Tozwi ekateli ya kolanda nzela ya Nzambe
Mayangani ya etúká “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi” eteyaki baoyo balingi kosalela Nzambe makambo mingi! Moyangani moko alobaki ete yango ezalaki “ntango malamu ya koyoka mateya, bilendiseli, mpe bingɛngiseli.”
MOYANGANI mosusu abakisaki ete “makambo ya kosepelisa, ya komanyola, ya kokanga ntina.” Sikoyo, tólobela naino manaka yango moko.
Yesu Klisto azali nzela, solo mpe bomoi
Oyo ezalaki motó ya likambo ya mokolo ya liboso ya liyangani. (Yoane 14:6) Lisolo ya liboso emonisaki mpo na nini toyanganaki: mpo na koteyama lisusu mingi na nzela oyo eleki malamu, nzela ya Nzambe oyo ezali komema na bomoi. Yehova ateyaka bato na ye ndenge oyo basengeli kotambola na banzela na ye. Asalaka yango na nzela ya Biblia, na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpe na nzela ya elimo santu. (Matai 24:45-47; Luka 4:1; 2 Timote 3:16) Koteyama na Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba ezali mpenza libaku malamu!
Na kolanda motó ya likambo ya mokolo yango, lisukulu ya moboko ezalaki na motó ya likambo ete “Lisiko ya Klisto—Nzela ya Nzambe mpo na lobiko.” Ntango tozali kolanda nzela ya Nzambe, tosengeli koyeba mokumba ya Yesu kati na mokano ya Yehova. Molobi alobaki ete: “Kozanga mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto, mbɛlɛ moto moko te, ata soki azali na bindimeli nini to soki akokisaka misala nini, akoki kozwa bomoi ya seko oyo Nzambe akopesa.” Na nsima, azongelaki Yoane 3:16, oyo elobi ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” Kondimela mbeka ya lisiko ya Klisto esɛngi tóyeba solo malamumalamu. Esɛngi mpe komipesa na Yehova, na nsima komonisa yango na batisimo ya mai, mpe kolanda ndakisa ya Yesu Klisto.—1 Petelo 2:21.
Na nsima ya midi, manaka ebandaki na lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Nzela ya bolingo ekosuka te.” Lisolo etalelaki vɛrsɛ mokomoko ya 1 Bakolinti 13:4-8, epai Paulo alimbolaki bolingo na bozindo. Bakundwelaki bayangani ete bolingo oyo endimi komipimela ezali elembo ya boklisto mpe ete kolinga Nzambe mpe mozalani ezali makambo ya ntina mingi na losambo oyo Yehova andimaka.
Na nsima, tolandaki masukulu misato matongani. Motó ya likambo na yango elobaki: “Baboti—Bóteya bana na bino nzela ya Nzambe.” Baboti bakoki kosalisa bana na bango ete básalela Nzambe soki bazali kopesa bango ndakisa malamu na kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe. Bakoki kokɔtisa mateya ya solo na bɔɔngɔ ya bana na bango na nzela ya boyekoli ya libota oyo ezali kosalema pɔsɔ na pɔsɔ mpe oyo ezali kotalela bamposa ya libota. Basengeli mpe kosalisa bana na bango básanganaka na bibongiseli ya lisangá mpe na mosala ya kosakola. Atako kobɔkɔla bana bákóma bato oyo bazali kobanga Nzambe ezali etumba monene na mokili oyo mabe, mbano monene ezali kozwama na kosala bongo.
Na nsima ya masukulu-matongani, tolandaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tiká ete Yehova abongisa bino mpo na mosala ya lokumu.” Se lokola moyemi abongisaka mbeki, Nzambe abongisaka baoyo balingi kosalela ye. (Baloma 9:20, 21) Mpo na kosala yango, apesaka toli na nzela ya Liloba na ye mpe na nzela ya ebongiseli na ye. Yehova akosalisa biso ete tósalela makoki na biso nyonso soki tomipesi, tondimi mikumba, mpe totiki ete atambwisa makolo na biso.
Lisolo moko kitoko elandaki: “Mosala ya bamisionere na mikili ndenge na ndenge.” Lelo oyo, baministre baklisto 2 390 bazali kosala mosala ya misionere na mikili 148. Bazali ndakisa malamu ya bosembo mpe ya molende mpe bazali na botɔndi mpo na libaku malamu ya kosala na mboka mopaya. Na kati ya lisolo yango oyo esalemaki na mayangani ya mikili mingi, bamisionere balobelaki mikakatano mpe bisengo ya bomoi ya misionere.
