Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/10 nk. 17-22
  • Okoki kozongisa boyokani na ndeko na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kozongisa boyokani na ndeko na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yesu alingaki mpenza koloba nini?
  • Salá nyonso mpo ozongisa boyokani na ndeko na yo
  • Luká lisalisi ya bato oyo bakɔmeli na elimo
  • Milende ya nsuka mpo na kozongisa boyokani na ndeko na yo
  • Lolenge nini bino bosilisaka matáta na bino?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tóbatela kimya mpe bopɛto ya lisangá
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Tomekola motema mawa na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge ya komonisa bolingo mpe motema mawa ntango ndeko moko asali lisumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/10 nk. 17-22

Okoki kozongisa boyokani na ndeko na yo

“Soko ndeko na yo asaleli yo lisumu, kendá koloba na ye mpo na mabe oyo asali, bino mibale. Soki akoyoka yo, okozongisa boyokani na ndeko na yo.”—MATAI 18:15, NW.

1, 2. Toli nini ya ntina mpenza Yesu apesaki mpo na kosilisa matata?

NTANGO etikalaki soko mbula moko mpo asilisa mosala na ye ya kosakola awa na mabelé, Yesu ateyaki bayekoli na ye makambo ya ntina mingi. Okoki kotánga makambo yango na Matai mokapo 18. Moko na yango elobelaki ntina ya kozala na komikitisa lokola bana mike. Na nsima, abendaki likebi na likambo ya kobɛtisa “moko na baoyo mike” libaku te mpe kosala makasi mpo na kozongisa “baoyo mike” oyo babungi nzela kati na etonga, mpo bábeba te. Na nsima, Yesu apesaki baklisto toli ya ntina mpo bákoka koyeba ndenge nini kosilisa mikakatano kati na bango.

2 Ntango mosusu, oyebi maloba yango, oyo ete: “Soko ndeko na yo asaleli yo lisumu, kendá koloba na ye mpo na mabe oyo asali, bino mibale. Soki akoyoka yo, okozongisa boyokani na ndeko na yo. Soki akoyoka yo te, kamatá moto moko to bato mibale elongo na yo ete likambo lindimana na monɔkɔ ya batatoli mibale to misato. Soki akoyoka bango te, yebisá lisangá. Soki akoyoka lisangá te, azala epai na yo lokola mopakano mpe mokɔngɔli na mpako.” (Matai 18:15-17, NW) Ntango nini tokoki kosalela toli oyo mpe ezalela nini tosengeli kozala na yango?

3. Ndenge nini tosengeli kotalela mabunga ya bato mosusu?

3 Na lisolo oyo eleki, tomonaki ntina oyo tosengeli kolimbisa mpamba te biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga. Tosengeli mpenza kolimbisa ndeko na biso moklisto ntango azokisi biso na maloba to asali biso likambo moko ya mabe. (1 Petelo 4:8) Mingimingi ebongi mpenza kobosana libunga yango, kolimbisa mpe kotika likambo yango eleka. Tokosala yango mpo kimya ezala na kati ya lisangá ya boklisto. (Nzembo 133:1; Masese 19:11) Kasi likambo mosusu ekoki kozala ya monene to ekoki kosala yo mpasi mingi na motema na boye ete okomona eloko mosusu ya kosala te bobele kosolola yango na ndeko oyo asaleli yo lisumu. Soki ezali bongo, maloba ya Yesu oyo touti kolobela ekosalisa yo.

