Likita ya nsuka ya mbula 7 Ɔkɔtɔbɛ 2000
LIKITA YA NSUKA MBULA ya basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania ekosalema mokolo ya 7 Ɔkɔtɔbɛ 2000 na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova na Boulevard Kennedy 2932, na engumba Jersey City, na etúká ya New Jersey. Likita ya liboso kaka mpo na basangani ya la Société ekosalema na 9:15 mpe likita ya nsuka ya mbula ekobanda na 10:00 ya ntɔngɔ.
Tosɛngi na basangani ya la Société oyo bakómi na adresi mosusu bátinda adresi yango na biro ya sekrɛtɛrɛ mpo ete, na sanza ya Yuli, tótindela bango mokanda mpo na kobengisa bango mpe bakalati ya voti.
Bakotindela basangani ya la Société bakalati yango esika moko na mokanda mpo na kobengisa bango na likita ya nsuka ya mbula. Soki ndeko azwi kalati na ye, asengeli kotondisa yango mpe kozongisa yango na biro ya sekrɛtɛrɛ ya la Société liboso ya mokolo ya 1 Augusto. Mosangani mokomoko asengeli kotondisa kalati yango mpe kozongisa yango nokinoki. Tosɛngi mpe ayebisa soki akozala na likita to te. Makambo oyo moto akomi na kalati, abongola yango lisusu te. Yango ekosalisa biso tóyeba banani bakozala na likita.
Likita mobimba, na mwa likita ya ebandeli mpe balapolo oyo ekopesama, nyonso ekosuka na 1:00 na nsima ya midi to mwa moke na nsima. Na nsima ya midi likita ekozala te. Lokola bisika ya kofanda ekobongisama na kolanda motango ya bato oyo tokobengisa, kaka moto oyo totindeli ye mokanda nde akokɔta. Tobongisi te ete bato mosusu bálanda likita yango na telefone.