Lisukulu ya nsuka na mokolo ya liboso ezalaki na motó ya likambo ete “Bomoi ezalaka nsima ya liwa?” Motuna oyo etungisaka bato banda kala. Na bisika nyonso, bato bamitungisaka na motuna yango. Biyano mingi epesamaka. Bato na bato bazali kopesa biyano na bango na ndenge oyo bonkɔkɔ mpe mangomba na bango eteyaki bango. Kasi, bato basengeli koyeba solo.
Yango wana, molobi alakisaki mwa buku ya sika ya nkasa 32 oyo ezali na motó ya likambo ete Nini ekómelaka biso soki tokufi? Mwa buku yango ezali kolimbola epai wapi liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te eutaki mpe ezali komonisa ndenge nini yango ekómi lelo oyo liteya monene na mangomba nyonso ya mokili. Mwa buku yango eyebisi polele mpe na ndenge ya kosepelisa oyo Biblia ezali koteya mpo na molimo, emonisi ntina oyo tokufaka, mpe nini ekómelaka biso soki tokufi. Mwa buku yango eyebisi mpe elikya oyo ezali mpo na bakufi mpe bato oyo bazali na bomoi. Mwa buku yango ekosunga mpenza bato oyo bazali koluka solo!
Bókebaka mpenza mpo na etamboli na bino
Motó ya likambo oyo ebongaki mpenza mpo na mokolo ya mibale ya liyangani! (Baefese 5:15) Na ntɔngɔ, masolo elobelaki mingi mosala ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli. Nsima ya kotalela mokapo ya mokolo, manaka ekobaki na lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tósalisa bato ete bálanda nzela oyo ezali komema na bomoi.” Mpo na kokokisa mosala oyo ezali kosalema nokinoki, tosengeli kozala na makanisi malamu mpe tóbosana te ete koteya bato mosusu solo ezali libaku malamu mpe ezali mokumba. Na ekeke ya liboso T.B., bato mingi baboyaki Liloba ya Nzambe. Nzokande, atako botɛmɛli ezalaki, bato mosusu ‘bazalaki na makanisi mabongi mpo na bomoi ya seko mpe bakómaki bandimi.’ (Misala 13:48, 50, NW; 14:1-5) Makambo mazali se ndenge moko lelo oyo. Atako bato mingi bazali koboya solo ya Biblia, tozali ntango nyonso koluka bato oyo bakondima.—Matai 10:11-13.
Lisolo oyo elandaki elobelaki mokakatano ya kokutana na bato mosusu mpo na koteya bango nsango ya bomoi. Lokola ekómi mpasi mpo na kokuta bato na bandako na bango, tosengeli kolukaluka mpe kokanisa ndenge ya kokutana na bango mpo na koteya nsango ya Bokonzi epai ya bato mingi koleka. Na mikili mingi, basakoli ya nsango malamu bazali kozwa matomba na ndenge bazali kopesa litatoli na nzela ya telefone mpe bazali kosakola na bisika ya mombongo, mpe na bongo bazali kokutana na bato oyo ezali mpasi mpo na kokutana na bango na bisika mosusu.
Lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tóteya bayekoli makambo nyonso oyo Klisto alakaki,” emonisaki mpenza ntina ya kokolisa makoki na biso na mosala ya kosakola. Makoki na biso ya koteya ekokola soki tozali komekola ndakisa ya bato mosusu mpe soki tozali kosalela toli malamu oyo tozali kozwa na makita ya lisangá. Soki tokómi koteya malamu mpenza, esengo na biso ekobakisama mpe tokosepela na mosala na biso ya kosalisa bato ete báyekola solo ya Biblia.
Lisolo ya nsuka na ntɔngɔ elimbolaki komipesa mpe batisimo. Molobi amonisaki ete soki totyeli Nzambe motema mpe tozali kosala nyonso mpo na kokokisa makambo oyo alingi, akopambola biso mpe akosunga biso. Moto ya mayele akomaki ete: “Na nzela nyonso na yo, ndimá [Nzambe] mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:6) Molulu ya batisimo ezalaki mpe likambo monene mpe ya esengo oyo emonisaki ete bato mingi babandi kolanda nzela ya Nzambe.
Nsima ya bopemi ya midi, manaka ebandaki na lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tósalaka na mokano ya kozwa bomoi ezangi nsuka.” Nzambe akokokisa mokano na ye ya kosangisa bato ya botosi oyo bakosalela ye libela na libela awa na mabelé. Yango wana, ebongi mpenza ete makanisi na biso, mikano na biso, mpe bilikya na biso ezala ya kosalela Yehova libela na libela! Wana tolingi kobatela “mokolo ya Yehova” na makanisi, tosengeli kobosana te ete mokano na biso ezali ya kosala mpo na libela. (2 Petelo 3:12) Lokola toyebi mpenza ntango oyo Yesu akokokisa bikateli ya Nzambe te, yango ezali kosalisa biso ete tólala mpɔngi te mpe ezali kopesa biso libaku ya komonisa mokolo na mokolo ete tozali kosalela Yehova mpo na kokokisa mikano ya biso moko te.