4. Ndenge nini tokoki mpenza kosalela Matai 18:15 mpo na mabunga ya basusu?

4 Yesu apesaki toli ete: “Kendá koloba na ye mpo na mabe oyo asali, bino mibale.” Kosala bongo ezali mpenza likambo ya mayele. Babiblia mosusu na lokota ya Allemand elobi ete, monisá libunga na ye liboso ya “miso minei,” elingi koloba miso na yo mpe miso na ye. Mbala mingi, soki botaleli likambo yango na boboto nyonso bino mibale, ekozala mpasi te mpo na kosilisa yango. Ntango bozali bino mibale, ndeko oyo alobaki to asalaki mabe akoki kokakatana te mpo na kondima libunga na ye. Soki bato mosusu bazali wana, ezaleli na biso ya bato ya kozanga kokoka ekoki kopusa ye awangana mabe oyo ye asalaki to aluka komilongisa. Kasi soki botaleli likambo yango liboso ya “miso minei,” okoki komona ntango mosusu ete okaniselaki ndeko na yo makanisi mabe bobele mpamba; nzokande asalaki yo mabe te to asalaki likambo yango na nko te. Soki bino nyonso mibale bomoni ete ezalaki bobele makanisi mabe mpamba, bokoki kosilisa likambo yango na esika bótika likambo ya moke ekóma monene mpe ebebisa boyokani na bino. Na esika wana, tokoki kosalela toli ya Matai 18:15 ata na makambo mikemike oyo tokutanaka na yango mokolo na mokolo.

Yesu alingaki mpenza koloba nini?

5, 6. Lisumu nini Matai 18:15 ezali mpenza kolobela, mpe nini emonisi yango?

5 Na toli na ye wana, Yesu alingaki mpenzampenza kolobela makambo ya minene. Yesu alobaki: “Soko ndeko na yo akosalela yo lisumu.” “Lisumu” ekoki kozala libunga moko to likambo moko ya mabe. (Yobo 2:10; Masese 21:4; Yakobo 4:17) Kasi soki totali malamu, tokomona ete awa Yesu azalaki kolobela lisumu ya monene. Mpo moto oyo asalaki mabe akokaki kotalelama “lokola mopakano mpe mokɔngɔli ya mpako.” Esengelaki kozala libunga to lisumu moko monene. Maloba yango elimboli nini?

6 Ntango bazalaki koyoka Yesu koloba bongo, bayekoli na Yesu bayebaki ete bandeko na bango bazalaki koyokana na bato ya bikólo mosusu te. (Yoane 4:9; 18:28; Misala 10:28) Mpe bazalaki kolinga bakɔngɔli ya mpako ata moke te. Bazalaki bandeko na bango Bayuda, kasi bakómaki konyokola bango. Yango wana, Matai 18:15-17 etaleli mpenzampenza mabunga mike te to mwa maloba ya kozokisa oyo moto akoki kolimbisa mpe kobosana kasi elobeli nde mabunga minene mpenza.​—Matai 18:21, 22.a

7, 8. (a) Lisumu ya ndenge nini bankulutu basengeli kotalela? (b) Lisumu ya ndenge nini baklisto mibale bakoki kobongisa bango moko, na boyokani na Matai 18:15-17?

7 Na Mibeko ya Mose, masumu mosusu esɛngaki bobele kolimbisa moto oyo asali mabe te. Mikóló (to banganga) basengelaki kosambisa bato oyo basali masumu lokola kofinga Nzambe, kopɛngwa, kosambela bikeko, pite, ekobo mpe kosangisa nzoto mibali na mibali. Ezali mpe ndenge moko na lisangá ya boklisto lelo oyo. (Levitike 5:1; 20:10-13; Mituya 5:30; 35:12; Deteronome 17:9; 19:16-19; Masese 29:24) Nde tóyeba ete lisumu oyo Yesu alobeli awa ezali lisumu oyo bato mibale bakoki kobongisa yango. Na ndakisa: Mpo na nkanda to zuwa, moto moko atɔngi mozalani na ye. Moklisto andimi kosalela moninga mosala moko boye mpe bayokani biloko oyo akosalela mpe mokolo oyo akosilisa. Moklisto mosusu adefi mbongo mpe alaki ete akozongisa yango ndambo ndambo to mbala moko. Moklisto moko alaki ete soki nkolo mosala alakisi ye mosala, akowelana na ye te (ata soki akei kosala epai mosusu) mpe akoluka kobɔtɔla bakiliya na ye te.b Soki na makambo nyonso wana ndeko moko akokisi maloba na ye te mpe aboyi kobongola motema, ekozala mpenza likambo monene. (Emoniseli 21:8) Kasi likambo ya ndenge wana etaleli bato mibale mpe bakoki kobongisa yango bango moko.

