Likita ya nsuka ya mbula 2 Ɔkɔtɔbɛ 1999
LIKITA YA NSUKA YA MBULA ya basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania likosalema na mokolo ya 2 Ɔkɔtɔbɛ 1999, na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova, na Boulevard Kennedy 2932, na engumba Jersey City, na etúká ya New Jersey. Likita moko ya ebandeli likosalema bobele na basangani ya la Société, na 9:15 ya ntɔngɔ, bongo likita ya nsuka ya mbula likolanda, na 10:00.
Basangani ya la Société oyo basilaki kobongola adresi na bango ya posita na mbula oyo eleki basengeli koyebisa yango uta sikawa na biro ya mokomeli mpo ete lokasa ya libyangi mpe bakalati ya maponami ekoka kokómela bango na sanza ya Yuli.
Bakalati yango mpe nkasa ya libyangi na likita ya nsuka ya mbula oyo ekotindama epai ya basangani ya la Société, esengeli kozongisama na biro ya mokomeli ya la Société liboso ya 1 Augusto. Mosangani mokomoko asengeli kotondisa kalati na ye mpe kotinda yango nokinoki, koyebisáká soko ye moko akozala na likita to te. Makambo oyo akokoma na kalati mokomoko masengeli kotikala bobele bongo, mpamba te makosalisa biso na koyeba nani akozala na likita.
Ebongisami ete manaka mobimba, bakisa mpe likita moke ya ebandeli mpe balapolo oyo ekopesama, esuka na ngonga ya 1:00 nsima ya nzanga to mwa moke na nsima. Ekozala na likita moko te nsima ya nzanga. Lokola bisika bibongisami na motango ya sikisiki, bobele moto oyo azali na lokasa ya libyangi nde akokɔta. Bibongiseli bikokamatama te mpo na kolanda likita ya nsuka ya mbula na telefone.