Masolo mibale oyo elandaki etalelaki mokapo ya 4 ya mokanda ya Paulo epai ya Baefese. Masolo yango elobelaki makambo mingi, moko na yango ezali lipamboli oyo tozali na yango ya “makabo na motindo na mibali,” elingi koloba mibali oyo bazali na makoki ya elimo mpe baponami na elimo santu. Bankulutu yango bapesaka biso toli mpe litambwisi mpo na bolamu na biso ya elimo. Mokanda ya Paulo oyo epemamaki na Nzambe ezali kolendisa baklisto ete bálata “bomoto ya sika.” (Baefese 4:8, 24, NW) Bomoto oyo Nzambe alingaka ezali na bizaleli lokola mawa, boboto, komikitisa, bopɔlɔ, motema molai, mpe bolingo.—Bakolose 3:12-14.
Kokeba na etamboli na biso esɛngi komibatela ete tózwa litɔnɔ ya mokili te—yango ezalaki motó ya likambo ya lisolo oyo elandaki. Tosengeli kozala na bokatikati mpo na kopona kominanola, makambo mosusu oyo mazali kozwa biso ntango, mpe koluka biloko ya mosuni. Soki tolandi toli ya Yakobo 1:27 oyo elobi ete tómibatela na litɔnɔ nyonso ya mokili, tokozala na lokumu malamu na miso ya Nzambe mpe tokozala na lisosoli malamu. Tokozala mpe na bomoi oyo ezali na ntina mpe tokozala na kimya, tokozala na bozwi ya elimo, mpe tokozala na baninga ya malamu.
Na nsima, tolandaki masukulu misato matongani oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bilenge—Bólanda nzela ya Nzambe.” Lokola bayebi ete Nzambe alingaka bango mpe asepelaka na milende na bango mpo na kobatela losambo ya pɛto, bilenge basengeli kokolisa makoki na bango ya kokanisa mpo básalela ye na bosembo nyonso. Lolenge moko ya kokolisa makoki na bango ya kokanisa ezali kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe komanyola likoló na yango. Soki tozali kosala bongo, tokoki koyeba banzela ya Yehova. (Nzembo 119:9-11) Mpe lisusu, kondima toli ya mayele oyo euti na baboti, bankulutu, mpe mikanda ya la Société ekolisaka makoki ya kokanisa. Soki bilenge bazali kosalela malamu makoki na bango ya kokanisa, bakolonga motungisi ya kozala na mposa ya kozwa biloko mingi ya mosuni, maloba ya salite, mpe kolekisa ndelo na kominanola oyo ezali komonana na mokili oyo eboyi Nzambe. Soki bazali kolanda nzela ya Nzambe, bilenge mpe bakóló bakoki mpenza kolonga.
Lisolo ya nsuka na mokolo yango ezalaki na motó ya likambo ete “Mozalisi—Bomoto na ye mpe banzela na ye.” Nsima ya komonisa ete bamiliare ya bato bayebi Mozalisi te, molobi alobaki ete: “Mpo na kozala na bomoi oyo ezali na ntina, esengeli koyeba Mozalisi, Nzambe na biso; koyeba bomoto na ye; mpe kolanda banzela na ye. . . . Mokili mpe biso moko tozali na makambo mingi oyo tokoki kosalela mpo na kosalisa bato mpo bándima Mozalisi mpe bomoi na bango ezala na ntina na miso na ye.” Na nsima, molobi apesaki bilembeteli oyo emonisi ete ezali na Mozalisi oyo atondi na mayele mpe na bolingo. Na nsuka ya lisolo alakisaki buku ya sika—Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous ?
“Oyo ezali nzela, tambolá na yango”
Yango ezalaki motó ya likambo ya mokolo ya misato ya liyangani. (Yisaya 30:21) Manaka ebandaki na masukulu misato matongani. Masukulu yango elobelaki emonaneli ya tempelo oyo Ezekiele amonaki. Emonaneli yango ezali na ndimbola monene mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo mpamba te etaleli losambo ya pɛto na mikolo na biso. Sɛkɛlɛ mpo na kokanga ntina ya emonaneli wana yango oyo: Tempelo monene ya Yehova na elimo elimboli ebongiseli na ye mpo na losambo ya pɛto. Wana bazalaki kolimbola biteni ya emonaneli yango, bayoki bazalaki komanyola likoló ya mosala na bango mpo na kosunga mosala oyo bakɛngɛli ya bolingo bazali kosala, ezala batikali bapakolami mpe baoyo bakokóma basangani ya kelasi ya mokonzi.