8 Ndenge nini okoki kosala mpo na kosilisa mokakatano ya ndenge yango? Maloba ya Yesu emonisi toli misato ya kosalela. Tiká tótalela toli mokomoko. Na esika otalela yango lokola mibeko ya Leta, luká nde kokanga ntina ya maloba ya Yesu mpe kobosana te ete olingi nde kosilisa matata na bolingo nyonso.

Salá nyonso mpo ozongisa boyokani na ndeko na yo

9. Nini tosengeli kobosana te ntango tozali kosalela Matai 18:15?

9 Yesu abandaki koloba boye: “Soko ndeko na yo asaleli yo lisumu, kendá koloba na ye mpo na libunga na ye, bino mibale. Soko akoyoka yo, okozongisa boyokani na ndeko na yo.” Okokenda kokutana na ndeko na yo bobele soki mokakatano ezali ya solo kasi mpo na bilobela te. Osengeli kozala na bilembeteli ya solo mpo osalisa ndeko na yo amona ete asalaki mabe mpe asengeli kobongisa yango. Ezali malamu bósala yango noki, bóumela te noki likambo moke ekóma monene to ndeko na yo akóma motema makasi. Mpe kobosana te ete soki okokanisa likambo yango mbala na mbala, ekoki mpe kosala yo mabe. Lokola bokosolola yo na ye, koyebisa likambo yango na bato mosusu te mpo bámona yo moto malamu to bákɔtela yo. (Masese 12:25; 17:9) Mpo na nini? Mpo na mokano oyo ozali kolanda.

10. Nini ekosalisa biso mpo tózongisa boyokani na ndeko na biso?

10 Mposa na yo ezali nde ya kozongisa boyokani na ndeko na yo, kasi ya kopesa ye etumbu te, koyokisa ye nsɔni te to kosambwisa ye te. Soki asalaki mpenza mabe, yebá ete ekoki kobebisa boyokani na ye na Yehova. Mposa na yo ezali ete atikala ndeko na yo moklisto. Okoki kobongisa likambo yango na boye ete na ntango bozali kosolola, oloba na motema mɔ́tɔmɔ́tɔ te, okeba ete obimisa maloba ya kozokisa te to otombola mongongo te. Ntango bozali kosolola na bolingo nyonso, kobosana te ete bino nyonso mibale bozali bato ya kozanga kokoka, bato ya masumu. (Baloma 3:23, 24) Ntango ndeko na yo akomona ete okendaki kotɔnga ye te kasi olingi mpenza nde kosalisa ye, mokakatano yango ekoki kosila noki. Soki bokosolola ndenge wana na boboto nyonso mpe na motema polele, mokomoko na bino akomonisa ete azali na mayele soki emonani ete bino mibale bozali na mwa libunga to mpe makanisi mabe nde ebimisi matata yango kasi ezali motema mabe te.​—Masese 25:9, 10; 26:20; Yakobo 3:5, 6.

11. Ata soki ndeko oyo asali libunga aboyi koyokela biso, tokosala nini?

11 Soki omonisi ndeko na yo ete asalaki libunga mpe libunga yango ezali monene, akoki mbala mosusu kobongola motema. Ntango mosusu, lolendo ekoki kopusa moto aboya kondima libunga na ye. (Masese 16:18; 17:19) Soki na mbala ya liboso aboyi kondima libunga na ye mpe aboyi kobongola motema, okoki kolekisa mwa ntango liboso ya komema likambo mosika. Yesu alobaki te ete ‘kendá koyebisa ndeko na yo libunga na ye bobele mbala moko.’ Lokola ezali libunga oyo okoki kobongisa, meká lisusu kosolola na ye na kolandáká toli oyo ezali na Bagalatia 6:1 mpe liboso na “miso minei.” Na ndenge wana, okoki kozongisa boyokani na ndeko na yo. (Talá Yuda 22, 23.) Na bongo, okosala nini soki oyebi malamu ete ndeko na yo asalaki lisumu kasi aboyi kondima yango?

Luká lisalisi ya bato oyo bakɔmeli na elimo

12, 13. (a) Wapi toli ya mibale Yesu alobaki mpo na kosilisa matata? (b) Likebisi nini tokolanda ntango tozali kosalela toli ya mibale oyo Yesu apesaki?

