi na Nzambe”? (b) Bisaleli nini tosengeli na yango mpo na kozwa boyebi ya sikisiki?
9 Omoni nani asengeli kosala molende? ‘Soko oko. . . ’ ezali maloba oyo mazongelami mingi. Mpe talá maloba oyo, ‘Soko okolukaluka ye lokola na biloko na motuya bibombami.’ Kanisá bato oyo, na boumeli ya bikeke mingi batimolaki mabelé mpo na koluka palata mpe wolo, na bikólo lokola Afrika ya Sudi, Bolivie, Mexique, mpe mikili mosusu. Basalaki mosala makasi, kosaleláká bapikasi mpe bapau, mpo na kotimola mabelé makasi oyo kati na yango bakokaki kozwa mabanga ya motuya. Bapesaki motuya mingi na wolo na boye ete na etúká ya Californie, na États-Unis, ezali na esika moko batimolaki banzela na kati ya mabelé oyo bolai na yango nyonso ezali na kilomɛtɛlɛ 591, mpe na bozindo ya pene na kilomɛtɛlɛ 1,5—bobele mpo na koluka wolo. Kasi, okoki nde kolya wolo? Okoki komela wolo? Ekoki kobatela yo na bomoi kati na mokili mokauki soki olingi kokufa na nzala mpe na mposa ya mai? Te, motuya na yango ezali oyo bato basepeli kopesa yango, mpe ebongwanaka mokolo na mokolo engebene lolenge oyo mombongo na yango ezali kotambola na mikili mingi. Atako bongo, bato bakufaki mpo na yango. Na bongo, tosengeli kosala molende makasi mpo na kozwa wolo ya elimo, elingi koloba “boyebi na Nzambe,” boye te? Kanisá naino, boyebi ya Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́, ya lisangá na ye, mpe ya mikano na ye! Mpo na yango, tokoki kosalela pikasi mpe pau ya elimo. Ezali bongo mikanda mikolimbolaka Biblia oyo misalisaka biso mpo tótimola kati na Liloba ya Yehova mpe kososola ndimbola na yango.—Yobo 28:12-19.
Kotimola mpo na kozwa bososoli
10. Danyele amonaki nini kati na emonaneli?
10 Sikawa, tiká tótimola mwa moke na elimo mpo na kobanda kozwa boyebi ya lisangá ya Yehova na likoló. Mpo na kososola malamu, tófungola na emonaneli oyo Danyele amonaki Mokóló na mikolo afandi na kiti na ye ya bokonzi. Danyele akomi ete: “Ezalaki ngai kotala, Kiti na mokonzi etyamaki mpe [Mokóló na mikolo, NW] afandaki; bilamba na ye bizalaki mpɛmbɛ mpenza, mpe nsuki na ye izalaki lokola [mikunge, NW] na mpate; kiti na ye ezalaki bipelelo na mɔ́tɔ, mpe biyika na yango bizalaki mɔ́tɔ. Ebale na mɔ́tɔ eutaki na liboso na ye; nkóto nkóto basalelaki ye, mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso na ye; basambisi bafandaki, mpe mikanda mifungwamaki.” (Danyele 7:9, 10) Bankóto nkóto oyo bazalaki kosalela Yehova ezalaki banani? Soki tosaleli mitindami ya Traduction du monde nouveau, lokola “pikasi” mpe “pau,” yango ekomema biso na Nzembo 68:17 mpe Baebele 1:14. Ɛɛ, baoyo bazali kosala mosala ezali bongo baanzelu ya likoló!
11. Lolenge nini emonaneli ya Danyele ekoki kosalisa biso na kokanga ntina ya maloba ya Elisa?
11 Lisolo elobi te ete Danyele amonaki baanzelu nyonso ya sembo oyo Nzambe azali kokamba. Ekoki kozala na bamilio mosusu ya baanzelu. Kasi, na ntembe te tokoki sikawa kokanga ntina oyo Elisa akokaki koloba ete: “Baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango.” Mampinga ya basoda ya mokonzi ya Sulia, atako basungamaki na baanzelu bapɛngwi, elingi koloba bademo, bazalaki moke soki tokokanisi bango na mampinga ya basoda ya Yehova na likoló!—Nzembo 34:7; 91:11.