Na nsima, bobele na ntɔngɔ yango, bayangani balandaki lisano-liteya kitoko euti na Biblia. Basani balataki molato ya ntango ya kala. Motó ya likambo ya lisano-liteya ezalaki ete “Mabota—Bókómisa botángi ya Biblia mokolo na mokolo lolenge ya bomoi na bino!” Emonisaki kondima mpe mpiko ya bilenge Baebele misato oyo baboyaki kongumbamela ekeko ya wolo oyo Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone atɛlɛmisaki. Ntina ya lisano-liteya yango ezalaki ya komonisa ete Biblia ezali bobele mokanda ya masolo ya kala te; kasi toli na yango ezali na litomba ezala mpo na bilenge to mpo na bakóló lelo oyo.
Na nsima ya midi, ntango ekokaki mpo na kolanda lisukulu ya bato nyonso. Motó ya likambo na yango ezalaki “Nzela bobele moko oyo ezali komema na bomoi ya seko.” Nsima ya kolobela lisolo ya bato, na ndenge bakweaki na lisumu mpe na liwa, molobi asukisaki na maloba oyo mazali kopusa na kokanisa: “Mokapo ya Biblia oyo esimbi liyangani oyo ezali Yisaya mokapo 30, vɛrsɛ 21, oyo elobi ete: “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai na mobali to na epai na mwasi.” Ndenge nini toyokaka mongongo yango? Na ntango tozali koyoka Liloba ya Nzambe, Biblia Mosantu, mpe ntango tozali kolanda litambwisi oyo Yehova Nzambe, Moteyi na biso Monene, azali kopesa na nzela na yango mpe na nzela ya ebongiseli ya boklisto na mikolo na biso. Ɛɛ, kosala bongo ezali nzela bobele moko oyo ezali komema na bomoi ya seko.”
Nsima ya lisolo mokuse na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongisamaki mpo na pɔsɔ ya liyangani, bayangani balandaki lisolo ya nsuka. Motó ya likambo na yango ezalaki “Bókoba kotambola na nzela ya Yehova.” Ezongelaki makanisi ya ntina ya manaka ya liyangani. Na nsima, molobi amonisaki ekateli oyo emonisi ete tolingi kotambola na nzela ya Nzambe.
Ekateli yango elobaki boye na nsuka: “Tondimi ete kozala na bomoi oyo etambwisami na mitinda, na toli, mpe na makebisi ya Makomami lelo oyo, ezali kopesa bomoi malamu koleka mpe yango ezali moboko malamu mpo na mikolo mizali koya, mpo ete tókoka kosimba makasi bomoi ya solosolo. Likambo ya ntina koleka, tozwi ekateli oyo mpamba te tolingi Yehova Nzambe na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso mobimba, mpe na makasi na biso mobimba!” Bayangani nyonso bandimaki na mongongo makasi ete, Ɛɛ!
[Etanda/Elilingi na lokasa 8]
Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous ?
Buku ya sika oyo ezali na motó ya likambo oyo ezali kopesa bilembeteli ya solosolo ete Yehova Mozalisi azali, mpe ezali komonisa bizaleli na ye. Ebongisami mingimingi mpo na bato oyo batángi kelasi mingi kasi bandimaka Nzambe te. Buku yango ya nkasa 192 ekokolisa mpe kondima ya bato oyo bandimaka Nzambe mpe ekobakisa botɔndi na bango mpo na bomoto mpe banzela na ye.
Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous ? ekomami na likanisi ete moto oyo azali kotánga yango andimaka te ete Nzambe azali. Kasi, elobeli ndenge oyo bolukiluki ya siansi na mikolo oyo mpe makanisi ezali komonisa ete Mozalisi azali. Mikapo na yango mosusu ezali na mitó ya makambo oyo: “ Qu’est-ce qui pourrait donner plus de sens à votre vie, ” “Apparition de l’univers : la controverse, ” mpe “ Vous êtes unique ! ” Mikapo mosusu emonisi ntina oyo tokoki kondima ete Biblia epemami na Nzambe. Buku ya sika elobeli Biblia na bonene, buku oyo ezali komonisa bizaleli mpe banzela ya Mozalisi. Buku yango esuki kaka na koyebisa ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi te kasi elimboli mpe ndenge nini akosilisa bampasi yango mpo na libela.
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 7]
Bato mingi bazwaki batisimo
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 7]
Albert Schroeder, moko na Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, alakisaki mwa buku ya sika
[Bililingi na lokasa 8, 9]
Lisano-liteya elendisaki kotánga Biblia mokolo na mokolo