12 Okosepela soki bato mosusu bakómi kokima yo mpo osalaki libunga moko monene? Te. Ndenge moko, Yesu amonisaki ete osengeli kolɛmba te kaka mpo, na mbala ya liboso, okokaki te koyokana na ndeko na yo; kasi nde okokoba kosala milende mpo yo na ye na bandeko mosusu bólanda kosambela Nzambe na bomoko ndenge ye alingaka. Yesu apesaki toli ya mibale na kolobáká boye: “Soko akoyoka yo te, kamatá moto moko to bato mibale na yo elongo ete likambo lindimana na monɔkɔ na batatoli mibale to misato.”

13 Alobaki okamata “moto moko to bato mibale.” Yesu alobaki te ete nsima ya kosolola na ndeko na yo, okoki kokende kosolola likambo yango na bato mosusu, osolola yango na mokɛngɛli-motamboli to kokomela bandeko mosusu mokanda mpo na koyebisa bango likambo yango. Ata soki ozali kondima solosolo ete ndeko na yo asalaki yo mabe, emonani naino polele te. Ezali malamu te obanda kopanza ndeko na yo nsango na likambo oyo ekoki kobalukela yo mpe kokómisa yo moto ya sɔngisɔngi. (Masese 16:28; 18:8) Nzokande, Yesu alobaki ete okamata moto moko to bato mibale. Mpo na nini? Mpe ekoki kozala banani?

14. Tokoki kopona banani mpo na kosalela toli ya mibale?

14 Olingi ndeko na yo andima ete asalaki lisumu mpe abongola motema mpo bózongisa kimya kati na bino mpe na Nzambe. Yango wana, ekozala malamu mpenza soki “moto moko to bato mibale” yango oyo okokamata bazali bato oyo bayebi likambo yango. Mbala mosusu bazalaki ntango likambo yango esalemaki to bayebi makambo oyo esalemaki (to oyo esalemaki te) na ndakisa, na likambo etali mombongo. Soki batatoli bazali te, okoki koluka bato oyo bayebi malamumalamu mosala yango mpe bakoki koyeba soki likambo oyo esalemaki ezalaki mpenza mabe. Mpe lisusu, litatoli ya bato yango ekoki kozala na ntina nsima. Mpamba te bayokaki makambo oyo bandeko balobaki, bakoki koloba ndenge makambo elekaki mpe milende oyo esalemaki. (Mituya 35:30; Deteronome 17:6) Na bongo, bato yango bakoya bobele mpo na koyoka bino te, kasi mpo na kosalisa yo ozongisa boyokani na ndeko na yo oyo azali mpe ndeko na bango.

15. Mpo na nini ebongi kokamata bankulutu ya lisangá soki tosengeli kotalela toli ya mibale oyo Yesu apesaki?

15 Kokanisa te ete osengeli kaka kobenga bankulutu ya lisangá. Nzokande, bankulutu bazali mibali oyo bakɔmeli na elimo mpe bazali na makoki mpo na kosalisa. Bankulutu yango bazali ‘ebombamelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekaoki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molɛmbisami na moi.’ (Yisaya 32:1, 2) Bamesani kososola na bandeko mpe kosembola makanisi na bango. Mpe moto oyo asali libunga akoki kokakatana te mpo na kotyela bankulutu motema mpamba te bazali “makabo na motindo na mibali.”c (Baefese 4:8, 11, 12, NW) Kosolola yo na ndeko na yo likambo na bino na miso ya bato yango oyo bakɔmeli na elimo mpe libondeli oyo bango bakosala ekokitisa mitema mpe bokobongisa likambo oyo emonanaki lokola ete ekoki kobongisama te.​—Talá Yakobo 5:14, 15.

Milende ya nsuka mpo na kozongisa boyokani na ndeko na yo

16. Wapi toli ya misato oyo Yesu apesaki?

16 Soki nsima ya kobenga moto moko to bato mibale, boyokani mpe te, sikoyo esengeli kobenga bankulutu ya lisangá. ‘Soko akoyoka [moto yango moko to bato yango mibale te], yebisá bankulutu ya lisangá. Soko mpe ayoki ata bankulutu ya lisangá te, tiká azala na miso na yo lokola mopakano mpe mokɔngɔli na mpako.’ Yango esɛngi nini?