12. Ndenge nini okoki koyeba makambo mingi na ntina na baanzelu?
12 Mbala mosusu okolinga koyeba makambo mosusu na ntina na baanzelu yango, na ndakisa mokumba na bango na mosala ya Yehova. Soki totaleli liloba ya Greke oyo ebongolami na anzelu, tokomona ete bazali bamemi-nsango, mpamba te liloba yango elimboli mpe “momemi-nsango.” Nzokande, mosala na bango esuki wana te. Kasi, mpo na koyeba yango, osengeli kotimola. Soki ozali na buku Insight on the Scriptures na lokota na bino okoki koyekola motó na likambo “Baanzelu,” to okoki koluka masolo oyo masilá kobimisama na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ntina na baanzelu. Okokamwa na komona ebele ya makambo oyo okoki koyekola na ntina na basaleli wana ya Nzambe na likoló mpe okozala na botɔ́ndi mpo na lisungi na bango. (Emoniseli 14:6, 7) Nzokande, kati na lisangá ya Yehova na likoló, bikelamu mosusu ya elimo bazali na mikumba ya sikisiki.
Makambo oyo Yisaya amonaki
13, 14. Yisaya amonaki nini kati na emonaneli, mpe yango esalaki bopusi nini epai na ye?
13 Sikawa tótimola mwa moke na emonaneli ya Yisaya. Soki otángi mokapo 6, vɛrsɛ 1 kino 7, na ntembe te okokamwa. Yisaya alobi ete ‘amonaki Yehova, afandi na kiti ya bokonzi’ mpe ‘baselafa batɛlɛmaki likoló na ye.’ Bazalaki kosakola nkembo ya Yehova, kokumisa bosantu na ye. Na ntembe te mayoki na yo makosimbama na botángi ya lisolo yango. Yisaya asalaki nini? “Boye nalobaki ete, Mawa na ngai, zambi nabungi [na Sheol]! Nazali moto na bibebu na mbindo mpe nafandi kati na bato na bibebu na mbindo; mpo ete miso na ngai mamoni Mokonzi, [Yehova] na bibele.” Akamwaki mingi mpenza na komona emonaneli yango! Ezali mpe bongo mpo na yo?
14 Lolenge nini Yisaya alongaki kotala emonaneli ya nkembo motindo boye? Alimboli ete selafa moko ayaki kosunga ye mpe alobaki ete: “Mabe na yo esili kolongolama mpe masumu na yo ilimbisami.” (Yisaya 6:7) Yisaya akokaki kolikya na motema mawa ya Nzambe mpe kotya likebi na maloba ya Yehova. Sikawa, ozali na mposa ya koyeba makambo mingi na ntina na bikelamu yango ya elimo oyo bizali na etɛlɛmɛlo etombwani, boye te? Na yango osengeli kosala nini? Kotimola mpo na koyeba makambo mosusu. Esaleli moko okoki kosalela ezali bongo Index ya mikanda ya la Société Watch Tower, na kolandáká mitindami na yango na mikanda ndenge na ndenge oyo mizali kopesa ndimbola ya polele.
Ezekiele amonaki nini?
15. Nini emonisi ete emonaneli ya Ezekiele ebongi kotyelama motema?
15 Sikawa, tótalela motindo mosusu ya bikelamu ya elimo. Ezekiele azwaki libaku malamu ya komona emonaneli ya nsɔmɔ wana azalaki naino mokangami na Babilone. Fungolá Biblia na yo na Ezekiele mokapo 1, vɛrsɛ misato ya liboso. Lisolo yango ebandi ndenge nini? Elobi nde ete, ‘Ezalaki mokolo moko, na mokili moko mosika . . . ’? Te, oyo ezali lisapo te. Vɛrsɛ 1 elobi ete: “Na mbula na ntuku misato, na sanza na minei, na mokolo mitano na sanza, wana ezalaki ngai na kati na baombo epai na ebale na Kebale, likoló efungwaki mpe namonaki bimonaneli na Nzambe.” Osimbi likambo nini na ntina na vɛrsɛ oyo? Ezali kopesa dati mpe esika ya sikisiki. Nyonso wana emonisi ete makambo yango masalemaki mbula mitano nsima wana bamemaki Mokonzi Yoyakimi na boombo, elingi koloba na mobu 613 L.T.B.
16. Ezekiele amonaki nini?
16 Lobɔkɔ ya Yehova ezalaki likoló na Ezekiele, mpe abandaki komona emonaneli ya nsɔmɔ mpenza ya Yehova afandi na kiti ya bokonzi na likalo monene ya likoló oyo ezalaki na bayika etondi na miso pembenipembeni na yango. Likambo oyo ebendi likebi na biso awa ezali ete bikelamu minei bizalaki wana, mokomoko etɛlɛmaki na yika moko. “Bamonanaki boye: bazalaki na lolenge na bato, nde moko na moko azalaki na bilongi minei mpe moko na moko azalaki na mapapu minei. . . . Na mpo na lolenge na bilongi na bango, moko na moko azalaki na elongi na moto, mpe bango minei bazalaki na elongi na nkosi na lobɔkɔ na mobali, mpe bango minei bazalaki na elongi na ngɔmbɛ na lobɔkɔ na mwasi, mpe bango minei bazalaki na elongi na mpongo lokola.”—Ezekiele 1:5, 6, 10.
17. Bilongi minei ya bakeluba ezali elilingi ya nini?
17 Bikelamu ya bomoi yango minei ezalaki banani? Ezekiele ye moko ayebisi biso ete ezalaki bongo bakeluba. (Ezekiele 10:1-3, 14) Mpo na nini bazali na bilongi minei? Mpo na komonisa bizaleli minei ya minene ya Nkolo Mokonzi Yehova. Elongi ya mpongo ezalaki elilingi ya mayele ya kososola na mozindo. (Yobo 39:27-29) Elongi ya ngɔmbɛ elimbolaki nini? Na makasi oyo ezali na nkingo mpe mapeka na ye, ngɔmbɛ oyo ezali kobunda ekoki kobwaka likoló mpunda na momati na yango. Na ntembe te, ngɔmbɛ ezali elilingi ya nguya ya Yehova oyo ezangi nsuka. Nkosi esalelamaka lokola elilingi ya boyengebene ya mpiko. Na nsuka, elongi ya moto ebongi mpenza mpo na komonisa bolingo ya Nzambe, mpamba te moto azali ekelamu bobele moko awa na mabelé oyo ekoki komonisa ezaleli yango na mayele.—Matai 22:37, 39; 1 Yoane 4:8.
18. Lolenge nini ntoma Yoane afungoli biso lisusu miso mpo na komona lisangá ya likoló?
18 Ezali na bimonaneli mosusu oyo bikoki kosalisa biso mpo na kozwa bososoli mozindo ya makambo yango. Kati na yango, tozali na bimonaneli ya Yoane oyo bimonisami na mokanda ya Emoniseli. Lolenge moko na Ezekiele, ye amonaki Yehova na kiti ya bokonzi elongo na bakeluba. Bakeluba bazali kosala nini? Bazali kozongela maloba ya baselafa na Yisaya mokapo 6 ete: “Santu, santu, santu! Nkolo Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki mpe azali mpe akozala seko.” (Emoniseli 4:6-8) Yoane amoni mpe mwana na mpate pembeni ya kiti ya bokonzi. Ekoki kozala elilingi ya nani? Ezali bongo Mwana na Mpate ya Nzambe, Yesu Klisto.—Emoniseli 5:13, 14.
19. Na nzela ya boyekoli oyo, omoni nini na ntina na lisangá ya Yehova?
19 Na bongo, tomoni nini na lisalisi ya bimonaneli oyo? Tomoni ete Yehova azali motó na lisangá ya likoló, afandi na kiti na ye ya bokonzi mpe Mwana na Mpate, Yesu Klisto, oyo abéngami mpe Liloba, to Logos azali pembeni na ye. Na nsima, tomoni mampinga ya baanzelu ya likoló, na baselafa mpe bakeluba. Bazali kati na lisangá moko monene, oyo ezali na bomoko mpe ezali kosala mpo na kokokisa mikano ya Yehova. Mpe moko na mikano yango ezali bongo kosakola nsango malamu na mokili mobimba na ntango oyo ya nsuka.—Malako 13:10; Yoane 1:1-3; Emoniseli 14:6, 7.
20. Lisolo lilandi ekoyanola na motuna nini?
20 Mpo na kosukisa, tozali na Batatoli ya Yehova awa na mabelé oyo bayanganaka na Bandako ya Bokonzi mpo na koyekola ndenge nini kosala mokano ya Nkolo Mokonzi. Na ntembe te, tokoki sikawa komona ete baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na Satana mpe banguna ya solo. Motuna etikali yango oyo, lisangá ya likoló ezali kokokisa mokumba nini na kosakolama ya nsango malamu? Lisolo lilandi likotalela likambo yango mpe makambo mosusu.
Mituna ya bozongeli
◻ Mpo na kozala na botɔ́ndi mpo na lisangá ya Yehova, tosengeli kososola eloko nini?
◻ Mosaleli ya Elisa amonaki likambo nini, mpe lolenge nini mosakoli alendisaki ye?
◻ Lolenge nini tosengeli kotalelaka boyekoli ya biso moko?
◻ Ndenge nini Danyele, Yisaya, mpe Ezekiele bamonisi lisangá ya likoló?
[Elilingi na lokasa 13]
Matomba ya boyekoli ya moto ye moko maleki mpenza matomba ya bilei bilambami malamu
[Elilingi na lokasa 15]
Emonaneli ya mampinga ya likoló ezalaki eyano ya Yehova na libondeli ya Elisa