17, 18. (a) Ndakisa nini ekosalisa biso mpo tóyeba ndimbola ya maloba oyo ete ‘koloba na lisangá’? (b) Ndenge nini tokoki kosalela toli yango lelo?

17 Yango elingi koloba te ete esengeli koyanganisa bandeko ya lisangá mpo na koyebisa bango libunga yango to mpe koyebisa yango na likita moko ya lisangá. Liloba ya Nzambe ekoki komonisa biso lolenge malamu oyo ebongi kosalela toli yango. Na Yisalaele ya kala, bazalaki kotalela masumu lokola botomboki, kolya na lokoso mpe molangwa na ndenge oyo: “Soko moto azali na mwana mobali na [motó makasi mpe motomboki, NW], oyo akotosa mongongo na tata na ye to mongongo na mama na ye te, mpe ata bapesi ye etumbu akoyoka bango te, mbɛ tata na ye mpe mama na ye bakosimba ye mpe bakokenda na ye epai na mikóló na mboka epai na ekuke na esika na ye, mpe bakolobela mikóló na mboka ete, Mwana mobali na biso oyo azali na [motó makasi mpe motomboki, NW], mpe akotosa mongongo na biso te. Azali moto na lokoso mpe molangwi. Na nsima babali nyonso na mboka bakobola ye na mabanga.”—Biso nde totɛngisi makomi; Deteronome 21:18-21.

18 Bazalaki koyebisa mabe ya moto na mboka mobimba te to na libota na ye te mpo na kosambisa ye. Nzokande, “mikóló” yango oyo baponamaki bazalaki bamonisi ya lisangá mobimba. (Talá Deteronome 19:16, 17 epai balobeli likambo moko oyo ‘banganga mpe basambisi ya ntango wana’ batalelaki.) Ndenge moko lelo oyo, soki likambo ekómi tii na toli ya misato oyo Yesu apesaki, bankulutu, bango bamonisi ya lisangá, bakotalela likambo yango. Bango mpe bazali koluka se likambo moko: kosala nyonso mpo na kozongisa boyokani na ndeko moklisto oyo soki likoki ezali. Bakosala yango na boboto, na makanisi mabe te mpo na ndeko yango mpe na koponapona te.

19. Bankulutu oyo bakamati mpo na kotalela likambo basengeli kosala nini?

19 Bankulutu bakotalela makambo na bozindo mpe bakoyoka bato oyo bazalaki to oyo bayebi likambo yango liboso ya bándima ete libunga esalemaki solo (to ezali naino kosalema). Mposa na bango ekozala ya kobatela lisangá pɛto mpo ebebisama na bizaleli mabe ya bato ya mokili te. (1 Bakolinti 2:12; 5:7) Bakosalela makoki na bango oyo Biblia elobeli mpo na “kolendisa na mateya ya bomoi mpe kosembola baoyo bazali bobongolabongola.” (Tito 1:9, NW) Elikya ezali ete moto oyo asali libunga akosala motó makasi te lokola bana ya Yisalaele oyo mosakoli ya Yehova akomaki na ntina na bango ete: “Zambi, ebyangi ngai, bozongisaki monɔkɔ te, elobaki ngai, boyokaki te; kasi bosalaki yango ezali mabe na miso na ngai, boponaki yango esepelisi ngai te.”—Yisaya 65:12.

20. Yesu alobaki nini soki moto oyo asali lisumu aboyi kondima mpe aboyi kobongola motema?

20 Nzokande, na mwa makambo mosusu, bato mosusu oyo basalaki mabe bamonisaki motó makasi lokola Bayisalaele. Soki esalemi bongo, Yesu alobaki polele ete: “Azala na yo lokola mopakano mpe mokɔngɔli na mpako.” Nkolo alobi na biso te ete tóyokela bato mawa te to tóluka koyokisa bango mpasi. Kasi, ntoma Paulo alobaki polele ete esengeli kobimisa bato ya masumu oyo balingi kobongola mitema te na lisangá. (1 Bakolinti 5:11-13) Ezala kobimisama na lisangá, ezali bobele lolenge mosusu ya koluka kosalisa moto oyo asali lisumu.

21. Moto oyo babimisi ye na lisangá akosala nini?

21 Moto oyo abimisami na lisangá akoki kozonga na lisangá. Yango emonisami mpe na lisese ya Yesu na ntina na mwana ya kilikili. Ndenge lisese oyo emonisi yango, nsima ya kokima ndako ya Tata na ye epai bazalaki mpenza kolinga ye, moto oyo asalaki mabe “akanisaki na motema.” (Luka 15:11-18) Ntoma Paulo akomelaki Timote ete na boumeli ya ntango, bato mosusu oyo basalaki mabe bakobongola motema mpe “bákokóma na makanisi malamu mpe bakobikisama na motambo ya Zabolo.” (2 Timote 2:24-26, NW) Tondimi mpenza ete moto nyonso oyo aboyi kobongola motema mpe abimisami na lisangá akoyoka mpasi mingi mpo na makambo mibale oyo akozanga: kondimama na Nzambe mpe kozanga baninga ya motema, baklisto ya sembo. Yango ekopusa moto yango akóma na makanisi malamu.

22. Nzokande, ndenge nini tokoki lisusu kozongela boyokani na ndeko na biso?

22 Yesu alobaki te ete bato ya bikólo mosusu mpe bakɔngɔli na mpako bakoki kobika te. Matai Lewi, moko na bakɔngɔli ya mpako, abongolaki motema mpe ‘alandaki Yesu’ na motema moko mpe akómaki moko na bantoma na ye. (Malako 2:15; Luka 15:1) Yango wana, soki moto oyo asali libunga ‘aboyi koyokela lisangá’ mpe babimisi ye na lisangá, tokoki kozala na elikya ete mokolo mosusu akobongola motema mpe akobongisa etamboli na ye. Ntango akozonga na lisangá, tokosepela mpamba te ndeko na biso azongi na losambo ya solo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku Cyclopedia ya McClintock na Strong elobi boye: “Bakɔngɔli ya mpako oyo balobelami na Kondimana ya Sika bazalaki kotalelama lokola bato oyo bazalaki kotɛka mboka to lokola bapɛngwi; bato oyo bamibebisaki mpo bakómaki baninga ya bapaya. Bazalaki kosalela bapaya oyo bazalaki konyokola bato. Bazalaki kotala bango bato ya masumu . . . Bato bazalaki kolinga bango te. Moto moko te ya malamu akokaki kolinga kozala moninga na bango. Baninga na bango ezalaki se bato oyo bazalaki lokola bango, bato oyo banamboka bazalaki kolinga te.”

b Kobuba na mombongo to makambo ya mbongo oyo bato babandi kobubana, kokosa to mayele mabe ekoki kotángama kati na lisumu oyo Yesu alobelaki. Mpo na komonisa yango, nsima ya kopesa toli oyo ezali na Matai 18:15-17, Yesu apesaki lisese ya baombo (basali) oyo badefisaki bango mosolo mpe bazongisaki te.

c Molimboli moko ya Biblia alobaki boye: “Esalemaka ete moto oyo asali mabe ayoka mingi mpenza toli ya bato mibale to misato (mpenzampenza soki azalaka na limemya mingi epai na bato yango) koleka toli ya moto moko, mingimingi soki moto yango azali moto oyo bazwanaki na ye likambo liboso.”

Okoki koyeba lisusu?

◻ Lisumu ya ndenge nini elobelami libosoliboso na Matai 18:15-17?

◻ Tosengeli koyeba nini soki tolingi kosalela toli ya liboso?

◻ Banani bakoki kosalisa biso soki tosengeli kosalela toli ya mibale?

◻ Banani tosengeli kobyanga mpo na kosalela toli ya misato, mpe ndenge nini tokoki kozongisa boyokani na ndeko na biso?

[Elilingi na lokasa 18]

Bayuda bazalaki kosolola na bakɔngɔli ya mpako te. Matai abongolaki motema mpe alandaki Yesu

[Elilingi na lokasa 20]

Mingimingi tokoki kosilisa matata liboso na “miso minei”.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto